MAKAMBO MAZALI KOLEKA NA MOKILI
Moto ya liboso azalaki moto
Balakisi mosusu ya liteya oyo ya évolution bazali koloba ete tozali na ntina nyonso” na kondima évolution; balobi lisusu ete ezali “liteya moko oyo bosolo na yango ekoki komonisama na laboratoire”. Nzokande, Likita ya Mibale ya bato oyo bakolukaka bilembo ya bomoi ya bikelamu ya kala na mabele, likita yango esalemaki kala mingi te na ltalie, na mboka Turin, emonisaki polele ete bato mingi ya sianse bazali naino kokakatana na ntina yango.
Na esika ya kopesa “bilembo nyonso” mpo na kondima évolution, likita yango emonisaki nde kozanga boyokani kati na bato na sianse na likambo etali koyeba ntango nini mpe ndenge nini moto abimaki na évolution. Na ndakisa, moko kati na bango, Bernard Vaudermeer, amonisaki makasi ete mpo na oyo etali ebandeli ya moto, makambo oyo bamoni na kolukaka bilembo ya kala na mabele “ezali koyokana te na bilembo bipesami na génétique to ebongiseli ya kokitana”; mpamba te bilembo ya génétique bizali kokamba biso se epai ya nkoko moko.
Nzokande, ntembe oyo ezali bobele epai ya bato oyo baboi kondima solo, oyo ezangi mindondo, engebene yango, “na nkoko moko [Nzambe] abotisi mabota nyonso na bato kofanda na mikili nyonso na nse”. (Misala 17:26) Mozalisi asalaki ndenge nini? Genese 2:7 elobi na biso ete Jéhovah Nzambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akomaki molimo na bomoi”.
Na yango, ezali likambo ya kokamwa te ete mbuta muntu Giuseppe Sermonti, moyekoli na makambo na bomoi to biologiste, ntango apesaki likanisi na ye mpo na maloba ya nsuka ya likita yango. alobaki ete “bato na sianse basali nyonso mpo na kopesa biso makako ete azala nkoko na biso, kasi balongi te. Moto ya liboso azalaki moto”.