Mwango moleki malamu mpo na koyeba avenire
Lisolo ya moto moko oyo amonaki nzela ya lobiko
LINGOMBA ezalaki na esika ya ntina kati na bomoi libota na ngai. Tata na ngai azalaki Moyuda, mpe ata abongwanaki mpo na kokóma Mokatolike mpo ete abala mama na ngai, azalaki ntango nyonso na limemya makasi mpo na Biblia. Mama na ngai akolaki na libota moko epai kuna mimeseno na katolike ezalaki na misisa makasi mpenza. Azalaki na bandeko mibale ya basi bakomaki bamamelo, ndeko mobali moko ya sangó mpe bandeko mibali mibale lisusu bazalaki ba moines.
Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, motema likoló, kobanga, mpe likanisi ya kotindama na camp de concentration, mpo ete azalaki Moyuda, epusaki nokinoki tata na ngai na liwa. Lokola mama na ngai azalaki kondima mpenza ete molimo na moto ekufaka te, abandaki koyangana na milulu ya bilimu mabe mpo komeka kosolola na tata na ngai.
Ekómaki ngai mokóló, nazalaki ntango nyonso kotya na esika na ntina, mimeseno ya lingomba. Nazalaki ntango nyonso “mokatolike malamu”. Ata bongo, losambo na katolike ezalaki kolimbola ngai te makambo oyo makoya na avenire. Nasengelaki kobaluka epai na nani mpo na koyeba avenire.
Na ndakisa ya mama na ngai, nabandaki kokenda epai na banganga nkisi. Lokola bazalaki ntango nyonso kobanda milulu na bango na elembo na kulusu mpe na mabondeli, nandimaki solo ete makambo ya kokamwa oyo nazalaki komona ezalaki kouta epai na Nzambe. Ezali na eleko yango nde nalingaki kosala eloko mpo na kolembisa bampasi ya bamosusu mpe nakotaki na etuluku moko ya katolike oyo ezalaki kobongisa mibembo mpo na kokenda na bandako-nzambe oyo epesami na Maria, na Lourdes, epai kuna bato na bokono batyaka elikya ya kobikisama na bikamwiseli.
Nayokaki naino masolo ya ba Témoins de Jéhovah te, kino mokolo oyo mobali na ngai andimaki kozwa zulunalo mibale oyo esepelisaki ngai mpenza. Likambo oyo epesaki ngai esengo, ezalaki boye ete bazulunalo yango ezalaki kotánga Biblia mpo na kondimisa maloba na yango. Bobele na ntango yango, nayaki komona ete esengelaki na ngai koyeba Liloba na Nzambe. Nakomaki bongo mokanda mpo na kosala abonema na bazulunalo yango mibale. Ba Témoins de Jéhovah bayaki kotala ngai, mpe nabandaki koyekola Biblia.
Solo ya Biblia oyo nazalaki koyekola ezalaki kosepelisa ngai mpenza mpe nazalaki kolobela yango na bazalani na ngai. Nakamwaki mingi na ezalela ya moninga na ngai moko, mobongisi na mibembo, ntango nayebisaki ye ete nabandi koyekola Biblia elongo na Batemwe. Asilikaki mpe alobaki mabe na ntina na bango mpe mpo na yango, natikaki ye. Na nsima, nakutanaki na botemeli ya mobali na ngai. (Matai 10:36) Na ebandeli, ezalaki mpasi, kasi wana nazalaki kosalela makambo oyo nazalaki koyekola, bomoi na ngai ebandaki kobongwana. Nazwaki batisimo na 1977.
Nabandaki kokanga ntina ete nakokaki te komona nzela na lobiko soko ba Témoins de Jéhovah basepelaki na ngai te na kotyaka molende mpo na kolakisa ngai solo kitoko oyo ezwami na Biblia. Nayebaki ete ngai mpe lisusu nazalaki na mokumba ya kosala nyonso ekoki na ngai mpo na kosalisa bato mosusu na koyeba Jéhovah mpe mokano na ye ya kitoko mpo na avenire. Nalingaki kosala nini mpo na kokokisa mokumba yango? Lolenge eleki malamu ezalaki oyo ya kokóma mosaleli na Nzambe ya ntango nyonso. Yango ezalaki na ngai petee te, mpamba te, libota na ngai ekabwanaki na oyo etali lingomba. Kasi natyaki elikya epai na Jéhovah, na lisungi na ye mpe na litambwisi na ye, mpe namipesaki epai na ye. Sikawa, nazali pionnier permanent mpe nakomi kati na bambula oyo eleki esengo mingi na bomoi na ngai. Nayei mpenza kondima ete “Jéhovah azali malamu” mpe ye nani “akokima, epai na ye” akozala na esengo.—Nzembo 34:8.