Boyangeli na Nzambe yango nde ebongi!
Lisolo ya politike emonisi ete bato bazangi kokoka bakoki te koyangela malamu bazalani na bango. Ezali yango Anglais moko, Lord Acton, amonisaki na maloba oyo: “Nguya ezali kobebisa, mpe nguya mingi ezali kobebisa mingi koleka.” Ya solo, lokola Biblia elobi yango, “moto azali na bokonzi likoló na moninga mpo na kopesa ye mpasi.”—Mosakoli 8:9.
Na ebandeli, Jéhovah Nzambe apesaki moto nguya mpo na koyangela likoló na banyama, kasi likoló na bato mosusu te. Epai na Mwana na ye, oyo azalisaki liboso na makoló, alobaki ete: “Tika tozalisa moto na lolenge na biso na elilingi na biso, mpe tika ete bazala na bokonzi na likoló na mbisi na mai, mpe na likoló na nyama nyonso, mpe na mokili mobimba, mpe likoló na biloko nyonso bikolandaka na mokili.” (Genese 1:26) Mokonzi na moto ezalaki bongo Mozalisi na ye. Ndenge nini ezalela yango ebongwanaki?
Ezali ntango moto atombokaki na elanga na Edene, aboyaki bokonzi na Nzambe, yango nde azali kosala kino lelo. (Genese, mokapo 3) Ezalela oyo emonisamaki na Yisraele ya kala, libota oyo Nzambe aponaki mpo ezala libota na ye. Ntango Bayisraele basengaki mokonzi oyo azali moto, Jéhovah alobaki na mosakoli na ye Samwele ete: “Bazali koboya yo te kasi bazali koboya ngai ete nazala mokonzi likoló na bango lisusu te.”—1 Samwele 8:7.
Bokonzi oyo Jéhovah azalaki kosalela likoló na Bayisraele ezalaki mpo na bolamu na bango. Na nzela ya Moïse momonisi na ye, Jéhovah apesaki bango mibeko oyo mizalaki komonisa bosepeli nyonso na bolingo oyo azalaki na yango mpo na bolamu na bango. Mibeko oyo mibatelaki bango na bamaladi ebele mpe mizalaki kolendisa limemya mpo na mibangé, basi bakufeli mibali mpe bitike. Mobeko ezalaki kosenga limemya mpo na biloko na mozalani mpe kolongobana na makambo matali mombongo. Ezalaki kokweisa koponapona, kotatola lokuta mpe kanyaka. Nzambe ayangelaki na lolenge moko ya sembo mpenza.
Jéhovah apesaki elaka ya koyangela bobele Yisraele te, kasi bato nyonso. Apesaki elaka ya kobotola bato bazangi kokoka nguya oyo bazali kosalela likoló na bato mosusu mpe kozongisa yango epai na Mwana na ye bobele moko. Ezali yango asakolaki na maloba oyo kati na esakweli ya Ezekiele: “Ekopesama epai na moto te kino ekoya ye oyo azali na lotomo na yango, oyo ngai nako esa yango na ye.”—Ezekiele 21:27, M.N.
Ezali epai na Yesu Klisto nde Jéhovah apesi lotomo ebongi mpo na koyangela likoló na bato lokola momonisi na boyangeli na Ye na molongo. Lokola Bokonzi na Nzambe oyo epesami na Klisto nde boyangeli kitoko koleka oyo ekoki kotambwisa bato nyonso, Yesu ateyaki bayoki na ye basambelaka mpo na koya na yango. Klisto alobaki “Bino bosengeli kobondela boye: ‘Tata na biso oyo azali na makoló, Nkombo na yo ezala mosantu! Tika Bokonzi na yo eya! Tika mokano na yo esalama na nse pelamoko na Likoló!’”—Matai 6:9, 10.
Na ezaleli oyo azalaki na yango liboso na bazalani na ye, Yesu amonisaki lolenge na mokonzi oyo ye akozala. Ya solo, Klisto amonisaki mawa. Tozali kotanga ete: “Emoni ye bibele, ayoki mawa mpo na bango ete balembi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te.” (Matai 9:36) Yesu amonisaki mozindo ya bolingo na ye mpo na bayekoli na ye ntango ayebisaki bango ete: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete: Bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nalingaki bino” (Yoane 13:34) Alingaki bato mpenza kino kopesa bomoi na ye lokola lisiko. Mbeka oyo epesi nzela na baoyo bakondima yango basikwama na masumu, na maladi mpe ata na liwa.—1 Yoane 2:1, 2; Emoniseli 21:1-4.
Na kopemama na Nzambe, mosakoli Yisaya asakolaki ete boyangeli na Nzambe oyo epesami na Klisto ekozala sembo mpe na kimya: akomaki boye: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonzi ekozala likoló na lipeka na ye. Nkombo na ye akobiangama ete, Mopesi toli na kokamwa, Nzambe na nguya, Tata na seko, Mokonzi na kimya. Kofuluka na bokonzi na ye mpe kimya ekosuka te, na kiti na bokonzi na Davide mpe likolo na bokonzi na ye, ete abongisa yango mpe atelemisa yango na kosambisa sembo mpe na boyengebene, longwa na ntango oyo kino libela. Molende na Jéhovah na bibele ekosala yango.”—Yisaya 9:6, 7.
Bamonisi na boyangeli na Nzambe na mabelé bakokokana na mibali oyo uta sikawa bazali komonisa bizaleli kitoko na Yesu mpe bazali kosala lokola bakengeli kati na lisangá ya solo ya boklisto. Na bokeseni na bakonzi na mangomba baoyo bazali konyokola bato, mibali oyo bazali komibanzabanza mpenza na ya bolingo mpo na bampate, kolandaka ndakisa na Yesu Klisto. Mpo na mibali oyo ya sembo, mosakoli Yisaya akomaki: “Tala mokonzi akoyangela mpo na boyengebene, mpe bana na mokonzi kati na kosambisa-sembo.” (Yisaya 32:1) Bamonisi oyo na boyangeli na Nzambe bakosalela mpe matomba ya Nzambe kati na mokili ya sika.—Nzembo 45:16.
Mbongwana monene ebelemi!
Liboso ete Bokonzi na Nzambe eyangela likoló na bato kozanga kotiamela ntembe, mbongwana monene esengeli kosalema. Mbongwana oyo ekolimwisa bokabwani ya bikólo. Na esika ete biyangeli na bato oyo bikabwani bizala mingi, boyangeli ekozala bobele moko ya likoló mpe ya sembo, oyo ekosangisa bato bazala libota moko oyo ekozala na bomoi na kimya. Ezali yango mosakoli Daniele asakolaki na maloba oyo: “Mpe na mikolo na bakonzi yango Nzambe na likoló akotelemisa bokonzi bokobebisama soko moko te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te. Ekobuka mpe ekosilisa bokonzi oyo nyonso [biyangeli na bato] mpe ekotikala libela na libela.”—Daniele 2:44.
Ezali bobele boyangeli ya Nzambe nde ekosukisa makambo ya politike oyo ezali konyokola bato na mikolo na biso. Ezalela kati na yango bato bazali lelo ezali kotia bomoi na bango na likama! Nzokande, bato bakoki komibikisa te na mayele na bango moko. Ezali bongo likambo na mayele kotia motema na nzela oyo Biblia emonisi mpe kozela na elikya nyonso ntango oyo ebelemi, oyo bato na sembo bakozala na bomoi ya esengo na nse na boyangeli ya Nzambe oyo ekoki kotiamela ntembe te mpe oyo ekopesa matomba epai na bato.
[Elilingi na lokasa 6]
“Mokonzi akoyangela mpo na sembo.”