Kimya ya elimo
Ezali nde oyo mwasi moko na mboka Salt Lake’“ Etats-Unis, alukaki kati na mboumeli ya bambula kati na losambo. Ye akomi: “kino esili kokoka sanza mwambe, nakanisaki ete nakozwa yango te. Na nsima, na sanza ya février, Témoin moko ayaki epai na ngai. Nazali koyekola Biblia esili koleka sanza mwambe, mpe namoni ete ezali bobele bino nde bozali kobongisa bato mpo na Bokonzi na Nzambe.”
Mwasi yango abakisi: “Mokolo moko, moninga na ngai ya mwasi oya azali Témoin apesaki ngai mokanda moko ezalaki na motó ya likambo La Bible: Parole de Dieu on des hommes? Nalingá naino mokanda lokola nalingi oyo te. Ezali ya solo mpenza moko na mikanda kitoko ya la Société Watch Tower.”
Soki olingi kozwa ekzamplere moko na mokanda oyo, tuna na ba Témoins de Jéhovah ya mboka oyo yo ofandi.
[Elilingi na lokasa 32]
bisakweli na Danyele oyo bitali bikonzi na mokili mobimba bizali sikisiki mpe bizali kosala ete bataleli ya makambo na ntango na biso bakanisa ete yango ekomamaki na nsima ya kosalama na makambo wana