’Bolingaka bato ya lolenge oyo’
‘Bokumisa lolenge oyo na bato.’—1 BAKOLINTI 16:18.
1. Ntoma Paulo azalaki kolinga bato ya lolenge nini, mpe akomaki nini mpo na bango?
BATO ya lolenge nini ntoma Paulo azalaki kolinga mpenza? Ezali baklisto oyo basepelaki komipesa mobimba mpo na Jéhovah mpe mpo na bandeko na bango. Mpo na moko na basalani na ye elongo, akomaki: “Bongo boyamba ye kati na Nkolo na esengo nyonso: bolingaka bato ya lolenge oyo, mpamba te abelemi na kufa mpo na mosala na Nkolo, kotyaka bomoi na ye na likama.”—Bafilipi 2:29, 30, MN.
2. Banani tosengeli kokumisa mingi, mpe mpo na nini?
2 Na mikolo na biso, kati na masangá koleka 55 000 ya ba Témoins de Jéhovah, baklisto mingi oyo bazali komonisa ndakisa malamu, babongi mpenza na lokumu mpo na molende na bango kosalela bandeko na bango. Kolakisaka ete tosengeli kolinga bato ya motindo yango, Paulo akomaki ete: “Tolombi bino bandeko ete botosa bango bakosalaka mosala kati na bino mpe baoyo batyami batambolisi na bino kati na Nkolo mpe bazali kopamela bino ete bokumisa bango mingi kati na bolingo mpo na mosala na bango.”—1 Batesalonike 5:12, 13.
3. (a) Eloko nini ekoki kosalisa biso ete tozala na kimya kati na biso? (b) Na likambo nini bankulutu basengeli kolakisa ndakisa malamu?
3 Soki tolingi kozala na bomoi ya kimya kati na lisangá na biso, ezali na ntina ete topesa na bandeko na biso ya mibali to ya basi lokumu oyo ebongi, mpenzampenza na bankulutu oyo bamipesi mobimba. Mpo na yango, lokola na makambo mosusu nyonso ya bomoi ya baklisto, bankulutu basengeli kozala “ndakisa malamu mpo na etonga”. (1 Petelo 5:2, 3) Nzokande, wana ezali bango komizela ete baninga na bango baklisto bakumisa bango mpo na mosala na bango makasi, bankulutu basengeli mpe kolakisa ndakisa malamu na kopesanaka lokumu oyo ebongi.
‘Bokumisanaka.’
4, 5. (a) Ndenge nini ntoma Paulo amonisaki ete azalaki kokumisa bankulutu oyo bazalaki kosala mingi? (b) Akomaki nini epai na baklisto ya Rome, mpe mpo na nini maloba na ye matali mingimingi bankulutu?
4 Ntoma Paulo alakisaki ndakisa malamu mpo na yango. Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, alukaki komona bizaleli malamu ya bandeko na ye mibali mpe basi. Alendisaki baklisto bobele te ete balinga mpe bamemya bankulutu oyo bazalaki kosala mingi, kasi alakisaki ete ye mpenza azalaki kokumisa bango. Na ntembe te, azalaki kolinga bato ya lolenge yango.—Tala Bafilipi 2:19-25, 29; Bakolose 4:12, 13; Tito 1:4, 5.
5 Kati na mokanda oyo akomelaki baklisto ya Rome, Paulo akomaki: “Mpo na bolingo na bandeko, bolinganaka; mpo na lokumu, bopesaka ndakisa. Mpo na etingya, bolembaka te; mpo na elimo, bopelaka móto; bosalelaka Jéhovah lokola baombo.” (Baloma 12:10, 11, M.N.) Na ntembe te, maloba yango matali libosoliboso bankulutu. Basengeli kolakisa ndakisa epai na bandeko na bango baklisto nyonso na oyo etali kokumisana.
6. (a) Eloko nini bankulutu basengeli kosala te, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini bankulutu bakoki kokolisa elikya ya lisangá epai na collège?
6 Bankulutu bakokeba mingimingi ete baloba mabe mpo na bakengeli mosusu te. Nkulutu moko te amonisaka bizaleli malamu nyonso ya baklisto na lolenge ya kokoka, mpamba te bango banso bazangi kokoka. Ezali na baoyo baleki baninga na makambo mosusu, kasi na makambo mosusu bazali na bolembu koleka. Soki bankulutu bazali na bolingo mpe bondeko oyo ekoki bamoko epai na bamosusu, bakotalela mabunga ya baninga na bango lokola makambo mike. Kati na masolo na bango elongo na basangani ya lisangá, bakolobela mingi makambo malamu ya bankulutu mosusu. Na komonisaka bongo ndakisa mpo na oyo etali kokumisana, bakokolisa konfianse ya lisangá epai na lisangani ya bankulutu.
Bazali kosala elongo kati na lisangani ya bankulutu
7. Eloko nini ekosalisa bankulutu ete basala na bomoko, mpe ndenge nini bakoki kolonga?
7 Nsima na kolobela “makabo epai na mibali” oyo Klisto apesaki na lisangá na ye na mabelé mpo na kobongisa basangani na yango mpe mpo na mosala ya kosungaka, ntoma Paulo akomaki ete: “Tokola na makambo nyonso epai na ye oyo azali motó, ye Klisto.” (Baefese 4:7-15) Soki bankulutu bazali kondima ete Klisto azali Mokonzi na lisangá, ete azali kotambwisa yango mpe ete bango basengeli komikitisa na nse na loboko na ye ya mobali, na nse na bokonzi na ye, yango ekokolisa bomoko kati na lisangani ya bankulutu. (Baefese 1:22; Bakolose 1:18; Emoniseli 1:16, 20; 2:1) Bango banso bakoluka litambwisi oyo Yesu azali kopesa na nzela na elimo santu, ya mitinda na Biblia mpe ya mateya mapesami na Collège central oyo euti na kelasi ya “moombo na sembo mpe na mayele.”—Matai 24:45-47; Misala 15:2, 28; 16:4, 5.
8. Likambo nini bankulutu nyonso basengeli te kobosana, mpe ndenge nini bakokumisana?
8 Bakengeli bayebi ete na nzela na elimo santu, Klisto akoki kotambwisa likanisi ata ya nkulutu nini, mpo ete alakisa motinda ya Biblia oyo etali likambo moko to oyo ezali kopesa nzela na kozwa ekateli boye to boye ya ntina. (Misala 15:6-15) Elimo santu eyelaka bobele nkulutu moko te kati na collège. Bankulutu bakokumisana bongo na koyokaka na likebi ntango moko kati na bango azali koyebisa bango motinda moko ya Biblia to liteya moko ya Collège central oyo eyokani na likambo oyo bazali kotalela.
9. (a) Bizaleli nini ya elimo ekosalisa mokengeli moko ete aluka te koyangela bankulutu mosusu? (b) Ndenge nini nkulutu moko akomonisa “makanisi malamu”, mpe ndakisa nini Collège central ya ekeke ya liboso epesaki mpo na yango?
9 Bokatikati mpe komikitisa ya baklisto ekopekisa nkulutu moko ete aluka te koyangela bandeko na ye mpe kondimisa bango na makasi makanisi na ye. (Masese 11:2; Bakolose 3:12) Ekomaka ete, na makanisi malamu mpenza, mokengeli moklisto moko azali na likanisi na ye sikisiki mpo na likambo moko. Kasi soki amoni ete bankulutu mosusu bazali na bantina ezwami na Biblia mpe ya teokratike ya koboya yango, ‘akomitambwisa lokola mwana moke’ mpe akomonisa “makanisi malamu” na kondimaka likanisi na motuya moleki monene ya bankulutua. (Luka 9:48; 1 Timote 3:3) Na yango akolanda ndakisa malamu oyo etikamaki na basangani ya Collège central na ekeke ya liboso baoyo ‘bandimanaki na likanisi moko’ na nsuka na lisolo moko ya Biblia oyo mpe etambwisamaki na Klisto na nzela na elimo santu.—Misala 15:25.
10. (a) Nini endimisi ete kotyama ya lisangani na bankulutu kati na lisangá mokomoko ezali ebongiseli euti na Biblia? (b) Engebene mokanda Lisangá mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, matomba ya ebongiseli yango mazali nini?
10 Kotyama ya lisangani na bankulutu oyo bazali na mokumba ya kopesa ndakisa, kati na lisangá mokomoko, etongami likoló na modèle oyo lisangá na boklisto ya liboso etikaki. (Bafilipi 1:1; 1 Timote 4:14; tala note oyo etali liloba “presbytres” na Tito 1:5 kati na Bible de Jérusalem). Kobendaka likebi likoló na ebongiseli yango ya mayele, mokanda Lisangá mpo na kokokisa mosala ya Nzambe (lokasa 37) elobi: “Bankulutu nyonso bakozala na makoki motindo moko te; moko akoleka na ezaleli oyo, mosusu akoleka na ezaleli oyo kuna mosusu. Na motindo yango, lisangani mobimba ya bankulutu ekokokisa masengami nyonso mpo na kozala bakengeli na lisangá na Nzambe.”
Kopesana limemya kati na lisangani ya bankulutu
11, 12. (a) Mpo na nini lisangani na bankulutu ekoki kosala mingi koleka nkulutu mokomoko? (b) Ndenge nini Yesu Klisto mpe ntoma Paulo basalaki elongo na ba collèges ya bankulutu, mpe batoli nini bapesaki bango?
11 Engebene Makomami, lisangani ya bankulutu bakotalela bobele makoki na bango moko te. Ntango bankulutu bakoyanganaka, bakobondelaka Jéhovah atambwisa bango na nzela ya Klisto mpe ya elimo santu. Na ndenge yango, na lisungi ya elimo santu, bakoki kozwa bikateli oyo mbele bizwamaki te soki bazalaki elongo moko te. Wana ezali bango koyangana, bizaleli na bango nyonso bizali kosalelama mpe bikateli bikozwama, bikomonisa ete Klisto azali kotambwisa bango.—Tala Matai 18:19, 20.
12 Bansango oyo Klisto atindaki epai na “myoto nsambo” to “baanzelu na masangá nsambo” ya Asie Mineure, emonisi polele ete Klisto azali kosala na boyokani elongo na ba colleges ya bankulutu. (Emoniseli 1:11, 20) Nsango ya liboso etindamaki na lisangá ya Efese na nzela na anzelu na yango to lisangani ya bankulutu bapakolami na elimo. Bambula soki ntuku minei na liboso, ntoma Paulo abengisaki lisangani na bankulutu ya lisangá ya Efese na Milete mpo basala likita moko ya ntina elongo na ye. Akundolaki epai na bakengeli yango ete basengeli komibatela bango mpenza mpe koleisa lisangá.—Misala 20:17, 28.
13. Mpo na nini bankulutu basengeli kosenzela na elimo oyo ezali komonana na boyokani na bango kati na collège na bango mpenza mpe elongo na lisangani ya bankulutu ya lisangá mosusu?
13 Bankulutu basengeli mpenzampenza kobatela elimo malamu ya kolendisa kati na collège mpe na lisangá. (Misala 20:30) Lokola moklisto mokomoko, lisangani na bankulutu to mpe lisangá ezalaka na elimo na yango mpenza. (Bafilipi 4:23; 2 Timote 4:22; Filemona 25) Bankulutu oyo bazali kopesana limemya bakoki mbala mosusu kozanga koyokana na lisangani ya bankulutu ya lisangá mosusu. Na bingumba epai masangá mingi basalelaka Salle moko, ekomaka ete kozanga koyokana ezali kobima kati na ba collèges ya bankulutu mpo na oyo etali ngonga ya makita, kokabola teritware, kobongisa Salle du Royaume, bongo na bongo. Bankulutu basengeli kozala na bokatikati, na komikitisa mpe na makanisi malamu na boyokani na bango na bankulutu ya masangá mosusu lokola katikati na collège na bango. Ntoma Paulo apesi toli oyo: “Tika ete nyonso ezala mpo na kolendisa bato.”—1 Bakolinti 14:26.
Limemya oyo ebongi na bakengeli ya zongazonga
14. Etuluku nini mosusu ya bankulutu ebongi ete tolinga bango, mpe mpo na nini?
14 Bavizite oyo esalamaka mbala na mbala na bakengeli ya zongazonga, to bakengeli ya circonscription mpe ya distrike, ezali ebongiseli mosusu ya Biblia ezwamaki mpo na masangá ya ba Témoins de Jéhovah. (Misala 15:36; 16:4, 5) Na ntembe te, bakengeli yango bazali “bankulutu oyo bakotambwisaka mosala malamu.” Ndenge moko na bankulutu mosusu, basengeli “kokumisama na lokumu loleki, mingimingi baoyo bakosalaka makasi na kosakola mpe kolakisa.”—1 Timote 5:17.
15. Toli nini ntoma Yoane apesaki mpo na bapalanganisi na nsango malamu oyo bakendeke kotala masangá?
15 Na mokanda na ye ya misato, ntoma Yoane apameli Diotrefe, oyo azalaki koboya ‘koyamba bandeko na limemya’. (Verset 10) Bandeko yango bazalaki bakengeli ya zongazonga oyo ‘babimaki mpo na nkombo na ye [oyo ya Jéhovah]. (Verset 7) Emonani ete batindamaki lokola bapalanganisi na nsango mpo na kosakola nsango malamu mpe kolendisa masangá kati na bingumba epai bazalaki koleka. Yoane alobaki mpo na basakoli yango ya zongazonga oyo bazalaki kosala mingi ete ‘balekisa bango na mobembo na motindo mobongi na Nzambe. (Verset 6). Ntoma abakisaki ete: “Bongo, ekoki na biso koyamba bato ya lolenge yango ete tozala basalani na bango elongo kati na solo.” (Verset 8) Esengelaki koyamba bango na limemya.
16. Na eleko na biso ndenge nini baklisto nyonso bakoki kolanda ndakisa ya Gayuse, oyo azalaki “kosala mosala na sembo” mpo na bapalanganisi na nsango malamu na ekeke ya liboso, mpe mpo na nini ebongi bongo?
16 Ndenge moko na mikolo na biso, ebongi koyamba na esengo mpe limemya bakengeli ya zongazonga oyo batindami na Collège central mpo na kosakola nsango malamu mpe kosalisa masangá. Bandeko yango mpe basi na bango (soki basila kobala lokola mingi kati na bango) bafandaka esika moko te. Batambolaka longwa na esika moko kino na esika mosusu, kotyaka mbala mingi motema na boyambi ya baninga na bango baklisto mpo na kozwa bilei mpe esika ya kolala. Yoane akomelaki Gayuse oyo azalaki koyamba na esengo mingi bapalanganisi na nsango malamu oyo bazalaki kotambola na ekeke ya liboso ete: “Molingami, ozali kosalaka na sembo na misala mikosalaka yo mpo na bandeko, ata bazali bapaya.” (3 Yoane 5) Bobele bongo, na eleko na biso, baoyo bazali kosala mobembo ‘mpo na nkombo na Jéhovah’ babongi ete tolinga bango mpe tomonisa bango limemya.
17. Ndenge nini bankulutu ya masangá basengeli komonisa epai na bakengeli ya zongazonga limemya oyo ekoki na bango?
17 Mingimingi bankulutu, basengeli komonisa limemya oyo ebongi na bamonisi yango ya Collège central. Soki bakengeli yango bazwaki mokumba ya kotala masangá, ezali mpo na bizaleli na bango ya elimo mpe mayele na bango ya mosala oyo mbala mingi ezali koleka oyo ya bankulutu mingi. Bamoko kati na bakengeli yango ya zongazonga bazali bilenge koleka bankulutu mosusu na masangá oyo bazali kotala. Kasi ezali mpo na yango te nde bakoboya komonisa bango limemya oyo ebongi na bango. Ntango mosusu bamonaka ete basengeli kopesa toli epai na bankulutu ya lisangá moko ete bazela naino mwa ntango liboso na kotinda nkombo ya moklisto moko mpo aponama lokola mosaleli na misala to nkulutu, na komikundolaka likebisi oyo Paulo apesaki na Timote. (1 Timote 5:22) Ezali solo ete bakengeli ya zongazonga basengeli kotalela makanisi oyo bankulutu bapesi, kasi na ngambo na bango, bankulutu mpe basengeli kozala pene mpo na koyoka bango mpe kozwa litomba na ekspérianse na bango. Ee, bankulutu basengeli ‘kolanda kolinga bato ya lolenge oyo’.—Bafilipi 2:29.
‘Bokumisaka bato ya lolenge oyo’
18, 19. (a) Na maloba nini Paulo amonisaki ete azalaki kokumisa baninga na ye ya mosala? (b) Likambo nini elakisi ete Paulo azalaki kobomba nkanda te mpo na bandeko na ye?
18 Kati na mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti Paulo akomaki: “Nazali kobondela bino bandeko. Boyebi ete bato na ndako na Setefanase bazalaki bandimi ya liboso kati na Akai mpe ete basili komitya bango mpenza na mosala mpo na kosalela babulami. Bino botosaka bato ya lolenge oyo mpe bato nyonso baoyo bakosangana na mosala mpe bakosalaka na etingya. Nasepeli ete Setefanase mpe Foretunatuse mpe Akaikuse basili koya, mpamba te bango batondisi misala mizangaki epai na bino. Bolendisi elimo na ngai mpe oyo na bino. Bokumisaka bato ya lolenge oyo.”—1 Bakolinti 16:15-18.
19 Oyo nde ezaleli kitoko, oyo nde motema malamu mpe elimo malamu Paulo amonisaki na boyokani na ye elongo na bandeko na ye! Bamosusu bayebanaki mingi te, kasi Paulo alingaki bango mpamba te bazalaki ‘kosalana elongo’ mpe ‘kosala’ na molende mpo na kosunga babulami. Paulo atikaki mpe ndakisa malamu na koboyaka kozongela makambo ya kala. Atako Jean-Marc ayokisaki ye mawa na mobembo na ye ya liboso ya misionere, na nsima Paulo alobaki malamu mpenza mpo na ye epai na lisangá ya Kolose. (Misala 13:13; 15:37, 38; Bakolose 4:10) Ntango akotisamaki na boloko na Rome, Paulo asengaki ete Malako alanda ye, mpamba te, alobaki ete: “Azali kosunga ngai na mosala.” (2 Timote 4:11) Azalaki kobomba nkanda na motema te mpo na baninga na ye.
20. Ndenge nini baklisto nyonso, mpe mingimingi bankulutu, basengeli komonisa ete bazali kokumisa bakengeli ya sembo mpe ete bazali ‘kolanda kolinga bato ya lolenge yango’?
20 Na eleko na biso, libota na Nzambe ezali na ebele na bakengeli bamipesi baoyo, lokola Setefanuse, bazali kosalela bandeko na bango. Ya solo bazali na mabunga, kasi bazali ‘kosalana elongo’ na “moombo na sembo mpe na mayele” mpe Collège central na yango. Bazali kosala na molende kati na mosala ya kosakola mpe mpo na kosunga bandeko na bango baklisto. Tosengeli ‘kolanda kotosa bato ya lolenge oyo’ mpe kokumisa bango mpo na bizaleli malamu na bango, kozanga kotelemisa makanisi likoló na mabunga na bango. Na ngambo na bango, bankulutu basengeli kopesa ndakisa na kokumisana mpe na kopesa limemya na ndenge ebongi na bango. Basengeli kosalana elongo na bolingo mpe bomoko. Toyebi na meko nini bandeko yango ya sembo babongi na lokumu na biso, ee, ‘tolingaka bato ya lolenge oyo’.—Bafilipi 2:29.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Note moko ya Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Lingelesi oyo ezali na mitindami to références, elakisi ete na 1 Timote 3:3 liloba “makanisi malamu” ebongoli liloba moko ya greke oyo elakisi mpenzampenza “pene mpo na kotika.”
Bozongeli
◻ Bato ya lolenge nini Paulo azalaki kolinga mingi, mpe na mikolo na biso, banani babongi ete tomonisa bango lokumu mingi?
◻ Ndenge nini bankulutu basengeli komonisa ete bazali kopesana lokumu?
◻ Mpo na nini lisangani ya bankulutu ekoki kosala mingi koleka nkulutu mokomoko?
◻ Na makambo nini lisangani moko ya bankulutu ekoki komonisa ete ezali kokumisa lisangani mosusu ya bankulutu?
◻ Lolenge nini ya bakengeli ebongi ete tolinga bango mingi; mpe ndenge nini tokoki komonisa bango limemya oyo ekoki na bango?
[Elilingi na lokasa 22]
Bankulutu basengeli kopesana lokumu.