Ozali peto kati na makambo nyonso?
“Bolongwa! Bolongwa! Bokima na esika yango, bosimba eloko na mbindo te; bobima na kati na ye, bomibulisa bino mpenza, bino bokokumbaka biloko na Jéhovah!”—YISAYA 52:11.
1. (a) Na lisalisi ya mobeko nini ya mokonzi biloko na bulee ya Jéhovah bipesamelaki nzela na kozonga na Yelusaleme? (b) Ndenge nini basani yango mosusu etiolamaki?
BONSOMI ezwamaki—nsima na mibu 70 ya boombo! Mobeko na mokonzi esakolamaki pene na mobu 538 liboso ya ntango na biso epesaki nzela na libota ya Bayuda ete ‘bakenda kotonga lisusu ndako na Jéhovah, Nzambe ya Yisraele’. (Ezela 1:2, 3) Nsima na mwa ntango, likambo mosusu ya kokamwa ebimaki: “Mokonzi Siruse (ya Perse) abimisaki mpe biloko na ndako na Jéhovah oyo Nebukadanesala abotolaki na Yelusaleme.” (Ezela 1:7, 8) Kati na biloko yango ezalaki na basani mpe bakopo ya bulee oyo Belesasala mpe bato na ye babebisaki na butu oyo Babilone ekweaki, na komelaka na yango mpe kosalelaka yango na motindo mabe mpo na kokumisa banzambe na lokuta. (Danyele 5:3, 4) Sika, bato oyo bazalaki kala baombo bakokaki komema biloko yango na Yelusaleme mpe kosalela yango mpo na lokumu ya Jéhovah.
2. (a) Esakweli nini ya Yisaya baombo na kala basengelaki kokanisa lisusu? Kokokana na yango ezalaki epai na banani? (b) Mpo na nini bazwaki toli na kosimba eloko moko ya mbindo te?
2 Wana ezalaki bango komilengela mpo na bozongi na bango, na ntembe te Bayuda bakanisaki maloba oyo ya mosakoli Yisaya: “Bolongwa! Bolongwa! Bokima na esika yango, bosimba eloko na mbindo te; bobima na kati na ye, bomibulisa bino mpenza, bino bokokumba biloko na Jéhovah!” (Yisaya 52:11) Solo, ezalaki Balevite mpenza nde bamemaki biloko yango. (Mituya 1:50, 51; 4:15) Kasi Yisaya asakolaki ete Bayuda nyonso oyo bakouta na boombo bakozala lokola ete bango nyonso nde bamemi biloko yango. Na bongo, bango nyonso basengelaki kozala peto. Basengelaki te kokamata biloko nyonso ya motuya ya bato na Babilone lokola Bayisraele basalaki yango na ntango ya bobimi na bango na Ezipito. (Tala Exode 12:34-38.) Esengelaki na bango kolongola mposa nyonso ya biloko na mosuni to moyimi mpo na kozonga na mboka na bango. Soki basimbi ata moko kati na “banzambe na bikeko” ya bato na Babilone, bakomikomisa mbindo. (Yilimia 50:1, 2)a. Ezali bobele na kozalaka peto kati na makambo nyonso nde Bayuda bakokaki kozonga na Yelusaleme na kotambolaka na “Nzela na Bulee”.—Yisaya 35:8, 9.
3. Lelo, banani bazali bamemi na “biloko na bulee” ya Jéhovah? Mpo na nini ezali ntembe monene mpo na bango na kotikala peto?
3 Bobele bongo lelo, ba Témoins de Jéhovah basengeli kozala peto, mpamba te bazali komema “biloko na bulee” ya Jéhovah. Na ntina yango Paulo atangaki maloba na Yisaya mpe akokanisaki yango na baklisto ya eleko na ye wana elobaki ye boye: “Tomipetola mpenza na mbindo nyonso na nzoto mpe na elimo mpe tokokisa ezaleli na biso na bulee kati na nsomo na Nkolo.” (2 Bakolinti 6:17 kino 7:1) Longola ete tozali na bomoi kati na mokili etondi na mbindo, tosengeli lisusu kobundisa bamposa na biso mabe oyo tozwi longwa na kobotama na biso. (Genese 8:21) Na ntina yango, Yilimia 17:9 ezali koyebisa biso likambo oyo: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango?” Bamosusu bazali komikosa bango moko, mpe bazali kokosa bato mosusu na kokanisaka ete bazali na bomoi ya peto mpe oyo esepelisi Nzambe, nzokande ezali mpenza bongo te. Na bongo bazali kosalela lolenge moko ya bokosi. Moto na moto kati na biso amituna motuna oyo: ‘Nazali solo kosala nyonso ekoki na ngai mpo na kotikala ntango nyonso peto liboso na Jéhovah kati na makambo nyonso?’ Mpo na kosalisa biso kati na likambo yango, totalela sikawa mitindo minei ya bopeto.
Bopeto ya nzoto: likambo ya liboso
4. (a) Mpo na nini bopeto ya nzoto ezali na esika ya liboso kati na libota ya Jéhovah? (b) Mpo na nini mbala mosusu ezali mpasi mpo na kobatela bopeto?
4 Lokola na kala, bopeto ya nzoto ezali likambo ya liboso lelo kati na libota ya Jéhovah. (Exode 30:17-21; 40:30-32) Ndenge nini tokokoka kosimba “biloko na bulee na Jéhovah” soki nsuki na biso, maboko na biso, elongi na biso, mino na biso to manzaka na biso ezali na bosoto to soki nsolo mabe ezali kobima na nzoto na biso? Na yango, tokeba ete topusama te na bosoto mpe wayawaya oyo tozali komona lelo kati na mokili.—Baloma 12:2.
5. (a) Mpo na nini eleki ntina ete tobatela bopeto? Pesa bandakisa mpo na ndenge tokoki kosalela toli yango epai na biso. (b) Ndenge nini bankulutu bakoki kopesa lisalisi na bango kati na likambo yango?
5 Ndenge nini tokoki kokesena na mokili soki tozali kondima ezaleli na yango? Ndako ya bosoto to esika ya losambo oyo ezali mbindo ekotinda bato mosusu na ‘koloba mabe na ntina na liloba na Nzambe’ (Tito 2:5) Nzokande, soki tozali kobatela nzoto na biso peto, tozali kolokota matiti na esika ya ba assemblées, tozali kopesa maboko mpo na kobatela Salle du Royaume peto mpe soki tozali kobatela ndako na biso ata yango ezali ya moke mpenza kasi tobongisi yango malamu mpe totye yango peto, na bongo tokokumisa Nzambe. (Tala 1 Petelo 2:12.) Bankulutu, bopesa ndakisa malamu kati na likambo etali bopeto. ‘Bomipekisa’ te mpo na kopesa batoli ya ntina soki esengeli.—Misala 20:20.
6. Molato na biso esengeli kozala ndenge nini ntango tozali koyangana na makita mpe kosangana na mosala ya kosakola?
6 Tokoloba boni mpo na molato na biso ntango tozali kosanzola Jéhovah na makita mpe wana ezali biso kosangana kati na mosala ya kosakola? Esengeli kozala ‘ya bopolo mpe ebongisami malamu’, boye te? (1 Timote 2:9; Baebele 10:23-25) Tokanisa te ete tosengeli kolata malamu bobele ntango tozali na mokumba na makita. Molato ya bongo na bongo ezali komonisa kozanga bopolo mpe ebongi te na losambo. Basacoche ebeba mpe Babiblia elongwa bizipeli to oyo bankasa na yango epasuki ekoki koboyisa moto nsango ya Bokonzi.
Tobatela makanisi na biso mpo ete ebebisama te
7. Engebene Bafilipi 4:8, ndenge nini tokoki kotikala peto kati na makanisi?
7 Kati na Bafilipi 4:8, Paulo azali kopesa toli oyo: “Na nsuka, bandeko, mpo na makambo nyonso na solo, na makambo nyonso na lokumu, na makambo nyonso na sembo, na makambo nyonso na peto, na makambo nyonso na boboto, na makambo nyonso na ngolu, soko malamu ezali mpe soko lisanzoli ezali, bokanisa makambo yango.” Nzokande, tozali kotungisama bipai nyonso na masenginya oyo ezali kobenda biso na kotya miso na biso kati na “makambo mozindo ya Satana”.—Emoniseli 2:24.
8. Monisa makama ya biloko mosusu oyo bato bazali kotala. Pesa mpe bandakisa ya mboka na bino.
8 Na ndakisa, lokola bafilme vidéo ya pite mpe ya mobomano ekomi kotekama mingi, yango ebimisi makama minene epai na basaleli mosusu ya appareil yango. Na Mpoto, moklisto moko abala azalaki kozela ete mwasi na ye akenda kolala mpo na kotala ba filme ya mbindo. Milona ya mbindo ezwaki misisa mpenza kati na motema na ye, mpe ayaki kosala ekobo. (Tala Yakobo 1:14, 15.) Kati na mboka moko ya Afrika, etuluku ya bilenge Batemwe bazalaki kodefa bakasete vidéo ya mbindo epai ya baninga na bango ya kelasi mpe bazalaki kotala yango na ntango baboti na bango bazalaki te. Nzokande, nkulutu moko ya Nigéria azali koloba boye: ‘Likama ya monene koleka ezali mbala mingi kouta na ba programmes ya télévision oyo ezali ntango nyonso komonisa mpe mobulu, koboma bato, bitumba, pite mpe kotiola bosembo kati na libala.’ Misala mabe to makambo ya nsoni oyo bazulunalo ezali kokoma, mikanda oyo ezali kolakisa bolumbu ya bato, mikanda oyo mizali kolamusa mposa ya nzoto, bafilme mabe mpe miziki mabe ezali mpe na makama minene.
9. (a) Mpo na nini esengeli na biso kopona makambo oyo tosengeli koyoka, kotala mpe kotanga? (b) Ndenge nini tosengeli kosala ntango tozali liboso ya makambo mabe?
9 Tokoki komitika te kobebisa elimo na biso na biloko to makambo oyo ‘mazali nsoni mpo na koloba yango’. (Baefese 5:12) Na bongo pona malamumalamu makambo oyo okoyoka, oyo okotala mpe okotanga. Senzela, bwaka nokinoki makambo oyo mazali mabe. (Nzembo 119:37) Ekosengela na yo kozala na komipekisa makasi mpo na kolonga; mbala mosusu ekosenga na yo ‘kobetabeta nzoto na yo mpe kokomisa yango lokola moombo.’ (1 Bakolinti 9:27) Kobosana te ete “Ye oyo akomonanaka te” azali komona makambo nyonso oyo tozali kotala na nkuku. (Baebele 11:27) Na bongo kima makambo oyo mazali mabe. “Meka koyekola yango ekosepelisa Nkolo.”—Baefese 5:10.
‘Tosenzela’ mpo na kozala ntango nyonso peto katina bizaleli
10. (a) Mpo na ntina nini mpenza ebele na baklisto bazali kopamelama mpe kobimisama mbula nyonso? (b) Motinda nini ya Biblia tosengeli kobosana yango te wana ezali biso na mobembo to na esika ya mosala ya mosuni?
10 Kati na Baefese 5:5, Paulo apesi biso toli oyo: “Boyeba likambo oyo solosolo ete, moto na pite te mpe moto na bosoto te mpe moto na elulela te-(ye mosambeli na bikeko)-azali na libula kati na bokonzi na Klisto mpe na Nzambe.” Nzokande, mbula nyonso, bankoto na baklisto bapamelami to babimisami na lisangá mpo bamikweisaki na pite—mpo ‘basaleli nzoto na bango moko lisumu’. (1 Bakolinti 6:18) Mingi bakomaki kino na ezaleli wana mpamba te ‘bakengelaki te engebene liloba na Nzambe’. (Nzembo 119:9) Na ndakisa, mingi bazali kosenzela lisusu te na boumeli ya mibembo. Bazali komona lisusu ntina ya makita ya boklisto te mpe bazali na boninga elongo na bato mosusu oyo basalelaka Jéhovah te. Komonaka ete bazali ‘bato malamu’, baklisto mosusu basanganaki elongo na bango na misala ya mabe. Ndenge moko mpe, bamosusu bakomaki mpenza na boninga makasi elongo na baninga na bango ya mosala. Nkulutu moko akomaki moninga ya mwana mwasi moko basalaka na ye esika moko mpe nsuka na yango atikaki libota na ye mpo na kofanda elongo na mwasi yango! Abimisamaki bongo na lisangá. Maloba oyo na Biblia mamonani solo: “Kotambola na bato mabe ekobebisa bizaleli malamu!”—1 Bakolinti 15:33.
11. Mpo na nini bilembo ya boklisto mpo na kominanola esengeli kokengelama malamumalamu?
11 Tanga makambo oyo bakomeli biso longwa na Afrika ya Sudi: “Bilambo ya minene mpo na koyamba bato ezali mpe likama monene mpo na bopeto ya bizaleli ya baklisto mingi . . . Misusu ebongisamaki nsima na makita ya Assemblée ya distrike.” Nzokande, bilambo ya boklisto oyo esangisi bobele bato moke mpe oyo bakebi na yango malamu ebebisamaka te mpo na “lokoso”. (Bagalatia 5:21) Soki ebongisamaki ete masanga epesama epai na bato, esengeli ete esalama kozanga kolekisa ndelo mpe na bokebi ya malamu. “Vinyo ezali kilikili”, mpe na nse na bopusi na yango, baklisto balembisaki bokebi na bango mpo na kobatela bizaleli malamu to mpe elamusaki bamposa mabe kati na bango. (Masese 20:1) Ezali mpo na yango bilenge mibali mibale baklisto basalaki makambo lokola ya bahomosexuels mpo bamelaki mingi koleka.
12, 13. (a) Ndenge nini bato mosusu bazali kolongisa etamboli na bango ya mbindo? Mpo na nini makanisi na bango ezali ya bokosi? (b) Ndenge nini tokoki kokeba na makambo oyo mazali kokanela bopeto ya bizaleli na biso?
12 Ntango tomekami, tobosana te ete ata tozali komonana peto na libanda, ezali nde oyo tozali na kati, yango nde ezali na ntina monene koleka. (Masese 21:2) Bamosusu bazali kokanisa ete Nzambe azali pene na kolimbisa bango na ntina na misala na bango ya mbindo oyo bazali kozongela mbala na mbala mpamba te bazali na bolembu. Kasi yango ezali ‘kobalola ngolu na Nzambe na biso kino bosoto!’ Boye te? (Yuda 4) Bamosusu bazali kokanisa ete “Jéhovah azali komona biso te”. (Ezekiele 8:12) Tokanisa lisusu ete ‘eloko moko ezali te oyo ebombami liboso na ye, kasi nyonso ezali bolumbu mpe emonisami polele na miso na ye oyo azali na biso na makambo’.—Baebele 4:13.
13 Na bongo tokeba liboso na makambo nyonso oyo ezali kokanela bopeto na biso ya bizaleli. “Tika te ete boloba nkombo na bikobo mpe makambo nyonso na mbindo mpe bilulela; ebongi bongo na Babulami. Tika te ete bosoto bozala na maloba na zoba to maloba na mpamba, kasi eleki malamu kopesaka matondi.” (Baefese 5:3, 4) “Boyinaka mpo mabe mpe bosimbaka mpo malamu”, ezala ata kobendama nini makambo yango ya mabe ekoki kozala na yango likoló ya nzoto na biso.—Baloma 12:9.
Tozala peto kati na elimo
14, 15. (a) Ndenge nini bamosusu bamitikaki kobebisama na elimo? (b) Ndenge nini bapengwi bazwi kosalela ‘monoko na bango mpo na kobebisa bazalani na bango’? (c) Kati na makambo nini bapengwi bazali mpenza na mbindo, mpe babosani nini?
14 Bamosusu bamitikaki kobebisama na elimo na kolandaka na radio to na télévision ba émissions oyo ezali koloba makambo ya mangomba mosusu. Kati na mboka moko ya Afrika, baklisto balandaki na télévision masano oyo ezalaki kolakisa biyambayamba ya mangomba ya bonkoko lokola likambo malamu. Kasi ntoma Paulo akebisaki baninga na ye ya mosala na likama ya mabe koleka oyo ekoki kobenda liwa: bapengwi oyo ‘bazali kokweisa kondima na bamosusu’. (2 Timote 2:16-18) Na mikolo na biso bato ya motindo wana bazali naino komonana (2 Petelo 2:1-3) Mbala mosusu bazali kolonga na kobebisa makanisi ya bamosusu. Nzokande, Masese 11:9 eyebisi ete: “Moto na lokuta akobebisa mozalani na ye na nzela na monoko na ye.”
15 Bapengwi mosusu bazali kosalela mbala mingi moimi; bazali koloba ete tozali na bonsomi te, mingi mpenza oyo ya kolimbola Biblia. (Tala Genese 3:1-5.) Nzokande, bato yango oyo bazali koluka kobebisa biso bazali na eloko mosusu te ya kopesa biso bobele kozongisa biso na mateya mabe ya “Babilone Monene”. (Emoniseli 17:5; 2 Petelo 2:19-22) Bapengwi mosusu bazali kosalela bamposa ya nzoto; bazali koteya baninga na bango ya kala na “kosepelisa nzoto”; bazali koloba ete, mosala oyo ya bopolo ya kotatola ndako na ndako ezali na ntina te to “etongami likoló na Biblia te.” (Tala Matai 16:22, 23.) Ya solo, na libanda, bato yango oyo bazali koloba na kolengola bakoki komonana peto, nzokande na kati batambwisami na lolendo mpe na elimo ya lipanda. Babosani nyonso oyo bayekolaki likolo na Jéhovah, nkombo na ye mosantu mpe bizaleli na ye. Bayebi lisusu te ete basolo nyonso ya Biblia oyo bayekolaki elikya kitoko ya Bokonzi mpe paradis ya mabelé, solo likoló na mateya ya lokuta lokola la Trinité, kozanga kokufa ya molimo, linfelo ya moto mpe epongelo-ee, ete nyonso wana epesamelaki bango nsima na “moombo na sembo mpe na mayele”.—Matai 24:45-47.
16. Motindo nini bayengebene to basembwi basikolami na “boyebi”?
16 Mokengeli moko ya circonscription, na France alobaki boye: “Bandeko mosusu bazali komitika kokosama mpo bazali na boyebi ya solo te.” Ezali na ntina yango nde Masese 11:9 elobi: “Nde moyengebene akobikisama mpo na boyebi.” Mokapo oyo elimboli ete esengeli ata koyoka maloba na bapengwi te to kosepela na mikanda na bango te, kasi nde kozwa “boyebi ya solo ya mabombami mosantu ya Nzambe” na lisalisi ya boyekoli na yo moko ya Biblia mpe ya mikanda oyo mizali kolimbola Biblia oyo mikomami na la Société Watchtower. Nani, soki azali na boyebi wana ya solo, akozala na mposa ya kolinga koyeba kino kotya likebi na maloba ya bapengwi? Moto moko te “azimbisa bino na maloba na kolengola!” (Bakolose 2:2-4) Tobwaka lokola pwazon mateya na lokuta, ata yango euti wapi! Mpo ete Nkolo na biso azali kosalela “moombo na sembo mpe na mayele” mpo na kotindela biso “maloba ya bomoi ya seko”, mpo na nini tokoluka yango epai mosusu?—Yoane 6:68.
Okozala ntango nyonso peto?
17, 18. Mpo na nini ezali na ntina ete tozala peto kati na (a) nzoto, (b) makanisi, (c) bizaleli mpe (d) elimo?
17 Esengeli na biso kotya milende makasi mpo na kozala ntango nyonso peto liboso na Jéhovah Nzambe. Na kokebaka mpo na bopeto na biso ya nzoto, ya ndako na biso, ya bilamba na biso mpe ya Salle du Royaume na biso, tozali kopesa lokumu na nsango ya Bokonzi oyo tozali kosakola. Na kozalaka peto na makanisi, tozali kolonga kozanga nkaka na kozala peto kati na bizaleli mpe na elimo. Na bongo, esengeli na biso lokola Paulo azali kopesa biso toli na Bafilipi 4:8, kokanisa ntango nyonso na makambo oyo mazali malamu, peto mpe na lokumu.
18 Tozali mpe koyeba malamu koleka ete esengeli na biso kozala peto na bizaleli, ezala na maloba mpe na misala. Jéhovah azali kokebisa biso polele ete baoyo bazali komipesa na motindo moko ya misala na mbindo bakosangola libula na Bokonzi na Nzambe te. (1 Bakolinti 6:9-11) Ya solo, misala yango ya mbindo ekoki komonana ete ezali kitoko, kasi soki toloni mpo na mosuni, tokobuka libebi. (Bagalatia 6:8) Mpo na kosukisa, tosengeli kotikala peto kati na elimo, kobatela bindimeli. Bopeto yango ekosalisa biso na kobatela motema na biso mpe makanisi na biso na mabe nyonso. Na bongo toluka makanisi ya Nzambe kasi ya biso te kati na mabaku nyonso.
19. Nini ekoki kosalisa baklisto bapakolami mpe “ebele monene” na kotikala peto kati na makambo nyonso?
19 Mosika te, Satan le Diable-mobandisi ya liboso ya misala na mbindo- akobwakama kati na libulu mozindo, ye elongo na bademo na ye. Na kozelaka mokolo yango, basaleli ya Jéhovah-baklisto bapakolami na elimo mpe “ebele monene”—bazali ntango nyonso peto lokola bazali bamemi na biloko na bulee ya Jéhovah! (Emoniseli 7:9, 13-15; 19:7, 8; 20:1-3) Etumba ezali makasi, kasi tobosana te ete Jéhovah azali kopesa biso na bokabi nyonso “elimo na ye ya bosantu”. (Baloma 1:4) Lisangá na ye ya peto bakisa mpe bankulutu oyo bazali kosala kati na yango bazali mpe lisusu pene mpo na kosalisa biso na kopesaka biso batoli kitoko oyo etongami likoló na Makomami. Ezali mpo na lisalisi yango mpe na ekateli na biso, nde tokoki kozala peto kati na makambo nyonso!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba na liebele gilloulim, oyo ebongolami na “bikeko ya mbindo”, ezalaki liloba ya kotiola oyo elimbolaki na ebandeli “mikate na nyei”, biloko ya bosato makasi mpo na Bayuda.—Deteronome 23:12-14; 1 Mikonzi 14:10; Ezekiele 4:12-17.
Bozongeli
◻ Mpo na nini Bayuda oyo bautaki na Babilone basengelaki kozala peto‘?
◻ Ndenge nini tosengeli kokeba na bopeto na biso ya nzoto?
◻ Ndenge nini tokoki kobatela makanisi na biso na mabe nyonso?
◻ Ndenge nini tosengeli kokeba na makama nyonso oyo etali bizaleli?
◻ Ndenge nini tokoki kobatela bopeto na biso ya elimo?
[Elilingi na lokasa 18]
Ndako na biso esengeli kozala peto mpo na kopesa ndakisa
[Elilingi na lokasa 19]
Baklisto basengeli kozala na mayele mpo na koboya bafilme vidéo mpe ba émissions oyo ekoki kobebisa elimo na bango
[Elilingi na lokasa 20]
Koyamba bato moke na ndako ekoki kopesa nzela na kolendisama
[Elilingi na lokasa 21]
Na lisalisi ya boyekoli na bango ya Biblia ntango nyonso, ba Témoins ya molende bazali kotikala peto kati na elimo, bazali kozwa libateli mpe bazali na esengo