Nkisi oyo ezali na matomba koleka bankisi nyonso
‘Uta mibu zomi, nazali kobela maladi makasi ya motó oyo babengi na lopoto schizophrénie, oyo maloba na mwasi moko na mboka Ohio (Etats-Unis). Nazali na bankisi mpo na komela, kasi esili koleka mwa ntango moke, nazali kokoka lisusu te bampasi oyo bankisi ezali kobimisa epai na ngai, kino nazali komona mpɔngi lisusu te.”
‘Mpokwa moko liboso ya kolala, nayokaki kasete ya Mélodies du Royaume. Nakamwaki mingi, mpo ete miziki esalisaki ngai. Likambo ya monene, ezali ete soki nalamuki katikati na butu mpe ete nazali koyoka mélodies oyo nakitisi mongongo ya kasete na nse, nazali kokumisa Jéhovah na koyebisaka ye ete: ‘Ya solo, oyebi mpenzampenza oyo ekoki kosepelisa basali na yo‘. Nsima na yango nalali. Bondimela ngai, miziki oyo eleki bankisi nyonso oyo nasili komela.”
Yo mpe, okoki komeka miziki oyo. Bakasete ya Mélodies du Royaume ezali mwambe n° 1, 2, 3, 4, 5, 6, 7, mpe 8. Okoki kozwa oyo olingi na kotunaka epai na temwe oyo atikelaki yo zulunalo oyo.