Mpo na nini esengeli kosepelisa yo
’Likambo nini esengeli kosepelisa ngai?’ Mbongwana eleki monene kati na lisolo ya bato, oyo ekosalema na mikolo mikoya: ndenge mabelé ekobanda koyangelama na bokonzi ya sika, esalemi na Nzambe. (Danyele 2:44) Mbongwana yango, oyo ekosalema na boumeli ya libota oyo etangami kati na Matai 24:34, ekoyela mobali nyonso, mwasi nyonso, mwana nyonso mpo na bolamu na ye to mpo na mabe na ye. Yango wana moto nyonso asengeli kosepela solosolo na nsango oyo ezali koyebisa mbongwana yango. Ya solo, tokozala na libunga soko tolobi: ‘Etali ngai te.’
Baoyo baboyaki kotya likebi na ntango ya kala
Ezali mpo na mbala ya liboso te ete nsango ya ntina, oyo esengeli kolamusa likebi ya baoyo babyangami mpo na koyoka yango, ezali kosakolama. Na ndakisa, ezaleli motindo yango emonanaki mpe na ntango na Noa. Liboso na ezaleli mabe, pite mpe mobulu ya bato, Jéhovah Nzambe azwaki ekateli ya koboma bango na mpela ya mokili mobimba. (Genese 6:5-7, 13) Nzokande, liboso ete aboma bato mabe, atindaki Noa, mosakoli na boyengebene, ayebisa bango koya ya mpela mpe eloko basengelaki kosala mpo na kobikisama. Atako nsango yango ezalaki ya ntina, bato nyonso oyo bayokaki yango “bayebaki eloko te”. (Matai 24:39; Luka 17:26, 27; 2 Petelo 2:5) Bazalaki kosepela na yango te! Na bongo babungisaki nyonso.
Likambo yango esalemaki mpe na Sodome na Gomore, bamboka mibale oyo lokumu na yango ebebaki makasi mpo na pite. Ntango bayebisaki bango ete libebi elingi koyela bango mpo na etamboli na bango ya mabe, bato baboyaki koyoka. Moto nyonso oyo azalaki kobulunganisa bizaleli na bango ya bomoi azalaki kosepelisa bango te. Bobele Lota nde amikesenisaki.—Genese 18:20-30; 19:1-29; Luka 17:28-30.
Na bongo, bafandi ya bamboka yango bayambaki malamu te nsango oyo esakolamaki epai na bango. Mbala mosusu bazalaki komibanzabanza mingi na oyo baninga na bango bakokaki kokanisa soko basepeli na nsango yango, to bazalaki kobanga kobongola bizaleli na bango. Emonani polele ete bazalaki kosepela na bomoi na bango ya mbindo. (Yuda 7) Yango wana kino na ntango oyo babomamaki, bayebaki eloko te mpe bakangaki ntina ya likambo oyo elingaki koyela bango te.
Baoyo baboyaki kotya likebi na ntango na Yesu
Ntango Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, azalaki na mabelé, atindaki bayekoli na ye bakenda kosakola nsango malamu etali bokonzi ya Nzambe. (Matai 10:7) Ya solo, alakisaki epai na bayekoli na ye ndenge nini kosakola nsango yango oyo bato bamesanaki na yango te mpe oyo ezalaki na ntina mpo na libota nyonso, mpe likambo nini esengelaki na bango kosala soko moto asepeli te. Toyoka ndenge nini abongisaki bayekoli na ye: “Ekoingela bino na ndako, bopesa mbote wana. Soko mpe ndako ezali na malamu, tika ete kimya na bino efanda na yango. Nde soko ezali na malamu te, tika ete kimya na bino ebutwa epai na bino. Mpe soko moto nani akoyamba bino te, soko nde akoyoka maloba na bino te, wana ekobima bino na ndako yango to na mboka yango, bobwaka mputulu na matambe na bino.”—Matai 10:12-14.
Tomoni ete Yesu apesaki toli epai na bayekoli na ye ‘babwaka mputulu na matambe na bango’ na kobimaka na ndako na mboka oyo bakosepela ata moke te na Bokonzi ya Jéhovah. Alingaki koloba nini? Na kopupolaka matambe na bango, moyekoli amonisaki ete asukoli maboko mpo na likambo nyonso mabe oyo ekoyela moto oyo aboi kosepela na nsango ya Nzambe. Elingi koloba ete, bayekoli na Yesu batiki ndako to mboka yango na kimya nyonso, kotikaka bango liboso na makama nyonso oyo Nzambe akoki komemela bango.
Sepela na yango, mpamba te yango etali bomoi na yo!
Tomoni polele ete Yesu Klisto akokisaki ezaleli ya bato na lelo na ezaleli ya baoyo bazalaki na bomoi na ntango na Noa mpe na bafandi ya Sodome na Gomore. (Matai 24:37-39; Luka 17:26-30) Pite mpe mobulu epalanganaki mingi na ntango ya Noa mpe na ntango ya Lota. Ya solo, mosembwi Lota atungisamaki, amonaki mpasi, na komonaka baoyo bazalaki pembeni na ye ndenge bazalaki kobuka mibeko mpe komizindisaka kati na etamboli ya mbindo.—2 Petelo 2:6-8.
Nzokande, ntango Yesu azali kolobela mikolo ya Noa mpe ya Lota, azali kobenda likebi na biso likolo na pite mpe mobulu ya ntango wana te, kasi likolo na misala ya mokolo na mokolo—kolya, komela, kobala, kosomba, koteka, kotonga mpe kolona. Amonisaki ete bato mingi bakoboya koyoka nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe, kasi bakobendama na basusi ya bomoi ya mokolo na mokolo mpe na bongo, bakotya ata likebi moke te mpo na mikano ya Jéhovah. Nsango yango ezali ya ntina mpenza. Baoyo bazali koyoka yango te bakokufa. Kozanga kotalela yango to kozanga kosepela na yango ezali lisumu monene.—Tala Matai 6:31, 32.
Na ndimbola nini lisumu yango ezali monene? Yesu alandi ndimbola na ye boye: “Na mokolo na kosamba, ekozala malamu mpo na mokili na Sodome mpe Gomore koleka mboka oyo”, eboi koyoka mpe eboi kosepela na nsango malamu. (Matai 10:15) Soko moto atye likebi na nsango malamu, ayoki yango mpe andimi yango, akoki, ata azali na bomoi ya mbindo mpe ya mobulu, kobongola bomoto na ye mpe kondimama na miso na Jéhovah mpo na kokoma moko na bato bakofanda kati na Bokonzi na ye. Ezali mpenza yango nde baklisto ya liboso ya Korinte basalaki.—1 Bakolinti 6:9-11.
Kati na masolo na ye nyonso elongo na bayekoli na ye, Yesu Klisto alendisaki bango ete bayoka, batya likebi, basepela na nsango ya ntina oyo ya Bokonzi na Nzambe. Mpo na kolamusa likebi ya bayoki na ye, alendisaki bango na maloba oyo: “Na bongo bokeba soko bozali koyoka boni.” “Tika moto azali na matoi na koyoka, ayoka.” “Boyoka mpe bokata ntina.”—Luka 8:18; Malako 4:9; 7:14; Matai 15:10.
Na yango, mbala ya nsima oyo Témoin de Jéhovah moko akobeta na porte na yo, ekozala litomba mpo na yo soko olobi: ‘Kota mpamba te esepelisi ngai.’