Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/11 nk. 5-7
  • Ndenge nini kolendisa boyokani kati na libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini kolendisa boyokani kati na libota
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bantina ya likambo yango
  • Lisalisi yango ekouta epai wapi?
  • Kosalela mitinda ya Biblia
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Baboti mpe bana—Bómonisa bolingo ntango bozali kosolola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Mpo na nini bana mingi bazali kokima ndako ya baboti na bango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/11 nk. 5-7

Ndenge nini kolendisa boyokani kati na libota

Bantina oyo ezali kopusa bilenge na kokima ndako ezali mingi mpe mbala mingi ezalaka ya ndenge na ndenge. Atako lisolo oyo ekoki kotalela yango na bozindo mpenza te, ezali komonisa polele ete mitinda ya Biblia, ntango etondami, ezali kobatela libota.

EZALI mpasi na koyeba sikisiki motuya mobimba ya bana oyo bazali kokima ndako ya baboti na bango. Bamoko bakanisi ete mbula na mbula, bobele na Etats-Unis, bana oyo bazali kobunga to kokima ndako bakoki kozala kati na 600 000 mpe 3 000 000. Kati na motango yango, mingimingi mpe batangaka bana oyo bakimi ndako, bana oyo babwakami to babengani bango na ndako, to bana oyo babotolami na maboko ya moko na baboti nsima na kokabwana kati na libala na bango. Motuya ezali mpenza a sikisiki te mpamba te baboti bazali koyebisa polele te ete babengani mwana. Epai mosusu, bana mosusu bazali kokima ndako ya baboti mbala na mbala. Zulunalo The New York Times elimboli ete: “Soki elenge moko ya mibu 16 akimi ndako ya baboti na ye mbala mitano na mbula moko mpe azali ntango nyonso kolala libanda, mitango . . . ekoyebisa ete bana mitano babungaki.”

Kasi longola mitango, totalela bantina oyo ezali kopusa bana na kokima ndako ya baboti na bango. Engebene zulunalo Aspects médicaux de la sexualité humaine (angl.) “kokima ya mwana na ndako ezali komonisa ete mobulu ezali kati na libota”. Ekoki kobima na mindondo ya kala, lokola konyokwama na nzoto, kozanga kotalela bamposa ya moto, kozanga bolingo, libala oyo ekufi, mibeko ya kolekisa ndelo to mibeko makasi oyo ekoki kobongwana te. Mwana akoki mpe kokima ndako mpo na kobanga makambo oyo makoki kobima nsima na kozwa zemi to bazali kobanga ete bafundama liboso na bisambiselo. Ntango batunaki bana mingi mpo na koyeba ntina oyo bakimelaki ndako ya baboti, balobaki ete ezalaki mpo na kozanga boyokani ya malamu elongo na baboti na bango. Engebene zulunalo Adolescence (Angl.), “emonani ete boyokani kati na baboti mpe bana ezali na bopusi mingi na ezaleli ya mwana oyo akimi ndako”. Mokanda yango elobi lisusu boye: “Bana oyo bakimi ndako balobi ete bazali kosala bongo mpo bazali koyokana te na baboti na bango mpe bazali kosolola te, to basali bongo mpo mobulu eleki mingi kati na libota to mpo bazali na mwa mikakatano mpe baboti bazali kosepela na bango te.”

Bantina ya likambo yango

Tozali na bomoi kati na eleko moko oyo ezali kobimisa ezaleli ya nkanda mingi epai na bato. Engbene zulunalo Ladies’ Home Journal, “kobakisama ya bato bazangi mosala mpe kozanga mosolo kati na mabota mingi ezali mpe kobakisa mikakatano mpe kozanga koyokana kati na libota. Ntango tata azali lisusu kosala te mpe ndako ekoki lisusu kofutama te, libota mobimba ekozwa mpasi ya likambo yango. Bilenge, baoyo bamibongisi te mpo na kokutana na likambo motindo yango, bakomona ete ezali malamu kokima ndako ya baboti”. Mbala mosusu, ezali baboti bango moko, kozanga koyeba bazali kobengana bango soko baboi babima na ndako. Wana basiliki mpe balembi na etumba oyo basengeli kobunda mokolo na mokolo mpo na kozwa mosolo ya kobikela, batikali lisusu na makasi mingi te mpo na kobokola bana na bango.

Bolenge ezali mpe eleko moko ya mobulu. Bilenge batungisami na mposa oyo ezali na bango ete bamonisa bango bolingo mpe libateli oyo bazalaki na yango, wana ezalaki bango naino mike, mpe mposa na bango ya kozwa lipanda liboso na baboti na bango na kotyaka makasi bakoma mikolo. Mobulu yango ezali kotya bilenge kati na mobulungano monene. Nzoto na bango ezali mpe kobongwana, Mbala moko, bomoi na bango etondi na mindondo, mpe bakoki komimona ete yango eleki bango ndelo. Bazali mpe kopusama na baboti na bango mpe baninga na bango. Na bileko mosusu bamiyebaka malamu te mpe bazali kolemba. Zulunalo ’Teen, elobi ete: “Bokamwa te soki mbala mosusu bozali komona ete na ndako bazali mpenza koyeba mayoki na bino te, mpamba te bino moko mpe bozali komiyeba malamu te. Likolo na nyonso, soki yo moko ozali komiyeba malamu te, ndenge nini baboti na yo bakoki mpenza kokanisa makanisi na yo?” Baboti mingi bazali koyeba malamu te makambo nini bakoki kopekisa to kopesa nzela epai na bana na bango, mingimingi epai na mwana ya liboso. Mibeko makasi mpe kozanga komitya na esika ya bilenge ezali kopusa bango ete bakima ndako.

Judy Blume akomi kati na mokanda na ye Lettres à Judy (angl.) ete: “Kokima ndako ya baboti ezali kobongisa makambo te. Ezali bobele elembo, kasi ezali lisalisi te. Lisolo esengeli kozala kati na libota, komona makambo ndenge yango ezali, mpe koyeba kolonga mikakatano oyo ezali kobima. Ezali bobele na ndenge yango ete bakosala mabongwani oyo ekopesa bango nzela ete bafanda na kimya. Mingimingi mabota mazali na mposa ya lisalisi mpo na likambo yango.”

Lisalisi yango ekouta epai wapi?

Liloba na Nzambe epesi lisalisi eleki kitoko mpo na likambo yango. Mpo na nini bongo? Mpamba te azalisaki moto mpe ayebaki mpenza eloko nini azali na yango mposa. Mpe lisusu apesaki malako na ntina yango, “mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kozongisa makambo na molongo, mpo na kosembola na boyengebene, mpo ete moto na Nzambe abongisama malamu, mpo na misala nyonso ebongi.” (2 Timote 3:16, 17, MN) Mitinda ya Biblia ezali na bopusi monene mpe ezali kotalela makambo nyonso ya bomoi.

Lokola yango euti kolobama, esengeli ete basangani nyonso ya libota bazala na mposa ya kotalela makambo ndenge yango ezali komonana mpe bazala na mposa ya kosala mbongwana. Soki baboi kondima makambo mazali kobima mpe baboi kobongwana bakokoka mpe te kokola to kosilisa bantina oyo ezali kotinda bana ete bakima ndako. Ezali mpenza likambo ya liboso oyo epai kuna molangwa ezali komonana mingi, komela bangi mpe ezaleli mabe mpo na oyo etali kosangisa nzoto. Esengeli kosilisa mikakatano yango liboso ya koluka kolonga mikakatano oyo tosengeli kokutana na yango kati na bomoi na biso mokolo na mokolo. Lokola yango etongamaki likolo na boyebi ya solo ya Liloba na ye, kondima epai na Nzambe mpe kozala na mposa ya kosepelisa ye esalisaki ebele na mabota na kolonga bizaleli mabe yango, oyo na makambo mosusu, etindaki bilenge na kokima bandako na bango.​—Tala 1 Bakolinti 6:9-11.

Kozala na bomoi kati na mokili ya lelo oyo emonisami na moimi, koyina mpe kobakisama ya mobulu ekoki kotiya boyokani ya libota na komekama makasi. Yango wana “nyonso oyo ekomama kalakala [kati na Biblia], ekomami mpo na kolakisa biso ete tozala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na kolendisama na Makomi.”​—Baloma 15:4.

Kosalela mitinda ya Biblia

Lokola bantina oyo ekoki kotinda mwana na kokima ndako eyebani, sikawa likoki ezali ya kosalela mitinda ya Biblia. Biblia ezali kolobela bantina yango ntango ezali kopesa toli epai na baboti na kopesa epai na bana na bango ntango malamu oyo bazali na yango mposa mpe kopesa bango mateya na makambo nyonso mpe etondi na bolingo. Esengeli kokima mbeba mibale oyo ezali bongo kopimela bango bolingo mpe discipline ya makasi koleka. Liloba na Nzambe ezali kopesa toli oyo: “Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bobokola bango na mateya mpe na mpamela na Jéhovah.”​—Baefese 6:4; Masese 22:6.

Lokola na eleko ya kala oyo bazalaki kokoma Biblia, baboti basengeli ntango nyonso kotambwisa, kokengela mpe koteya ndako na bango ‘wana efandi bango kati na ndako, mpe ntango bazali kotambola na nzela, mpe ntango bazali kolala, mpe ntango bazali kolamuka’. (Deteronome 11:19) Ata soki mbala na mbala discipline emonisi ntina na yango, baboti basengeli kopesa yango ntango nyonso na bolingo. (Masese 13:24) Na ntembe te toli oyo ekopesa esengo kati na libota!

Bana basengeli mpe kokokisa mokumba na bango: “Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo mpamba te yango ezali sembo: ‘Kumisa tata na yo mpe mama na yo.’ ” (Baefese 6:1, 2) Salomo, moto na mayele ya kala, akomaki mpo na “kopesa mayele epai na bilema, boyebi mpe toli epai na elenge.” Azali mpe kopesa toli: “Mwana na ngai, yoka mateya na tata na yo mpe tika mibeko na mama na yo te. . . . Soko bato mabe bakobenda yo, kenda te.”​—Masese 1:1-10.

Ndenge nini kolobela mikakatano ya libota? Na bolingo, mpamba te Biblia epesi toli oyo: “Tika ete makambo nyonso na bino masalama na bolingo!” (1 Bakolinti 16:14) Esengeli kozala bolingo ya mozindo, oyo ezali pene na kozipa miso likolo na mabunga ya baninga mosusu mpe likolo na maloba oyo ekoki kosilikisa biso. “Liboso na makambo nyonso bolingana makasi, mpo ete bolingo ekozipaka ebele na masumu.”​—1 Petelo 4:8.

Bolingo motindo wana ezali mpe kopesa nzela na komibanzabanza mpo na bolamu ya baninga mpe esalisaka mpo na kotia esika moko basangani ya libota. Botala na maloba kitoko oyo etinda eleki monene ekomami. “Makambo nyonso malingi bino ete bato basalela bino yango, bino bosalela bango bobele bongo.” (Matai 7:12) Ntalo monene ya bilenge oyo bakima ndako ya baboti oyo batunaki bango mpo na ntina na boyekoli moko bayanolaki ete boyokani na bango elongo na mabota na bango ezalaki mpenza makasi te na ntango oyo bakimaki ndako. Engebene zulunalo Adolescence, “ ‘kolemba ya boyokani kati na libota’ ezali likambo oyo ezali kolakisa soki mwana akozwa ekateli to te ya kokima ndako.” Nzokande likoki ezali ya kobongisa to kolonga mikakatano oyo mitali kozanga kotia likebi na boyokani ya libota, na kozanga kolingana moko na moko mpe na boyokani mabe, na kolekisaka ntango mingi kati na libota lokola Biblia ezali kosenga yango na maloba oyo: “Moto na moto atala bobele makambo na ye moko te, kasi makambo na bamosusu lokola.” (Bafilipi 2:4) Liyoki ya bomoko mpe bolingo kati na ndako ekopesa nzela na kokitisa bopusi ya baninga oyo bakotinda mwana na kokima ndako.

Ntango bosaleli mitinda ya Biblia, kokima ndako ekobima te lokola mwango ya kosilisa mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo. Na lisalisi ya bolingo oyo moto na moto akomonisa epai na baninga, libota ekokoma ebombamelo liboso na mobulu oyo ezali kouta na libanda na yango. Bokosepela na esengo ya koleka na kozwaka boyebi mingi ya mitinda na Biblia mpe na lolenge ya kosalela yango, mpe na komonaka elikya oyo Nzambe azali kopesa biso. Mpo na nini te kondima kosolola makambo oyo elongo na ba Témoins de Jéhovah?

[Etanda/​Elilingi na lokasa 7]

BABOTI, ELOKO NINI BOKOKI KOSALA?

Bolekisa ntango elongo na bana na bino; bayekola koyeba mikakatano na bango mpe bamposa na bango.

Bosenzela mingi likolo na bango mpe botambwisa bango.

Bopesa bango discipline mpe boteya bango na bolingo.

Bokomisa ndako na bino esika oyo ekozala malamu na kofanda.

BANA, ELOKO NINI BOKOKI KOSALA?

Botosa baboti na bino, bolinga bango mpe bomemya bango.

Bomibenda pembeni te; bomikotisa nde kati na libota.

Botalela libota lokola liboke moko, mpe bokanisa bobele na bamposa na bino moko te.

Bobombaka makambo na motema te; bosololaka nde.

[Bililingi na lokasa 5]

Boyokani kati na baboti mpe bana ezali likambo ya ntina monene koleka

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto