Esengeli koboma libala to te?
NA SANZA ya Juin 1986, baponi misato kati na mitano bandimaki mobeko oyo epekisi koboma libala kati na Ekolo lrlande etikala se bongo; lrlande ezali mboka ya nsuka ya Europe de l’Ouest oyo endimaka te likambo ya koboma libala.
Ata sikawa koboma libala ezali kondimama mingimingi, emonani ete makanisi ya bato mingi na ntina ya likambo ya koboma libala, ezali kotalela mpenzampenza esika oyo bango babotami mpe bakoli. Makambo mosusu lokola loposo ya nzoto, boyekoli mpe zongazonga ya esika oyo moto akolaki ezali mpe komema bopusi. Kasi ezali mpenzampenza lingomba, to kozanga na lingomba nde ezali kokata likambo.
Okanisi nini mpo na koboma libala? Esengeli kopesa nzela epai na babalani mibale oyo libala na bango ezali na matata mpe baoyo bazali na esengo te bango mibale mpo bafandi elongo na kotya nsuka na mikakatano na bango na kobomaka libala? Okoyanola ndenge nini? Mpe, likambo oyo eleki lisusu monene, likolo na makambo nini okotonga eyano na yo?
Makanisi ndenge na ndenge
Mpo na bamilió na bato oyo bazali kolanda mibeko na katolike, koboma libala ezali likambo moko ya mabe. Engebene Encyclopédie catholique (angl.), “Libala ya boklisto ekoki kokufa te (mpe epesa nzela na moto ete abala lisusu) soki esili kokokisa mibeko ya lingomba”. Lingomba ya katolike ezali kopesa ata bongo nzela ete libala esuka soki ezangisi mwa makambo, mpe lolenge yango ya kosala esili kopalangana. Na ntina yango, The Denver Post ya Avril 1986, elobaki boye: “Bakatolike mingi ya région na biso bazali kosenga kosukisa mabala na bango, na boye ete sángó ya Denver asombaki ordinatere moko mpe abakisaki basali mosusu, elingi koloba dépense ya ba dollars penepene na 250 000, mpo alonga kati na mosala wana monene.” Rapport elimbolaki lisusu ete “sángó ya Denver asengeli kotalela mikanda 700 oyo ezali kosenga kosukisa ya libala, yango elingi koloba ete bazali na mbula misato ya retard.”
Baprotestá, oyo bapalangani na bankama na bituluku ya mangomba kati na mokili mobimba, bazali kolanda ebele na mitinda mpe mibeko mpo na oyo etali koboma libala. Nzokande, bakonzi na misioni bapesaka nzela mpo ete libala ekufa bobele soko libunga monene esalemi. Libunga ekomonana monene to te, engebene etaleli ya pastere moko na moko. Mabunga lokola ekobo, monyokoli, kosundola mobalani moko, endimamaka mingi, kasi mabunga mosusu mpe makoki kotangama. Sikawa mangomba mosusu mazali kobongisa molulu mpo na koboma libala; yango ekokani na libala, bakosambela mpe bakoyemba. Engebene The New York Times, na ebongiseli motindo yango, “ndai ya libala esukisami. Babalani bakozongisa lopete na bango ya libala epai na pastere, mpe ye akosukisa ebongiseli yango na kolobaka ete libala esili, mpe bato bazalaki babalani bakopesana mbote”.
Bayuda bazali kotosa ezaleli ya kala oyo etindami na bisambiselo ya lingomba. Mibeko ya bakonzi na Bayuda mipesi nzela na koboma libala soko babalani mibale bandimani bongo, to mpe elembo moko ya nzoto ya mosusu ezali mabe to mpo na etamboli ya nsoni. Libala ekobomama solo bobele soko mobali akomi “guet” to mokanda ya koboma libala, mpe mbala mosusu yango ebimisaka mindondo soko mobali oyo mwasi asaleli ye mabe aboi kokoma mokanda yango to alingi bapesa ye eloko mosusu liboso ete asala mokanda yango. Andrew Stein président du conseil de la ville de New York alobaki kati na diskur na ye oyo asalaki liboso na balabi mpe bazuzi ete ezali “mpo na yango bankoto na basi Bayuda bazali na likoki ya kobala lisusu te.” Kozanga guet, mwasi oyo akobala lisusu atangami lokola asali ekobo. Mwana nyonso abotami na libala motindo wana, atalelami lelo kati na Yisraele lokola mamzêr, elingi koloba mwana ya balabala to ya makango.
Mpo na bato oyo bandimaka Nzambe te to mpe basambelaka te, makambo mazali petee te mpo na bango, baoyo, na ntembe te, bazali kotalela bobele mibeko ya Leta. Na yango, mobeko mpo na oyo etali koboma libala ekeseni na mboka moko mpe mosusu. Na ankete moko esalemaki, batangaki bongo bantina 50 oyo ezali kopesa nzela na koboma libala na ndenge endimami na mobeko na bisika bikeseni kati na Etats-Unis. Tala bamoko na yango: “etamboli mabe mpe kobeta mobalani”; “libala oyo ezali na makoki mingi te mpo na koumela” mpe “soko mwasi aboi kolanda mobali na mboka mosusu ya Etats-Unis”. Kala mingi te likanisi mosusu euti kobima mpo na likambo etali koboma libala soko babalani mibale bandimami, mpe yango emonisi ete bato bazali koyeba lisusu kokesenisa malamu na mabe te.
Bazali kopengwa se kopengwa
Mingi kati na mibeko yango mpe mitinda yango ya bongola bongola, bazali koloba ete miuti kati na Biblia. Kasi elongi na kobatela libala mpe bolamu ya bato? Kobakisama ntango nyonso ya motuya ya mabala makufi — libala moko kati na mabala mibale ezali kokufa kati na mikili mosusu ezali komonisa yango polele. Mpo na koloba solo, mibeko yango mimonisi kozanga bolongi bobele mpo na oyo etali kolendisa bikanganelo ya libala te, kasi ebakisaki lisusu mpasi mpe mawa epai na bamilió mingi na bato.
Baoyo balingi mpenza kosala makambo na bosembo basengeli bongo koluka koyeba nini Biblia ezali solo koteya mpo na likambo yango.