Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/8 nk. 30-31
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Tóyeba mokumba monene ya Yesu na mokano ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yehova alobelaki kondimana ya sika
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Bokokóma “bokonzi moko ya banganga-nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/8 nk. 30-31

Mituna na batangi

◻ Na 1 Timoté 2:5, 6, Yesu abiangami “Moyokanisi” oyo “amipesaki ye moko lokola lisiko likokani mpo na banso”. Na yango, azali Moyokanisi bobele mpo na baklisto bapakolami na elimo to mpo na bato nyonso?

Biblia ezali na mateya mikemike to ya ebandeli mpe basolo ya mozindo, yango nde ezali bilei makasi ya elimo. Moko kati na basolo yango ezali kotalela mokumba ya Moyokanisi oyo Yesu Klisto azali kokokisa. Ntoma Paulo akomi: “Mpo ete Nzambe moko azali mpe moyokanisi moko kati na Nzambe mpe bato, ye moto Klisto Yesu, oyo amipesaki ye moko lokola lisiko likokani mpo na banso. Litatoli mpo na yango eyei na elaka ekoki na yango.”​—1 Timoté 2:5, 6.

Mpo na koyoka malamu ndimbola ya maloba oyo, esengeli na biso kososola liboso ete engebene Biblia bilikya mibale bifungwani liboso na bato oyo bazali sembo: 1) Bomoi ya kokoka kati na paradis oyo ekozongisama awa na mabelé mpe 2) bomoi na likoló, mpo na “etonga moke” ya Klisto. oyo ezali na motuya ya basangani 144 000. (Luka 12:32; Emoniseli 5:10; 14:1-3) Boklisto ya mokili oyo, ezali koteya ete bato nyonso ya malamu bazali kokende na likoló. Lokola liteya oyo etongami na Biblia te esila kokotela bango mingi na makanisi, Yesu azali kotalelama lokola moyokanisi mpo na bato nyonso ya malamu. Kasi Biblia ezali koloba nini?

Liloba na greke mésitës, oyo ebongolami “moyokanisi”, ezali kolakisa ’moto oyo atelemi katikati na bato mibale, to bituluku mibale’. Ezalaki ‘liloba moko ya mayele oyo esalelamaki na balolenge mingi kouta na maloba matali mibeko na lokota oyo ebimaki na minoko mibale ya greke mpe ya hébreu’. Engebene profesere Albercht Oepke (Dictionnaire theologique du Nouveau Testament [angl.], mésitës ezalaki ”moko kati na maloba ya mayele oyo ezalaki na bokeseni mingi kati na maloba matali mibeko na lokota ya greke oyo esangani na liebele”.

Kasi mpo na nini Biblia ezali kosalela liloba oyo etali mibeko mpo na kolobela mokumba na Yesu lokola moyokanisi? Mpo na kopesa eyano na motuna oyo, totala likambo oyo ntoma Paulo alobaki na ntina etali Mibeko na Nzambe, oyo epesamelaki na libota ya Yisraele oyo eyanganaki liboso na ngomba Sinaï: “Epesamaki na nzela ya baanze na loboko na moyokanisi.“ (Bagalatia 3:19, 20) Moyokanisi oyo azalaki Moïse. Azalaki moyokanisi kati ya Jehovah mpe Yisraele ya mosuni. Ezalaki mpo na mokano nini? Ezalaki mpo na kosala kondimana moko to contrat endimami na mibeko, kati na Nzambe mpe libota yangoa.

Esengeli kolobama sikawa ete Yesu azali Moyokanisi na ndimbola ya sikisiki ya mibeko? Ee. Na kati na Baebele 8:6, nsima ya kolobela mpo na tabernakle mpe bilakiseli na elilingi oyo bizalaki na nse na kondimana ya Mibeko, ntoma Paulo abakisi: “Nde sasaipi, ye [Yesu] azwi mosala moleki yango na liboso na malamu pelamoko ezali ye moyokanisi na kondimana eleki malamu, awa ezali yango kokangama na bilaka bileki malamu.” “Kondimana oyo eleki malamu” ezali kondimana ya sika, oyo ezwaki esika na kondimana oyo Moïse azalaki moyokanisi. (Baebele 8:7-13) Kondimana ya sika “etelemisamaki na lolenge ekoki”. Epesaki nzela na bayekoli mosusu ya Klisto, kobanda na bantoma, ete bazala na ‘’lotomo ya koingela na esika na bulee”, yango na likolo.​—Baebele 9:24; 10:16-19.

Makambo mosusu mazali komonisa lotomo ya mokumba oyo Yesu azali kosalela lokola Moyokanisi ya “kondimana na sika”. Mpo na elaka ya Nzambe oyo ekomami na Nzembo 110:4, ntoma Paulo apesi komantere oyo: “Boye Yesu akomi ndanga [énguos] na kondimana eleki malamu.” (Baebele 7:22) Ezali bobele na verset oyo moko nde liloba énguos esalelami kati na Biblia. Le Nouveau Dictionnaire international de théologie du Nouveau Testament(angl.) ekomi: “Liloba L’énguos ezali komonisa eloko oyo moto asimbisi to ndanga mpo na komonisa ete oyo alobi ekosalema solo.” Mokumba ya Moyokanisi na kondimana na sika oyo Yesu azali kokokisa ezali bongo ndanga ete “elikya eleki malamu” ekokokisama.​—Baebele 7:19.

Esika mosusu, ntoma Paulo asaleli lisusu liloba mosusu arrabôn, liloba yango ebongolami mpe na liloba “ndanga”. Diksionere oyo etangami awa likolo elobi ete: “Liloba greke arrabôn . . . ezali liloba oyo basalelaka na makambo matali mibeko euti na elobeli ya bato oyo basalaka mombongo.” Totalela na makambo nini ntoma Paulo asalelaki liloba oyo basalelaka mpo na makambo matali mibeko: ‘Oyo amonisi ete biso na bino tozali bato na Klisto, mpe apakoli biso ezali Nzambe. Atii elembo na ye likoló na biso mpe apesaki biso ndanga na mitema na biso mpo na makambo mazali koya, yango elimo santo.’ (2 Bakolinti 1:21, 22) Balolenge mosusu mibale ya kosalelama ya liloba arrabôn ezali kotalela mpe baklisto bapakolami na elimo na Nzambe mpe oyo bazali kozwa ‘mbano to libula ya seko kati na makoló’ lokola bana na elimo na Nzambe.​—2 Bakolinti 5:1, 5; Baefese 1:13, 14.

Na bongo, ndenge emonani, kondimana ya sika ezali te ebongiseli oyo bato nyonso bakoki kokola na yango. Ezali boyokani oyo ebongisami malamu mpe ezali kotalela bobele Nzambe mpe baklisto bapakolami.

Tala oyo esengelaki kosalisa biso mpo na koyoka ndimbola ya 1 Timote 2:5, 6. Liloba “moyokanisi” oyo ezwami na kati esilaki kosalelama mbala mitano kati na mikanda oyo ntoma Paulo akomaki liboso. Na yango, Timote asengelaki koyeba ete boyokanisi ya Yesu ezali mokumba ya lolenge ya mibeko oyo azalaki kokokisa kati na ebongiseli ya kondimana na sika. Kati na mokanda Les épitres pastorales (angl.), Dibelius mpe Conzelmann bandimi ete na kati ya 2 Timote 2:5 liloba “moyokanisi“ ezali na ndimbola ya mibeko’. Babakisi: “ Na bokeseni na Baebele 8:6, verset oyo ya Timote ezali kolobela te mpo na [kondimana], kasi, lokola emonisami na makanisi mosusu oyo mazali zongozonga ya verset yango, esengeli kokanisama liboso ete ezali kotalela ‘moyokanisi na kondimana’. Profesere Oepke amonisi ete na 1 Timote 2:5 Yesu alakisami lokola “avocat mpe molobeli”.

Tala ndakisa oyo ekoki kosalisa yo mpo na kosimba malamu ndimbola ya likambo oyo, mingimingi soki ozali moklisto oyo apakolami na elimo te: Zuwa ndakisa ya likambo moko oyo avocat azali kotalela. Mokumba na ye ezali bobele te kolobela moto moko na tribunale kasi lisusu akoki kozala moyokanisi mpo na bato mibale balingi kosala contrat na bango mpo ete likambo na bango endimama mpe epesa matomba epai na bato yango mibale. Ya solo, likambo yango ezali kotalela yo te, na yango, azali avocat na yo te. Kasi mbala na mbala azali moninga na yo mpe azali kosalisa yo na makambo mingi mosusu.

Ekoki kozala ete mosala oyo avocat akokisi epesa matomba ya malamu epai na bato mingi mosusu. Bobele bongo mpo na oyo Yesu akokisaki engebene mibeko lokola Moyokanisi ya kondimana na sika, oyo ezali kobimisa likambo oyo kondimana na Mibeko ebimisaki te; “bokonzi na banganga‘’ na likoló. (Exode 19:6; 1 Petelo 2:9) Kati na Bokonzi, na likoló, baklisto bapakolami bakosangisa makasi na bango elongo na Yesu mpo na kopambola “mabota nyonso na nse”​—Genese 22:18.

Bato na mabota nyonso baoyo bazali na elikya ya kofanda libela na mabele bazali kozwa uta sikawa matomba na mosala ya Yesu. Ata soki Yesu azali Moyokanisi mpo na bango te na ndenge esengami na mobeko, mpo ete bandimami te kati na kondimana na sika, azali moyokanisi oyo na nzela na ye bazali kobelema epai na Jéhovah. Klisto alobaki: “Ngai nazali nzela, mpe solo mpe bomoi. Moto akokoma epai na Tata te soko na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Baoyo nyonso balingi kozwa bomoi na mabelé basengeli kobondela Jehovah na nzela na Yesu. (Yoane 14:13, 23, 24) Yesu azali mpe Nganga Monene na mawa oyo akoki kosalela matomba na mbeka na ye likolo na bango, na yango bakoki kozwa bolimbisi mpe na nsuka kozwa lobiko.​—Misala 4:12; Baebele 4:15.

Na yango, 1 Timoté 2:5, 6 ezali kosalela te liloba “moyokanisi” na lolenge oyo ezali koyokana na minoko mingi. Verset oyo ezali koloba te ete Yesu azali moyokanisi kati ya Nzambe na bato nyonso. Nzokande, ezali komonisa Klisto lokola Moyokanisi (to “avocat”) oyo andimami mpo na kondimana ya sika, yango nde eyokani na ndimbola oyo Biblia ezali kopesa mpo na liloba oyo. Yesu azali mpe lisiko likokani mpo na baoyo nyonso bandimami kati na kondimana yango, ezala Bayuda to Bapakano, mpe baoyo bakozwa bomoi oyo ekoki kobomama te kuna na Likoló. Ntoma Yoane alobi mpo na bango na 1 Yoane 2:2, kasi alobi ete bato mosusu bakozwa matomba ya mbeka na Klisto. Na yango alobi: “Ye azali mpe mbondi mpo na masumu na biso. Kasi bobele mpo na yango na biso te nde mpo na mokili mobimba.”

Bato wana ya “mokili mobimba” bakozwa bomoi ya seko kati na Paradis oyo ekozongisama na mabelé. Lelo oyo bamilió na basali ya Nzambe oyo bandimami bazali baoyo bazali na elikya yango na mabelé. Bazali kotalela Yesu lokola Nganga Monene na bango mpe Mokonzi na bango na nzela na ye nde bakoki mokolo na mokolo kobelema epai na Jéhovah. Bazali na elikya kati na mbeka ya Yesu, oyo ezali kosala mosala mpo na bango, lolenge moko ekosala mosala mpo na bato lokola Abrahame, Davide mpe Yoane mobatisi ntango bakosekwa. (Matai 20:28) Na yango, mbeka na Klisto ekopesa nzela na bato nyonso ya botosi ete bakoka kozwa bomoi ya seko.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Okokuta boyekoli moko ezali koloba mpo na kondimana ndenge na ndenge kati na Mosenzeli ya 1/2/89 (nr.3) nkasa 1 kino 11.

[Elilingi na lokasa 31]

Ngomba Sinai; epai Moïse asalelaki lokola moyokanisi na kondimana na Mibeko.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto