Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/6 nk. 28-32
  • Nzambe abengi bino mpo na kimya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe abengi bino mpo na kimya?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mposa ya mayoki to ya kosangisa nzoto
  • Okoki kolimwisa liyoki ya kokanisa ete ozali yo moko
  • Ntina ya libondeli
  • Kobatelama na “kimya ya Nzambe”
  • Ntango kimya na babalani ekutani na mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Ndenge nini kosalisa bandeko oyo libala ekufá?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Kumisá libala, ebongiseli oyo Nzambe atyá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Soki libala elingi kopanzana
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/6 nk. 28-32

Nzambe abengi bino mpo na kimya?

‘Soko ye oyo azangi kondima alingi komikabola, tika ete amikabola; na likambo yango, ndeko mobali to ndeko mwasi akangami te. Mpo ete Nzambe abengi bino mpo na kimya.”​—1 BAKOLINTI 7:15.

1. Likanisi ya Biblia ezali nini mpo na libala?

EZALAKI mokano ya Jéhovah te ete libala esuka na bokabwani to mpe na kobomama oyo ezali kopesa mpasi mingi na motema. Ekanganeli ya libala esengelaki koumela, kosangisa bato mibale bakoma “mosuni moko” mpe epesa bango esengo, bopemi mpe kimya. (Genese 2:24; Luta 1:9) Longola bobele makambo ya mabe koleka, Makomami mapesi nzela na babalani, ete bafanda elongo, ata soko bobele moko kati na bango nde azali moklisto. (1 Bakolinti 7:12-16) Epai mosusu moto oyo akolinga kobebisa ekanganeli ya libala na nzela ya mayele mabe mpe bokosi, akozongisa monoko epai na Nzambe, ye oyo ‘ayini koboma libala’.​—Malaki 2:13-16.

2. Ndenge nini baklisto basengeli komona bokabwani mpe koboma libala?

2 Kozanga kokoka ya moto mpe makambo mosusu masili mbala mingi komema ata basaleli na Nzambe baoyo basili kobatisama na kokabwana mpe na koboma libala. Ata bongo, lokola baklisto bazali kokumisa libala, bakokoma na makambo wana bobele nsima ya kosala milende makasi mpo na kobatela libala na bango. Nzambe ye moko asila kopesa ndakisa ya malamu koleka na ntina yango. Ye azalaki “Nkolo mpe mobali” ya Yisraele ya kala, na boumeli ya bikeke, akangaki motema mpo na motó makasi, botomboki mpe ekobo ya elimo ya libota yango. (Yisaya 54:1-5; Yilimia 3:14-17; Hosea 1:10, 11; 3:1-5) Ezali bobele ntango basaleli na ye bakomaki na ezalela ya kozanga kobongola motema nde Jéhovah abwakaki bango lokola libota.​—Matai 23:37, 38.

3. (a) Na makambo nini mpo na yango Biblia ezali kopesa ndingisa mpo na moto kokabwana na mobalani na ye? (b) Na kotalela Makomami, nini ekoki koboma libala?

3 Mbala mosusu baklisto bazali kosenga epai na bankulutu ya lisangá na bango ete basalisa bango na kosilisa mikakatano makasi ya libala. Ya solo, bankulutu bazali na bokonzi likoló na moto te mpo na kopesa ye toli ete akabwana na mobalani na ye to aboma libala, kasi bakoki kokundwela ye oyo Liloba na Nzambe elobi mpo na makambo yango. Lokola emonisamaki na lisolo eleki, Biblia epesi ndingisa na moklisto akabwana na mobalani na ye ntango aboi kokokisa bamposa ya libota na ye, azali kobetabeta ye makasi to mpe atye bomoi na ye ya elimo na likama mpenza. Tomonaki lisusu ete Biblia ezali kopesa nzela na moklisto koboma libala mpe kobala moto mosusu oyo azali mobalani na ye te bobele soko “pite” esalemi, liloba oyo elimboli lolenge nyonso ya mbindo ya bosangisi nzoto. (Matai 19:9) Lokola yango eyebani, ezala kokabwana to koboma libala ekoki kopengolama, mpamba te likoki ekoki kozala mpo na kozongisa kimya kati na babalani, ata mpe ekobo to lolenge mosusu ya pite ekoki kolimbisama na mobalani oyo basaleli ye mabe.​—Matai 5:31, 32; tala Hosea 3:1-3.

4. (a) Lobela na mokuse toli oyo ntoma Paulo apesaki na baklisto oyo babala oyo tozali kokuta na 1 Bakolinti 7:10-16? (b) Ntango nini ekoki kolobama ete “Nzambe abengi bino mpo na kimya”?

4 Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, ntoma Paulo alendisaki baklisto babálá ete bakabwana te na babalani na bango. (1 Bakolinto 7:10-16) Maloba na Paulo mamonisi ete soko mobalani oyo azali mondimi te azwi ekateli ya kotikala to kofanda na mobalani oyo azali moklisto, ye oyo azali moklisto asengeli komeka kosalisa mosusu kati na elimo. (1 Petelo 3:1-4) Kobongwana ya mobalani oyo azali mondimi te ekosala ete ndako ezala esika ya kopema mpe ya kimya. Kasi soko akotemela makasi kondima ya mobalani na ye oyo azali mondimi kino kozwa likatami ya kokabwana, na bongo, mobalani oyo azali moklisto akosala nini? Soko akomeka kokanga ye na makasi ete afanda elongo na ye, mobalani oyo azangi kondima akoki kokomisa makambo mabe koleka kino oyo azali moklisto akozanga kimya. Mpo ete yango esalema te, moklisto akotika ye oyo azali mondimi te akende. (Matai 5:9) Ezali bobele ntango mobalani oyo azali mondimi te abendi nzoto nde ekolobama ete: “Nzambe abengi bino mpo na kimya”. Maloba oyo makoki kosalelama te mpo na kolongisa likatami ya baklisto mibale oyo bakabwani engebene mikano na bango moko to mpo na makambo oyo mapesami nzela te na Biblia.

5. Mituna nini misengeli sikawa kobenda likebi na biso?

5 Bokabwani nyonso, koboma libala nyonso ebimaka na nzela na makambo na yango mpenza, mpe “etinda” moko ezali te oyo ekoki kopesama mpo na kokata likambo oyo na oyo kuna mpamba te bantina ekeseni. Kasi mikakatano nini moklisto oyo akabwani na mobalani na ye to mpe oyo abomi libala akoki kokutana na yango? Akoki kosala nini mpo na kolonga yango? Mpe lisalisi nini bakoki kopesa ye?

Mposa ya mayoki to ya kosangisa nzoto

6. Ekoki kolobama ete bokabwani to koboma libala ezali kosilisa mikakatano nyonso?

6 Bokabwani to mpe koboma libala oyo epesami ndingisa na Makomami ezali kosukisa mwa mikakatano, kasi mingimingi ezali kolimbisa mosusu. Na yango, moklisto mwasi moko oyo asila koboma libala alobaki: “Nakoki komipekisa te na kotonda Jéhovah mpo na kimya oyo nazali na yango sikawa.” Nzokande abakisaki ete: “Ezali likambo ya petee te mpo na kobokola bana yo moko. Mbala mosusu nazali komiyoka ete nazali bobele ngai moko mpe nazali na mawa. Ata mpo na oyo etali kosangisa nzoto, ezali likambo ya petee te. Osengeli komesana na bomoi oyo ekeseni mpenza na oyo ya libosoa.”

7. Mpo na nini moklisto asengeli kokanisa malamumalamu makama oyo makoki kobima na kokabwana to koboma libala?

7 Soko moklisto alingi kopona, asengeli kokanisa malamumalamu na makambo oyo makobima nsima ya bokabwani to mpe nsima ya koboma libala. Na ndakisa asengeli kotalela bamposa ya mayoki na ye; mpo na mwasi, ekozala mbala mosusu mposa ya kozala na mobali. (Tala Genese 3:16) Mwasi oyo libala ekufa azalaka mbala mosusu na mposa makasi ya kobala lisusu. Bamosusu bazali kolinga koboma libala mpo na komilongola na mikakatano, kasi bazali pene mpo na kondima kofanda minzemba soko likoki ya kobala emonani lisusu te?

8. (a) Engebene maloba mazwami kati na 1 Bakolinti 7:11, na makambo nini babalani baklisto oyo bakabwani basengeli kokanisa kati na libondeli? (b) Bamposa nini baoyo bazali kokana kokabwana to mpe koboma libala basengeli kobosana yango te?

8 Paulo akomaki: “Soko [mwasi] amikaboli, atikala kozanga mobali soko azongi na mobali na ye te.” (1 Bakolinti 7:11) Na kosala mwa milende, mbala mosusu likoki ekoki kozala epai na mwasi mpo na ‘kozongisa boyokani’ elongo na mobali na ye. Soko babalani baklisto bakabwani, basengeli kokanisa malamumalamu mpo na kozongisa boyokani, kolobela likambo yango mingi na mabondeli na bango. Basengeli kobosana mpe te ete mposa ya kosangisa nzoto ekoki kozala likama mpo na bango. Nzambe akokanisa nini mpo na bango soko bakwei na pite mpo baboi kozongana? Likambo oyo ekomelaki moklisto mwasi moko ezali komonisa malamu likama yango. Nsima ya koboma libala na ye, azwaki momesano ya kokende epai na mobali moko oyo azalaki Témoin te. Nsima ya mwa ntango moke, azwaki zemi mpe abimisamaki na lisangá. Atako nsima azongisamaki na lisangá, likambo oyo ekomelaki ye ezali komonisa ntina ya komisenzela mpe komipesa epai na Jéhovah kati na libondeli, mpo na ‘kosalela Nzambe lisumu te’. (Genese 39:7-12) Ezali solo ete moto oyo azali kokana kokabwana to koboma libala asengeli te kotalela bamposa na ye ya nzoto lokola likambo moko ya moke.

Okoki kolimwisa liyoki ya kokanisa ete ozali yo moko

9. Ndenge nini tokoki kosalisa baklisto oyo bakabwana to oyo libala ekufa mpo ete balonga liyoki ya komiyoka ete batikali bango moko?

9 Soki kokabwana to koboma libala ekoki kopengolama te, esengeli komibongisa mpo na kokutana na mikakatano oyo mikobima na nsima. Ezalela ya komimona ete otikali yo moko ezali kati na mikakatano oyo mileki minene. Bamosusu bakoki kosala nini mpo na kosalisa baklisto oyo bakabwaná to oyo baboma libala? Bankulutu mpe basangani mosusu ya lisangá basengeli komibanzabanza mpo na bolamu ya elimo mpe komeka kolendisa bango. (Tala 1 Batesaloniki 5:14) Tokoki na ndakisa kobenga bango ntango mosusu elongo na bana na bango mpo na kolya elongo mpe kolekisa mwa ntango mpo na kolendisana elongo kati na libota na biso. Esengeli bobele te kobongisa elambo, mpo ete “bilei na mwa ndunda na epai na bolingo eleki elambo na ngombe na mafuta wana koyinana ezali.” (Masese 15:17) Na mpokwa yango bokoki kosolola makambo mamonanaki na kati ya mosala ya kosakola to kobongisa elongo makita ya lisangá.

10, 11. (a) Na lolenge nini mosusu tokoki kosalisa moklisto oyo akabwana na mobalani na ye to oyo libala ekufa? (b) Mpo na nini ezali likambo ya ntina na kozala na bokengi?

10 Tokoki mpe kosalisa moklisto oyo libala ekufa to akabwana mpo akoka kobengana liyoki ya komimona ete atikali ye moko na kobengisa ye elongo na bana na ye mpo na kobima elongo na libota na biso kati na mosala ya kosakola. Ya solo, moto te akoki kozwa sikisiki esika ya tata to mama, kasi moklisto mwasi moko oyo libala ekufa alobaki: “Lisalisi oyo bankulutu mpe basaleli na misala ya lisangá bamekaki kopesa ngai, esalisaki ngai mingi kati na mokumba na ngai oyo etali kobokola bana kozanga lisungi ya mobali.”

11 Ata bongo esengeli kokeba. Mwasi moko moklisto andimaki yango mpe alobaki: “Lokola mwana na ngai azangaki tata, ndeko moko ya bolingo mingi abandaki mpenza kosepela na ye. . . . Namonaki ete azalaki na bolingo mingi mpe moto ya bokabi epai ya mwana na ngai, na yango bamposa ya mabe ebandaki kobotama na motema na ngai. Namimonaki nakomi kati na likambo moko lokola David ntango akolisaki mposa na eloko oyo ezalaki ya ye te.” (2 Samwele 11:1-4) Atako moklisto mwasi oyo asalaki likambo ya mbindo te, ayokaki nsoni mpo na makanisi na ye mpe na lolenge na ye ya komitambwisa, nzokande alukaki lilimbisi ya Jéhovah mpe akataki boyokani oyo ezalaki kati na ye elongo na Témoin yango. Likambo oyo emonisi polele ntina ya kobengana bamposa ya mabe mpe “kokima mabe ya motindo nyonso”.​—1 Batesaloniki 5:22; Bagalatia 5:24.

12. Eloko nini moto akoki kosala mpo na kolimwisa liyoki ya komiyoka ete atikali yo moko?

12 Liyoki ya komimona ete otikali yo moko ekoki kolimwisama soki tomipesi mpo na kosalela bamosusu. “Ntango moto afungoli motema mpe azali kosalisa bamosusu, akozala lisusu na ntango te ya komiyoka ete atikali ye moko” lokola elobaki yango moklisto moko oyo libala na ye esila kokufa. Moto oyo akabwana to libala ekufa akoki ‘kofungola motema’ na kobengisa libota moko mpo na kokabola bilei elongo na ye to mpe kolekisa ntango ya kolendisana elongo na ye. Soki okoki kosala yango te mpo na kozanga makoki to mpo na likambo mosusu, okoki kokende kotala baoyo bazali kobela to mpe kotala bato mosusu mpo na kolendisa bango. Okoki mpe kosalisa bato oyo basili kokoma mibange na kokende kosombela bango biloko to mpe kosalela bango misala misusu. Omipesa mpo na bamosusu, mpe okomona lisusu malamu koleka ete “esengo na kopesa eleki esengo na kozwa”.​—Misala 20:35.

13. Eloko nini ekoki lisusu kosalisa moto mpo na kolonga ezalela ya komiyoka ete atikali ye moko?

13 Moto akoki mpe kolonga ezalela ya komiyoka ete atikali ye moko soki azali kobima na mosala ya kosakola Bokonzi elongo na baklisto mosusu. Moklisto mwasi moko alobaki: “Ekomaka mbala mosusu ete nazali komiyoka ete natikali ngai moko kozanga mobali, kasi lokola nazali sikawa kosangana mingi na mosala ya kosakola mpe ete nazali na bonsomi ya kotala bandeko na ngai basi mpe mibali baklisto, liyoki yango ezali koumela te mpe eyelaka ngai mingi te”. Kosakola ndako na ndako mbala na mbala, ezali kopesa esengo ya kosala ba visites ya sika na bato oyo bazali kosepela, kobanda boyekoli ya Biblia elongo na bango mpe komona bamoko kati na bango komipesa epai na Jéhovah mpo na kosalela ye. Ya solo, tozali kosangana te na mosala ya kosakola mpo na kobengana liyoki ya komiyokela mawa, kasi mosala oyo ya esengo mpe epambolami ekoki mpe kosalisa mpo na likambo yango.​—Masese 10:22.

14. Misala nini mikoki kopesa matomba epai na baklisto oyo libala ekufa to bakabwana?

14 Basaleli nyonso ya Jéhovah bazali kozwa bolamu ya elimo na kosanganaka na mosala ya kosakola, na koyanganaka na makita ya boklisto mpe na ‘kolukaka liboso Bokonzi’. (Matai 6:33) Misala yango kitoko, oyo mizali kolendisa basaleli mingi ya Jéhovah, mikoki mpe kolendisa baklisto oyo bakabwana to oyo libala ekufa. Ya solo, yango ekosilisa mikakatano na bango nyonso te, kasi ekopesa bango nzela ya kotalela makambo na ndenge ya malamu.

Ntina ya libondeli

15. Matomba nini libondeli ekoki kopesa epai na baoyo basengeli kozongela lisusu kofanda bango moko kati na bomoi kozanga mobalani?

15 Moklisto mwasi moko oyo asengelaki kozongela kofanda ye moko alobi ete alongaki likambo yango kozanga nkaka “na kosanganaka na molende nyonso na mosala ya kosakola . . . mpe na kotalaka bandeko oyo bazalaki na maladi, oyo basili konuna mpe baoyo balembi na elimo.” Kasi abakisaki: “Ntango nazali komiyoka ete natikali ngai moko, nakendaka kotala moto moko mpe kobondela Jéhovah ete alendisa ngai mpamba te nayebi ete Satana azali ntango nyonso pene ya kosalela liyoki motindo wana.” Ee, ezali ntina mingi ya kobondela Nzambe na motema mobimba mpo na kotikala sembo liboso na ye. Na mabondeli na bango, baklisto oyo bakabwana na babalani na bango to oyo libala ekufa, bakosenga na Jéhovah ete apesa bango mbuma na elimo na ye, oyo moko kati na ezali bongo komipekisa, mpo na kolonga bamposa na bango ya nzoto. (Luka 11:13; Bagalatia 5:22, 23; Bakolose 3:5, 6) Lisusu, lokola basi oyo libala esila kokufa bazali kokakatana mingi mpo na kozwa bikateli oyo liboso mibali na bango bazalaki kozwa liboso, bakoki mpe kobondela Nzambe ete asalisa bango mpo na kozwa mayele ya kosilisa mikakatano ndenge na ndenge.​—Yakobo 1:2-8.

16. Tokoloba nini mpo na ngambo oyo moto akanisi ete akumbi nsima ya kokabwana to koboma libala?

16 Bamoko bazali na mayoki ete basalaki likambo ya mabe. Moklisto moko alobaki: “Ata ntango moto azali na likambo te, akoki kotungisama soki libala ekufi.” Ya solo, mayoki motindo wana masengeli kotungisa moto te soki bokabwani to mpe libala ekufaki mpo ete mobalani moko aboi kokokisa mikumba na ye kozanga ntina. (1 Bakolinti 7:3-5) Kasi soko moklisto azwi ekateli ete akabwana to aboma libala mpo na ntina moko endimami kati na Biblia nsima na kokanisa malamu kati na libondeli, moklisto yango asengeli kobondela Jéhovah ete asalisa ye mpo na kobwaka mayoki ya komona ete akumbi ngambo. Tobakisa ete bankulutu ya lisangá basengeli kosenzela mpo na kopesa batoli oyo etongami likoló na Biblia mpe toli na bango esengeli kopesama te mpo na komonisa ete moklisto akumbi ngambo mpo ete azwaki to andimaki kokabwana to koboma libala na nzela oyo endimami na Biblia.

Kobatelama na “kimya ya Nzambe”

17. Eloko nini ezali kosalisa baklisto bakoka kozala na esengo mpe kotengatenga te kati na mokili ya mobulu oyo ezingi bango?

17 Baklisto oyo bakabwani to oyo libala ekufi bazali kokutana na mikakatano mingi oyo mitali bango mpenza. Kasi na meko mosusu, “mpasi motindo moko mpenza ezali kobimela bandeko na [biso] na bipai mosusu na mokili.” (1 Petelo 5:6-11) Na ndakisa, baoyo nyonso bazali kosalela Jéhovah bazali kozwa minyokoli, mpe mingi kati na baklisto bazali komibanzabanza mpo na makambo matali mosolo, to mpe mitungisi ya kolongono ya nzoto, mayoki ya kozanga kokokisa mokano, bamosusu bazali kozwa mimekamo, bongo na bongo. Lokola Ba témoins de Jéhovah mosusu, baklisto oyo bakabwani to mpe oyo basili koboma libala basengeli ntango nyonso kokokisa bamposa na bango ya elimo na kotangaka Biblia, kosangana ntango nyonso na makita, na mosala ya kosakola, na kotyaka mosala ya bulee na esika ya liboso kati na bomoi na bango mpe kobondelaka ntango nyonso boye ete batikala penepene na Jéhovah. (Matai 5:3) Moklisto nyonso oyo azali kosala boye te azali kotya bomoi na ye ya elimo na likama. Kasi, soko ‘akoluka liboso Bokonzi’, témoin de Jéhovah oyo azali sembo akozwa bolamu mpe akotikala ngwi kozanga bopotu kati na mokili etondi na mobulu oyo ezingi biso.

18. Mituna nini ya ntina misengeli kotalelama epai na baklisto oyo bakabwana to baboma libala?

18 Mpo na kobatela elimo na biso malamu, tosengeli kosalela makambo oyo tozali koyekola na kati na Liloba ya Nzambe. Na yango, soko ozali moklisto mpe ete osili kokabwana na mobalani na yo oyo mpe asili komipesa na Nzambe, okoki koloba ete okangi ntina ya toli oyo Paulo apesaki na 1 Bakolinti 7:10-16? Na kati na mabondeli na yo ya sembo lobela polele likambo ya kozongisa boyokani na bino, mingimingi soko osili kokabwana na mobalani na yo esili koleka mwa mikolo. Omituna mpe mituna oyo: Jéhovah azali kozela nini epai na ngai oyo nasila kobala? Babalani baklisto basengeli te kokokisa bomoi na bango na mitinda ya bonzambe oyo etaleli babalani? Ekoki kozala ete mobalani na ngai mpe ngai topambolami te na Jéhovah mpo ete tozali kokumisa ndai na biso te ya libala? Kanisa na bolamu oyo bokokaki kozwa wana bozali kolobana na komikitisa nyonso mpo na makambo oyo, na kobondelaka na bosembo mpe komeka kosala makasi mpo na kosalela Liloba na Nzambe na kati na bomoi na bino. Yango ekoki kozala litomba mpo na bino na kosilisa mikakatano ya libala mpe kozwa lisusu bolamu ya kozala na bomoi elongo kati na ndako oyo ezali esika na kopema mpe na kimya!

19. Engebene Bafilipi 4:6, 7, eloko nini ya motuya basaleli ya Jéhovah bakoki komeka?

19 Basaleli nyonso ya sembo ya Jéhovah bazali na mposa ya eloko ya motuya: “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso”, mpe bakoki kosepela na yango. Biso baoyo tozali baklisto tokozala na kimya yango soko tolandi toli oyo ya Paulo: “Bomitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malombo mpe na matondi. Mpe kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosenzela mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.”​—Bafilipi 4:6, 7.

20. (a) “Kimya na Nzambe“ elimboli nini? (b) Likambo nini tosengeli kosala, ata nini ezali ezalela ya bomoi na biso?

20 Kimya yango ezali eloko mosusu te bobele kozala na motema ya kokita mpe ezangi mitungisi oyo euti epai na Nzambe, ata ntango na makambo na mpasi mpenza. Kimya yango ezali kouta na boyokani ya penepene oyo tozali na yango elongo na Jéhovah mpe na kondimisama oyo tozali na yango ya kosepelisa ye. Baoyo bazali na “kimya ya Nzambe” bazali komitika kotambwisama na elimo santu na ye mpe bazali konyokwama te na mitungisi. Mpo na nini? Mpamba te bayebi ete eloko moko te ekoki kokomela bango kozanga kopesamela nzela na Nzambe. (Baefese 4:30; tala Misala 11:26) Yango wana, tozala minzemba to mpe tosila kobala, to tokabwana na babalani na biso to mpe toboma libala, topesa motuya monene na “kimya ya Nzambe”. Ekoki na biso mpe ete totya motema lokola Davidi oyo alobaki: “Nakolala, ee nakolala mpongi na kimya, mpamba te bobele yo Jéhovah okobatela ngai na esika na ngai.”​—Nzembo 4:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba lolenge ya bomoi ya libota oyo ezali na moboti moko, tala La Tour de Garde ya le 15 décembre 1980, pages 15-18, 19-26.

Bozongeli

◻ Na makambo nini tokoki koloba ete: “Nzambe abengi bino mpo na kimya“?

◻ Ndenge nini moto akoki kolimwisa liyoki ya komimona ete atikali ye moko?

◻ Libondeli esengeli kozala na esika nini kati na bomoi ya moklisto oyo asili kokabwana na mobalani na ye to libala ekufa?

◻ Ndenge nini okolimbola kimya na Nzambe” oyo ekobatelaka mitema ya basaleli na Jéhovah, ezala minzemba baoyo babala, baoyo bakabwana to mpe baoyo baboma libala?

[Elilingi na lokasa 29]

Na nzela ya libondeli baklisto oyo bazali sembo bakoki kozala na “kimya na Nzambe” oyo ekobatela motema na bango mpe makanisi na bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto