Lisolo ya basakoli na Bokonzi
Guinée eyambi bato bayei mpo na assemblée “Mimya ya bonzambe”
MPO na mbala ya liboso, kobanda na le 1er kino le 4 janvier 1987, Ba Témoins de Jehovah basalaki assemblée ya distrike na Répiblike ya Guinée (Afrike oksidentale). Atako mosala na bango endimami naino te kati na mboka yango oyo etondi na bamusulmans. Batemwe ya Guinée basili koyebana ete bato malamu, batondi na bolingo mpe bazali kimya. Ezali mpo na yango ete bakonzi bayambaki na ndenge malamu bato bayaki koyangana na assemblée “La paix divine”.
Kati na bato yango, ba missionnaires 9 bautaki na Freetown (Sierra Leone) bazalaki na camionnette moko mpe bitukutuku mibale. Ntango bakomaki na mondelo ya mboka (frontière), basengelaki koleka ebale na bac moko esalemaki na bwato misato likoló na yango balyaki mabaya. Ekomaki bango na ngambo mosusu kozanga likama na mituka na bango, batunaki soko bakokaki kofuta boni. Bayanolaki bango boye: ”Bozali ba Témoins de Jéhovah, mpe yango ezali ofele mpo na bino.”
Kasi ndenge nini makambo malingaki koleka na douane mpe na mosala oyo ekotalaka makambo ya bapaya bazali kokota na mboka? Bayanolaki bango boye: “Bomitungisa mpo na yango te. Makambo nyonso mabongisami. Esengeli na bino bobele kolata insigne na bino.” Yango esalemaki bongo mpo na bankama na bato bayaki na assemblée. Na yango, bakonzi ya Guinée bazwaki bibongiseli mpo ete molati nyonso ya insigne ya assemblée “La paix divine” akatisa ebale ekaboli Guinée na Sierra Leone mpe Libéria kozanga kofuta mpe afuta eloko te mpo na douane mpe kontrole ya immigration! Mokengeli moko ya zongazonga autaki na Libéria alobi boye: “lnsigne ezalaki na ntina mingi koleka passeport.”
Bakonzi ya Guinée bapesaki mpe lisalisi na bango mpo na makambo mosusu. Bapesaki motuka moko oyo ekumbaki Batemwe ya Conakry, oyo ezali capitale, kino na Guéckédou, engumba esika assemblée esalemaki, na ntaka ya bakilomètres 640. Bapesaki nzela ete essence etekama epai na mituka oyo eutaki na Freetown, mpe bayebisaki hotel oyo ezalaki pene na esika ya assemblée ete babomba bisika nyonso bobele mpo na Batemwe. Bapesaki mpe nzela ete assemblée esalema na bandako ya commune.
Gouverneur ya regió, mosali na Leta aleki monene na engumba yango, apesaki esika ya kolala epai na bapaya 11 kati na ndako na ye. Azalaki mpe kati na bato 1 132 oyo bayanganaki na discours public esalemaki mokolo ya lomingo.
Jéhovah Nzambe akobosana te motema boboto oyo emonisamaki epai na basaleli na ye na libaku yango.—Matai 10:42; 25:40.