Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/8 nk. 5-7
  • Nsuka ya mabe nyonso ebelemi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsuka ya mabe nyonso ebelemi!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobanga Nzambe ekosalisa biso na koboya bilulela
  • Kondima ekosalisa biso kotemela lokoso
  • Kopesa motuya mingi na bato koleka na biloko
  • Mabe esili?
  • Mosika te: Mabe nyonso ekosuka
  • Mpo na nini mabe ekomi mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Yesu abikisi mibali oyo bakufá miso mpe asalisi Zakai
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu ateyi na Yeriko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Yesu ateyi na Yeriko
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/8 nk. 5-7

Nsuka ya mabe nyonso ebelemi!

BAPOLISYE bazali koluka koyeba babandisi ya mabe na kotalela bilembo oyo biyebani ete bizali komonisa lolenge ya bomoi na bango to makama na bango. Bametode mpe bamasini oyo bapolisye bazali kosalela epesi nzela na kokomama ya mikanda mingi oyo miyebani koleka kati na mokili. Ata soko bapolisye bazali kokoma na koyeba polele babomi to babebisi, mbala mingi mosala na bango ebandaka mpenzampenza nsima wana likambo lisalemi.

Lokola kobakisama ya mabe emonisi yango, na ntango moto moko ya mabe azwami, bato mingi mosusu bazali komipesa na mabe. Yango wana, soki balingi kosilisa mabe oyo, ezali kosenga kosala likambo mosusu oyo eleki na esika ya kosuka bobele na koluka baoyo bazali kosala bambeba na ntango likambo esili kosalema.

Mabe ezali likambo etali bizaleli malamu. Tozali na mpasi te ya kondima ete koboma, kosangana na mwasi na makasi mpe makambo mosusu matali mobulu mazali mabe. Kasi tokanisi nini mpo na kozanga kofuta ba taxe to mpako na ndenge ekoki? Wana mpe ezali lolenge mosusu ya mabe, mpo ete ezali na boyokani te na mitinda ya bizaleli malamu na kolongobana. Mpo na kosilisa mabe esengeli liboso kosilisa misala nyonso oyo mizali na boyokani te na mitinda ya moboko na bizaleli malamu.

Totalela bandakisa misato na Biblia oyo ezali komonisa, bobele ntina ya mabe te, kasi lisusu nzela mpo na yango ekolongolama

Kobanga Nzambe ekosalisa biso na koboya bilulela

Totalela maloba oyo ya mokomi na nzembo Asafe: “Nalulaki bato na lolendo, wana emonaki ngai esengo [kimya] na bato mabe.” (Nzembo 73:3) Ya solo, mbala mingi ezali bilulela mpo na bozwi mpe lolenge na bomoi ya basali ya mabe nde ezali kopusa bato mingi na kosala makambo oyo makeseni na mibeko. Na kobombaka mabe oyo bapakoli yango lokola ina oyo ezali kongenga, televizio mpe bopanzi nsango ezali kosala ete likambo yango endimama mingi, na esika ya kokolisa koyina mpo na oyo ezali mabe.

Nzokande, mokomi na Masese, oyo apemamaki na Nzambe, apesi elendiseli oyo: “Tika te ete motema na yo eyokela bato mabe elulela, kasi zala na botosi [bobangi] na kotosa [kobanga] Jéhovah.” Na yango, kolula ezwi mosisa na yango kati na makanisi mpe mposa ya moto ye moko. Mwango malamu koleka mpo na kopekisa makanisi mabe mpe mposa mabe ezali bongo kolona ezaleli ya kobanga koyinama na Nzambe. “Mpo na yango, okozala na avenire kitoko, mpe elikya na yo ekobeba te.”​—Masese 23:17, 18 (MN).

Kondima ekosalisa biso kotemela lokoso

Na elanga ya mbula 33 liboso na ntango na biso, Yesu azalaki koleka na ville ya Yeriko. Ezali kuna nde Zakai azalaki kofanda, mobali oyo mokomi na evanzile Luka alobeli mpo na ye lokola “mokolo na bakongoli na mpako”, na koyebisaka polele ete “azalaki mozwi”. Mpo na mabelé kitoko oyo ezalaki kobota mingi zongazonga na Yeriko esalaki ete ezala région oyo elingamaki mingi mpo na kofutisa mpako mpe, engebene oyo Zakai alobi ye moko, misala na ye lokola mokolo na bakongoli na mpako mizalaki kopesa ye mabaku ya kobotolaka biloko to mbongo ya bato. Kasi mobali oyo atikalaki moto mabe te.​—Luka 19:1-8.

Zakai atambolaki mbango liboso ya ebele na bato bazingaki Yesu mpe, lokola azalaki moto mokuse, alukaki esika moko ya malamu mpo na komata likoló na nzete na mosuke eteli. Yesu amonaki ye mpe asengaki ye akita, na koyebisaka ye ete akofanda epai na ye mikolo nyonso oyo akolekisa na Yeriko. Nsima na mikolo, Zakai amonisaki ete abongwanaki, mpo alobi ete: “Nakopesa babola ndambo na mibale na biloko na ngai, soko mpe nabotoli moto eloko na ye, nakozongisa yango mbala minei.” Kozongisa mbongo oyo ye abotolaki ekokaki kozala likama mpo na ye. Na kopesaka elaka ya kosala yango, Zakai amonisaki bongo kondima na ye epai na Yesu. Ya solo, kobongwana na motema na ye emonanaki polele: Zakai abakisaki mbala misato biloko to mbongo oyo ye abotolaki, elingi koloba azongisaki yango mbala minei. Na kosalaka bongo abongisaki mabe oyo asalaki mpe akendeki mosika koleka, na komonisaka bongo ete kobongwana na ye ezalaki ya solo.​—2 Bakolinti 7:11.

Kopesa motuya mingi na bato koleka na biloko

Pilate guvernere na Baloma alobaki mpo na Yesu Klisto oyo bafundaki ete: “Nazwi likambo mpo na moto oyo te.” (Luka 23:4) Na esika ete asala mabe to abotola mpo azala na bozwi, na boumeli na mosala na ye awa na mabelé Yesu amonisaki bosepeli etondi na bolingo epai na bato. “Emoni ye bibele, ayoki mawa mpo na bango ete balembi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te. Boye alobi na bayekoli na ye ete: ‘Mbuma na elanga eteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Bobondela Nkolo na elanga ete atinda basali kati na elanga na mbuma na ye.’ (Matai 9:36-38) Emonani polele ete Yesu apesaki motuya monene na bato koleka biloko, koleka ata bolamu na ye mpe matomba na ye. Na ndakisa komibanzabanza oyo azalaki na yango mpo na bayekoli na ye ete abatela bango mpe bibele na bato oyo bazalaki koluka lisalisi mpe mateya epai na ye. (Matai 8:20; 14:13-16) Na likambo yango, Yesu atikelaki biso ndakisa oyo tosengeli kolanda.​—1 Petelo 2:21.

Ndakisa oyo ekoki kolandama lelo oyo, kozwaka bato mosusu na motuya koleka biloko ya mosuni? Eyano ezali ee. Mpo na kondimisama esengeli bobele kotala ba Témoins de Jéhovah oyo lelo motuya na bango eleki 3 250 000. Bango bazali kosala makasi na kozala na likanisi ya Klisto mpe komonisa yango na misala. Bazali kosala makasi ntango nyonso mpo na kolongola na motema na bango bamposa ya mabe oyo ezali komema bato mingi na kosala mabe. Bamosusu kati na ba Temwe oyo bazalaki babomi na bato to basali na makambo mosusu na mabe. Mitema na bango misimbamaki na koyekola Biblia mpe balonaki bolingo mpo na Nzambe; na yango bamiyokaki kopusama mpo na kobongisa mabe oyo basalaki. Basalaki bongo te mpo ete nsango na bango etambola epai na epai, kasi mpo na kosala boyokani ya kimya elongo na Jéhovah mpe, na nzela na yango, bazwi ngolu oyo Nzambe amonisaki na kopesa mbeka mpo na lisiko na nzela na Yesu Klisto.​—1 Bakolinti 2:16; 6:11; 2 Bakolinti 5:18-20.

Mpo na bolingo epai na bazalani na bango, baklisto yango bazali kozwa ntango mpo na kokende kotala baninga na bango mpo na kolimbolela bango na nzela nini bango mpe mabota na bango bakoki kolikya kozala na bomoi kati na Paradis na nse ya Bokonzi na Nzambe. Poso na poso, Ba Témoins de Jéhovah bazali kosala makita kati na Ba Salles du Royaume na bango. Mokolo moko moyibi moko andimaki libiangami mpo na komona ye moko ndenge nini makita yango malekaka. Alimboli: “Nakamwaki mingi. Kolemba ezalaki te to kolala mpongi te lokola nazalaki kobanga liboso. Bolingo oyo bato bazalaki na esika wana bamonisaki ezalaki bolingo ya solo mpenza. Lisusu, kosepela na bango mpo na makambo ya elimo ezali ya kokamwisa.” Mobali oyo akamwaki mingi kino akobaki na kosangana na makita, yango nde eloko esalisaki ye na kosala mbongwana. Ezala ete osalaki likambo moko ya mabe to te, na kosanganaka na basali ya Nzambe okomona, lokola moto oyo azalaki moyibi kala, ete bazali komibanzabanza mpo na bato, kasi mpo na biloko te.​—Matai 22:39.

Mabe esili?

Soki bato bazali lisusu komitambwisa na lolenge ya mabe te, tokoki koloba mbala moko ete bazali ya kokoka? Te! Ba Témoins de Jéhovah, lokola bato nyonso ya mokili, babotamaki na lisumu uta moto ya liboso, Adam. (Baloma 5:12; 1 Yoane 1:8) Nzokande bazali na bomoko kati na mosala ya Nzambe, yango emonisami na mosala na bango ya kosakola mpe koteya na mokili mobimba, litatoli makasi ya kokokisama na esakweli oyo ya Yisaya : “Ekozala ete na mikolo na nsuka, ngomba na ndako na Jéhovah ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso . . . ; mpe mabota nyonso bakokende wana.” (Yisaya 2:2) Ya solo, ebele na bato bazali koya na losambo etombwani ya Jéhovah, na mposa ya koteyama kati na banzela na ye. Okoki kozwa matomba ya mateya yango elongo na bato oyo bazali kokima mabe.

Mosika te: Mabe nyonso ekosuka

Kobakisama ya mabe na eleko na biso ezali koyebisa mpenza kokotela ya Nzambe mosika te, mpo na koboma basali nyonso na mabe, elongo na babomi nyonso na bato. “Mpo ete basali na mabe bakosuka . . . nsima na mwa ntango moke, moto na mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te.” (Nzembo 37:9, 10) Nsuka na mabe to kobomana ebelemi, mpo tokomi na ntango oyo mobomi to mosali mabe ya liboso, Satan le Diable, akokangama mpe akobwakama kati na libulu mozindo. (Emoniseli 20:1-3) Tosengeli kozala na esengo ya koyeba ete kobanga mabe to koboma mpe bampasi oyo ezali kozwa bato mpo na yango ekozala makambo ya kala!

Nzokande, ekozala boni mpo na ebele ya bato oyo bakosekwa mpo na kozonga na bomoi awa na mabelé? (Misala 24:15) Soki batiki te bomoto na bango ya kala mpe lolenge na bango ya kosala makambo oyo bazalaki na yango liboso na kufa na bango, ekobimisa lisusu te lolenge mosusu ya mabe? Ntina ya kobanga ezali te. Ya solo, Yesu alakaki lisekwa epai na moyibi moko, na kolobaka: “Nalobi na yo lelo solo ete: Okozala na ngai elongo kati na Paradis.” (Luka 23:43) Tala likambo ezali komonisa mpenza ete basekwi bakosala mbongwana, soki bongo te, mokili ya sika ekozala mpenza paradis te.

Lokola esengaka mbongwana makasi na bato mabe to babomi liboso na kopesa bango nzela ya kofanda elongo na bato mosusu kozanga mikakatano, motindo moko mpe programme monene ya koteya ekosalisa bato oyo bakofanda na nse ya Bokonzi na Nzambe mpo ete bazala batosi na mibeko. (Emoniseli 20:12, 13) Longola litomba ya kozingama na bato oyo bakotosa mibeko ya Nzambe kati na paradis, basekwi bakozala na bomoi kati na ebongiseli malamu mpo na makambo oyo etali nkita. (Yisaya 65:21-23) Bakonzi oyo ya boyengebene bakotiama, mpe moto nyonso ya mabe oyo alingi kobongwana te akobomama. (Yisaya 32:1; 65:20) Na yango, tozali na bantina nyonso ya kondima ete mabe ekosila.

Atako tozali naino kofanda kati na mokili oyo etondi na mabe, okoki kotia elikya na yo mobimba epai na Jéhovah, oyo alaki kofuta bomoi ya seko epai na basali na ye ya sembo kati na Paradis. Sala yango uta lelo, na kondimaka ete Ba Témoins de Jéhovah bayekola Biblia elongo na yo na ndako kozanga kofuta mosolo. (Yoane 17:3) Mbala ya nsima ntango okokutana na bango, tuna bango mpo na makambo mosusu matali lisolo oyo. Yeba ete kosala makasi mpo na likambo oyo ezali na mbano, mpo ete nsuka na mabe ezali mosika te.

[Elilingi na lokasa 5]

Zakai, na kopusama na kondima na ye azongisaki biloko nyonso oyo abotolaki.

[Elilingi na lokasa 7]

Mateya makopesama epai na bato bakofanda na nse na Bokonzi na Nzambe mpo na kolakisa bango kotosa mibeko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto