Okoki koyanola?
Osepelaki mpenza na botangi ya banimero oyo euti koleka ya Mosenzeli? Na yango, tala soko okoki koyanola na mituna milandi:
◻ Libala ya esengo etongami likoló na nini?
Libala ya esengo etongami likoló na boyokani ya bolingo mingi, ya bosembo mpe ya boboto. Mobali mpe mwasi bazali kosepela moto na moto na bizaleli ya mobalani na ye, mpe kolimbisana mabunga to bolembu.—5/5, page 11.
◻ Mibeko oyo Nzambe apesaki epai na Bayisraele esalisaki bango na kotikala peto kati na makambo nini?
Mibeko yango esalisaki bango na kotikala peto na elimo, na bizaleli, na makanisi, na mosuni mpe na lingomba, bopeto oyo ya nsuka etalaki bongo losambo na bango.—1/6, page 7.
◻ “Bopeto ebongi na makanisi” elimboli nini?
Bopeto ebongi na makanisi esengi ete tosala milende mpo na kotya makanisi na biso likoló na oyo ezali “solo, sembo, peto”. Tosengeli “kokanisa na makambo yango.” (Bafilipi 4:8)—1/6, page 12.
◻ Mpo na nini Yesu alobaki ete kozonga na ye ekozala “lokola mokalikali”? (Luka 17:24)
Na maloba oyo Yesu amonisaki ete bilembo na koya na ye kati na nkembo na Bokonzi bikoki komonana polele na bato nyonso, yango ekopesa nzela na baoyo bakolinga komona yango, bayeba ete asili kozonga na elimo.—15/6, page 6.
◻ Mpo na nini bolingo ya boklisto esengeli komonisa bizaleli malamu?
Bizaleli na biso, elingi koloba ezalela na biso liboso na bamosusu, molato na biso mpe etamboli na biso ya mokolo na mokolo, ezali komonisa na meko nini tozali komibanzabanza mpo na bazalani na biso mpe ezali komonisa bozindo ya bolingo oyo lozali komonisa bango.—15/6, page 12.
◻ Ntango nini libala ya Yesu elongo na “mwasi na ye” (bayekoli bapakolami na sembo 144 000) esengeli kosalama? (Emoniseli 19:7, 8)
Libala yango ekosalema nsima na etumba ya Armagedon, nsima wana Satana akobwakama na libulu mozindo. Na ntango yango Jehovah akolongisa bokonzi na ye mpe akolimwisa na mabelé bato nyonso oyo bazali kobeta ntembe mpo na bokonzi na ye mpe akolongola bopusi nyonso mabe ya Satana mpe bademo na ye.—1/7, page 19.
◻ Lokola maloba na Yesu mazwami kati na Matai 11:29, 30 mamonisi yango, na ndimbola nini kondima ekanganeli na Klisto ezali libondisi?
Lokola Yesu azali na makanisi mabongi, kosala elongo na ye, na ekanganeli moko ezali libondisi. Ayebi bandelo na biso mpe bolembu na biso. Ezali mpe ebondiseli koyebisa epai na bazalani ete bakoki kozala na bomoi ya seko kati na Paradis!—5/7 page 18.
◻ “Kozalisama na sika” oyo Yesu alobeli kati na Matai 19:28 elimboli nini?
Na verset yango, Yesu amonisi ete “kozalisama ya biloko na sika” ekozala awa na mabele, na boye ete ekozonga lokola ezalaki kati na elanga ya Edene.—1/8, page 9.