Batemwe, bokende liboso!
“Batemwe nyonso bazwi ekateli./ Nsango malamu ya Nzambe babateli./ Ata Satana ‘za’ na nzombo./ Nzamb’alendisi bango na losambo.”
Wana ezali maloba ya eteni ya liboso ya kantike no 29, oyo ezwami kati na recueil ya bantike ya ba Témoins de Jéhovah, Tosanzola Jéhovah na banzembo. Mbala mosusu okosepela na yango lisusu mingi soki oyoki ete esalemaki na camp moko ya concentration na Alemanye ya banazi. Eleki mwa ntango, basali 500 oyo basalaka na libota na Béthel ya Selters, na Alemanye, bayokaki lisolo moko ya Erich Frost, etyamaki na bande kasete. Ye nde moto asalaki nzembo yango. Tala ndimbola na yango:
“‘Batemwe, bokende liboso!’ — wana ezalaki mposa na biso, ata tozalaki na bitumbu na kati ya camp de concentration. Lolenge nyonso na miziki esepelisaka mosali na nzembo mpe uta kala miziki ya kantike oyo ezalaki koyela ngai na moto. Na etuluku na biso, tozalaki basali 40, biso banso batemwe. Tosengelaki kotambola mikolo nyonso minite 30 kino esika baterasé ezalaki kokutana na libanda ya camp. Mokolo moko na ntongo, na nzela, likanisi moko eyelaki ngai: “Ntango ekoki mpo na kobakisa maloba na miziki yango mpo ete eyembama.” Mpe eteni ya liboso ebandaki kosalema na elimo na ngai.
“Mosala na ngai ezalaki ya kokumba mabele na bruwete mpe kokende kotika yango na ntaka ya metrès 30. Epekisamaki makasi ete moto aloba te na ntango ya mosala. Ata bongo, wana nzela ezalaki komonana, natunaki na mayele nyonso epai na ndeko moko oyo azalaki kosala pene na ngai soko akangaka makambo na motó. Andimaki. Nayebisaki ye akanga eteni ya liboso. Ngonga moko na nsima, nasalaki ndenge moko epai ya ndeko mosusu, mpe epai na ndeko ya misato, mpe ya minei. Nasengaki bango bakanga moto mokomoko eteni moko na motema.
“Ezongaki biso na camp na mpokwa, bandeko yango minei bazongelaki bakuplé na motó. Ezali ndenge yango nde nakokaki kokoma maloba na mopanzi ya banotes. Ba SS balingaki mpenza kosala ngai eloko te soko bakanga miziki. Kasi sikawa, ekomaki likambo monene mpenza. Bakokaki kokanga ngai nsinga na nkingo soko bazwa ngai na maloba yango. Ndenge nini nalingaki kobomba kantike yango?
“Ndeko moko azalaki kotambwisa misala na esika oyo ba SS bazalaki kobokola ba lapins. Kuna amonaki esika mpo na kobomba biloko kitoko ya elimo — banimero ya La Tour de Garde mpe mikanda mibale to misato ya la Société. Ndeko yango akokaki kobomama na ndenge azalaki komema biloko yango na kati ya camp, mpo na kopesa biso mikanda oyo tokoki koyekola. Abombaki kantike na ngai na esika yango. Mokolo mosusu alobaki na ngai: ‘Erich, kantike na yo esi ekei. Namonaki moto mpo na kotinda yango na Suisse.’ Nasepelaki makasi.
“Bandeko na Suisse batindaki yango na Brooklyn mpe ekomaki kino epai na basangani ya Collège central ya ba Témoins de Jéhovah. Maloba na ngai mosusu oyo ezalaki mpenza malamu te ebongisamaki na bakuplé misato ya kitoko. Nasepelaki mingi ntango namonaki kantike yango na kati ya mokanda na banzembo ya ba Témoins de Jéhovaha. Lelo oyo lisusu, kantike yango no 29 ezali koyikisa ntango nyonso Batemwe mpiko mpo ete bazwa ekateli mpo na Jéhovah mpe mpo na solo!”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kantike yango eyembamaki mpo na mbula ya liboso le 1er août 1948 na Etats-Unis na chorale moko ya bayekoli ya kelasi ya 11 ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, na ntango ya bazwaki diplome.
[Etanda na lokasa 12]
Erich Frost akufaki le 30 octobre 1987, wana ezalaki ye na mbula 86. Abotamaki le 22 décembre 1900, azwaki batisimo le 4 mars 1923 mpe abandaki mosala ya pionnier na 1928. Na 1936, azwaki mokumba ya kotambwisa mosala ya ba Témoins de Jehovah na nkuku kuna na Alemanye, mpe akokisaki mosala na ye malamu mpenza na boumeli ya sanza mwambe kino ntango akangamaki na camp moko ya concentration. Nsima na etumba, azwaki mokumba ya surveillant de filiale ya la Société Watch Tower na Alemanye, kobanda 1945 kino 1955. (Tala La Tour de Garde ya le 15 janvier 1961, nkasa 28 kino 31; B/6bis/62, nkasa 40 kino 52.) Nsima na yango, azalaki ntango nyonso kokokisa mosala ya Nzambe na bosembo. Nzambe akobosana te mosala ekokisami na baklisto motindo oyo, bapakolami, ata bolingo oyo bango bamonisaki mpo na nkombo na ye.—Baebele 6:10.