Mpo na nini tozali na mposa na boyebi ya solo?
“Yango wana, longwa na mokolo moyoki biso mpo na bolingo yango, totiki kobondela mpo na bino te. Tokosengaka ete botonda na boyebi na mokano na ye, na mayele nyonso mpe na bososoli na elimo.”—BAKOLOSE 1:9.
1. Salela ndakisa moko mpo na komonisa bokeseni oyo ezali kati na boyebi ya likolólikoló mpe boyebi ya solo.
BATO banso to bato mingi bayebi eloko babengi montre, kasi bato boni bayebi ndenge yango etambolaka? Mbala mosusu okoki koyeba mwa moke ndenge esalaka, kasi okoki kopanza yango, kobongisa mpe kozongisa yango ndenge ezalaki? Moto abengami horloger azali na likoki ya kosala bongo. Mpo na nini? Mpamba te azali na boyebi ya solo mpe ayebi malamumalamu ndenge montre esalaka. Ndakisa yango, emonisi bokeseni ezali kati na boyebi ya likolólikoló mpe boyebi ya solo.
2. Bokeseni nini ezali kati na mitindo wana mibale na boyebi oyo esili yo komona mpo na oyo etali makambo ya Nzambe?
2 Bobele bongo, bamilió na bato bazali sé na boyebi ya likolólikoló mpo na Nzambe. Bazali koloba ete bandimelaka ye, kasi misala na bango mizali komonisa ete ezali bongo te. Misionere moko azalaki kotuna mbala mosusu bato oyo azalaki kokutana na bango: “Lokola ozali moto ya Katolike, ntembe ezali te ete ondimaka Nzambe.” Mpe molobani na ye akoyanola: “Ee, esengeli kozala na eloko moko kuna na likoló!” Maloba oyo mazali komonisa ete moto yango azali na boyebi ya solo mpe ndimbola na polele na ntina na Nzambe? Te, soko moke te. Bato mingi bazali se na boyebi ya likolólikoló, yango wana mingi kati na baoyo bakomibengaka baklisto bazali na ezalela ya boklisto te. (Tala Tito 1:16) Ntoma Paulo amonisi ete kosala bongo ekobimisaka nde mawa. “Lokola baboyaki kotosa Nzambe na boyebi ya solo, Nzambe atiki bango na makanisi na mpamba ete basala makambo na nsoni.”—Baloma 1:28.
3. Makambo nini mabimaka soko bato baboi kolanda nzela ya boyebi ya solo ya mokano na Nzambe?
3 Makambo nini mabimaki na ekeke ya liboso mpo na kozanga boyebi ya solo? Bato bazalaki kosala makambo “na ndenge nyonso na bokesene, na mabe, na bilulela, na nko; batondi na zuwa, na mposa na koboma bato, na kowelana, na kozimbisa bamosusu, na kokana mabe, na kopalanganisa nsango mabe, na kotukatuka, na koyina Nzambe, na lolendo, na ngambo, na maloba mpamba, na koluka ndenge na sika na mabe, na kotiola baboti, bayibi, baboyi kondima, bazangi bolingo, bazangi mawa.” Lokola bazangaki boyebi ya solo, motema na bango ezalaki kopusa bango te na kosala makambo malamu.—Baloma 1:28-31; Masese 2:2, 10.
Bokeseni ezali wapi?
4, 5. Engebene balimboli na monoko na greke ya kala, wapi mwa bokeseni oyo ezali kati na maloba gnôsis mpe épignôsis?
4 Lokota ya greke epesi likanisi mpo na bokeseni oyo ezali kati na boyebi ya likolólikoló mpe boyebi ya solo. Makomi na yango ya ebandeli elobeli gnôsis, boyebi, mpe épignôsis, boyebi ya solo. Engebene W. Vine, gnôsis elimboli “libosoliboso ankete, koluka koyeba, bolukiluki”, mingimingi likoló na solo ya Biblia kati na ndimbola ya Makomami.
5 Engebene J. Thayer, épignôsis elimboli “boyebi ya sikisiki mpe ya solo”. Verbe oyo esangani na yango ezali na ndimbola oyo elandi: “Koyeba nyonso, na mozindo; koyeba kino makambo mikemike, koyeba malamu.” Vine akomi ete épignôsis “elimboli boyebi, bososoli, kondima na sikisiki to kondima ekoki.” Abakisi ete ezali komonisa “boyebi ya solo, to boyebi mingi koleka, moto oyo ayebi azali kosalela mayele yango mpo na likambo oyo ye ayebi, mpe yango ezali na bopusi makasi epai na ye”. Ndenge tokomona yango, maloba oyo touti kotanga na nsuka ezali na ntina mingi mpo na moklisto.
6. Banani bakomi ya Biblia oyo basaleli maloba na greke oyo mabongolami na “boyebi” mpe “boyebi ya solo”, mpe mpo na nini boyebi yango ya solo ezali na ntina?
6 Bobele bakomi mibale ya Biblia nde basaleli liloba na greke épignôsis. Ezali bongo Paulo mpe Petelo, baoyo basaleli yango mbala 20a. Soko tolongoli Luka, bazali bobele bango mibale nde basaleli liloba gnôsis. Paulo asaleli yango mbala 23 mpe Petelo asaleli yango mbala 4. Makomi na bango mazali bongo lisungi na motuya oyo ezali kosalisa biso na kokanga ntina na boyebi ya solo mpo na lobiko na biso. Lokola ntoma Paulo alobaki yango epai na Timothé, “ezali malamu mpe endimami na Mobikisi na biso, Nzambe, ye oyo alingi ete bato na lolenge nyonso babikisama mpe bazwa boyebi ya solo”.—1 Timote 2:3, 4.
Mpo na nini boyebi ya solo ezali na ntina monene
7. (a) Mpo ete ezala na motuya, boyebi esengeli kokota kino wapi? (b) Likama nini ekokomela moto oyo azali na bopotu mpo na boyebi?
7 Mpo na kobikisama, moto asengeli kozala na boyebi ya solo oyo eteyami na Biblia. Nzokande, boyebi yango esengeli kokota kino na motema, yango efandelo na mikano na biso. Ekoki kosuka bobele na boongó te. Epai mosusu, wana moto azwi boyebi ya solo, asengeli kosalela yango mpe kobakisa oyo ezangi. Mpo na nini bongo? Mpamba te, lokola misisa oyo ezali lisusu kosalelama te, boongó ekoki kolemba, yango ekoki komema biso na kolemba na elimo; tokobanda kozonga nsima mpe kondima na biso ekobanda kotengatenga. Ekoki kokoma ete tozanga kokangama makasi na “boyebi na Nzambe”. Mosika te kokakatana na biso ekomonana na bolembu na biso ya kosalela mayele to mpe na etamboli ekeseni na losambo ya boklisto.—Masese 2:5; Baebele 2:1.
8. Motuya nini Salomó azalaki kopesa na mayele mpe boyebi?
8 Na bongo, tomoni mpo na nini Salomó, abatelaki boyebi, lisosoli mpe mayele, na ntango nyonso oyo atikalaki sembo. Akomaki: “Boye mayele ekokota na motema na yo mpe boyebi ekoyokama malamu na molimo na yo; mayele ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo, mpo na kolongola yo na nzela mabeb.” (Masese 2:10-12) Maloba oyo mamonisi ete tosengeli kokolisa mposa mozindo ya boyebi ya solo, mpamba te ekoki kozala na bopusi na motema na biso mpe na molimo na biso. Ezali lisusu moboko oyo ekosalisa biso na kozala na likoki malamu ya kokanisa. Mpo na nini yango ezali na ntina mingi mpo na biso lelo oyo?
9. Tanga mwa banguna oyo bazali koluka kobebisa elimo ya baklisto?
9 Tozali kobika na “eleko ya nsuka ya lisolo ya mokili”, oyo, lokola Paulo asakolaki yango, ezali “eleko ya likama mpe mobulu”. (2 Timote 3:1) Ekomi mpenza mpasi epai na baklisto ete batikala sembo kati na mokili oyo ezali se kobeba. Bizaleli mpe mitinda ya boklisto ezali kotyolama mpe komonana mpamba. Uta na bipai binso, kondima ya ba Témoins de Jéhovah ezali komekama: ezali kouta na bakonzi na mangomba, oyo bazali koyina makasi mpenza nsango ya Bokonzi oyo tozali komema na ndako na ndako; ezali kouta na bapengwi, oyo bazali koyokana na bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta; ezali kouta na baminganga oyo balingi ete biso mpe bana na biso tondima makila na makasi; ezali kouta na bato na mayele oyo bandimelaka Nzambe te mpe bandimaka te ete mokili ezalisamaki na Nzambe; mpe epai na baoyo bazali komeka biso na makasi ete tokota na makambo ya mokili. Botemeli nyonso wana ebongisami na Satana, mokonzi na molili mpe na kozanga boyebi, monguna na boyebi ya solo.—2 Bakolinti 4:3-6; Baefese 4:17, 18; 6:11, 12.
10. Bopusi nini ya makasi ekoki kozala zongazonga na biso mpe tosengeli kosala nini mpo tokosama te?
10 Ekoki kosalama ete na bomoi na ye ya mokolo na mokolo, moklisto azali komekama na bopusi makasi mpo ete asala lokola bato mosusu, mpo na oyo etali komela drogue, masanga, kosala pite mpe mobulu, koyiba, kokosa, kotriché, kokima kelasi to koluka bisengo ya moimi. Tala mpo na nini boyebi ya solo ezali na ntina. Boyebi na biso mpo na Liloba na Nzambe mpe mikano na ye ezali na litomba malamu na makanisi na biso mpe na misala na biso; mpe bopusi yango ekoki kozala na makasi mingi soko boyebi na biso ezali mpe mozindo.—Baloma 12:1, 2.
Mwana oyo abungaki nzela
11, 12. Lisolo nini emonisi ete ezali bozoba na koboya boyebi ya solo?
11 Mpo na kolimbola etinda yango na lisalisi ya ndakisa, tokamata likambo ya elenge mobali moko oyo bolingo na ye mpo na solo emekamaki ntango azalaki na mibu 14 mpe asilaki kozwa batisimo. Lokola bilenge mingi, azalaki kolinga masano, mingimingi lisano ya ndembo. Kasi mokakatano mobimaki wana. Eteyelo na ye ezalaki kobeta ndembo na mpokwa ntango makita ya lisangá na bango mazalaki kosalama. Elenge moklisto oyo azalaki makasi te na elimo mpo na kokesenisa litomba ya ntango mokuse oyo akokaki kozwa na ndembo mpe motuya ekoumela oyo alingaki kozwa na makita ya boklisto oyo azalaki kosangana na yango elongo na mama na ye, oyo azalaki mwasi-mokufeli-mobali, mpe elongo na baleki na ye ya mibali mpe ya basi. Atikaki bongo kosala engebene boyebi ya solo mpe azwaki ekateli ya kotika solo. Abimisamaki na lisangá. Nsima na yango, akotaki na mosala ya soda, mpe kuna, amekaki drogue.
12 Na 1986, ntango ngala na elenge mobali yango esilaki, makanisi malamu mazongelaki ye. Ekómaki ye epai na moningo moko na libota na bango-oyo azalaki na comité oyo esambisaki likambo na ye mpe ebimisaki ye na lisangá-, alobaki: “Nazali na esengo ya koyebisa yo nsango moko ya ntina: Nazongeli solo. . . . Nayei koyeba makambo ntoma Paulo alobaki na 2 Bakolinti 4:4, ete ezali na nzambe moko ya biloko mabe na ntango oyo, oyo azali kokanga miso na bato. Uta kala, nazalaki komona te makambo mazalaki kosalema zongazonga na ngai-na elobeli na elimo. Ntango natikaki solo, nayebaki te ete namityaki na likama. Kasi nsima na bambula mpe na lisalisi na Jéhovah Nzambe, nayei koyeba ete nazalaki na elonga te mpe etamboli na ngai ezalaki mabe.”—Tala Luka 15:11-24.
13. Likambo nini ya esengo ekokomela baoyo basila kokwea soko babongoli motema na bango? (2 Timote 2:24-26)?
13 Elenge yango azongelaki nzela ya boyebi ya solo. Akoki sikawa “kotambola na ndenge endimami na Jéhovah, mpo na kosepelisa ye na makambo nyonso.” Ezongeli ye koyangana na lisangá ya boklisto, akoki lisusu ‘kobota mbuma na misala nyonso malamu mpe kokola na boyebi ya solo ya Nzambe. Oyo ezalaki solo bolamu mpe elendiseli mpo na libota na ye na ndenge akomaki lisusu moyekoli na Klisto! Oyebi bandakisa ekokani na oyo ya elenge mobali oyo?—Bakolose 1:9, 10; Matai 11:28-30.
Bopotu na elimo ekobimisaka mbuma mabe
14. (a) Tosengeli kosala nini mpo ete tokwea te? (b) Likambo nini esili kokomela baklisto mosusu?
14 Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa lokola wana? Ezali oyo ete soki tosili kokoma na boyebi ya solo, tosengeli kobatela ntango nyonso boyebi yango mpo ete tokwea te. Soko tozali na bopoto mpo na boyekoli na biso moko mpe boyekoli ya libota, makita ya boklisto mpe mosala ya Nzambe, maziba na biso ya elimo, mazali kokaoka. Likambo nini ekosalama? Moklisto oyo azalaki makasi na kondima uta kala, akoki kozonga nsima mpe kosala mabe: mbala mosusu akomipesa na pite to akomikotisa na nzela mabe ya kobeta ntembe mpe ya lokuta oyo ekomemaka na lipengwi. (Baebele 2:1; 3:12; 6:11, 12) Bazoba mosusu basili kozongela mateya ya Babilone, lokola liteya ya Bosato mpe kozanga kokufa ya molimo!
15. Pierre alobi nini mpo na baklisto oyo bazali kokwea?
15 Maloba malandi ya Petelo makokani mpenza na likambo yango: “Soki, nsima na kokima longwa na makambo na bosoto na mokili na boyebi ya solo mpo na Nkolo mpe Mobikisi Yesu Klisto, bazongi lisusu na makambo yango mpe balongami, nsuka na bango ekozala mabe koleka. Mpo ete soko bayebaki nzela na boyengebene te, mbele eleki malamu na bango. Kasi eleki mabe mpo bayebaki yango mpe bazongi nsima, kotika likabo na bulee lipesami epai na bango. Ekweli bango lokola lisese na solo lilobi ete: ‘Mbwa azongi kolya biloko bisili ye kosanza; mpe ete, Ngulu asukoli mai mpe akei kolala na bosoto.’”—2 Petelo 2:20-22.
16. (a) Ndenge nini bamoko bazali komitika kokosama? (b) Baoyo bazali kokwea bakomipesaka na misala nini?
16 Mingimingi bato baboyaka boyebi ya solo mpo na ezaleli na moimi. Baoyo bazali komikotisa na nzela yango baboi mokumba oyo ya koyangana na makita ya boklisto to kosangana na mosala ya ndako na ndako. Bamoko bazali nkutu kozongela komela likaya! Bamosusu bazali kosepela na ndenge bokeseni ezali lisusu te kati na bango mpe mokili, mpo na oyo etali kokota na makambo ya mokili to kondima makila. Solo, bazwi lipanda na bango! Bamosusu bakomi kino kovoté moto nani oyo bango balingi kati na bibongiseli na maponami na “nyama na yauli”. (Emoniseli 13:1, 7) Bamoko kati na bato yango bazangi ekateli bamitiki ete bamema bango mosika na nzela na sembo ya boyebi ya solo, na bato oyo bazalaki ‘kolaka bango bonsomi nzokande bango moko bazali baombo ya mabe’.—2 Petelo 2:15-19.
17. Baoyo bazali kotika boyebi ya solo bazali komitya liboso na likama nini?
17. Baoyo bazali kotika boyebi ya solo bazali komitya liboso na likama nini?17 Soko babongoli motema te mpe bazongeli solo te, bato yango bazali komibendela etumbu oyo Paulo alobelaki: “Mpamba te soko tokosalaka masumu na nko nsima na kozwa boyebi ya solo, mbeka mpo na masumu ezali lisusu te. Etikali bobele kotalela esambiseli na nsomo mpe na moto na nkanda oyo ekozikisa batemeli.” Ekozala mpenza kozanga mayele soko moto atiki boyebi ya solo ya Jéhovah Nzambe mpe ya Yesu Klisto mpo na kokenda kolanda mateya ya kopengwa na boklisto na lokuta.—Baebele 6:4-6; 10:26, 27.
Molende engebene boyebi ya solo
18. Engebene Paulo, mpo na nini bakonzi na mangomba na Bayuda baboyaki kondimela Klisto?
18. Engebene Paulo, mpo na nini bakonzi na mangomba na Bayuda baboyaki kondimela Klisto?18 Na eleko na Paulo, na ntembe te bakonzi na mangomba na Bayuda bazalaki na boyebi ya Makomi na hébreu. Kasi yango ezalaki boyebi ya solo? Ebendaki Bayuda yango epai na Klisto, mpe bandimaki ete ye azali Masiya? Engebene Paulo, bazalaki koluka mpenza ete babengama bato na sembo na nzela na Mibeko na boye ete baboyaki kotosa “Klisto [ye oyo] azali nsuka na Mibeko”. Yango wana Paulo alobaki na ntina na bango: “Natatweli bango ete bazali na molende mpo na Nzambe nde bazangi mayele ya solo.”—Baloma 10:1-4.
19, 20. (a) Ndenge nini tokoki kozwa boyebi ya solo? (b) Mituna nini tokotalela na mbala ekoya?
19, 20. (a) Ndenge nini tokoki kozwa boyebi ya solo? (b) Mituna nini tokotalela na mbala ekoya?19 Na bongo, ndenge nini biso tokoki kozwa boyebi yango ya solo? Na boyekoli ya moto na moto mpe kokanisa na mozindo, na libondeli mpe na koyanganaka na makita. Mpo na yango, esengeli na biso kotyaka ntango nyonso “petrole” kati na miinda na biso ya elimo. Tosengeli kosuka te bobele na boyebi oyo tozwaki ntango tondimaki solo. Tosengeli kolya bilei na elimo oyo ezali makasi, elingi koloba boyebi ya solo, na nzela na boyekoli na biso moko, oyo ebongisami malamu. Toli oyo na Paulo ezali mpenza na ntina: “Bilei makasi ezali mpo na bato basili kokola; mpo na bango basili kolakisa esoswelo na bango kokabola kati na malamu mpe mabe. Boye totika makambo mikemike na liboso na mateyo na Klisto mpe toleka kino nsuka. Totika naino kotya moboko na kobongwana na motema longwa na misala na kufa mpe kondima Nzambe, . . . Tokosalaka bongo soko Nzambe akopesa nzela.”—Baebele 5:14 kino 6:3.
20 Nzokande, biloko nini tozali na yango oyo ekoki kosalisa biso na kozwa boyebi ya solo? Lokola tozali na makambo mingi ya kosala, ntango nini tokoki koyekola Liloba na Nzambe? Lisolo elandi ekoyanola na mituna oyo mpe na mosusu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ba versets yango nyonso ezali na Concordance complète des Saintes Ecritures-Traduction du monde nouveau (angl.), page 17; mpe Filemo 6 (tala La traduction interlinéaire du Royaume, angl.).
b Mpo na kozwa ndimbola malamu mpe bokeseni ezali kati na maloba “boyebi”, “likoki ya kokanisa”, “mayele” mpe maloba mosusu ya lolenge wana oyo ezali na Masese, tala Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible (ébimisamaki na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.), pages 324, 1277, 1339.
Mituna
◻ Bokeseni nini ezali kati na “boyebi’ mpe “boyebi ya solo”?
◻ Mpo na nini boyebi ya solo ezali na ntina mingi na mikolo oyo ya nsuka?
◻ Ndenge nini bamoko bakoki komekama ete batika solo?
◻ Likebisi nini Petelo apesi biso mpo na kosalisa biso ete toboya boyebi ya solo te?
◻ Tosengeli kosala nini mpo na kozwa boyebi ya solo mpe kobatela yango?
18. Engebene Paulo, mpo na nini bakonzi na mangomba na Bayuda baboyaki kondimela Klisto?
19, 20. (a) Ndenge nini tokoki kozwa boyebi ya solo? (b) Mituna nini tokotalela na mbala ekoya?
18. Engebene Paulo, mpo na nini bakonzi na mangomba na Bayuda baboyaki kondimela Klisto?