Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/6 nk. 1-2
  • Nsomo: ezalaka ntango nyonso mabe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsomo: ezalaka ntango nyonso mabe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kobanga Nzambe, kasi bato te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Tóyekola kozwa bosepeli kati na kobanga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Kobanga Nzambe ekoki komemela yo bolamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Bongisá motema na yo mpo na kobanga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/6 nk. 1-2

Nsomo: ezalaka ntango nyonso mabe?

EKOKI kobebisa esengo mpe kobungisa elikya nyonso. Babengi yango pwazó ya makanisi, liyoki mabe mpo na makanisi. Balobi mpe ete ezali koboma koleka maladi oyo eleki makasi. Ya solo, kobanga to nsomo ezali liyoki na nguya. Kasi ezalaka ntango nyonso mabe?

Kanisa naino ete ozali kopusa motuka na nzela moko oyo oyebi malamu te. Wana ezali yo komata ngomba, nzela esengi ete okatisa mbala na mbala. Butu eyindi mpe matanga ya mbula ebandi konoka mokemoke. Motuka na yo ebendani moke mpo na muselu, mpe oyei komona ete lokola ngomba ezali molai nzela etondi na potopoto.

Yango ekomi mpenza ntango ya kobakisa likebi. Wana ezali yo kokatisa na likebi nyonso, ozali kobanga noki libunga moke epusa yo na kotika nzela oyo ezali na moselu mpe okita na libulu kuna na nse. Mpe oyebi te makama nini mosusu mazali kozela yo na molili wana. Lokola makanisi motindo boye matondi yo na motó, monoko na yo ekaoki mpe motema na yo ebandi kobeta nokinoki mpenza. Mayoki na yo nyonso malamuki. Ntina ya kokanisa na makambo mosusu ezali te. Sikawa ozali kokanisa se na likambo moko oyo ezali kotungisa yo: motuka etika nzela te mpe aksida esalema te.

Na nsuka, ngomba esili. Okomi mpe na esika ya miinda mpe potopoto ezali lisusu te. Mokemoke, ozali kozongela esengo na yo mpe opemi makasi mpo na kominyolisa. Nabangaki mpamba!

Obangaki mpamba? Te. Ezali mabe te na kobanga soki likambo motindo boye ekomeli yo. Ezali kosenga ekenge mpe likebi. Nsomo malamu ezali kobatela biso na komona makambo mpamba, mpo ete na nsima tozwa mbano mabe. Liyoki yango ebebisaka ntango nyonso makanisi te mpe ezali mpenza pwazó te mpo na makanisi. Mbala mosusu, ekoki ata kozala na litomba.

Biblia emonisi lolenge mibale na nsomo: soko oyo ya liboso ezali solo pwazó mpo na makanisi, oyo ya mibale ezali bobele malamu te, kasi lisusu esengeli mpo na lobiko. Nsomo yango ezali nini? Mpe lisusu, ndenge nini tosengeli koyekola kokolisa moko kati na yango mpe kopengola oyo mosusu? Lisolo elandi ekoyanola na mituna oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto