Tolukaka biloko na motuya bibombami?
“Ngolu ezala na bino mpe kimya eyikana kati na boyebi na Nzambe mpe na Yesu, Nkolo na biso.—2 PETELO 1:2.
1, 2. Nini ekopesaka motuya mingi na wolo mpe ekosalaka ete yango ezala na ntalo makasi?
MPO NA NINI wolo ezali na motuya mingi? Atako ezali libanga, ezalaka petepete; kasi mwa gramme moke ekoki kosenga ba Zaïres mingi. Ya solo ekoki kolambama lisusu, mpe bakoki kobongola yango mpo ete ekoma biju kitoko, lokola lopètè to bracelets. (1 Timote 2:9; Yakobo 2:2) Nzokande soko obungi kati na esobe, ozali na nzala mpe na mposa makasi ya mai, okoki kolya wolo te to komela yango. Na esika motindo wana, eteni na limpa to saani na loso mpe mwa mai ekozala na motuya mingi koleka mpo na yo.
2 Kasi mpo na nini wolo ezali na motuya mingi boye? Ya liboso, mpo emonanaka mingi te mpe ezali mpasi mpo na kozwa yango. Na 1957, bakangaki misala na libulu ya wolo ebengami Empire, kuna na nord ya Californie, mpamba te ezalaki lisusu kobimisa matomba te. Batimoli na yango bazalaki kotimola libulu ezalaki na molai ya 1 500 mètres, kasi basengelaki lisusu kokita mopanzimopanzi na bakilomètres misato mpo na kokoma na liziba na yango. Liboso na yango, lokola wolo ezalaki ntalo mingi, mpasi nyonso bazalaki komona mpo na kozwa yango ezalaki na ntina.
3. Eloko nini ya motuya biso tokoki koluka?
3 Kasi biso, tokoki kotimola mpo na kozwa eloko oyo eleki wolo na motuya. Eloko yango nini? Mokonzi na mayele Salomó ayebisi yango kati na mokanda oyo akomaki eleki sikawa mibu 3 000: “Soko okolela mpo na bososoli mpe soko okonganga mpo na boyebi; soko okoluka ye lokola palata, mpe okolukaluka ye lokola na biloko na motuya bibombami; mbele, okososola botosi na kotosa Jéhovah mpe okozwana na boyebi na koyeba Nzambe.” Kanisa moke. Bato mpamba bakoki kozwa “boyebi na Nzambe”!—Masese 2:3-5a.
Mpo na nini biso banso tozali na mposa na boyebi ya solo
4. Boyebi ya solo ya moklisto esengeli kozala na makambo nini?
4 Uta eleko na Klisto, boyebi yango ya ntina esili kokola; ezali sikawa na makambo mingi koleka na ntango ya bato na sembo Baebele, mibali mpe basi oyo na kala, bazalaki na yango na ntango wana. Yango wana Paulo alobaki: “Mpo ete Nzambe na Nkolo na biso, Yesu Klisto, ye Tata na nkembo, apesa bino elimo na mayele mpe ya emoniseli kati na boyebi ya solo, ete miso na mitema na bino ezwa pole, ete bososola motindo na eli- kya na ebyangeli na ye mpe kofuluka na nkembo na libula na ye kati na Babulami.”—Baefese 1:17, 18.
5. Mpo na nini baklisto bapakolami basengeli kosenzela ntango nyonso na boyebi na bango mpo na oyo etali mokano na Nzambe?
5 Na eleko yango, toli oyo ezalaki mpenza mpo na bandeko na Klisto, baklisto bapakolami na elimo, mpe lelo oyo ezali sé ndenge yango. Lokola bazali basangani na eteni na mibale ya “libota” na ndaka, baklisto yango bakanelami mingi na Satana, ye oyo alingi ete bakufa. (Bagalatia 3:26-29: Baefese 6:11, 12) Baklisto bapakolami, bango mpenza basengeli kobongisa libyangami na bango na kosalelaka likabo na ngolu na Nzambe na ndenge mabe te. Yango wana basengeli ntango nyonso kotondisa maziba na bango ya elimo na kolamusaka boyebi na bango ya solo ya mokano na Nzambe mpe ya Liloba na ye.—Baefese 3:7; Baebele 6:4-6; 2 Petelo 1:9-12.
6. (a) Mpo na nini tozali biso banso na mposa ya boyebi, ezala ete tozali na elikya ya kokenda likoló to ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé? (b) Likambo nini tosengeli kosala mpo na kozwa boyebi ya solo?
6 Ezali boni mpo na baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé? Mpo na nini boyebi na solo ezali na ntina mpo na bango? Mpamba te epai na baklisto bosembo ezali na nsuka te; masengami mazali ndenge moko, ezala mpo na baklisto bapakolami oyo bazali na elikya ya kokende na likoló, ezala mpo na bampate mosusu oyo bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé. (Yoane 10:16; 2 Petelo 3:13) Mitinda ya boklisto ezali sé ndenge moko epai na baklisto nyonso. Tala mpo na nini biso banso tozali na mposa ya komilendisa na elimo na oyo etali boyebi na solo. Yango ekosengaka ntango mpe milende. Ee, esengeli na biso ete totimola mpo na kozwa biloko na motuya.—Nzembo 105:4, 5.
Tosomba ntango mpo na kotimola
7. (a) Misala nini mikoki kopekisa biso na kozwa boyebi na solo? (b) Makambo nini makoki kobima soko totaleli elimo na biso na bopotu?
7 Na mikolo na biso, ebele na bato bazali na makambo mingi ya kosala; yango ezali lisusu solo mpo na baklisto. Makita, mosala ya kosakola, mosala ya mosuni, mosala ya ndako, eteyelo mpe makambo mosusu ya bomoi na biso ezali kotondisa programme. Nzokande, tokoki komibombela ntango mpo na koleisa elimo na biso mpe kolendisa yango ndenge tomibombelaka ntango mpo na kolya mokolo na mokolo. Yesu amonisaki likambo moko ya ntina ntango alobaki, wana etangaki ye Deteronome 8:3: “Ekomami ete: ‘Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monoko na Jéhovah.’” (Matai 4:4) Soko tokotalela elimo na biso na bopotu, tozali solo kobebisa biloko na biso ya motuya na elimo mpe elikya na biso. Ekoki kosalama ete tobandi kopengwa na nzela malamu mpe tobandi kotengatenga. Mpo na yango, ndenge nini tokozwa ntango ebongi mpo na boyekoli na biso moko ya Biblia ntango nyonso?
8. Toli nini ezwami na Biblia ezali kongengisa biso na ntina na boyekoli na moto na moto?
8 Maloba malandi ya ntoma Paulo mazali mpenza na ntina mingi: “Bongo, bokeba mpo na etambweli na bino, bozalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza. Boyeba kosomba ntango mpamba te mikolo mizali mabe. Na ntina yango bozala bilema te nde bososola yango ezali mokano na Nkolo.” Tokoyeba mokano na Jéhovah bobele soko totye likebi na Liloba na ye na nzela na boyekoli na biso moko. Mpo na yango, esengeli na biso ‘kosomba ntango’, elingi koloba ‘koyeba kosalela mabaku nyonso oyo mamonani’.—Baefese 5:15-17, uta na Biblia Français courant.
9. Makambo nini makoki kolya biso ntango oyo tokoki mbala mosusu “kosomba” mpo na boyekoli na biso moko? Yango ezali boni mpo na yo mpenza?
9 Soko totaleli misala mikemike oyo tosalaka na mokolo mobimba, tokoki komituna motuna molandi: ndenge nini tokoki kosalela eteni monene ya ntango na biso oyo etikali mpamba? Na kotalaka télévision? Eloko yango oyo ebendaka mingi likebi na moto, ekoki kolya biso ngonga mibale kino mitano na mpokwa nyonso. Yo moko, olekisaka ngonga boni liboso na télévision? Makambo mazali kolakisama na télévision mazali mbala mingi mabe mpo ete mobulu mpe pite ezali kokumisama. Mingimingi, bazali koluka kolamusa “mposa ya nzoto, mposa ya miso mpe kolakisa bozwi”. (1 Yoane 2:15-17) Nzokande, mingi bazangi ekateli ya kokanga télévision na bango. Ya solo, appareil yango oyo ebimi na ntango na biso ekoki kolya eloko eleki motuya oyo tozali na yango, elingi koloba ntango na biso.
10. Mpo na nini, na eleko na biso, ezali likambo na ntina na koyeba kosalela ntango?
10 Soko tomisosoli, tokomona mpenza ete tokoki ‘kosomba ntango’ mpo na misala ya ntina, lokola boyekoli ya Biblia. Na eleko ya mpasi oyo tozali kobika, boyekoli ya Biblia mpo na moto na moto, ezali na ntina mpo na moklisto mpamba te ekosalisa ye na kozwa boyebi na solo. Nzokande na mbula eleki, bato 41 000 babimisamaki na lisangá; yango emonisi ete bandeko mingi ya mibali mpe ya basi balembaki na elimo. Mpo na kolata mpe kobatela “molato mobimba na Nzambe’”, baklisto basengeli kosala milende bobele mpo na mwa ntango te! Lokola basoda oyo bakumbi bibundeli ya solo, basengeli kokokisa mokumba na bango wana mokolo na mokolo.—Baefese 6:10-18; Baloma 1:28-32; 2 Timote 3:1.
11. Ndakisa nini libota na Béthel ezali kopesa mpo na oyo etali boyekoli ya libota?
11 La Société Watch Tower ezali na ba filiales 95 kati na mokili mobimba. Kati na ba filiales yango, bandeko koleka 9 000 ya mabota na Béthel basalaka boyekoli na bango ya libota mokolo ya lundi na mpokwa. Bayekolaka La Tour de Garde mpo na kobongisa likita ya week-end mpe, mbala mingi, bayanganaka lisusu na diskur moko ekolimbolaka Biblia to na cours oyo ebongisami mpo na basangani bakoti sika na Béthel. Na yango, ezali bongo lundi na mpokwa nde libota ya Béthel kati na mokili mobimba ekosalaka boyekoli na yango. Bongo yo, oponi mokolo nini mpo na boyekoli na yo moko to mpo na boyekoli ya libota?—Baebele 10:24, 25.
Ndenge nini tokoki kosalela bisaleli oyo tozali na yango
12. Makambo nini mazali na Biblia Les Saintes Ecritures-Traduction du monde nouveau ekomisi yango mokanda malamu mpo na boyekoli?
12 Lokola motimoli na wolo azali na bisaleli bisengeli mpo na mosala na ye, bobele bongo tozali na bisaleli oyo tokoki kotimola na yango liziba na wolo oyo ezali bongo Liloba na Nzambe. Les Saintes Ecritures-Traduction du monde nouveau ezali moko na bisaleli yango. Libongoli yango esili kobima na Allemand, na Anglais, na Espagnol, na Frangais, na Italien, na Japonais, na Néerlandais mpe na Portugais. Mingi na ba Témoins de Jéhovah bazali bongo na esaleli kitoko oyo ekoki kosalisa bango na kozwa boyebi ya solo ya Nzambe na solo. Ebimeli oyo ya Biblia ezali na mitindami koleka 1 000 na katikati na lokasa mpe na minoko mingi ezali na maloba na nse na lokasa. Ezali mpe na liste babengi appendice ya bankasa 20, oyo ezali na bandimbola nyonso mpo na mituna ya ntina ya Biblia.
13. Tokoki koloba boni mpo na ndenge maloba “boyebi” (“connaissance”) mpe boyebi ya solo (“connaissance exacte”), esalelami kati na Makomami na hébreu mpe na Makomami na greke?
13 Na bankasa ya nsuka ya Biblia yango, okokuta “Index ya maloba na ntina mazwami na Biblia”. Basalelaka yango ndenge nini? Luka liloba “connaissance exacte” (boyebi ya solo) kati na Biblia na yo: okomona molongo na ba versets nsambo. Nzokande, moko te kati na yango ezwami na Makomami na hébreu. Yango elimboli ete Makomami na hébreu emonisi ntina ya boyebi te? Te; mpamba te na nse na liloba “connaissance” okokuta mikapo 39, oyo kati na yango 34 ezali mikapo mizwami na Makomami na hébreu. Kasi, liloba “connaissance exacte” (boyebi na solo) ezali na hébreu te. Na yango tokoki komona na lisalisi na mitindami mipesami, ete komonisa ntina ya kozala na boyebi ya mozindo na kosangisaka na liloba “connaissance”, maloba lokola “bososoli” mpe “mayele”, to na kolobelaka mpo na boyebi “mingi”.—Danyele 1:4; 12:4; Yilimia 3:15.
14. Makambo nini ya ntina malobelami na nse na liloba “connaissance” (boyebi) kati na Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible?
14 Ndenge toyekoli yango na paragrafe oyo euti koleka, monoko na greke esali mwa bokeseni moke kati na lolenge mibale na boyebi. Ezali likambo oyo tolingi kotimola, mpo na koyeba malamu bokeseni oyo ezali kati na maloba yango mibale ntango ezali kosalelama mpo na baklisto. Mpo na nini boyebi, gnôsis, mpe boyebi ya solo, épignôsis, ezali na ntina mingi mpo na baklisto? Tokozwa eyano epai wapi? Kati na Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, oyo ezali ebombelo monene ya mayele mazwami na Biblia. Ee, mikanda yango nsambo mitondi na biloko na motuya. Tozwa liloba “connaissance” (boyebi). Kuna okomona lisolo mobimba mpo na maloba oyo tozali koyekola mpe na maloba mosusu oyo ekokani na yango: lokola bwanya (sagesse), mayele (intelligence), bososoli (discernement) mpe likoki ya kokanisa (la capacité de réflexion). “Wolo” nyonso wana, elingi koloba mateya wana epesameli yo na nzela na mikanda oyo ekolimbolaka Biblia. Kasi esuki bobele bongo te.—Nzembo 19:9, 10.
15. Bisaleli nini lisusu tozali na yango mpo na bolukiluki na biso, mpe ndenge nini tokoki kosalela yango?
15 Soko olingi kokenda mosika na boyekoli na yo etali boyebi mpe makanisi mosusu ekokani na yango, okoki kosalela ba index ya mikanda ya la Société Watch Tower, oyo esili kobima na mwa minoko mingi. Bolukiluki oyo tosali elongo na ntina na boyebi, okoki mpe kosala yango na kolandaka metode moko oyo mpo na masolo mosusu. Kanisa na bozwi ya elimo oyo tokozwa na nse na nkombo “Jéhovah”. Boyebi ya solo na ntina na Nkolo Moyangeli na molongo ezali mingi mpenza!—Nzembo 68:19, 20; Misala 4:24.
16. Makomami malobi nini na ntina na boyekoli?
16 Oyo nde “biloko na motuya bibombami” tokoki kokundola na lisalisi na mikanda mikolimbolaka Biblia oyo mibimisami na la Société Watch Tower! Ozali na mposa na “wolo” oyo? Okanisi ete ezali mpenza na ntina? Ozwaka ntango ya kotimola mpo na kozwa yango?—Masese 2:1-5.
Nani akopesa ndakisa mpo na koluka wolo ya elimo?
17. Tosengeli kosala nini mpo na kozwa boyebi ya Nzambe mpe ya Klisto?
17 Esengeli kosala nini mpo na kozwa boyebi na Nzambe mpe oyo na Klisto? Esengeli kozala na mposa makasi ya kondimama na Jéhovah mpe na Mwana na ye, mpe kolinga kozwa likabo ya bomoi na seko. Yesu amonisi likanisi yango: “Bosengaka mpe bakopesaka bino; bolukaka mpe bokozwaka, bobetaka mpe bakozipwela bino. Mpamba te moto na moto oyo akosengaka akozwa; ye oyo akolukaka akomona; bakozipwela ye oyo akobetaka.” Omoni likambo oyo asengi: ‘Bosengaka ntango nyonso, bolukaka ntango nyonso, bobetaka ekuke ntango nyonso.’ Wana ezali makambo masengeli kosalama bobele mbala moko te. Koluka boyebi esengaka kolendendela.—Matai 5:6; 7:7, 8.
18. Nani kati na libota, asengeli kopesa ndakisa mpo na oyo etali koluka boyebi ya solo, mpe mpo na nini?
18 Na kati ya libota ya baklisto, nani asengeli kopesa ndakisa mpo na boluki ya boyebi ya solo? Paulo ayanoli: “Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bobokola bango na mateya mpe na mpamela na Nkolo.” Ee, ezali baboti, mpe mingimingi tata, nde basengeli kopesa ndakisa na likambo yango na kotyaka makambo ya elimo na esika ya liboso. Yango emonisi bongo ntina ya kobongisa ngonga esengeli mpo na koyekola, ngonga oyo libota ekozela yango poso na poso na esengo nyonso.—Baefese 6:4.
19. Ndenge nini tokoki kokomisa boyekoli ya libota eloko ya esengo? Boyekoli yango esalemaka ndenge nini na libota na bino?
19 Tokomisa boyekoli na biso ya libota eloko ya esengo. Na ndakisa, soko tozali na bana, mpo na nini te kotika bango ete bapona lisolo oyo bakoki kokanisa likoló na yango mpe kosenga bango ete basala bolukiluki na mikanda mikeseni, na kotalelaka bongo mbula ya mwana mokomoko? Nsima na minute 30, bokoki koyangana mpo na kotala likambo oyo mokomoko azwi na ntina ya lisolo oyo epesamelaki ye. Soki tozali na concordance, tokoki kosenga epai na mwana oyo aleki moke ete atanga mbala boni liloba boye ezwami na Makomami na hébreu mpe na Makomami na greke. Mwana oyo azali mwa mokolo akoki kobimisa mayele kitoko mazwami na mokanda Auciliaire. Baboti bayebi makoki ya bana na bango mpe ntango boni bakoki komipesa na kokanisa: bakotalela nde makambo yango mpo na kobongisa boyekoli. Toyeba likambo oyo ebongi na libaku moko na moko, mpe tokumisaka bana na biso. Tolendisa libota na biso na “kotimola” na elobeli na elimo, mpe na kobatelaka mikano malamu.
Tobatela mikano malamu
20. Mikano nini ya mabe tokoki kozala na yango te na ntango tozali koyekola?
20 Bopolo ezali ezalela na boklisto. (Masese 11:2; 1 Timote 2:9) Na yango, tokoyekola na mokano ya komitombola mpo na boyebi oyo tozali na yango? To tosengeli komonisa boyebi na biso, mpe komona bamosusu lokola ete bayebi eloko te? Mpe lisusu, tosengeli kolobaloba makanisi na biso? Tala toli ya Paulo na ntina yango: “Mpo na likabo na ngolu lizwi ngai, nazali koloba na moko na moko kati na bino ete boleka te komikanisa bino mpenza na motindo mobongi te. Kasi bomitanga na makanisi na sembo, moto na moto lokola na likabo na kondima oyo Nzambe apesi ye.”—Baloma 12:3.
21, 22. Bopusi nini boyebi na biso ya solo esengeli kozala na yango likoló na biso?
21 Soko tosali milende ya solo mpe tosaleli boyebi ya solo, tokoki kozwa bondimi, bosembo, komikanga motema, mpiko, kobanga Nzambe, bolingo epai na bandeko mpe bolingo. Petelo amonisaki ntina ya biloko yango ntango akomaki: “Mpamba te soko makambo oyo mazali kati na bino mpe mazali koyikana, makobatela bino ete bozala mpamba te mpe bozanga kobota mbuma te, mpo na boyebi na Nkolo na biso Yesu Klisto.”—2 Petelo 1:2-8.
22 Boyebi na biso esengeli kozala na bopusi na motema na biso. Esengeli kopusa biso na komonisa bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na biso, mpe kokoma baklisto oyo bazali kobota bambuma kitoko, na ezaleli na biso mpe na mosala na biso ya kosakola. Na ndenge yango, tokozala na bomoko mpe tokozala na mayele mingi na ntina na ndakisa na Klisto. (Baefese 4:13) Oyo nde mbano kitoko tokozwa na kolukaka biloko bibombami!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tokoki komona ete na Masese 2:5, liloba oyo ebongolami na “boyebi na Nzambe” na greke, kati na Biblia ya la Septante, ezali bongo épignôsis, elingi koloba “boyebi ya solo”; wana ezali moko kati na bisika mwambe epai tozali kokuta liloba oyo ya greke kati na la Septante.
Bozongeli
◻ Engebene mokonzi Salomó, eloko nini ezali na motuya koleka biloko na motuya bibombami?
◻ Mpo na nini boyebi ya solo ezali na ntina mpo na baklisto bapakolami mpe mpo na bampate mosusu?
◻ Ndenge nini tokoki ‘kosomba ntango’ mpo na boyekoli na biso moko?
◻ Bisaleli nini tozali na yango mpo na bolukiluki na biso ya boyebi ya solo?
◻ Mpo na oyo etali boyekoli ya libota, nani asengeli kopesa ndakisa, mpe mikano nini tosengeli kozala na yango wana tozali koyekola?