Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/8 nk. 25-29
  • Bafandi ya Guatemala bandimi nsango malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bafandi ya Guatemala bandimi nsango malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Ebandeli ya kosakolama ya Bokonzi
  • Kosakola na bangomba
  • Kosakola pembeni ya mai
  • Mobulu mpe monyokoli ezwi esika ya kimya
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/8 nk. 25-29

Bafandi ya Guatemala bandimi nsango malamu

Bangomba ya langi ya mai ya pondu mpe ba volcans emonani mosika na ntango mpepo ezali kobelema na kapitale. Na kotala na maninisa, na ngambo moko ya mpepo, bato oyo bazali na kati mpo na mobembo bazali komona ngomba Pacaya; ezali kobimisa maboke ya milinga oyo ezali komata lokola likonzi kati na likoló mpe na nsima elimwe. Na ngambo mosusu, bato bazali komona ebale Amatitlá, oyo babwato minene mpe bamasuwa ezali kokatisa malembemalembe. Tozali na Guatemala, mboka na bokeseni monene.

Mboka oyo ya Amérique Centrale ezali na monene soko 109 000 kilomètres carrés. Bangomba milai ezali komonana-mpe ba volcans 33, kati na yango 4 ezali kobimisa moto-, esobe ezali mpe mingi mpe bazamba minene oyo mbula ezali kobeta ntango nyonso, lisusu bibale mpe mingálá na mai kitoko lokola mabanga ya ngelingeli to kulusutala. Mokili ezali na nivo ya 4 211 mètres longwa na la mer. Mboka engumba to kapitale ezali ntango nyonso na climat kitoko oyo ezali malili mingi te mpe moto mingi te, oyo ezali na temperature mwayene ya 24°C mbula nyonso. Nzokande, na likoló kati na bangomba, malili ekoki kozala makasi, ba régions ya pembeni ya mai ezali na molunge mbala mosusu ya 38°C. Moto na moto akoki kozwa eloko oyo ezali kosepelisa ye kati na mboka oyo: ba plages, esobe ndenge na ndenge, bangomba, bisika oyo bilonamaka te mpe bisika oyo bizali kobota mingi. Mpe na ba régions nyonso ya mboka oyo, nsango malamu na Bokonzi ezali kosakolama.

Ebandeli ya kosakolama ya Bokonzi

Kosakolama ya Bokonzi na Guatemala ebandaki penepene na 1920. Na mwa ntango, bituluku mikemike ya bato ya mitema malamu mpe basakoli ya Bokonzi ebandaki kosalema na bisika bikeseni kati na mboka. Ntango bamisionere mibale bakomaki, le 21 mai 1945, bakutaki bato mingi bazali kosepela. Moko kati na bango alobi: “Mokolo na poso to samedi ya mibale nsima na kokoma na biso, nazwaki likatami ya kosakola na balabala na bazulunalo. Na mpokwa yango, nabimaki na sacoche na ngai etondi mikanda, mpe na ngonga moko na ndambo nasilisaki nyonso. Nakabolaki bazulunalo 82, mikanda mike 34, mikanda mpe Biblia 4.” Sanza ya liboso, basakoli oyo mibale babandaki kotambwisa boyekoli ya Biblia 17 na bandako ya bato! Ndeko mwasi ya liboso oyo akomaki na mboka oyo lokola misionere azali ntango nyonso kosakola nsango malamu ya Bokonzi na molende esili koleka bambula 43.

Teritware oyo ezali komonisa bokeseni monene. Na kati ya kapitale, Guatemala, okokuta bandako minene mingi ya sika, mpe na ba villes okomona bandako kitoko, epai kuna baboyi to bana ya misala bazali koyanola epai na baoyo baye kotala bango na nzela ya telefone oyo ezali kosala bobele na kati ya ndako. Kasi mosika mingi te, bandako ya mabelé ezali komona, oyo likoló etongami na matiti, epai kuna kura mpe mai ya pompe ezali ndoto. Mpo na bokeseni oyo, mosala ya kosakola ekoki kolembisa te.

Na bambula oyo eleki, ekomaki mpasi mpo na kokuta bato na bandako na bango, mpo kati na mabota mingi mwasi na mobali bango nyonso bazali kosala. Mpo na kopesa litatoli na bato oyo, Batemwe bazali kosakola mingi na ba balabala. Bamosusu bazali kosala yango kobanda 5h30 na kolakisaka mikanda na ba arrêts ya bus, bisika oyo bato bazali mingi. Basengeli kozala na nzoto kolongono mpo na kotambola mbango engebene bato oyo bazali kowela bus. Na ntongo moko, etuluku moko ya Batemwe ezwaki likatami ya kosolola na batambwisi mosusu ya taxi, mpo ba bus ezalaki kosala mingi te. Bakamwaki na komona batambwisi mingi ya taxi balakisaki bango ba nimero ya Mosenzeli oyo basili kotia bilembo na ekomeli. Moto moko to bato mibale batunaki mituna, oyo basakoli bazalaki na esengo ya koyanola na lisalisi ya ba Biblia oyo batambwisi bazalaki na yango kati na bavwatire na bango.

Kosakola na bangomba

Panajachel ezali moko na bamboka oyo ezali pembeni na lac Atitlán, oyo ezali libeke kitoko ya mai lokola libanga ya samala to emerode oyo ezingami na bangomba kitoko mpe ba volcans misato. Bamboka mosusu ememi bankombo ya bantoma. Penepene na 95% ya bafandi bazali bakitani ya ekólo maya, mpe bazali kosolola minoko mibale: cakchiquel mpe tzutuhil. Mibali bazali kosolola mpe monoko ya espagnol, kasi basi mingimingi te, mpo ete babimaka mingi na bandako na bango te. Mboka na mboka bazali kolata bilamba ya bonkoko na bango oyo ezali na langi ya motane, mingimingi etongami na basi.

Ntango tokomaki na Panajachel, tomonaki mbala moko ete mboka oyo ekeseni na bamboka mosusu ya mokili ya Guatemala. Pembeni ya bandako moke ya mabelé to ya mabanga, okomona bandako kitoko ya mabaya. Ba hotele ya ntango oyo ezali komikesenisa mingi lisusu. Baturiste bazali kouta na mokili mobimba koya na Panajachel mpo na kotala lac Atitlán.

Temwe moko azali kolimbola ndenge nini mosala ya kosakola ezali kosalema esika oyo: “Tozali kofutela masuwa liboso mpo na mokolo mobimba, mpe tozali kosenga na bandeko na biso ya Sololá, ville oyo ezali penepene, mpe na bamosusu ya kapitale, Guatemala, mpo basalisa biso na kosilisa teritware oyo monene. Bandeko oyo bazali kouta na Sololá bazali kosalisa biso mingi, mpo ete mingi kati na bango bazali mpe kofanda na région oyo ezali na bangomba lokola oyo tosengeli kosakola. Mpe bayebi monoko ya mboka. Tozali kokende na ntongontongo. Na ntango ya kokatisa mai bana bazali kokamwa na bosepeli nyonso na kotala mai oyo ezali kongenga lokola ngelingeli to kulusutala, nzokande baboti bazali kozongela mwa maloba ya monoko oyo bazali koloba na Panajachel.

“Mbala oyo, tobongisaki kokende na bamboka mitano. Mpo na kobanda, tozali kosala bituluku misato. Nsima, tozali kokabola basakoli: baoyo bayebi monoko ya mboka elongo na baoyo bayebi yango te. Lokola libongo ya moke ezali misato pembeni ya bamboka oyo, etuluku moko moko ezali kokita na libongo moko moko. Ezali esengo mingi na komona bandeko na biso na molato ya mboka na bango oyo ezali na balangi kitoko bazali kotambola elongo na basakoli mosusu baoyo balati na lolenge ya lopoto. Ezali mpenza litatoli kitoko koleka mpo na bafandi ya bamboka oyo. Mingimingi, tozali koyambama na bana oyo balingi koyeba soko tozali banani. Ntango bazali koyeba ntina ya boyei na biso, bazali kokima mbango koyebisa bafandi nyonso ya mboka.

“Ntango tozali kokoma na bandako, bafandi na yango mingi bazali kozela biso na mitema likoló mpo na komona mikanda na biso ya mikemike oyo ezali na bililingi to Mokanda mpo na masolo ya Biblia oyo bana bayebisaki bango. Ezali bobele mokanda oyo totikaki na ndako ya liboso, nde yango bakosenga biso na bandako elandi, mpo moko na moko alingi kozala bobele na mokanda oyo ya kitoko lokola moninga na ye. Bafandi mingi na mboka bayebi kotanga te. Ezali mpo na yango bazali kosepela mingimingi na bililingi oyo bizali komonisa Paradis oyo ekoya. Bilongi na bango bizali kongenga to kosepela ntango bazali koyoka oyo Biblia ezali kolaka na Emoniseli 21:3, 4 mpo na avenire. Tozali kopema mwa moke na kosalaka pigue-nigue, nsima ya bopemi tozali kokoba na kosakola kino 15 heures. Nsima na yango tozali kozonga na libongo mpo na kozela masuwa oyo ekoya kozua biso. Ntango basakoli nyonso bakomi na kati ya masuwa, bazali kosolola na esengo nyonso makambo malekaki na moi kati na mosala ya kosakola.

“Ndeko mwasi moko azali komikundola esengo oyo azwaki na koyokaka mwasi moko likoló na ngomba kobenga ye ete: ‘Soeur, soeur, nazali awa. Ozongi lisusu kotala ngai. Merci, merci!’ Na kotombolaka motó, ndeko mwasi amonaki mwa likoló na ngomba mwasi moko azalaki kosolola na ye na kosalela maboko. Mbala ya nsuka ntango moklisto mwasi oyo ayaki na mboka yango, mwasi oyo amonisaki bosepeli mingi na boyekoli ya Biblia oyo basalaki elongo. Sikawa, azalaki kozela vizite mosusu oyo balakanaki. Basi mibale oyo bafandaki lisusu mpo na boyekoli mosusu ya Biblia oyo ezalaki kitoko.

“Ata soki basakoli nyonso balembi mpo na kotambola likoló na mabelé oyo ezali ngomba ngomba, bazali kozela na motema likoló bayeba mobembo mosusu ekozala ntango nini. Ntango masuwa ezali kokoma na libongo, tozali kolakana, na kolobelaka mpo na mokolo mosusu ekoya ya esengo.

Kosakola pembeni ya mai

Guatemala ezali lisusu na libongo mibale oyo mpenza ekeseni: libongo ya Pacifique, oyo ezali na plages kitoko na zelo ya mwindo, mpe libongo ya la mer ya Antilles, elongo na zelo na yango ya pembe.

Na kotambola na vwatire minutes 45 longwa na kapitale, na kotalaka epai na Pacifique, moto azali komona mbongwana monene ya zamba mpe climat. Pembeni ya mai molunge ezali mingi mpe mwa malili, mpe banyama ya mikemike bazali mingi. Bambila, bakokoti, banzete mosusu oyo ebengami ceibas mpe banzete mosusu ya kitoko ezali kolakisa ete na esika wana moto azali na nse ya tropike. Masangá minene ya Ba Témoins de Jéhovah mazali kati na ba villes ya région oyo.

Awa, vélo ezwaki esika ya mpunda, kino ete mingimingi okomona bandeko na biso bazali koleka mbango kati na bilanga ya koko mpo na kopesa litatoli hema na hema. Ndeko moko ayekolaki Biblia elongo na mobali moko oyo azalaki kofanda na 35 kilometres uta epai na ye. Poso na poso, azalaki kotambola ba kilomètres oyo na vélo mpo na koteya solo ya Biblia epai na moto yango.

Moto akoki kokanisa ete azali na mokili mosusu ntango azali kovizité Santo Tomas de Castilla mpe Puerto Barrios, mabongo (ports) mibale oyo ekokani pembeni ya la mer ya Antilles. Wana bato bazali na lolenge mosusu ya bomoi oyo ekokani na bisika mosusu te na Guatemala. Bandako ezingami na bapeluze mpe banzete mikemike. Bandako ezali komonana polele na bato nyonso, mpo balopango ezali mingimingi te na mur ya babrike lokola bandako ya Mexique na Amerique centrale. Lisusu, na esika oyo moto moko te azali kolata bilamba na lolenge ya bonkoko, lokola ezali komonana mingi na bisika mosusu na Guatemala.

Mosali moko ya ntango nyonso to ministre alobi ete: “Lokola ezali ville oyo ezali pembeni ya libongo (port), tozali na makoki ya koyebisa nsango ya Biblia epai na bato ya ndenge na ndenge. Mokolo moko, nabetaki na porte ya bar moko, ‘Mwasi-Mokolo bar’ andimaki lipesi, mokanda mpe Biblia, mpe asengaki ngai ete nazonga lisusu mpo na kolakisa ye ndenge ya koyekola mikanda yango. Ntango nazongaki poso elandi, azalaki kozela ngai, afandaki liboso na mesa moko monene likoló na yango atiaki Biblia mpe mokanda. Na boyambi nyonso, afandisaki ngai, mpe ayebisaki ngai nazela moke mpo abenga ‘bana basi’ nyonso. Alingaki ete bango mpe bayoka bandimbola oyo nakopesa. Liboso ete nakoka koloba nini, mesa ezingamaki na ‘bana basi’ na ye. Na kobalukaka epai na ngai mwasi yango ayebisaki ngai ete: ‘Sikawa, lakisa biso ndenge bayekolaka Biblia.’ Namilobelaki: ‘Esika nini oyo nayei kokota!’ Kasi nabandaki kolimbolela bango makambo na motema ya kokita, lokola ete namesana mikolo nyonso koyekola Biblia elongo na bato na kati ya bar.” Mwasi oyo akolaki noki, atikaki mosala na ye, mpe azwaki batisimo. Lelo oyo azali kosalela Jéhovah na molende kati na lisangá mosusu mpe ye moko azali kosalisa bato mosusu oyo bazali na motema malamu na koyekola Biblia.

Na ngambo mosusu ya mai, esika bwato (canoë) ekosala ngonga moko mpo na kokatisa, okokuta ville kitoko ya Livingiston, okokuta bato ya kimya mpe ya boninga baoyo biyambayamba ya Afrique ekotela bango makasi mpe losambo ya vaudou. Na butu mingimingi okoyoka bambunda, mpe okomona bato bazali kobina lokola bato ya Afrique kati na babalabala na ntango ya bafeti. Okoyoka bango bazali mpe kosolola monoko moko ya bopaya: caribe, to kariphuna. Etuluku moko ya basakoli moke kasi motuya ezali kokola noki bazali kotalela matomba ya elimo ya bafandi ya ville oyo.

Mobulu mpe monyokoli ezwi esika ya kimya

Matata mabimaki na 1982, ntango président ya sika ya Guatemala amekaki kosilisa botomboki oyo ekolaki na ntango ya président oyo azalaki liboso. Mwango na ye ezalaki ya kosala bituluku ya bato oyo bazali na minduki mpo na kotambolatambola na butu kati na babalabala mpo na kokengela ba villes mpe koyebisa basoda likambo nyonso oyo ezali mabe. Kati na ba régions mingi, koteya bituluku oyo ya bato lokola basoda etiaki bandeko mingi na komekama mpo na ezaleli na bango ya boklisto ya kozanga kokota na makambo ya mokili.

Kati na ville moko, balingaki na makasi kosala ete basangani ya lisangá babebisa ezaleli na bango ya boklisto ya kozanga kokota na makambo ya mokili na kosenga bango ete basangana na botamboli ya butu (patrouilles). Lokola baboyaki, balingaki koboma bango, bakimaki mpe bakendaki na kapitale, epai kuna bafandaki na Salle du Royaume moko mpo na kozela ete Batemwe mosusu bakoka kopesa bango bisika ya kofanda. Ya solo, Batemwe mingi bamekamaki mpe banyokwamaki makasi ntango basoda basengaki bango na makasi ete batambolaka mpe na butu.

Ndeko moko alobi: “Nazali na mibu 20 mpe nazali kofanda elongo na ndeko na ngai mpe mwasi na ye. Mikakatano na ngai ebandaki ntango bitumba kati ya batomboki mpe basoda ememaki bango kino na elanga (ferme) esika nazalaki kosala. Mokolo moko, tomonaki bango komema bato mwambe mpo na koboma bango. Bobele mibale bazongaki, kino lelo oyo tomonaki lisusu te bato oyo mosusu motoba.

“Na avril 1984, basoda bayaki na bilanga (fermes) mpo na koluka bato oyo bakokota na mosala ya soda. Basengaki biso, ngai na baninga na ngai, mpo tosangana na bango. Ntango naboyaki, babandaki kobeta ngai kozanga kotika. Liboso na likambo oyo baninga na ngai balelaki lokola bana mike, na kobondelaka ngai ete nazwa monduki mpe nasangana na bango. Soda moko asimbaki ngai na nkingo mpe azalaki kokamola matoi na ngai wana mosusu alalisaki ngai na mabelé mpo ete oyo ya misato akoka kobeta ngai mbata mpe kobeta ngai na likolo na ye. Mokonzi na bango moko angangaki: ‘Yo ozali ndenge nini? Ozali nyama, to ozali kokanisa mbala mosusu ete ozali Nzambe?’ Na nsuka, mokonzi mosusu ayaki mpe alobaki: ‘Botika ye. Batemwe bazalaka bongo. Esengeli koboma bango mpo bandima.’ Mokonzi oyo ya liboso angangaki ete: ‘Boboma ye!’ Kasi na esika ete babeta ngai masasi, abetaki ngai na libumu na monduki na ye. Ntango bamonaki solo ete nakosangana na bango te, batikaki kobeta ngai. Nsima ya mikolo misato, batikaki ngai. Na lisalisi ya Jéhovah, natikalaki sembo. Ezali mpo na likambo yango nazali koyebisa epai na bilenge mosusu ete batia elikya mobimba epai na Jéhovah, mpo azali pene na kosalisa biso mpo toyika mpiko na ntango tozali na yango mposa.” Lelo tozali malamu, mpo ete makambo mabongwanaki uta président mosusu ya sika azwaki esika, na janvier 1986.

Mosika mingi te, bokeseni kati ya bitumba na kimya, bozwi mpe bobola, bomoi mpe liwa, ekosila libela. Kati na Paradis ya mokili mobimba oyo ezali koya, tokosepela na esengo nyonso bokeseni kitoko kati ya moi na butu, bangomba mpe esobe ndenge na ndenge, ba océans oyo etomboki mpe bibale na kimya, ndenge Jéhovah asalaki yango. Okoki komona eleko yango soki, na ndakisa ya basakoli koleka 10 000 ya Guatemala, ondimi nsango malamu na motema mobimba.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto