Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Nini ezali kobebisa moto?
BOTEMELI oyo Yesu akutanaki na yango ezali makasi koleka. Ezali bobele te ete mingi kati na bayekoli na ye batiki ye, kasi, na Yudea, Bayuda bazalaki koluka koboma ye, lokola ntango azalaki na Yelusaleme na boumeli ya Pasika ya mobu 31.
Sikawa Pasika ya mobu 32 ekoki. Mpenzampenza na boyokani na etinda ya Nzambe, Yesu akei na Yelusaleme mpo na elambo yango. Kasi, amibatelaki mpenza, mpamba te bomoi na ye ezalaki na likama. Nsima na yango, azongaki na Galilai.
Mbala mosusu Yesu azalaki na Kapernaume ntango Bafalisai mpe Bakomeli ya Yelusaleme bayaki epai na ye. Bazali koluka bilembo mpo na kofunda ye lokola moto azangi bosembo na mitinda ya lingomba. Batuni ye: “Mpo na nini bayekoli na yo bazali kosopa mateyo na mikolo na mboka? Mpamba te bakosukola maboko te wana ekolyaka bango.” Likanisi oyo euti na Nzambe te, kasi epai na Bafalisai ezali lisumu monene mpo na kozanga kotosa etinda oyo etali kosukola maboko longwa na maboko kino na libolongo liboso ya kolya.
Na esika ete ayanola na efundeli na bango, Yesu amonisi bango ete bazali kobuka mobeko na Nzambe na bolingo na bango mpenza. Alobi: “Mpo na nini bino bokosopa mibeko na Nzambe mpo na mateyo na bino? Mpo ete Nzambe alobaki ete: ‘Kumisa tata na yo mpe mama na yo’, mpe ete: ‘Ye oyo akoloba mabe mpo na tata to mama, tika ete akufa!’ Nde bino bokolobaka ete: ‘Ye nani azali koloba na tata to na mama ete: “Yango elingi bino kozwa epai na ngai ezali likabo”, ezali na ye likambo te ete akumisa tata na ye to mama na ye.”’
Ya solo, Bafalisai bazalaki koteya ete mosolo, biloko to eloko mosusu nini epesami lokola likabo epai na Nzambe ezali mpo na temple, mpe ekoki kosalelama mpo na mosala mosusu te. Nzokande, likabo oyo epesami ezali se ya moto oyo apesaki yango. Na bongo mwana akoki komilongola na mokumba na ye ya kosalisa baboti na ye oyo bakomi mibange, baoyo mbala mosusu bazali na ezaleli ya mpasi, na kolobaka bobele ete mosolo na ye to biloko na ye “bityami” pembeni, to likabo epesami na Nzambe to na temple.
Kosilikaka na motindo ya kolongobana mpo na ndenge mabe Bafalisai bazalaki kobuka mobeko ya Nzambe. Yesu alobaki na bango: “Boye mpo na mateyo na bino bobebisi Liloba na Nzambe. ‘Bakosi! Yisaya alobaki malamu mpo na bino ete: ‘Bato oyo bakotosaka ngai na minoko, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai. Bakosanzolaka ngai mpamba, bakolakisa malako mazali mibeko na bato.”’
Ntango mosusu bato nyonso balongwaki wana mpo na kopesa nzela to kotika esika na Bafalisai ete batuna Yesu. Sikawa lokola bango bayebi te eyano nini bakoki kopesa liboso na mpamela makasi oyo bauti kozwa, Yesu abengi bibele ete babelema. Alobi na bango: “Boyoka mpe bokata ntina. Yango ekoingela na monoko ekobebisa moto te. Kasi oyo ekobima na monoko, yango wana ekobebisa moto.”
Na nsima, ntango bakotaki na ndako, bayekoli na ye batuni ye: “Oyebi nde ete Bafalisai basiliki wana eyoki bango liloba yango?”
Yesu ayanoli bango ete “Nzete nyonso oyo Tata na ngai na likolo akonaki te ekobikwa. Tika bango, bazali bakufi miso oyo bazali kokamba bakufi miso na nzela. Soki mokufi miso akokamba mokufi miso na nzela, bango mibale bakokwea na libulu.”
Yesu akamwaki, ntango na nkombo ya bayekoli nyonso, Petelo atunaki ye ndimbola ya polele mpo na koyeba likambo oyo ezali kokomisa moto mbindo. Ye ete: “Bino mpe bozali naino kokata ntina te? Bososoli te ete oyo ekoingela na monoko ekoleka kino na libumu mpe ekobwakama libanda? Nde oyo ekobima na monoko euti na motema; yango wana ekopesa moto mbindo. Mpo uta na motema ekobima makanisi mabe, libomi koboma moto, ekobo, pite, moyibi, litatoli na lokuta, kotuka; ezali yango ekopesa moto mbindo. Kasi kolya na maboko masukwami te, yango ekopesa moto mbindo te.”
Na maloba wana, Yesu apekisaki bopeto te. Alingi koloba te ete ebongi te kosukola maboko liboso ya kolya. Te, azali nde kokweisa ezaleli ya bokosi ya batambwisi to bakonzi na lingomba oyo bazali komeka kobongola mibeko ya sembo ya Nzambe na kotyaka likebi mingi likolo na mibeko oyo mitongami likolo na Biblia te. Ezali nde misala mabe ezali kopesa mbindo epai na moto, mpe Yesu amonisi ete yango ezali kouta na motema. Yoane 7:1; Deteronome 16:16; Matai 15:1-20; Malako 7:1-23; Exode 20:12; 21:17; Yisaya 29:13.
◆ Botemeli nini Yesu akutani na yango sikawa?
◆ Bafalisai bafundi Yesu mpo na likambo nini, mpe engebene ye, ndenge nini bango bazali kobuka mobeko na Nzambe?
◆ Engebene Yesu, nini ezali kokomisa moto mbindo?