Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/10 nk. 13-18
  • Elikya epai na Jéhovah ekotinda moto na komipesa mpe kozwa batisimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elikya epai na Jéhovah ekotinda moto na komipesa mpe kozwa batisimo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tokotya elikya epai ya Jéhovah?
  • Mpo na nini bamoko bazali na elikya epai na Jéhovah te
  • Elikya epai na Jéhovah ekotinda moto na komipesa mpe kozwa batisimo
  • Komipesa ezali elaka lokola elaka nyonso te
  • Mpo na nini kozindisama na mai
  • Na mbula nini?
  • Batisimo mpe boyokani na yo ná Nzambe
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mpo na nini osengeli komipesa na Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mpo na nini kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Okoki mpo na kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/10 nk. 13-18

Elikya epai na Jéhovah ekotinda moto na komipesa mpe kozwa batisimo

“Zala na elikya epai na Jéhovah mpe sala malamu; boye okofanda na mokili mpe okosepela na malamu.”​—NZEMBO 37:3.

1. Litatoli nini ya bato oyo bazali bobele na mayele ya mokili emonisi ata bongo ete ezali bozoba soko tokotya motema epai na mikonzi ya bomoto?

TOKOKI kotya elikya epai na nani? Na mikonzi na bato bazangi kokoka? Misala na bango mimonisi ete soki tosali bongo ekozala bozoba; ata bato oyo bazali bobele na mayele ya mokili bakanisi mpe boye. Ntina wana maloba malandi makomamaki kati na zulunalo Vision: “Eloko eleki mpasi kati na krize oyo, ezali ete moto moko te ayebi ndenge ekosuka.” Robert Heilbroner, mokomi na makambo na bato mpe ekonomiste, akomaki maloba malandi: “Eloko mosusu ezali kosala biso mpasi ezali ete moto ata moko azali te oyo tokoki kotyela ye motema, moto ata moko te azali na makoki mpo na kosilisa mikakatano oyo mikweli biso.”

2. Bolamu nini bozwani na nzela na sianse ya lelo?

2 Ezali solo ete bato bakoli na makambo mingi matali sianse, kasi bokoli yango ememi bolamu nini? Ata moko te. Lokola elobaki yango Lewis Mumford, “likanisi oyo ete bokoli ya mekanike mpe ya sianse ezali komemela bato bolamu bokoki na bango . . . ezali solo te”. Kobeba ya mai mpe kufa ya bazamba mingi mpo na biloko mabe ezali kokwela yango (pluies acides), ezali lelo eloko ezali kotungisa bato. Epai mosusu, mpasi oyo ’ezali lelo na mokili — ezali komonana na kobakisama ya mobulu, bitumba, makambo ya nsomo, komela makaya makasi mpe drogue, komela masanga makasi, bamaladi oyo ezali kozwama na pite, komata ya ntalo ya biloko — nyonso oyo emonisi polele ete ntina ezali te ya kotya motema na mikonzi ya bomoto.

3. Liloba na Nzambe epesi biso toli nini mpo na oyo etali koyeba nani oyo tosengeli kotyela ye motema?

3 Liloba na Nzambe epesi biso toli oyo ya ntina mingi: “Ndimela bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te. Soko elimo ekolongwa, moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.” (Nzembo 146:3, 4) Soki tokoki kotya elikya na biso epai ya bato te, tokoki kotya elikya na biso epai ya nani? Epai ya Mozalisi ya likolo mpe ya mabelé, mpamba te esili kokomama boye ete: “Moto apambolama oyo akotalela Jéhovah mpe oyo Jéhovah azali elikya na ye.”​—Yilimia 17:7.

Mpo na nini tokotya elikya epai ya Jéhovah?

4. Wapi bizaleli ya liboso ya Jéhovah, mpe ndenge nini epesi biso ntina makasi ya kotyela ye motema.

4 Tozali na bantina makasi ya kotya elikya na biso epai ya Jéhovah. Ya liboso ezali mpo na bizaleli na ye oyo minei ya moboko: bolingo, mayele, boyengebene mpe nguya, bakisa bizaleli na ye mosusu ya kitoko. Liloba na ye emonisi biso ete azali na nguya nyonso, mpamba te moko na batitre na ye ezali “Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso”. (Genese 28:3) Tala ntina malamu ya kotyela ye motema; mpamba te, moto ata moko te akoki kotelemela ye soki mpe kopekisa kokokisama ya mikano na ye. Jéhovah azali mpe na boyebi nyonso; bobele mpo na koyeba ebandeli mpe nsuka ya makambo te, mpo akotangaka na avenire polelepolele, kasi lisusu mpo ete boyebi nyonso mpe mayele nyonso efandi kati na ye, lokola emonisi yango bikelamu na ye kitoko oyo asili kozalisa. Akoki kobunga ata mokolo moko te. (Yisaya 46:10; Baloma 11:33-35) Lisusu, Jéhovah azali Nzambe ya boyengebene mpe ya bosembo, mpe bongo, tokoki kotyela ye motema na makambo nyonso. Akoki kobuka lokuta te. (Deteronome 32:4; Tito 1:2; Baebele 6:18) Na likolo na nyonso, lokola bolingo ezangi koluka litomba ezali ezaleli na ye eleki monene, ntina wana mpenza Biblia ebengi ye: “Nzambe azali bolingo.”​—1 Yoane 4:8, 16.

5. Masolo nini mazali kati na Liloba na Nzambe mamonisi ete Jéhovah abongi mpo totyela ye motema?

5 Ndenge Jéhovah azali kosala epai ya bato ezali litatoli mosusu emonisi ete azali Nzambe mozwi-na-nguya-nyonso, na mayele, na boyengebene mpe atondi na bolingo, Nzambe oyo tokoki kotyela ye motema. Moïse akitisaki Bayisraele motema, komonisaka bango ete Jéhovah azali sembo na kondimana na ye mpe akosalaka na boboto epai na baoyo nyonso balingi ye mpe bakotosaka mibeko na ye. (Deteronome 7:9) Bikeke mingi liboso, Jéhovah abikisaki Noa mpe libota na ye na mpela; abikisaki lisusu Lota elongo na bana na ye mibale ya basi ntango abomaki Sodome mpe Gomore na móto. Bikeke mingi na nsima, abimisaki Bayisraele na Ezipito mpe, na boyokani na elaka epesaki ye na Abrahame, apesaki bango mokili ya Kanana. (Genese 7:23; 17:8; 19:15-26) Epai mosusu, Jéhovah abikisaki Baebele misato na fulu ya móto, mpe abikisaki Danyele na libulu ya bankosi.​—Danyele 3:27; 6:23.

6. Ndenge nini makambo masili kosalema na eleko na biso mamonisi ete kotya motema epai na Jéhovah ezali na ntina?

6 Makambo masili kokomela ba Témoins de Jéhovah na mikolo na biso mamonisi ete Jéhovah azali Nzambe oyo tokoki kotyela ye motema. Na ndakisa, Adolf Hitler alobaki ete akosukisa ba Témoins de Jéhovah na Alemanye. Kasi na esika ete Batemwe balimwa, ezali nde ye alimwaki elongo na parti na ye; mpe lelo, motuya ya Batemwe na Alemanye ebakisami mingi kino koleka 119 000. Epai mosusu, ebele ya masolo makomamaki kati na La Tour de Garde mpe na Réveillez-vous ! mpo na kolobela bomoi ya ba Témoins de Jéhovah; masolo yango nyonso mazali komonisa polele endimeli oyo: Jéhovah azali solo Nzambe oyo tokoki kotyela ye motema.

Mpo na nini bamoko bazali na elikya epai na Jéhovah te

7. Mpo na nini mobali moko alobaki ete ye “asepelaka kaka kotala ba Témoins de Jéhovah”?

7 Nzokande, lelo oyo bato mingi bazali kotya elikya epai ya Jéhovah te. Ata na kati na baoyo basili koyeba bizaleli na ye mpe misala na ye minene, mingi bazali kotyela ye motema te. Tala oyo ekomamaki na ntina na moko na bango kati na zulunalo U.S. Catholic ya janvier 1979: “Ntango batunaki ye mpo na lingomba oyo alingaka, mobali moko ayanolaki ete: ‘Nasepelaka kotala ba Témoins de Jéhovah.’ Ntango basengaki ye ete alimbola malamumalamu likanisi na ye, alobaki: ‘Nazali na likanisi moko na bango mpo na bindimeli na bango mingi, kasi nalingi komipesa te.’” Zulunalo yango ebakisaki: “Témoin de Jéhovah oyo amipesi akomipesa mobimba.”

8. Mpo ete moto amipesa mpo na kosalela Jéhovah, bizaleli nini asengeli komonisa yango?

8 Mpo na nini bato mosusu balingi komipesa te? Ezali mpo ete motema na bango elingi te; ‘babongami te mpo na bomoi ya seko’. (Misala 13:48) Lokola Yesu amonisaki yango kati na lisese ya moloni, baoyo bazali kobota mbuma ezali baoyo bazali koyamba liloba ya solo “na motema kitoko mpe na malamu”. (Luka 8:15) Mpamba te, solo oyo ezwami na Liloba na Nzambe ezali na bopusi te likolo na bato bazangi sembo to bato bazali na lolendo; esengeli bongo kozala na motema sembo mpe na kosokema mpo na kokoka kondima yango. (Yakobo 4:6) Epai mosusu, solo ezali kosepelisa te bato oyo bazali komitanga bayengebene na miso na bango moko; ezali kosepelisa nde bato oyo bazali kokanisa mposa na bango ya elimo, baoyo bazali na nzala mpe mposa na boyengebene, baoyo bazali koimaima mpe kolela na ntina na makambo nyonso mabe oyo mazali kosalema lelo na mokili.​—Matai 5:3, 6; Ezekiele 9:4.

Elikya epai na Jéhovah ekotinda moto na komipesa mpe kozwa batisimo

9, 10. (a) Nini esengeli mpo ete bato batya elikya na bango epai na Jéhovah, mpe ndenge nini bato oyo bazali na motema mobongi bazali koyamba nsango oyo tozali kosakwela bango? (b) Bato yango bazali kondimela nani?

9 Mpo ete bato bakoka kotya elikya na bango na Jéhovah, esengeli ete bayoka nsango na ye. Nzokande, “ndenge nini bakobelela ye oyo bandimi ye te? Na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te? Bakoyoka na nzela nini soko bazangi mosakoli?” (Baloma 10:14) Lokola mpo na bafandi mingi na mboka Tesalonike ya kala, bato oyo bazali na motema mobongi bazali kotya matoi na kosakola ya basaleli ya Jéhovah. Kolobaka epai ya Batesaloniki, Paulo akomaki: “Wana eyambi bino liloba na Nzambe liyoki bino epai na biso, boyambi yango lokola liloba na bato te kasi lokola Liloba na Nzambe. Ezali mpe yango solo, mpe ezali kosalaka mosala kati na bino bandimi.”​—1 Batesalonike 2:13.

10 Boyebi ya Jéhovah ezali kopusa bato oyo ya motema malamu ete bandimela Nzambe, mpe yango ezali likambo ya ntina mingi. Mpamba te, “soko na kondima te, ekoki kosepelisa Nzambe te. Mpo ete ekoki na babelemi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.” (Baebele 11:6) Esengeli mpe kondimela Mwana na Nzambe. “Lobiko mpe ezali na moto mosusu te, mpo ete nkombo mosusu te esili kopesama awa na nse kati na bato ete tokoka kobika mpo na yango”; nkombo mosusu ezali te bobele oyo ya Yesu Klisto.​—Misala 4:12.

11. Moto oyo azali na elikya epai ya Jéhovah akolanda toli nini oyo ntoma Petelo apesaki yango?

11 Moto oyo atye motema na Jéhovah, na Liloba na ye mpe na Mwana na ye, Yesu Klisto, apusami na kolanda toli oyo ntoma Petelo apesaki yango na Bayuda na eleko na ye: “Na bongo, bongola mitema, mpe butwa ete bopetwa na masumu na bino ete ntango na kopema euta na Jéhovah.” (Misala 3:19) Kozwaka boyebi ya Jéhovah mpe ya mibeko na ye, moto yango ayekoli ete mokano na Nzambe mpo na ye ezali boye ete akoma moyekoli na Yesu Klisto. Petelo alobaki epai na baklisto nyonso: “Ntina ete bobyangami mpo na bongo, mpamba te Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete bolanda na matambe na ye.” (1 Petelo 2:21) Yesu amonisaki polele eloko nini elimboli kozala moyekoli na ye, wana elobaki ye ete: “Soko nani alingi kolanda ngai, tika ete amiboya ye moko mpe akamata nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Matai 16:24) Esengeli bongo komipesa epai ya Jéhovah Nzambe mpo na kosala mokano na ye mpe kolanda matambe ya Yesu Klisto.

Komipesa ezali elaka lokola elaka nyonso te

12. Ndenge nini liloba “elaka” ezali kosalelama mbala mingi kati na boklisto ya mokili oyo?

12 Na kati ya boklisto ya mokili oyo, liloba “elaka” ezali kosalelama na ntina na moto oyo akomi moklisto. Na motindo yango, balobi na biso ete mangomba ya evangelike na Etats-Unis “bazali kolobela mingi likambo ya kopesa elaka epai na Yesu”. Moko kati na bakonzi na mangomba alobelaki mpo na “elaka na kati ya lingomba ya katolike”. Mpo na kolongisa komipesa na ye na kati na politike, sango moko alobaki: “Politike ezalaki kolandana ya elaka na ngai” lokola mosaleli na Eklezia. Mpo na bakompanyi oyo ekotekisaka biloko, bazali kosalela mingi piblisite na bango na teme oyo: “Tozali kolaka boye to boye epai ya bakiliya na biso.” Ya solo, moto akoki kozala na bilaka mingi mpo na kokokisa yango: bilaka mpo na mosala ya mosuni, bilaka mpo na bomoi ya mokolo na mokolo elongo na bazalani na biso, bilaka na makambo ya politike to na makambo ya losambo.

13. Komipesa epai na Jéhovah elimboli nini?

13 Nzokande, komipesa epai ya Jéhovah ezali elaka lokola elaka nyonso te. Elaka ezali se likambo ya “kopesana maloba to koyokana na nzela na kontra”, nzokande komipesa elimboli ete okabi bomoi na yo nyonso mpo na kosalela Nzambe. Na esika ete bamipesa mobimba na bango epai na Nzambe, bato mingi bazali kosuka bobele na kopesa ye elaka; ntina wana makambo ya Nzambe ezali mpo na bango lokola miziki oyo ezali kobeta mokemoke na kati na ndako mpe elengi mpo na koyoka, kasi ezali kopusa bango na eloko moko te mpo na oyo etali misala na bango.

14. Mpo na nini elaka mpamba ekoki kondimama epai ya Jéhovah te?

14 Kosala mokano na Nzambe ezali eloko eleki ntina mpo na moto oyo amipesi epai na ye. Moto yango asengeli kotosa mobeko ya liboso mpe mobeko eleki monene, oyo Yesu atangaki yango na maloba oyo: “Olinga Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na mayele na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba.” Yesu amonisaki ete mosala ya Nzambe tokoki kokabola yango na nzambe mosusu te, wana elobaki ye boye ete: “Moto akoki kosalela bankolo mibale te. Mpo ete, to akoyina moko mpe akolinga mosusu, to akondima moko mpe akotiola mosusu. Bokoki kosalela Nzambe mpe misolo te.” (Malako 12:30; Matai 6:24) Emonani bongo ete elaka mpamba ekoki kosepelisa Jéhovah te.

Mpo na nini kozindisama na mai

15. Ndakisa nini Yesu apesaki na komonisaka kondima na ye na Nzambe polele na miso ya bato?

15 Mpo na kozala Témoin de Jéhovah mpe kobengama moklisto, moyekoli na Yesu Klisto, esengeli moto amonisa na batisimo ete amipesi. Yesu, “Motatoli na sembo” na Jéhovah, ye moko apesaki ndakisa na ndenge azwaki batisimo na Yordani. Yoane azalaki kobatisa basali na masumu oyo babongolaki motema, yango wana akakatanaki ntango Yesu ayaki epai na ye ete abatisa ye; kasi Mwana na Nzambe alobaki na ye: “Tika ezala boye sasaipi. Mpo ete ebongi na biso ete tokokisa makambo nyonso na boyengebene.” (Matai 3:13-17; Emoniseli 1:5) Yesu amonisaki polele kondima na ye na ndenge amilakisaki epai ya Jéhovah, mpe apesaki bongo ndakisa epai na baoyo nyonso balingi kosala mokano ya Nzambe.

16. Etinda nini Yesu apesaki na bayekoli na ye na ntina etali batisimo, mpe nini emonisi ete bango batosaki etinda yango?

16 Epai mosusu, liboso ete azonga epai ya Tata na ye na makóló, Yesu apesaki etinda oyo epai ya bayekoli na ye: “Boye bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisa mpe bango ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Mokanda ya Misala emonisi ete bayekoli ya Yesu batosaki etinda oyo na molende nyonso.​—Misala 2:40, 41; 8:12; 9:17, 18; 19:5.

17. Mpo na nini batisimo ya mwa matanga na motó ezali na motuya moko te?

17 Na mikolo yango, ndenge nini bato bazalaki kobatisama? Bobele na mwa mai na motó, lokola ekosalamaka na mangomba mingi na boklisto ya mokili oyo? Ezali bongo te! Nsima na kobatisama, Yesu ‘abimaki na mai’, yango emonisi polele ete azindisamaki na mai yango. (Malako 1:9, 10) Batisimo ekoki kopesama ndenge mosusu te, mpamba te liloba ya greke ebongolami na “kobatisa” elimboli “kozindisa, kolimwisa na nse na mai”.​—Misala 8:36-39.

18. Mpo na nini kozinda mobimba na nse na mai ezali elembo ebongi mpo na komonisa ete moto amipesi epai na Nzambe?

18 Na motindo yango, batisimo ezali elembo ebongi mpenza mpo na komonisa komipesa. Kolimwa na moto na nse na mai emonisaka malamu ete akufi mpo na oyo etali etamboli na ye ya kala, mpe kobima na ye na mai emonisi ete abandi bomoi ya sika. Lokola molulu ya libala esalisaka babalani ete basimba ntina ya boyokani oyo bango bakoti kati na yango, bobele bongo kozindisama na mai na miso na batatoli ezali kosalisa moto azwi batisimo ete abosana te ntina ya likambo yango. Na ntembe ata moke te, batisimo na biso ekosalisa biso tokanga ntina mpe tobosana soko moke te ete kopesa bomoi na biso epai ya Jéhovah ezali likambo eleki ntina kati na bomoi na biso, likambo oyo emonisi ete totiki kosalela matomba na biso moko, tobandi nde kosalela oyo ya Jéhovah Nzambe.

19. Ntina mosusu nini tosengeli kozwa batisimo?

19 Tobosana te ete batisimo ezali lisengami mpo na kozala na lisosoli malamu na miso na Jéhovah. 1 Petelo 3:21 emonisi yango polele: “Yango ezali elembo na libatisa likobikisa bino, mpo na kolongola mbindo na nzoto te kasi mpo na kotunaka epai na Nzambe na lisosoli malamu, mpo na lisekwa na Yesu Klisto.”

Na mbula nini?

20. Mpo na nini ba bébés basengeli kobatisama te?

20 Maloba na Yesu makomami na Matai 28:19, 20 mamonisi ete bobele bayekoli basengeli kobatisama. Na yango, ba bébés mpe bana mike bakokisi masengami ya Biblia te mpo na bato balingi kozwa batisimo, mpamba te moko te kati na bango akoki kozala na kondima epai na Nzambe, Mozalisi, soko mpe na Liloba na ye soko mpe na Mwana na ye, Yesu Klisto; moko te na kati na bango akoki kosimba ntina ete elimo santu ezali nguya na Nzambe oyo ekosalaka mosala, moko mpe te akoki kobongola motema na masumu na ye mpe kokata ndai ete akosala mokano ya Nzambe.

21. Bilenge bakoki kozwa batisimo?

21 Nzokande basusu kati na ba Témoins de Jéhovah bazali kolekisa mbula mingi mpo na bana na bango. Bazali kozela ete bana na bango bakoma na mbula zomi na mwambe to ntuku mibale liboso ya kolobela bango likambo ya batisimo. Nzokande, ntango mosusu bilenge bango moko bakozwaka ekateli ya kobatisama. Na ndakisa, elenge mobali moko, mwana na nkulutu moko, azalaki na mposa ya kozwa batisimo. Tata na ye asengaki bongo na bankulutu mosusu misato ete batalela elongo na mwana mituna oyo batunaka na bato balingi kozwa batisimoa. Bankulutu wana misato bamonaki ete mwana yango, atako azalaki naino elenge mpenza, akokisaki masengami ya bato balingi kozwa batisimo mpe akokaki bongo kondimama lokola ministre ya Jéhovah Nzambe. Lisusu, na kati na baklisto oyo kala mingi te bakotaki Eteyelo ya bapionniers na mokili ya Bahamas, ezalaki na elenge mwasi ya mbula zomi asili kozwa batisimo oyo baboti na ye nyonso mibale bazali ba pionniers.

22. Ntango baboti balendisi bomoto ya boklisto epai ya bana na bango, litomba nini ekoki kozwama?

22 Emonani ete baboti mosusu bazali kokokisa malamumalamu te mokumba na bango na likambo oyo. Na ndakisa, motindo nini bazali kosalela ‘biloko bikoki kozika na móto te’ mpo na kotonga bomoto ya boklisto ya bana na bango? (1 Bakolinti 3:10-15) Mpo na kozwa litomba malamu oyo, esengeli liboso ete losambo ya peto ya Jéhovah ezala na esika ya liboso kati na bomoi na bango; esengeli lisusu ete balanda toli kitoko mingi epesami na baboti na Deteronome 6:6, 7 mpe na Baefese 6:4. Soki basaleli malamu toli oyo, na esika ete bazela bana na bango bakoma mikolo mpenza mpo na kopusa bango ete bazwa batisimo, bakosunga nde bango ete bamipesa epai na Jéhovah na ntango malamu.

23. Nsima wana moto amipesi epai na Nzambe mpe azwi batisimo, asengeli kosala nini lisusu?

23 Nsima wana moto amonisi elikya na ye epai na Jéhovah na komipesa epai na ye mpe kozwa batisimo, asengeli se kolanda nzela wana ya elikya to kotya motema. Lisolo elandi, oyo ezali na motó na likambo “Tozala basali elongo na Jéhovah mpe totyela ye motema”, ekomonisa biso soko yango elimboli nini?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mituna mpo na bato balingi kozwa batisimo mpe kokoma ba Témoins de Jéhovah mizwami kati na mokanda Lisangá mpo na kokokisa mosala ya Nzambe; mokanda yango ekopesamaka na bato bazali komibongisa mpo na kozwa batisimo.

Bozongeli

◻ Likambo nini emonisi ete ekozala bozoba na kotya elikya na biso epai na bato?

◻ Bizaleli mpe misala na Jéhovah ezali kopesa biso bantina makasi mpo totya elikya epai na ye?

◻ Mpo na nini elikya epai na Jéhovah ezali kosenga ete tomipesa mobimba epai na ye, kasi bobele te ete topesa elaka ya kosalela ye?

◻ Ndenge nini baklisto bakoki kokolisa epai na bana na bango mposa ya komipesa epai na Jéhovah wana ezali naino bango bilenge?

[Elilingi na lokasa 13]

Tokoki kotya elikya na biso epai na Jéhovah, Mosikoli na biso monene

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto