Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Tolimbisanaka
Yesu azali na ndako moko na Kapernaume elongo na bayekoli na ye. Auti kolimbwela bango ndenge bakoki kobongisa matata oyo ekoki kobima kati na bandeko. Bongo Petelo atuni boye: “Nkolo, soko ndeko na ngai akosalela ngai mabe, nalimbisa ye mbala boni?” Mpo bakonzi na mangomba balobi ete esengeli kolimbisa kino mbala misato, Petelo akanisaki ete, ye azali na motema molai mpenza, mpamba te alobi: “Kino mbala nsambo?”
Nzokande, bobele likambo ya kotanga mbala oyo olimbisi ezali mabe mpenza. Yesu apameli Petelo na maloba oyo: “Nalobi na yo te kino mbala nsambo kasi kino mbala ntuku nsambo na nsambo.” Amonisi bongo epai na Petelo ete asengeli te kotya ndelo mpo na kolimbisa.
Yesu asaleli bongo elakiseli moko mpo na kolimbola epai na bayekoli na ye ete basengeli kolimbisa. Alobeli mokonzi moko oyo alingi kobongisa makambo na baombo na ye. Bamemeli ye moombo moko oyo azali na nyongo na ye 60 millions na denali (elingi koloba 50 milio ya badolare). Kasi azali na eloko ya kopesa ye te. Nkolo na ye apesi etinda ete batekisa ye, mpe mwasi na ye mpe bana na ye mpe biloko nyonso azali na yango, mpo ete mbongo na ye efutama.
Eyoki ye bongo, moombo afukameli nkolo na ye mpe abondeli ye na maloba oyo; “Pesa ngai mwa ntango mpe nakufutela yo nyonso.”
Emoni ye boye, nkolo na moombo yango, ayoki mawa mpe alimbisi ye mpo na nyongo yango. Kasi esili ye kobima, moombo yango akutani na moninga mosusu moombo, oyo azali na nyongo na ye ya denali nkama (90 dolare). Mobali yango akangi moninga na nkingo lokola aboma ye, na kolobaka na ye: “Futa nyongo na ngai”.
Nzokande moninga na ye azalaki na mosolo yango te mpo na kofuta. Afukameli ye mpe abondeli boye: “Pesa ngai mwa ntango mpe nakofuta yo.” Kasi na bokeseni na nkolo na ye, ayokeli moninga na ye mawa te mpe atindi ete bakanga ye mpe babwaka ye na boloko.
Yesu alandi lisolo na ye na kolobaka boye: Emoni baninga baombo likambo oyo esalemi, bakei koyebisa yango epai na nkolo na bango. Atomboki mpe abengisi moombo oyo na motema mabe. alobi na ye boye: “E moombo mabe mpenza! Nalimbisi yo nyongo yango nyonso mpo ete obondeli ngai. Ekokaki nde na yo te koyokela mosalani na yo mawa lokola ngai nayokeli yo mawa?” Lokola nkolo na ye asilikaki, akangisi moombo na motema mabe kino azongisa nyongo na ye nyonso.
Yesu asukisi na maloba oyo: “Tata na ngai na likolo akosalela bino bongo soko bokolimbisa na mitema na bino moto na moto ndeko na ye te.”
Oyo nde liteya monene mpo na kolimbisana! Soko tokanisi ete Nzambe alimbisi biso na nyongo monene oyo tozali na yango epai na ye, lisumu, libunga nyonso oyo ndeko na biso akoki kosalela biso ezali solo moke mpenza. Mpe lisusu, Jéhovah asili kolimbisa biso mbala nkoto na nkoto. Mbala mosusu toyebaka ata masumu oyo tosaleli ye te. Na yango, tokoki te kolimbisa ndeko na biso mbala mingi koleka, ata soko tozali mpenza na likambo ya kosilikela ye? Omikundola makambo oyo Yesu ateyaki na lisolo na ye likolo na ngomba, ete ‘Nzambe akolimbisa biso nyongo na biso na meko oyo biso tokolimbisa baye bazali na nyongo epai na biso.’ Matai 18:21-35; 6:12; Bakolose 3:13.
◆ Eloko nini etindaki Petelo atuna mbala boni asengeli kolimbisa ndeko na ye, mpe mpo na nini akanisaki ete likanisi na ye ya kolimbisa mbala nsambo ezalaki mpenza malamu?
◆ Kokesena nini ezali kati na ezaleli ya mokonzi epai na moombo na ye mpe ezaleli ya moombo yango epai na moninga na ye moombo?
◆ Elakiseli na Yesu eteyi biso nini?