Mituna na batangi
◼ Kati na Mobeko na Nzambe, soki Moyisraele moko alalaki na moseka oyo azali fiansé te, asengelaki kobala moseka wana mpe akokaki kolongola ye na libala te. Mpo na nini ebongiseli oyo?
Mobeko yango ekomami kati na Exode 22:16, 17 mpe na Deteronome 22:28, 29, oyo na makanisi na bato mosusu, ezali komonana lokola ete bazali koyokela basi mawa te. Ya solo, mobeko yango ezalaki kolendisa mi- bali mpe basi lokola na kozala na etamboli kitoko na ntina etali bizaleli malamu,
Mokapo 22 ya Deteronome ezali na mibeko mikeseni oyo mizalaki, na ndakisa kotalela, likambo ya mobali moko oyo alingi lisusu mwasi na ye te mpe akosi ete na ntango ya libala na bango ete mwasi yango azalaki na bilembo na moseka te. Mibeko na Nzambe na ntina etali ekobo mpe kosangana na mwasi na makasi miyebisami mpe na kati. Ezali kotangama boye:
“Soko moto azwani na moseka oyo abandami te, mpe asimbi ye mpe alali na ye, mpe bango bazwami, mobali oyo alali na ye akopesa tata na mwasi basekele na palata ntuku mitano mpe ye akozala mwasi na ye, mpo alali na ye na makasi. Akoki kolongola ye te mikolo na ye nyonso.”—Deteronome 22:28, 29.
Likambo yango ezalaki kokanga mwasi na makasi mpe pite. Soki mobali moko oyo azali kotosa mibeko te ayoki mposa ya kolala na moseka, mingimingi ezali moseka wana nde azalaki kozwa makama. Longola mwana abotami na ekobo, akokaki kotula, mpo ete mibali mingi kati na Bayisraele bakokaki mbala mosusu te kolinga kobala mwasi oyo azalaki lisusu moseka te. Na yango, eloko nini ekokaki kopekisa mobali ete amimona te ete azali na bonsomi ya kolala elongo na moseka? Ezali Mobeko na Nzambe oyo ezali ‘bulee, sembo mpe malamu’.—Baloma 7:12.
Mobeko na Moïse epesaki nzela na mobali kolongola mwasi na ye mpo na bantina mosusu. (Deteronome 22:13-19; 24:1; Matai 19:7, 8) Kasi, oyo tozali kotanga na Exode 22:16, 17 mpe na Deteronome 22:28, 29 emonisi ete likambo yango ekokaki lisusu kosalema te soki pite esalamaki liboso ya libala. Lolenge oyo na kotalela likambo oyo ekokaki kosalisa mobali (to moseka) koboya lisenginya na kosala pite. Mobali akokaki komiloba te ete: ‘Mwasi oyo azali kitoko mpe azali kongala; ata soki ezali te mwasi na lolenge oyo nde nakobala, nakosakana na ye.’ Kasi, mobeko oyo ezalaki kopekisa moto, ezalaki kotinda moto oyo amekami mpo na kosala pite akanisa mpo na makama na likambo na ye; esengelaki mpo na ye kotikala kati na bomoi mobimba elongo na mwasi oyo asalaki na ye pite.
Lisusu, mobeko oyo ezalaki kopekisa kobotama ya bana na makango. Mpo na yango, Nzambe alobaki ete: “Oyo abotami na ekobo akokola na koyangana na Jéhovah te. (Deteronome 23:2) Na yango, soki mobali alala- ki na moseka asengelaki kobala ye, pite oyo basalaki ekokaki kokotisa kati na libota na Yisraele mwana abotami na ekobo te.
Ya solo, baklisto lelo bazali na bomoi ya lolenge mosusu na oyo na Bayisraele ya kala. Bazali lisusu na nse na Mobeko na Moïse te, bakisa mpe na oyo etali kobalisa na makasi mobali mpe moseka oyo basalaki pite. Nzokande, basengeli te kokamata liseki likambo litali kosangisa nzoto liboso na libala. Lokola Mobeko ezalaki kosalisa Bayisraele na kokanisa na likambo yango, baklisto mpe basengeli kokanisa malamu mpo na mpasi ya koumela oyo ezalela motindo wana ya pite ekoki kobimisa.
Moto oyo alali na mwasi oyo abali naino te apimeli ye lotomo na ye ya kosala libala kati na boklisto na mikolo mizali koya wana ezali ye moseka. Apimeli lisusu mobalani na ye lotomo ya kobala moklisto oyo azali mpeto. Likoló na nyonso oyo, esengeli komibatela na pite mpamba te na miso na Nzambe, ezali likambo mabe, ezali lisumu. Ntoma Paulo akomaki mpenza ete: “Mokano na Nzambe ezali boye ete bobulisama ete botika makambo na pite.”—1 Batesaloniki 4:3-6; Baebele 13:4.