Mpo na nini bana mingi bazali kokima ndako ya baboti na bango?
Biblia mpe bomoi ya libota Likambo yango ekotalelama kati na Mosenzeli minei oyo milandani
“Bokoki koyeba te bolozi nini ezali na motema ya mama oyo mwana na ye akimi ndako. Namoni lokola ndoto. Mpo na nini akimi? Nazali koyeba ntina te. Azalaki koloba mingi te, azalaki na esengo mpe elenge mpenza!
“Azali wapi na mpokwa oyo? Azali na esika ya malamu? Azali na nzala? Azali ye moko? Nalingaka ye mingi mpenza! Nazangi moto ya kolobana na ye. Tika nazela kaka.
“Motema na ngai ezali kopela ntango nyonso soki telefone eleli. Kasi ezali ye te, mpe moto akoyebisa ngai nsango na ye azali te. Nazali kobondela mpo ete likambo mabe ekomela ye te mpe mpo ete ngai moko nazala na makasi ya koyika mpiko na komekama oyo. Elikya na ngai ezali ete akozonga.
“ . . . Makanisi ya ndenge na ndenge mpe ya mpamba mazali koyela ngai mpe nazali komeka kokitisa mawa na ngai! Eh Nzambe na ngai, sala ete mua mwana na ngai ya mwasi azonga na ndako.”
MOKANDA oyo etindamaki epai na moyambi moko na mikanda ayebani mingi, na mobu 1970. Na ntango yango bato bazalaki kokanisa ete bana bazalaki kokima ndako kozanga ntina ya sikisiki: bobele mpo basepeli kokima to mpo na mposa ya komitambwisa bango moko, nsima na koswana mpo na ngonga oyo bakoki kozonga na mpokwa to mpo likambo moko esepelisi bango te. Kasi soki bilenge bazali naino kokima ndako ya baboti mpo na bantina oyo, nzokande makambo masili kobongwana mpenza, mbula 15 na nsima.
Sikawa, bilenge bazali kokima ndako ya baboti mpo na bantina oyo eleki minene: lokola libota esili mpenza kobeba kati na yango bazali komimona ete bazangi esika, bazali komonisa bango bolingo te, mpe mbala mosusu bazali konyokola bango. Bazali kokende koluka eloko te — bomoi malamu — kasi bazali kokima mpo na komilongola na likambo oyo ezali kotungisa bango, na bomoi moko mabe mpe ya mobulu. “Bana oyo bazali kokima ndako basili mpenza kobongwana uta ntango oyo bakomaki mingi na ntina na bango”, na 1970, engebene monganga Douglas Huenergardt, oyo azali kotambwisa centre moko mpo na bana bazali kokima ndako ya baboti, na Floride (Etats-Unis). “Bana oyo tozalaki koyamba kala, bazalaki koluka bomoi ya lolenge mosusu, kasi lelo ezali lisusu bongo te. Soki mwana akimi ndako na bango lelo, yango elimboli ete alembi mpenza.”
Boyekoli oyo esalemi mikolo oyo endimisi makambo yango mpe emonisi likambo mosusu ya mpasi. Bana mingi bazali kokima mpo na komilongola kati na libota oyo ezalela na yango esili kokoma mabe koleka. Kasi sikawa, kati na bana oyo bakimi ndako na Etats-Unis, ndambo monene kati na bana yango bamimonaki ete bapusami na kosala bongo mpamba te baboti na bango moko babenganaki bango to bapesaki bango nzela na kokima! Tala oyo zunalo Family Relation (angl.) elobi na ntina yango: “Mpo na bilenge mingi, kokima ndako ezali mwango ya komilongola na ezalela ya libota moko, ya mosala to ya kelasi oyo eleki mpasi. Mingi kati na bana yango oyo bakima ndako, bazali bana oyo basundola bango, baoyo baboti bakabwana to babwaka bango. Bana oyo banyokwamaka mingi basukaka na kokanisa ete bazali na likambo mosusu ya kosala te bobele kokima ndako.”
Makambo oyo bana yango basengeli kokutana na yango mazali mpenza kobangisa! Lokola babwakami na nzela, bazali ata na mosolo te, bilenge yango bazali kobanda kosengasenga, kotekisa makaya, kosala kindumba mpe koyiba, soki nde bango bazwami na motambo yango te na maboko ya bato mosusu. Na kotalela ndimbola ya zulunalo Psychology Today, “na ba gares, bato oyo bazali kosolola na bilenge oyo bakima ndako ezali basaleli ya leta te mpe bapisikologe te, kasi ezali nde bato oyo bazali kotinda bana na kosala kindumba, batekisi makaya to bato oyo basalaka mikanda mizali kolakisa bolumbu ya bato”. “86 pour cent ya bato oyo batunamaki kati na bato oyo bayekolaka likambo etali bana bakimaka ndako bandimi ete eloko moko te to mpe likambo ata moko te ezali kosalema mpo na kopekisa ete bana oyo bakima ndako babebisama te epai na bato mabe oyo. Likambo ya kokamwa ezali te ete lokola bana yango bazali kolekisa ntango mingi na nzela, kolongono na bango ya nzoto mpe ezali kobeba se kobeba.”
Ezali solo ete bandako mingi ezali kotongama mpo na kolalisa, koleisa mpe kobongisa bana oyo bazangi bisika. Nzokande soki ezali mpasi te mpo na koyamba bakimi yango, nzokande ezali mpasi mpenza mpo na kosalisa bango. “Mokumba na biso ezali ya kosalisa bango na komemya nzoto na bango, kosalisa bango na komibokola bango moko, ndenge molakisi moko azali kolimbola. Nasala naino mosala moko ya mpasi boye te.” Na ebandeli, emonanaka mingi ete bilenge yango bazali komibenda mpe bazali kokima mikoló; bazali na nkanda mingi, bazali na elikya te, mpe mbala mosusu bamonisaka bilembo ya komiboma.
Kasi tokoki kopamela ebandeli ya mabe te? Engebene Search, lisanga moko oyo ezwami na New Jersey (Etats-Unis) mpe oyo ezali kokoma ntalo ya bana oyo babungi to bakimi ndako, “kati na makambo mingi, likambo oyo ezali kokimisa bana na ndako ezali kouta kati na libota. Moto oyo atondi mpenza na esengo akoki kokima ndako na ye te.” Kasi eloko nini ekoki kopesa esengo kati na libota? Ndenge nini kokangisa bikanganelo kati na baboti mpe bana?