Masolo ya basakoli ya Bokonzi
Jéhovah apamboli bato na bosembo na Chypre
YESU alobaki epai na bayekoli na ye: “Soko basili konyokola ngai, bakonyokola bino lokola.” (Yoane 15:20) Jéhovah mpe alobaki na nzela na mosakoli Yisaya: “Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotemela yo ekolonga te”. (Yisaya 54:17) Maloba oyo mibale mamonisaki bosolo na yango na Chypre epai ba Témoins de Jéhovah ya bosembo bazali kosakola nsango malamu.
◻ “Lingomba na orthodoxe greke ezali kotya makasi mpo na kobebisa mosala na biso, engebene rapport moko na mboka yango. Basango bazali kokabola mikanda mizali koloba makambo mabe na ntina na biso mpe kosenga epai na bato ete batika kosolola na ba Témoins de Jéhovah. Bazali ata kokende epai na bato oyo bazali koyekola Biblia elongo na Batemwe mpo na kopekisa bango. Na Paphos, sango moko azali teologié amekaki kopekisa bato misato oyo bazalaki koyekola Biblia na Batemwe. Moto na moto na ngambo na ye, bato yango misato basengaki na ndeko moko aya kosolola na teologié yango. Tozali na esengo ya koyeba ete lelo oyo bato yango nyonso misato bazali makasi kati na lisangá ya Jéhovah.” Yango etindaki sango yango na kotomboka mpe alobaki: “Nakosolola lisusu na ba Témoins de Jéhovah te.” Basango mosusu babetaki ata bandeko oyo bazalaki kosakola. Kasi mingimingi milende ya bakonzi na mangomba ezali kobalukela bango moko mpe bato mingi bazali kozwa ekateli mpo na kosambela Jéhovah.
◻ Lisolo elandi oyo esalemaki na Chypre, emonisi ete tokoki kozwa mapamboli soko totikali sembo ata liboso na monyokoli. Mwasi moko atikali se ye moko mpo na kobokola mwana na ye ya mwasi, nsima na liwa ya mobali na ye, oyo akutaki na etumba ya 1974. Nsima na yango abalaki lisusu. Lokola asepelaki mpenza te na lokuta ya bakonzi na mangomba mpe azalaki komibanzabanza mpo na avenire, andimaki koyekola elongo na ba Témoins de Jéhovah. Akolaki nokinoki mpe abandaki kosolola na bandeko na ye na ntina na makambo kitoko oyo azalaki koyekola. Botemeli eyaki noki mpenza. Momekamo na ye eleki makasi ezalaki ntango ayokaki mwana na ye ya mwasi ya mibu 15, koloba na ye: “Nasila kobungisa tata na ngai, mpe soki otiki te koyekola na ba Témoins de Jéhovah, nakotalela yo lisusu lokola mama na ngai te. Nakokoma mwana etike.” Kasi mwasi yango azalaki ntango nyonso koyekola.
Mokolo mosusu, mwana yango akendaki na lopitalo mpo na kotala moto moko ayebanaki na ye. Temwe moko ayaki kolala ndeko na ye oyo azalaki na mbeto mosusu pembeni, mpe sango moko ayaki lisusu kotala bobele moto yango. Lisolo ebandaki kati na Temwe mpe sango. Temwe azalaki kosalela Biblia mpo na kolimbola etelemelo na ye, mpe azalaki kimya mpe na takte. Kasi sango azalaki kobimisa maloba mabe. Azalaki konganga kozanga kofungola Biblia ata mbala moko. Elenge mwasi oyo azalaki kotala likambo yango, akamwaki na gentillesse ya Temwe mpe na ndenge azalaki kosalela Biblia. Bobele na mpokwa yango, ntango bandeko oyo bazalaki koyekola na mwasi na ye bayaki, ayebisaki bango makambo malekaki na lopitalo mpe atunaki bango: “Ngai mpe nakoki koyekola Biblia elongo na bino?” Elenge yango azali sikawa koyekola Biblia mbala mibale na poso. Mama na ye asili kozwa batisimo mpe mobali azali mpe koyekola.
Kozanga ntembe, Jéhovah azali kopambola basaleli na ye na Chypre!
[Elilingi na lokasa 7]
Ntoma Paulo mpe akutanaki na botemeli na mboka Paphos