Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/12 nk. 28-30
  • Nasili komata ngomba eleki bangomba nyonso na kitoko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasili komata ngomba eleki bangomba nyonso na kitoko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kozanga kosepela
  • Boyekoli ya Biblia
  • Bamosusu basengeli koyeba
  • ‘Yo oleki bangomba na bonene’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Jéhovah apesaki ngai makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ndako ya Yehova etombwami
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/12 nk. 28-30

Nasili komata ngomba eleki bangomba nyonso na kitoko

NABOTAMI mpe nakoli na mwa engumba moke ezali na bangomba na Europe de l’Est. Baboti na ngai bazalaki bakatolike, kasi bazalaki kosenga ngai te ete nakenda na ndako-nzambe, mpe na ndako tozalaki kobondela elongo te mpe tozalaki kosolola te mpo na oyo etali lingomba. Lisano, boyekoli mpe mibembo ezalaki makambo oyo mazalaki kozwa ntango mpe nguya na ngai, lokola bilenge mosusu.

Na engumba na ngai, ezalaki na ekipe moko ya bamati ngomba ya molende, oyo etambwisamaki na mobali moko na ezaleli malamu mpe azalaki na eksperianse mingi mpo na bangomba. Na lisalisi na ye, nakomaki momati monene. Wana ekomaki ngai na mibu 18, nabendamaki na bisika kitoko oyo emonanaka longwa na nsonge na bangomba milai, nabendamaki na mposa makasi ya kokutana na makama mpe kolonga yango, na bato oyo tosalaki na bango boninga na esika ya makama.

Nakotaki na ekipe uta mibu mitano, bongo mokolo mosusu, wana nazalaki komata ngomba oyo ezalaki mpasi mingi mpo na komata, nalembisaki likebi na ngai mpenza ntango nalingaki kokoma na nsonge. Nabelemaki na nsonge ya libanga, mpe yango ebandaki koningana. Nazalaki bobele na ntango ya komilongola na nzela mpe kokebisa moto oyo azalaki kolanda ngai. Libanga moko ekweaki mpe ekataki nsinga oyo ezalaki kokangisa biso, mpe nazalaki lisusu na esika ya kotya lokolo te. Na esengo, mwa esika moke etondaki na matiti ezalaki na nse mpe ekangisaki kokwea na ngai na 4 mètres na nse. Kasi, na lisano yango, makambo masukaka ntango nyonso malamu te!

Nazalaki na mibu 24 ntango nazwaki diplôme na ngai mpe nabimaki na université. Nakomaki na nsima momati ya liboso ya bangomba na ekipe ya engumba na biso. Nsima na mwa ntango, tosangisaki mbongo mpe tosombaki bus ya moke, oyo ekoki kosalisa biso na komema biloko na biso ya lisano mpo na kokenda na bangomba ezali mosika mingi. Kasi motuka yango ezalaki malamu te, mpe nalekisaki sanza misato mpo na kobongisa yango butu mpe moi. Ntango ebongaki, biso banso tolukaki misala ya makama mingi, kasi oyo eyebi kofuta, lokola misala ya kosala bisika bazali kotonga bandako milai. Na ndenge yango, na 1974, tosilisaki kosangisa mosolo mokoki mpo na kofuta mobembo kino Iran, epai tomataki na ngomba Demãvend, volcan (ngomba na mótô ekobimaka na nse na mabelé) oyo ezali na mètres 5 671 na molai. Na ebandeli, makambo manso malekaki malamu; kasi, ntango tokomaki na nsonge, totungisamaki na neige mingi, kozanga mopepe mpo ngomba eleki molai mpe moto oyo ezalaki kobima na volcan.

Na nzela ya bozongi, kati na mwa bus na biso, tozalaki kosala bibongiseli mpo na komata ngomba Ararat; kasi na nsima totikaki likanisi yango mpo na mobulu na politike. Na 1975, tokendaki kosala ski na bangomba na Autriche. Bobele na eleko yango nde tosalaki momekamo ya kokanga bafoto kati na mboka na biso, mpe tobengaki momekano yango “Bato mpe bangomba”. Momekano yango esalamaka kino sikawa mbula na mbula. Biso banso, tozalaki na liyoki ya kozala na bomoi kitoko mpe na esengo.

Kozanga kosepela

Bongo, ntango nakomaki na mibu 30, nabandaki kolemba lisano ya komata bangomba mpe nabandaki komituna soko ezalaki nyonso wana oyo bomoi ekokaki kopesa ngai. Bamoko bazalaki koloba na ngai ete nabala. Nazalaki na baninga oyo basilaki kobala kasi bazalaki na esengo te. Ata babalani oyo bayebanaki kati na likama mpe na bolingo na lisano ya komata bangomba, babandaki kobungisa esengo na bango na bomoi ya mokolo na mokolo. Nazalaki koyeba te mpo na nini ekanganeli na bango ezalaki na esengo te, kasi ata nazalaki na mposa ya kobala, naboyaki kozanga esengo lokola bango.

Epai mosusu, nabandaki komona mbongwana epai na bilenge oyo bazalaki koya komata ngomba. Liboso, kati na camp na bamati na ngomba, elimo malamu na disipline ezalaki komonana, elimo ya boyokani mpe ya boninga. Sikawa, bilenge mibali oyo bazangi eksperianse, bazangaki disipline mpe bazalaki kosepela te mpo na kokola malembemalembe. Bazalaki kolinga makambo makasi mpe komata bisika oyo ezalaki na mikakatano mingi mpe na makama mingi mpo na bango. Lokola nazalaki kosepela lisusu te, nasalaki masolo milai mpe na mozindo elongo na moninga na ngai Bonjo. Na nsuka na yango, asengaki ngai ete nasolola yango elongo na Henry, momati mosusu ya bangomba.

Henry adefisaki ngai mokanda, La vérité qui conduit à la vie éternelle. Ntango nazalaki kotanga yango, nakamwaki na komona ete ezalaki kolobela mituna oyo mizalaki kotungisa ngai mpenza. Nzokande, Henry azalaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah; natunaki ye soko nakokaki kozala na ye elongo. Andimaki, mpe na ndenge yango nabandaki boyekoli mozindo ya Biblia mpe ya mokanda nyonso mikolimbola Biblia oyo ezalaki kokómela ngai, mpe boyekoli yango eumelaki mibu mibale.

Boyekoli ya Biblia

Esengo na ngai ezalaki se kobakama wana boyebi na ngai ezalaki kokola. Nazalaki bobele na likanisi ya likolólikoló mpo na lingomba na katolike, kasi nakamwaki na komona ete boklisto ya Biblia etongamaki likoló na milulu te, na mimeseno te mpe mayoki kozanga kokanisa. Nzokande, etalaki mitinda na etamboli malamu mitombwami mpenza, oyo mitalaki makambo nyonso ya bomoi na moklisto. Lisusu, nabandaki komona na likamwisi nyonso ete, Biblia ezalaki na mobulu te mpe ezali kotemela te makanisi na sianse oyo emonisami polele.

Temwe oyo azalaki kotambwisa lisolo elongo na Henry mpe ngai, azalaki kosenga biso na makasi te ete tobongola ezaleli na biso. Azalaki se komonisa biso na polele nyonso mateya na Biblia. Yango wana nazalaki se momati ngomba na boumeli ya mibu mibale wana ya liboso. Kasi, wana boyebi na ngai ezalaki kokola, namonaki ete komata bangomba ekomaki lokola drogue epai na ngai. Kokwea oyo nakweaki mpo na libanga, ekundolaki ngai lisusu maloba na Yesu oyo ayanolaki epai na Satana oyo asengaki ye amibwaka na nse na temple: “Okomeka Jéhovah, Nzambe na yo te.” (Matai 4:5-7) Nayaki koyeba ete mosala na ngai ezalaki kozanga limemya na bomoi oyo Jéhovah apesaki ngai.

Natikaki bongo mokumba ya ekipe epai na momati ngomba mosusu ya eksperianse, mpe namonaki mpasi te mpo na kotika komata bangomba mpe kokóma moklisto. Nakabaki mpe natekaki biloko na ngai nyonso ya lisano-skis, crampons, mousquetons, marteaux, pitons et piolet-mpe nakoki koloba solo ete nyonso wana ekómaki mpo na ngai “biloko mpamba” mpo na kolanda liloba na Paulo. (Bafilipi 3:8) Ezali na esengo mozindo ete nabandaki kosangana na mosala monene ya kokumisa nkombo na Nzambe na ndako na ndako. Na 1977, Henry mpe ngai tomonisaki bongo komipesa na biso epai na Jéhovah na kozwaka batisimo.

Bamosusu basengeli koyeba

Na eleko wana, ekipe ya bamati ngomba na engumba na biso ezalaki na basani pene na 15, mpe mokemoke Henry mpe ngai tozalaki kopesa litatoli epai na mokomoko na bango. Esengo ezalaki monene ntango ndeko na ngai ya mobali, ye mpe mosani na ekipe ya bamati ngomba elongo na mwasi na ye babandaki koyekola Biblia mpe bazwaki batisimo na 1981! Mwa ntango moke na nsima, Bonjo mpe moninga mosusu ya mitano babandaki koyekola Biblia. Tozalaki lisusu na mposa ya komata ngomba te. Esengo na biso eleki monene ezalaki ya kokenda kotala bato bazalaki kosepela na solo oyo bazalaki kofanda na lobwako. Mama na ngai asepelaki mingi na mbongwana na biso, mpamba te azalaki komitungisa mingi na ndenge bana na ye mibale ya mibali bazalaki kokenda komata ngomba. Na nsima, ye mpe ayambaki losambo na peto na Jéhovah.

Sikawa, mposa na ngai ya kobala ezalaki lisusu makasi te. Na lisalisi na Liloba na Nzambe, nayebaki mitinda oyo mikokaki kobongisa libala na ngai, kasi nazalaki kosepela na ndenge nazalaki monzemba mpe na ndenge nazalaki kosalela Jéhovah na likebi nyonso. Salomo alobaki: “Mwasi na mayele auti na Jéhovah.” (Masese 18:22; 19:14) Na yango, nazwaki ekateli ya kozela na motema molai ete Jéhovah apesa ngai likabo yango, na kozalaka na bomoi ebongi kokomisa ngai mobali malamu soko ntango ekoki. Jéhovah apambolaki ngai na 1982 na kopesaka ngai mwasi malamu.

Mwasi na ngai mpe ngai tozali kino sikawa kofanda na bangomba oyo nazali kolinga kino sikawa. Kasi, komibanzabanza na biso eleki monene ezali ya kosalisa bato mpo ete bamata na ngomba mosusu. Ngomba yango nini? Oyo emonisami na esakweli na Yisaya: “Ekozala ete na mikolo na nsuka, ngomba na ndako na Jéhovah ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwama likoló na nkeka; mpe mabota nyonso bakokenda wana. Bikolo mingi bakokenda mpe bakoloba ete, Yakani, tobuta na ngomba na Jéhovah, epai na ndako na Nzambe na Yakobo, ete alakisa biso nzela na ye mpe ete totambola na bipai bikokendaka ye.” (Yisaya 2:2, 3) Oyo nde esengo na komata ngomba wana, oyo eleki kitoko na bangomba!​—Euti na moko na batangi na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto