Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/12 lok. 31
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ya solo, ekoki kozala bongo te mpo na bato banso.
  • Tosalisa bazalani na biso bayeba kosambela Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Basakoli ya nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Teyá bana na yo básanzola Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/12 lok. 31

Mituna na batangi

◼ Nakotaléláká makambo malobami mpo na bato oyo babandi kosakola na ndako na ndako kozanga ete babatisama, tokoki komema, ata mpo na mokolo moko, moyekoli na Biblia mpo na komonisa ye ndenge nini mosala ya kosakola esalamaka?

Mpo na kobima elongo na Témoin de Jéhovah na mosala ya kosakola, moto oyo azwi naino batisimo te asengeli kokokisa masengami mpo na kozala mosakoli ya nsango malamu.

Bato mingi bazali na limemya epai na ba Témoins de Jéhovah mpo na mosala malamu oyo bobele bango bazali kokokisa mpe oyo etali ‘kozalisa bayekoli na kotéyáká bango’ na ndako na ndako mpe na nzela na boyekoli na Biblia na bandako. (Matai 28:19, 20) Bato yango bakokanisa nini soko bamoni moto abimi elongo na Temwe na mosala yango? Bakoloba na ndenge ebongi ete azali mpe mosakoli na nsango malamu to moto oyo etikali moke, akokóma mosakoli na nsango malamu.

Ya solo, ekoki kozala bongo te mpo na bato banso.

Atako likambo yango emonanaka mbala mingi te, ekoki kosalama ete bankulutu oyo bakoki kopesa nzela na moto abima na mosala ya kosakola, bapesa nzela epai na mopanzi nsango, molakisi to moto mosusu, ete abima elongo na Temwe kati na mosala ya kosakola ndako na ndako mpo amona ndenge nini mosala yango esalamaka. Na likambo motindo oyo, moto yango akolata mpe akozala na etamboli oyo ebongi na mitinda na biso. Epai mosusu, soko amoni ete, yango esengeli, Temwe akoki koloba epai na bato oyo akokutana na bango ete moto oyo abimi na ye elongo, azali mopanzi nsango to molakisi oyo alingi koyeba ndenge tokokisaka mosala ya ntina esengami na Biblia.

Lisusu, baklisto bamemaka bana na bango na mosala ya kosakola, ata bazali naino mike mpe bakomi naino basakoli babatisami te to bandimami naino na kozala basakoli te mpo na bantina mosusu. Yango ekosalisa baklisto yango ete batika bana bango moko te. Na kobimaka elongo na bango, bakoki, ‘wana ezali bango kotambola na nzela’, kosolola na bango na ntina na Liloba mpe na misala na Nzambe. (Deteronome 6:4-7) Nzokande wana etali se ezalela moko ya bomoi na libota na boklisto, oyo ezali na boyokani te na likambo etali komema kati na mosala ya kosakola moto oyo ayei bobele mpo na kotala. Formation oyo baklisto yango bazali kopesa epai na bana na bango, ekosalisa bango mpo na mokolo oyo bakokóma basakoli mpo na kokumisa Jéhovah.-Matai 21:15, 16; tala Tobongisami mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, pages 100, 101.

Sikawa, soko ezali moto oyo azali koyekola Biblia elongo na Témoin de Jéhovah na mokano ete akóma mokolo mosusu moyekoli na Klisto, akoki koloba epai na libota na ye, epai na baninga na ye ya mosala, epai na bazalani na ye mpe na bato mosusu “makambo kitoko ya Nzambe” oyo azali koyekola kati na Makomami. (Misala 2:11) Elikya ezali ete ntango ekoya oyo moto yango akomona ntina ya “kosakola liloba na Nzambe” elongo na ba Témoins de Jéhovah, na ndenge ebongisami.​—Misala 13:5.

Nimero moko ya Mosenzeli euti kobima kala mingi te ezalaki komonisa matambe oyo moto azali koyekola Biblia asengeli kosala liboso ete asakola elongo na ba Témoins de Jéhovah mpe akóma bongo mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Ezali na ntina ete moto yango azala na boyebi ya moboko ya Biblia, akanga ntina ya mitinda na Nzambe mitali etamboli malamu mpe atosa yango, mpe azala na mposa ya kosangana na mosala ya kosakola oyo ekokokisama na ba Témoins de Jéhovah. Masengami yango makoki kotalelama elongo na bankulutu mibale ya lisangá mpe moto yango, na Temwe oyo ayekolaka na ye Bibliaa. Lisolo yango oyo, ezali na mokano ya kosalisa mpe kolendisa moto, esengeli kosalama liboso ete moto yango azwa nzela ya kobima elongo na mosakoli na mosala ya kosakola mpo na kozwa formation malembemalembe.

Na ebandeli, ntango moto oyo azali koyekola Biblia mpe akokisi masengami mpo na kosangana na mosala ya kosakola abandi kobima na mosala yango, akoki sé kobima elongo na mosakoli mpo ete ayekola ndenge nini mosala yango esalemaka. Moklisto oyo azali koteya ye, akoki kosenga ye na ndakisa, asalisa ye na kotangaka mikapo ya Biblia; nsima na mikolo akoki kosala mwa masolo. Na ntango wana, ntango akobanda kosangana mpenzampenza na mosala ya kosakola, akoki kopesa rapport ya mosala na ye. Nsima, wana ekokoba ye kosangana na mosala, akomona bosolo ya maloba na Yesu oyo malandi: “Moyekoli aleki molakisi na ye te, nde moto na moto oyo asili koyekola nyonso, akozala lokola molakisi na ye.​—Luka 6:40.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina yango, tala Mosenzeli 15 Février 1989 (nr 4/89), page 20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto