Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/9 nk. 5-7
  • Oyo tosengeli kosala mpo tobikisama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyo tosengeli kosala mpo tobikisama
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bibongiseli mpo na lobiko
  • Masengami mpo na kobikisama
  • “Ye oyo abikisami, abikisami mpo na libela?
  • “Ye oyo akoyika mpiko . . . akobikisama”
  • Biblia eteyaka ete ‘soki moto abiki, abiki mpo na libela’?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lobiko ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lobiko: Ndimbola na yango ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Batatoli ya Yehova bakanisaka ete kaka bango nde bakobika?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/9 nk. 5-7

Oyo tosengeli kosala mpo tobikisama

MPO NA NINI tozali na mposa ya kobikisama? Mpamba te biso banso tozali konyokwama na masumu: kozanga kokoka, mpasi, maladi, mawa mpe liwa. Ntoma Paulo alimbolaki ete ezali boye mpamba te nkoko na biso Adam azangaki kotosa mobeko ya Nzambe. Paulo akomaki: “Mabe ekotaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekotaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (Baloma 5:12) Mpo na nini liwa epalanganaki epai na bato banso mpo na lisumu ya Adam? Esengelaki kosalema se ndenge yango.

Ntango Adam asalaki lisumu, asengelaki kokufa, engebene mobeko ya Nzambe. Yango ezalaki sembo mpe esengelaki kosalema bongo. Ezalaki sembo mpo ete bomoi ezali lotomo te, kasi ezali likabo ya Nzambe; na kosalaka lisumu na nko, Adam abungisaki mpe likabo yango. (Baloma 6:23) Adam asengelaki kokufa mpamba te eloko moko ezangi kokoka esengeli te kopesama nzela ya koumela seko mpe kobebisa molongo libela. Na yango, ntango Adam asalaki lisumu, abandaki kokufa mpe abungisaki bomoi ya kokoka, oyo ezangaki lisumu, oyo asengelaki kopesa epai na bana na ye. Apesaki bango se bomoi ebebisami na kozanga kokoka mpe na lisumu.​—Baloma 8:18-21.

Nzokande, tobosana te ete soko lelo tozali kosepela na mwa bomoi ya mokuse oyo tozali na yango, ezali bobele mpo na mawa na Nzambe. (Yobo 14:1) Nzambe azalaki na lotomo ya koboma Adam mpe Eva liboso ete babota bana. Nzokande apesaki bango nzela babota bana mpo na komonisa ete bato bazangi kokoka bakondima bokonzi na ye na kotikalaka sembo epai na ye. Apesaki mpe nzela na likambo yango, mpamba te ayebaki ete na nsuka akosikola, to akobikisa, baoyo bakotosa ye kati na bakitani na batomboki yango ya liboso, Adam mpe Eva. Alingaki kosala yango ndenge nini?

Bibongiseli mpo na lobiko

Jéhovah Nzambe akokaki te bobele kolongola ekateli na ye ya sembo. Akoki kobosana lisumu na Adam te mpe mabe nyonso oyo bato babakisi likoló na yango uta ntango wana. Soko Nzambe aboi kotosa mibeko na ye ya sembo, limemya mpe confiance mpo na ebongiseli na ye nyonso ya bosembo ekobeba. Kanisa na ezaleli oyo ekobima soko zuzi moko aboi kopesa etumbu na moto asali mabe, bobele mpo motema na ye elingi bongo. Nzokande, zuzi oyo azali na motema mawa akoki mpenza kosala nyonso mpo ete moto oyo alingi afutela mosali mabe lomande oyo tribinale ekati. Na lolenge moko, ezali likambo Nzambe asalaki mpo na biso.

Jéhovah asalaki nyonso mpo ete Mwana ye, Yesu Klisto, apesa bomoi na ye ya kokoka na esika ya bomoi ya kokoka oyo ebungisamaki na Adam. Yesu andimaki etumbu oyo epesamaki mpo na masumu na biso, elingi koloba liwa. (Yisaya 53:4, 5; Yoane 10:17, 18) Biblia elobi: “Mwana na moto ayei mpo na . . . kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na [bato] mingi.” (Matai 20:28; 1 Timote 2:6) Moto mosusu te akokaki kosala likambo yango. Yesu azalaki bobele ye moko oyo abotamaki kozanga masumu, atikalaki moto ya kokoka mpe kozanga lisumu kino liwa na ye. (Baebele 7:26; 1 Petelo 2:22) Mpo na bosembo oyo amonisaki kino liwa, akokaki kofuta motuya mosengamaki na mobeko mpo na masumu na biso.

Tozali komikundola ete Nzambe, Mosambisi monene, azali na mokumba ya kosikola bato banso te. Azali kotalela bomoi ya moto na kokoka oyo Yesu apesaki mbeka lokola mwango ya kofuta nyongo ya masumu na biso. Kasi Jéhovah Nzambe akosalela ebongiseli yango mpo na basumuki na nko te, to baoyo baboi kobongwana to baoyo bazangi botondi. Na esika ete asikola bato nyonso ya mokili kozanga masengami, Biblia epesi nde makambo oyo bato basengeli kokokisa mpo na kobikisama na bampasi oyo ebimi na lisumu oyo tosangolaki.

Masengami mpo na kobikisama

Nini esengami mpo na kobikisama? Lisengami ya liboso ezali oyo ntoma Paulo apesaki epai na mokengeli na boloko na mboka Filipe: “Ndimela Nkolo Yesu mpe okobikisama.” (Misala 16:31) Soko tolingi kobikisama, ezali na ntina mingi ete tondima motuya ya makila masopami na Yesu. Bongo lobiko ekolimbola nini mpo na biso? Tozwi eyano na maloba na Yesu matali bampate na ye: “Nazali kopesa bango bomoi na seko mpe libela bakobeba te.” (Yoane 10:28) Mpo na mingi kati na biso, lobiko ekolimbola kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongisama lisusu mpe ekozonga paradis. (Nzembo 37:10, 11; Emoniseli 21:3, 4) Nzokande, mpo na “etonga moke”, yango ekolimbola koyangela elongo na Yesu kati na Bokonzi na ye na makoló.​—Luka 12:32; Emoniseli 5:9, 10; 20:4.

Bamosusu bazali koloba ete esengeli bobele kondimela Yesu mpe okobikisama. Tozali kotanga boye na mwa mokanda moke ya lingomba moko: “Likambo se moko ezali na ntina mpo na kokenda na likoló: Kondima ete Yesu azali Mobikisi na yo mpenza, kotosa ye lokola Nkolo mpe Motambwisi, mpe komonisa endimeli na yo na ntina na ye liboso na bato.” Yango wana bato mingi bazali kokanisa ete soko moto azwi libongwani ya mbalakaka mpe oyo esimbi mayoki na ye, yango ekoki mpo na kozwa bomoi ya seko. Nzokande, kosuka se na kokokisa lisengami bobele moko ya lobiko mpe kozanga kotalela masengami mosusu, ezali lokola moto oyo akokisi se likambo moko ezali na kati ya mokanda ya boyokani (contrat) mpe aboi kotalela mosusu oyo etikali.

Likanisi yango ezali komonana polele soko totaleli maloba na bato oyo bazali kokanisa ete soko moto amonisi ete azali kondimela Yesu, yango ekoki mpo na kobikisama. Bernice, na ndakisa, alimboli boye: “Nakolaki kati na kondima ya Lingomba ya ba frères, kasi nsima na yango nabandaki komituna motuna oyo: Soko bomoi ya seko ekopesama se na Yesu, mpo na nini alobaki: ‘Oyo elimboli bomoi ya seko: bayeba yo, Nzambe moko ya solo mpe motindami na yo, Yesu Klisto.’”​—Yoane 17:3.

Na boumeli ya mbula libwa, Norman akanisaki ete abikisamaki. Kasi na nsima, ayaki koyeba ete esengelaki na ye bobele komonisa te ete Yesu azali Mobikisi na ye. Alobi boye: “Nayaki komona na lisalisi na Biblia ete kondima liboso na Nzambe ete nazali mosumuki mpe ete nazali na mposa na lobiko, ekokaki te. Esengelaki lisusu misala oyo emonisi ete libongwani esalemi.”​—Matai 3:8; Misala 3:19.

Na yango, soko ezali likambo na ntina na kondimela Yesu mpo na kobikisama, yango esuki wana te. Yesu alobaki mpo na bato oyo bakomonisa kondima na bango na ye mpe baoyo basalaki ata “misala na nguya” na nkombo na ye, kasi akoyamba bango te. Mpo na nini? Mpamba te ‘bazalaki kotiola mibeko’ mpe basalaki mokano ya Tata na ye te. (Matai 7:15-23) Moyekoli Yakobo akundweli biso ntina ya kokoma ‘bato oyo bazali kotosa liloba, kasi bobele bayoki te, komikosaka bongo biso moko na makanisi na lokuta’. Alobaki lisusu: “Yo ondimi ete Nzambe azali? Osali malamu, nde bilimu mabe bakondimaka bongo mpe bakolengaka . . . kondima oyo ezangi misala esili kokufa.”​—Yakobo 1:22; 2:19, 26.

Kasi bamoko bazali koloba ete baoyo basili kobikisama mpenza basalaka misala nyonso wana. Kasi yango esalemaka solo? Denis, ye oyo ‘andimelaki Yesu’ alobaki boye ntango azalaki elenge: “Bato ‘babikisami’ oyo ngai nayebi bazali mpenza na mposa ya kotalela Makomami te, mpamba te bazali kokanisa ete basili kozwa nyonso oyo bazali na yango mposa mpo na lobiko.” Na bongo, na ezaleli na bango ya bokosi mpe misala na bango mikeseni na lingomba ya boklisto, bato mingi oyo bazali komiloba ete babikisami bazali lisusu kotalela te makambo oyo makangani na lobiko.

Ata bongo, bato mingi bazali se koloba ete Makomami malobi: “Ye oyo andimeli Mwana [na Nzambe] azali na bomoi ya seko.” (Yoane 3:36) Mpe bazali koloba ete nsima na kondimela Nkolo Yesu Klisto lokola Mobikisi na bango mpenza, bakoki lisusu kobunga te. Liloba na bango yango oyo: “Ye oyo abikisami, abikisami mpo na libela”. Kasi ezali yango mpenza oyo Makomami mazali koloba? Mpo na koyanola na motuna oyo, tosengeli kotalela makambo nyonso oyo Biblia ezali koloba na ntina yango. Toboi ‘komikosa biso moko na makanisi na libunga’ na kotangaka se mikapo miponami kati na Liloba na Nzambe.

“Ye oyo abikisami, abikisami mpo na libela?

Tala likebisi oyo Yuda apesaki na kopemama na Nzambe: “Balingami, awa ezalaki ngai na mposa monene kokomela bino mokanda na ntina na lobiko na biso mpe na bino, namoni ete ekoki na ngai kokomela bino mpo na koyikisa bino mpiko ete bobunanela bindimeli bipesameli Babulami, mbala moko mpo na libela.” (Yuda 3) Mpo na nini Yuda akomaki bongo? Mpamba te ayebaki ete baklisto bakokaki lisusu kobungisa ‘lobiko oyo bazwaki elongo’. Abakisaki: “Nalingi kokanisela bino, ete Jéhovah abikisi bato na mokili na Ezipito nde na nsima abomi bango bazangi kondima.”​—Yuda 5.

Likebisi na Yuda elingaki kozanga ntina soko baklisto bazalaki te liboso na likama ekokani na oyo ekomelaki Bayisraele. Yuda atyaki ntembe te na motuya ya mbeka oyo Yesu apesaki. Mbeka yango ebikisaki biso na masumu na Adam, mpe Yesu akobatela baoyo bazali na kondima epai na ye. Moko te akoki kobotola bango na loboko na ye. Nzokande, tokoki kobungisa libateli yango. Ndenge nini? Na kosalaka likambo Bayisraele mingi basalaki nsima wana babikisamaki na Ezipito: Baponaki na bolingo na bango moko kozanga kotosa Nzambe.​—Deteronome 30:19, 20.

Kanisa ete ebikisami na ndako moko ya étages oyo epeli moto. Kanisa na ndenge oyo motema na yo ekokita ntango bakolongola yo na ndako yango, kozanga kozika to kozoka mpe ntango moto oyo abikisi yo akoloba: “Obiki sikawa.” Obiki mpenza na liwa. Kasi likambo nini ekosalema soko mpo na likambo ezangi ntina ozwi lisusu ekateli ya kozonga na ndako yango? Bomoi na yo ekozala lisusu na likama.

Baklisto bazali solo bato oyo babikisami. Bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko, mpamba te bandimami na Nzambe. Lokola lisangá, bazali na elikya ya kobikisama na lisumu na Adam mpe na mpasi nyonso oyo euti na lisumu yango. Kasi moto na moto akobikisama mpe akozwa bomoi ya seko bobele soko azali kokokisa ntango nyonso masengami na Nzambe. Ezali likanisi oyo Yesu amonisaki ntango amikokisaki na nzete na vinyo mpe akokisaki bayekoli na ye na bitape na nzete yango ya vinyo. Alobaki: “Etape na etape kati na ngai oyo ekobotaka mbuma te [Nzambe] akolongolaka yango . . . soko nani akoumela kati na ngai te, akobwakama lokola etape mpe akokaoka; bato bakolokota yango mpe bakobwaka yango na móto mpe ekozikisama. (Yoane 15:2, 6; Baebele 6:4-6) Baoyo bazali kobungisa kondima epai na Yesu bazali mpe kobungisa bomoi ya seko.

“Ye oyo akoyika mpiko . . . akobikisama”

Makambo ya kokokisa mpo na kobikisama, mazali mingi. Tosengeli kozwa boyebi ya solo ya mikano na Nzambe mpe mwango oyo abongisi mpo na lobiko. Nsima na yango, esengeli na biso kozala na kondima na Nzela bobele moko ya lobiko. Yesu Klisto mpe kosala mokano na Nzambe na bomoi na biso mobimba. (Yoane 3:16; Tito 2:14) Lobiko ekozala solo mpo na baoyo bazali kokokisa masengami oyo. Kasi esengeli na biso koyika mpiko kino nsuka na bomoi na biso to na biloko mabe na ntango oyo. Bobele “ye oyo akoyika mpiko kino nsuka . . . ye wana akobika.”​—Matai 24:13.

Soda Mofilipié mpe bato mosusu ya ndako na ye bandimaki nsango ya lobiko oyo Paulo mpe Silas basakwelaki bango. “Mpe abatisami nokinoki, ye na bato nyonso na ndako na ye lokola.” (Misala 16:33) Tokoki komekola ezalela yango ya malamu. Na ndenge yango, tokokoma na boyokani ya penepene oyo epambolami elongo na Nzambe mpe Mwana na ye, Yesu Klisto, mpe tokotya motema mpenza na bibongiseli oyo Nzambe asili kokamata mpo na lobiko. Mokengeli na boloko na mboka Filipe “asepelaki na bato nyonso na ndako na ye, mpo ete asili kondima Nzambe”. (Misala 16:34) Soko tosali motindo yango, biso mpe tokoki ‘kosepela makasi’.

[Elilingi na lokasa 7]

Likambo nini ekosalema soko ozongi lisusu na ndako oyo ezali kopela móto nsima wana obimisamaki na yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto