Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/6 lok. 23
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • “Elako oyo osali, kokisá yango”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Tókokisa ndai na biso mokolo na mokolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tosá ndai na yo ya libala!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/6 lok. 23

Mituna na batangi

◼ Moto oyo apesi bomoi na ye epai ya Jéhovah akoki mpenza koloba ete yango ezali ndai?

Bato oyo bazali kolinga Nzambe ya solo mpe bazali kozwa ekateli ya kosalela ye na motema na bango mobimba basengeli kopesa bomoi na bango epai na Jéhovah mpe komibatisa. Ata Biblia ezali kosalela liloba ndai (“voeu”) te mpo na kolobela komipesa, emonani ete kosalela liloba yango ezali mabe te.

Mokanda Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible epesi ndimbola elandi mpo na voeu, engebene Makomami, yango elobi ete ezali, “elaka epesami na miso ya bato nyonso na nzela na yango moto amipesi mpo na kokokisa likambo, azwi ekateli ya kopesa likabo, kobanda mosala to kopona ezalela; Ekoki kozala ekateli malamu to mabe” ‘Kati na Biblia ezali na bandakisa ya ndai oyo emonisi ekateli ya kokokisa makambo soko Nzambe asali likambo boye. Na yango, Mituya 21:2 elobi: “Bongo Yisraele asimbaki ndai epai na Jéhovah koloba ete: ‘Soko yo okopesa bato oyo na maboko na ngai solo, mpe nakobebisa mboka na bango nye.”’ (Genese 28:20-22; Basambisi 11:30-39). Ntango moklisto amipesi epai na Nzambe, ekosenga te ete Nzambe asala likambo boye na ndenge ya ndai oyo. Moto yango akoloba te ete: ‘Soko yo, Jéhovah, opesi ngai bolamu uta sikawa, mpe soko ondimisi ngai ete nakozwa bomoi ya seko na mokili ya sika. na bongo, nalaki yo ete nakosalela yo bomoi na ngai mobimba.’

Bandai mosusu oyo Biblia elobeli ezali kosalema na mbalakaka. Boyekoli esalemi mpo na maloba ya Kondimana na Kala (Angl.), ya William Wilson, epesi ndimbola elandi mpo na liloba na hébreu nadár: “Sala ndai, elingi koloba kolaka na bolingo na yo mpenza ete opesa to osala likambo moko; na mozindo, yango ezali na likanisi ya kolya na pembeni.” Na bongo, ezali na bolingo ya moto ye moko ete elaka ekopesama epai na Nzambe. Kasi, tokoki mpenza koloba ete komipesa epai na Nzambe mpe batisimo mpo na kokoma moyekoli na Klisto ezali ndai te mpamba te Nzambe azali kosenga sikawa ete baoyo nyonso balingi kondimama na ye bamipesa epai na yea?

Soko bato basengeli kokokisa masengami mpo na kozala baninga na Jéhovah, yango elimboli te ete basengeli te kozwa ekateli bango mpenza. Moise alobaki epai na Yisraele ete: “Nabyangi likolo mpe nse kotatola na ntina na bino lelo, ete natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo pona bomoi ete yo mpe bana na yo bozala na bomoi.” (Deteronome 30:19, 20; Nzembo 15:1-5 tala Yosua 24:15; 1 Mikonzi 18:21). Bomikundola maloba na Yesu: “Boya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino mpe boyekola na ngai; mpamba te ngai nazali na bopolo mpe na motema mosokemi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino.” (Matai 11:28, 29) Ba versets oyo ezali lisengi makasi ezangi ntina to libyangami mpo moto asala likambo na bolingo na ye?

Yesu abotamaki kati na libota moko oyo amipesaki epai na Nzambe; makambo mingi ya bomoi na ye mpe liwa na ye masengelaki kokokana na ndenge ya esakweli; mpe Nzambe abongiselaki ye nzoto mpo na mbeka. Nzokande, ekateli Klisto azwaki na bolingo na ye moko mpo na komimonisa epai na Tata na ye mpo na kokokisa mosala moko ya sipesiale emonisamaki kati na maloba oyo: “Boye nalobaki ete: ‘Tala nasili koya, (ekomami mpo na ngai kati na mokanda). E Nzambe, nayei kosala mokano na yo!“‘ (Baebele 10:5-10) Bobele bongo, moto na moto asengeli kozwa ekateli ya komipesa epai na Nzambe mpe kozwa batisimo ya boklisto.

Epai mosusu, baklisto bazali kokanga ntina lelo ete kosalela liloba “ndai” esuki bobele na esaleli oyo Biblia epesi yango te. Uta kala, ba Témoins de Jéhovah bazali kolobela mpo na “bandai ya libala” ntango, kati na bamboka mosusu, bazali kosepela na miso ya bato nyonso mpo na bomoko yango ya libala kati na ba Salles du Royaume na bangob. Yango ekokani solo na ndimbola esalelami mingi mpo na liloba ’‘ndai”: “Elaka esalemi na bolingo ya moto ye moko mpo na kokokisa likambo moko.“

Mpo na yango, ntina mpenza ezali te ya kotya ndelo na liloba yango. Moto oyo azwi ekateli ya kosalela Nzambe akoki komona ete kopesa mobimba bomoi na ye ekokani na moto asali ndai. ‘Apesi elaka ya kokokisa likambo moko’, oyo ya kosalela bomoi na ye na mosala ya Jéhovah mpe kokokisa na bosembo nyonso mokano na Ye. Moto yango asengeli koyeba ntina ya ekateli na ye, lokola mokomi na Nzembo, oyo alobaki na ntina na ndai oyo asalaki ete: “Nakozongisa nini epai na Jéhovah na ntina na mapamboli na ye epai na ngai? Nakosimba kopo na kobika, mpe nakobyanga nkombo na Jehovah. Nakokokisa bilaka (ndai) na ngai nyonso epai na Jéhovah.”​—Nzembo 116:12-14; tala Nzembo 50:14.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ezali yango emonisaki La tour de Garde ya le 15 janvier 1974, na nkasa 63, 64.

b Na ntango ya libala, bafiansé bazali komipesa moko epai na mosusu, kasi bazali kosala yango liboso na batemwe mpe na miso na Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto