Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Basáli kati na elanga na miwiti
Mingi baoyo bazali liboso bakozala nsima mpe baoyo na nsima bakozala liboso.” Nsima ya koloba maloba oyo, nokinoki, Yesu apesi lisolo moko mpo na kolimbola maloba na ye. “Bokonzi na likoló ezali lokola moto moko, mokolo na ndako, oyo abimaki na ntongontongo mpo na kobianga basali kati na elanga na ye na miwiti.”
Abakisi ete: “Esili ye [mokolo na ndako] koyokana na basáli mpo na lopata moko mokolo na mokolo, atindi bango na elanga na ye. Abimi mpe na ngonga misato na moi, mpe amoni bamosusu baoyo batelemi mpamba esika na zando, mpe alobi na bango ete: ‘Bino mpe bokenda na elanga na miwiti mpe nakopesa bino oyo ebongi malamu.’ Bongo bakei. Ekei ye lisusu na ngonga motoba mpe na ngonga libwa, asali bobele bongo. Penepene na ngonga zomi na moko, abimi mpe azwani na bamosusu bazali kotelema mpe alobi na bango ete: ‘Mpo na nini bozali kotelema mpamba moi mobimba?’ Balobi na ye ete: ‘Mpo ete moto abiangi biso na mosala te. Alobi na bango ete: ‘Bino bokenda mpe na elanga na miwiti.’
Nkolo ya ndako, elingi koloba nkolo ya elanga na miwiti, ezali Jéhovah Nzambe, mpe elanga na miwiti, ezali nde libota na Yisraele. Basali oyo batindamaki kati na elanga na miwiti bazali bato oyo bakotisamaki kati na kondimana ya Mibeko; mpenzampenza ezali Bayuda ya ntango na bantoma. Ezali bobele elongo na basáli oyo bazwaki bango na mosala mpo na mokolo moko nde boyokani mpo na lifuta esalemi, lifuta ya lopata moko mpo na mokolo moko. Lokola “ngonga ya misato” oyo elobelami awa ekokani na ngonga ya libwa na ntongo (9h) na lolenge na biso ya kotanga ngonga, yango wana baoyo babengamaki na ngonga ya misato bakokisaki ngonga libwa na mosala, mpe baoyo babiangamaki na ngonga ya motoba basalaki ngonga motoba, baoyo ya ngonga na libwa bakokisaki ngonga misato mpe baoyo ya ngonga zomi na moko basalaki se ngonga moko na mosala.
Basali oyo bakokisaki ngonga zomi na mibale na mosala, elingi koloba mokolo mobimba, bazali komonisa bakonzi ya lingomba na Bayuda oyo bazalaki kolekisa ntango na bango nyonso na mosala ya Nzambe. Bakeseni na bayekoli ya Yesu, baoyo eteni monene ya bomoi na bango balekisaki yango na koboma mbisi to misala mosusu ya mosuni. Ezali na mobu 29 ya ntango na biso nde “nkolo ndako” atindaki Yesu Klisto asangisa bango mpo na kokomisa bango bayekoli na ye. Ezali na lolenge yango nde bakomaki “bato ya nsuka”, basali oyo bazwamaki na mosala na ngonga ya zomi na moko.
Na nsuka, mokolo ya mosala na elilingi esukaki na liwa ya Yesu, mpe ntango ya kofuta basali ekomaki. Na kokesena na ndenge esalamaka, bafuti liboso bato ya nsuka. Tala ndenge esalamaki: “Eyei ntango na mpokwa, nkolo na elanga alobi na kapita na ye ete: ‘Bianga basali mpe pesa bango lifuti kobanda na baoyo na nsima kino baoyo na liboso.’ Eyei bango babyangamaki penepene na ngonga zomi na moko, bazwi moto na moto lopata. Eyei baoyo na liboso, bakanisi ete bakozwa na koleka nde bango mpe bazwi moko moko lopata. Ezwi bango, baimaimeli mokolo na ndako, bango ete: ‘Baoyo basali mosala bobele ngonga moko mpe ofuti bango motindo moko na biso ata tokumbi bozito mokolo mobimba mpe na moi makasi!’ Ye nde azongiseli moko na bango ete: ‘Moninga, nazali kosalela yo mabe te. Oyokanaki na ngai mpo na lopata te? Kamata yango ekoki na yo mpe kenda. Nakopesa epai na oyo na nsima motindo moko na yo. Ekoki na ngai te kosala lokola ezali na ngai mposa na biloko bizali na ngai? Liso na yo ezali mabe mpo ete ngai nazali malamu?’ Mpe mpo na bosukisi Yesu alobeli lisusu makasi likoló na likambo alobaki liboso: “Bongo baoyo na nsima bakozala na liboso mpe baoyo na liboso bakozala nsima.”
Lopata ezwamaki, na ntango ya liwa ya Yesu te kasi na Pentekote ya mobu 33 liboso ya ntango na biso, ntango Klisto, oyo azali “kapita”, asopaki elimo santu likoló na bayekoli na ye. Bayekoli oyo ya Yesu bazalaki lokola “bato ya nsuka, basáli ya ngonga zomi na moko.
Mpo na lopata, ezalaki elilingi ya likabo ya elimo santu te, kasi eloko moko oyo bayekoli bakokaki kosalela awa na mabelé, eloko oyo elimboli makoki na bango mpo na bomoi, bomoi na bango ya seko. Ezalaki nde libaku ya kokoma Bayisraele na elimo, bapakolami mpo na kosakola Bokonzi na Nzambe.
Baoyo bazwamaki na mosala liboso baumelaki te na komona ete bayekoli na Yesu bazwaki lifuti, mpe bamonaki ndenge bazalaki kosalela lopata ya elilingi. Kasi balingaki likambo mosusu koleka elimo santu mpe mabaku oyo mazali kouta na yango, ezali bongo mabaku oyo makangisami na Bokonzi. Koimaima na bango mpe ntembe na bango ezwaki lolenge na minyokoli likoló na bayekoli na Klisto, basali ya “nsuka” oyo batindamaki na elanga na miwiti.
Lisese na Yesu ekokisamaki bobele na ekeke ya liboso? Te, lisusu na ekeke ya ntuku mibale, bakonzi ya mangomba na boklisto ya mokili oyo, bazalaki, na kotalela esika na bango mpe mikumba na bango, lokola bato ya “liboso” oyo bazwamaki mpo na kosala kati na elanga ya elilingi na miwiti na Nzambe. Batalelaki basakoli oyo bamipesaki oyo bazalaki kosala na boyokani elongo na la Société Watch Tower Bible and Tract Society lokola bato ya ”nsuka na kozwaka mokumba ya ntina mpo na mosala ya Nzambe. Nzokande, na nsuka, ezali bobele baoyo bakonzi ya mangomba batiolaki nde bazwaki lopata: lokumu ya kosala lokola batindami bapakolami mpo na Bokonzi na Nzambe na likoló. Matai 19:30 kino 20:16.
◆ Elanga na miwiti ezali elilingi na nini? Nkolo ya elanga na miwiti ezali nani, mpe basáli oyo basalaki ngonga zomi na mibale mpe baoyo basalaki ngonga moko bazali banani?
◆ Mokoló na mosala ya elilingi esukaki ntango nini, mpe ntango nini lifuti epesamaki?
◆ Lifuti ya lopata ezali kolakisa nini?