Biblia mpe ezaleli ya bilenge
“Emonani ete bilenge babebisami mingi mpo na propagande oyo esalemi mikolo oyo na makambo ya kosangisa nzoto: bafilme, miziki, radio mpe télévision ezali kolakisa bango ete kosangana kati na mwasi mpe mobali ezali kitoko mingi, ezali elengi mingi, ezali kobenda mpenza . . . Nzokande, bazali mpe koloba ete bilenge basi oyo balingi kopesa nzoto na bango kilo basengeli koboya kosala yango.”—Institut Alan Guttmacher.
Bilenge bazali kokola lelo kati na mokili oyo mitinda na yango etali bizaleli ezali ndenge na ndenge. Kasi Biblia, ezali kopesa mitinda ya polele mpe ya sikisiki mpo na makambo ya ezaleli etali kosangisa nzoto kati na mwasi mpe mobali. Mateya ya bato kati na makambo matali kosangisa nzoto elukaka kosalisa mingimingi mpo na kozangisa kozwa zemi, kasi Biblia ezali nde kolakisa ete esengeli kobwaka pite. Elobi: “Boyeba likambo oyo solosolo ete, moto na pite [liloba oyo ezali kolakisa mpe moto oyo azali kosala bosangani ya nzoto liboso na libala] mpe moto na bosoto mpe moto na elulela . . . azali na libula te kati na bokonzi na Klisto mpe na Nzambe.” (Baefese 5:5) Na bongo ezali polele ete kosangisa nzoto kati na mwasi mpe mobali ezwi esika bobele kati na libala.
Na yango, bakoki kosilisa te likambo ya zemi epai na elenge mwasi na koteyaka bilenge lolenge ya kozanga kozwa zemi, kasi na kolakisaka bango nzela ya ezaleli malamu mpe ya elimo. Biblia elakisi polele soki mokumba yango epesameli nani: “Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bobokola bango na mateya mpe na mpamela na Nkolo.”—Baefese 6:4.
Na boumeli ya ankete moko, batunaki na bilenge “batanga makoki baboti na bango bazali na yango mpo na kolakisa bango makambo ya kosangisa nzoto kati na mwasi mpe mobali mpe bapesa bango bapwé banda na ‘mabe’ kino na ‘malamu mpenza’: Mingi kati na bilenge yango bapesaki na ba mama na bango pwé ‘mwa malamu’. Batata mosusu bazwaki pwé ‘mabe mpenza’”. Na ndenge yango tokoki kozala na elikya ete baboti bapesa na bana na bango mitinda mpo na makambo matali kosangisa nzoto?
Ndenge nini kolakisa bilenge nzela ya etamboli malamu
Na Masese 4:1-4, mokonzi Salomo apesi bilenge toli oyo ya nguya: “Bana, yoka kolakisa na tata, . . . Ngai nazalaki mwana na tata na ngai, ngai, bobele ngai, nazwaki bolingo epai na mama na ngai. Ye tata, alakisaki mpe ngai, alobaki na ngai ete, tika ete motema na yo ebatela maloba na ngai.” Ezali polele ete Salomo akakatanaki te mpo na kolobela elongo na tata na ye makambo lokola oyo ya kosangisa nzoto, mpamba te mwa mosika alobeli na bosolo nyonso bosoto na makambo ya kosangisa nzoto.—Masese 5:1-19.
Baboti mingi ba Témoins de Jéhovah basololaka na motindo ya polele elongo na bana na bango mpe bazwaka matomba malamu. Basukaka te na koloba na bango ete “ekoki te” kosala pite. Na lisalisi ya Biblia, bazali kopesa na bana na bango bantina makasi ya koboya komipesa na mobulu ya makambo matali kosangisa nzoto. Totalela lisusu maloba ya Salomo. Na Masese 5:3, 4, azali kokebisa bilenge ete basangana na mwasi na pite te. “Mpo ete monoko na mwasi mopaya [mwasi na pite] ekotangisa elengi lokola mafuta na nzoi mpe bibebu na ye bileki mafuta na kitoko.” Ya solo, likambo moko ya mbindo ekoki komonana lokola ete ezali malamu mpe kobenda biso makasi. Kasi Salomo akebisi biso boye: “Kasi nsuka na ye ezali na bololo lokola mbondo, ezali na mopotu lokola mbeli na mpia mibale.”
Na ndakisa ya Salomo, baboti bakoki lisusu kopusa bana na bango na kokanisa mpo na makama ya makambo matali kosangisa nzoto. Lisosoli etungisami, zemi oyo ekanami te, ba maladi ezwami na nzela ya bosangisi nzoto — lokola SIDA — ezali nsuka ya bololo mpo na mwa ntango moke ya esengo oyo emonanaki lokola malamu. Mosika mpenza, Salomo alendisi bilenge ete ‘bapesa lokumu na bango na bamosusu te’. (Masese 5:9) Elenge moko, mwasi to mobali, azali kobungisa lokumu na ye te ntango azali komipesa epai na moto moko oyo azali na mposa ya kobala te? Ezali mpenza komisambwisa ntango osaleli nzoto na yo mpo na kokokisa bamposa na yo ya moimi to mpe ya moto mosusu. Boye te? Baboti bakoki kosalisa bana na bango ete bakanisa na mituna oyo.
Salomo apesi batoli mosusu mpo na ezaleli esengeli kozala na yango liboso na moto na pite: “Longola nzela na yo epai na ye mpe kobelema na ekuke na ndako na ye te.” (Masese 5:8) Motindo moko mpe, baboti bakoki kopesa na bana na bango batoli ya ntina mpo ete bamitika te kati na makambo ekobimisa makama. Bakoki koteya bango ete babimaka elongo moko te na bato oyo bazangi mibeko. Ntango bana bakoki mpo na kokendeke kotala moto moko mpo na libala, baboti bakoki kolendisa bango na kozwa bibongiseli oyo bakoki kosalela mpo bakweya na etamboli ya mbindo te. Baoyo bazali kokendeke kotalana bakoluka mbala mosusu ete bazala bobele bango mibale te na ntango bakobima mpo na kotambola elongo. Ezalela yango esili konuna? Ekoki kozala bongo, kasi eleki malamu na kozwa mwa bibongiseli liboso mpo ete ‘olela te na nsima, wana mosuni na yo mpe nzoto na yo esili koleisama. Okoloba ete, solo naboyaki kolakisama . . . Natosaki mongongo ya balakisi na ngai te.’ ”—Masese 5:11-13.
Ndenge nini kosalisa bilenge ete babanga Jéhovah
Bobele na Etats-Unis, bilenge koleka 12 milió bazali na makango na bango mpo na kosangisa nzoto. Ata maladi to epidemi ya SIDA epesi lisalisi te mpo na kosilisa ntalo monene ya pite oyo esili kopalangana. Nzokande, ba Témoins de Jéhovah bazali komeka kopesa epai na bana na bango ntina monene oyo eleki likambo etali kobanga SIDA to zemi: kobanga Jéhovah. Na Masese 5:21, Salomo akundoli maloba oyo epai na bilenge: “Mpo ete nzela na moto ezali liboso na miso na Jéhovah mpe ye akobanga mpo na bilekelo na ye nyonso.” Jean, oyo azali Témoin de Jéhovah mpe tata ya bana minei, apesi toli oyo: “Eloko ekosalisa mwana, ezali ete azala na kobanga ya botosi epai na Jéhovah. Kokakatana te mpo na kolimbola epai na ye ete misala tosalaka mpo na kokokisa mposa na biso moko ya moimi ekoki koyokisa Jéhovah mawa.”—Masese 27:11.
Ya solo, kobanga Jéhovah ekopekisa mwana ete azala na etamboli ya mbindo, bobele soki azali komona Jéhovah lokola moto mpenza. (Tala Baebele 11:27.) Baboti bakoki kosalisa bana na bango ete bazala na boyokani ya solo elongo na Nzambe na koyekolaka Biblia elongo na bango ntango nyonso, na kosambelaka mikolo nyonso esika moko na bango mpe na kolakisaka bango ndakisa kati na bomoi ya mokolo na mokolo. Soki elenge asosoli ete Nzambe azali kokipe ye malamu, akopusama na kobwaka etamboli nyonso oyo ekozanga kosepelisa ye.—1 Petelo 5:7.
Toyeba lisusu ete bilenge bakoki kosilisa bamposa na bango mosusu soki bazali na boyokani malamu elongo na Nzambe. Na ndakisa bato na mayele bandimi ete bilenge bazalaka na mobulu kati na makambo etali kosangisa nzoto mpo bamiyoka te ete bazangi nguya to limemya na bango moko. Kasi oyo azali na boninga elongo na Jéhovah azalaka na mayoki ya lolenge yango te mpe akoki mpenza koloba: “Nzambe azali mosungi na ngai; Jéhovah azali mosungi na molimo na ngai.”—Nzembo 54:4.
Likanisi ya bokatikati mpo na bosangisi nzoto mpe libala
Na ntembe te, baboti bakosepela te ete bana na bango bamonaka kosangisa nzoto kati na mwasi mpe mobali lokola likambo ya nsoni to ya mabe. Soki Biblia epekisi pite, ezali komonisa lisusu ete kosangisa nzoto—kati na ebongiseli ya libala—ekoki kozala kitoko mingi. Salomo abakisi, na elobeli moko kitoko: “Tika ete mai na yo mapambolama; sepela na mwasi na bolenge na yo . . . , tika ete mabelé na ye masepelisa yo ntango nyonso, yoka esengo na bolingo na ye libela.”—Masese 5:18, 19.
Soki baboti bazali na likanisi malamu mpo na bosangisi nzoto, bakoyoka nsoni te mpo na kolobela makambo ya lolenge yango. Jean [oyo tolobelaki liboso] alimboli boye: “Lokola tolobaka na bosolo epai na bana na biso, epai na biso kosangisa nzoto kati na mwasi mpe mobali ezali lisolo mabe te. Tolakisaka bango ete ezali likabo ya Mozalisi na biso Jéhovah, epesami mpo na kosepelisa mobali mpe mwasi na ntango na yango.” Moto moko, tata ya bilenge mibali mibale, alobi boye: “Uta bazalaki mike mpenza, tozalaki mikolo nyonso kolobela bango na bosolo makambo ya kosangisa nzoto. Tosalaki makasi mpo na kopesa bango makanisi malamu mpe ya mpeto mpo na bolingo mpe na makambo matali kosangisa nzoto. Tosololaka ntango nyonso elongo na bango.” Toyeba libela ete bana oyo tolobeli awa babatelaki bompeto na bango.
Ndenge nini kopesa bilenge ‘boyebi mpo na kobika’
Ntoma Paulo asakolaki ete “bato mabe mpe bakosi bakoleka na mabe, bakozimbisa mpe bakozimbisama”. (2 Timote 3:13) Na bongo mitinda mitali bizaleli mikolanda kokita. Mobulu ya bilenge na makambo ya kosangisa nzoto mpe zemi ya bolenge ekolanda kozala likambo ya kotungisa mpo na efandeli ya bato.
Baboti oyo babangaka Nzambe bakosalela Biblia mpo na kopesa na bana na bango ‘boyebi mpo na kobika’. (2 Timote 3:15) Soki oyoki yo moko mposa ya koyeba Makomami, kokakatana te mpo na kokomela baoyo babimisi zulunalo oyo mpo okutana na ba Témoins de Jéhovah. Bakosepela kolakisa yo ndenge nini okoki kozwa boyebi yango kozanga kofuta. Ba Témoins de Jéhovah bakoki kosalisa yo mpo na kozwa mikanda lokola Votre jeunesse—Comment en tirer le meilleur parti.a Mateya ya Biblia oyo ezali kati na mokanda wana esalisaki ebele ya bilenge mpo na kolonga mitambo ya mbindo ya mokili oyo.
Toloba nini sikawa mpo na bilenge oyo basilaki kozwa mpasi yango, elingi koloba zemi oyo elongobani te? Makambo ya lolenge yango ekoki kozanga elikya te. Nzambe ‘akolimbisa na solo’ ye oyo ayoki solo mawa mpo na etamboli na ye mabe. (Yisaya 55:7) Ata kobokola mwana yo moko ezali likambo na esengo te, likoki ezali mpo na kokokisa mokumba yango malamu na kosalelaka mitinda ya Biblia. Ezali yango ekomelaki elenge mwasi moko oyo abotaki bana misato liboso ete akoma moklisto. Asalaki makasi mpo na kosalela Liloba ya Nzambe kati na libota na ye. Kosangana ntango nyonso na lisanga ya ba Témoins de Jéhovah elendisaki ye makasi mpe esalisaki ye mingi. Alimboli: “Kosalela Nzambe oyo alimbisaka mpe kozala na bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazali koyeba bamposa na yo ezali likambo eleki malamu mpenza. Mpo na mbala ya liboso kati na bomoi na ngai namimoni mpeto na mosuni mpe na elimo.”
Ya solo, eleki malamu kokima uta na ebandeli makambo oyo mazali kobima na bosangisi nzoto kati na mwasi mpe mobali liboso ya libala. Ezali esengo na komona ete ebele na bilenge bazali komekola etamboli yango mpo ete bazali kolanda toli ya makomi oyo ebongwanaka te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Ntina oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kolakisa na bana na bango mpo na koboya pite ezali bobele mpo na kokima SIDA te soki mpe zemi, kasi ezali mpo ete basengeli kobanga Jéhovah Nzambe.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Bobele na Etats-Unis, bilenge koleka 12 milió bazali na makango na bango mpo na kosangisa nzoto.
[Bililingi na lokasa 5]
Baboti bakoki kolobana polele na bana na bango makambo matali kosangisa nzoto
[Bililingi na lokasa 7]
Ebongi na bilenge baklisto bapengola etamboli nyonso oyo ekoki kobebisa boyokani na bango elongo na Nzambe