‘Mpo na yango, bana na biso ya basi babelemi pene na biso’
Yango, ezali Mokanda mpo na masolo na Bilia, mpe bana basi, bazali bana na molakisi mwasi moko na mboka Murewa (na Zimbabwe) oyo akomaki na mbula eleki epai na filiale ya la Société Watch Tower. Mwasi wana azwaki mokanda yango epai na moninga na ye. Alobi boye:
“Ndenge alobaki na ngai, namekaki kozwa litomba malamu na mokanda yango, liboso elongo na mwana na ngai ya mwasi ya moke, oyo azali na mibu 8, mpe na nsima, elongo na mibale mosusu oyo bazali na mibu 16 mpe 18, baoyo batangaka na internat. Nazali na esengo mingi ya koyebisa bino ete bopusi ya mokanda wana epai na bana na ngai misato ya basi, ezali mpenza malamu. Uta babandi kotanga Mokanda yango, ezaleli na bango ebongwani makasi mpenza.” Mpe mama yango abakisi: “Na lisalisi na mokanda yango, bana na biso babelemi pene na biso koleka liboso.”