Tozali kosepela na lisangá na Jéhovah awa na mabelé?
TOTALA libanga ya diamant kitoko oyo ebongisami: Tozali komona nini? Eloko ya motuya na kitoko mpenza. Kasi sika wa totalela yango na microscope: Tozali komona nini? Na ntembe te ba nzela mike, kopaswana mingi ya mike, bosoto, mpe bambeba mosusu.
Tokozala na likanisi ya kopanza to ya kobwaka diamant oyo bobele mpo na ezaleli na yango na nse na microscope? Te! Tolongola miso na microscope, mpe tokoki lisusu kosepela na kitoko mpe na kongɛnga monene oyo ezali kokomisa libanga yango ya ntalo libanga oyo lileki mabanga nyonso.
Lokola libanga na diamant, lisangá ya Jéhovah na mabelé ezali komikesenisa na lolenge mingi. Lisangá moko te awa na mabelé ezali na boyokani ya bozindo elongo na Mozalisi. Kati na mokanda moko oyo akomaki na baklisto bapakolami na ekeke ya liboso, oyo bazalaki na elikya ya kokende na likoló, ntóma Petelo alobelaki boyokani yango ya ntina mingi. Alobaki: “Bino bozali libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulee, bato baponami.”’ (1 Petelo 2:9) Lelo oyo, ebele monene ya “bampate mosusu,” oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé, basili kosangana na batikali na “libota yango ya bulee” mpo na kosambela Nzambe. (Yoane 10:16) Elongo, maboke yango mibale bazali kosala lisangá moko oyo ekokani na libanga kitoko ya ntalo oyo ezali komonana na kongala na yango oyo ekeseni.
Tokima ezaleli ya kolandelaka mabunga ya bandeko na biso
Kasi bosengeli koyeba ete lisangá yango ya mokili mobimba esalami na bato ya kozanga kokoka. Na bongo eloko nini ekosalema soki tokotalela yango na nzela na microscope ya elilingi? Na ntembe te, tokomona bolɛmbu mpe mabungá epai na bato oyo bazali kati na yango.—Baloma 3:23.
Ntóma Paulo andimaki ete azalaki na ba mbeba motindo yango. Ye alobaki: “Nazali kokuta motindo oyo kati na ngai ete wana elingi ngai kosala malamu, bobele mabe ezali penepene na ngai.” (Baloma 7:21) Baklisto banso bayebi kowelana oyo. Banso basalaka mabunga. Lisusu, mokolo moko to mosusu, ekoki kokomela biso banso, na komona mpasi na makambo oyo mamonani na mabunga ya moto mosusu. Tosengeli kolɛmba to kopɛngwa ntango bolɛmbu mpe mabunga ya basalani na biso baklisto ebandi komonana polele? Wana ezali mpenza ntina mpo na kopesa motuya moke na lisangá ya Jéhovah? Ezali polele ete te! Nkutu,tokoki koloba ete, tosengeli kolongola miso na biso na microscope mpe totika kotalela bobele mabunga ya moto na moto.
Makomami mazali kotanga mwa motuya na bizaleli oyo ezali kosalisa na koyeba baoyo elimo santu ezali kosala likoló na bango. Bamoko ya bizaleli yango bizali “bolingo, esengo. kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, komikanga motema.” (Bagalatia 5:22, 23) Na kokesana, mangomba ya mokili, masangá ya politiki mpe ya mimbongo ya mokili oyo mbala mingi ezali komonisa kati na etamboli na bango oyo Biblia ezali kobenga misala ya nzoto: “koyinana, koswana, zuwa, nkanda, kowelana, koponapona, mikabwano, bilulela, kolangwa masanga, bilambo na lokoso mpe makambo na motindo yango.” (Bagalatia 5:20, 21) Na bongo, lokola libanga ya diamant oyo lizali kongɛnga na kati na mabanga oyo mazangi ntina, libota na Jéhovah ekabwani na mokili oyo ebebisami na elimo oyo ezali kozinga bango.—Matai 5:14-16.
“Basangani na motema moko mpe na elimo moko”
Ezaleli ya kokamwa ya diamant ezali lolenge na yango: ba atomes to biliki oyo esangisi yango ezali na bomoko mpenza mpe ekangama makasi yango na yango. Ndenge moko, bomoko kati na basangani na lisangá ya Jéhovah na mabelé ekokani te na masangá mosusu; bazali na bomoko na makambo matali bindimeli mpe bazali na boyokani ya bondeko makasi. Bazali kosalela toli ya Biblia oyo ezwami na kati ya 1 Bakolinti 1:10, oyo elobi: “Bandeko nalɔmbi bino na nkombo na Nkolo na biso Yesu Klisto ete bino bolobanaka na motindo moko; bokabwana kati na bino te kasi bosangana na motema moko mpe na elimo moko.”
Ba Témoins de Jéhovah basili kolonga makambo matali bokabwani na mposo mpe lolendo na bolingo na ekolo. Komonisaka “mayele mauti na likoló,” bazali kosala bokaboli na koponapona te.’ (Yakobo 3:17) Tozali kokumisa Jéhovah mpo na oyo asali na likambo oyo kati na lisangá na ye oyo esalami na bato ya kozanga kokoka.
Na kokesana, zulunalo The christian century, kolobelaka mobu 1990, emonisaki ete “mokili mozali komonana ekabwani motindo oyo emonana naino te na ba ndambo ya mangomba, ná mpe na botaleli ya ekolo mpe bolingo ya mikili oyo mikangami na bozindo na bindimeli ya mangomba. Kobanda mokili na lnde kino na Europe, mpe kobanda na Proche-Orient kino na bisanga ya mai monene ya Pacifique, losambo ekangisami elongo na bosembo epai ya ekolo mpe bolingo ya mikili—oyo mbala mingi ezali kobimisa matáta minene na politiki.” Na bongo ezali polele ete: baoyo balingi kosalela Nzambe bakoka kotala bobele epai na lisangá moko oyo lizali na elimo mpe na kondimama na Jéhovah.
“Nayeisi elongi na yo lokola libangá na diamant”
Libangá ya diamant lizali libangá ya ntalo oyo lileki makasi na mabangá nyonso oyo moto oyebi. Biblia elobeli bosaleli yo ba diamants mpo na kokoma to kokata biloko ya makasi. (Yilimia 17:1) Tosimba mpe maloba oyo ya Jéhovah epai na Ezekiele: “Tala, nasili kosala elongi na yo makasi epai na mito na bango. Nasili kozalisa elongi na yo lokola libanga ya diamant, makasi koleka libanga ya silex.” (Ezekiele 3:8, 9) Jéhovah apesaki na Ezekiele etelemelo moko makasi epai na bilongi na bango, mpe motó na ye makasi lokola yo diamant, na nzela na yango nde azwaki likoki ya kosakola maloba na esakweli na libota moko ya motó makasi.—Ezekiele 2:6.
Na mikolo na biso, Jéhovah apesi mpe lisusu na libota na ye etelemelo ‘ya diamant’ mpo na kotɛlɛma ngwi liboso na minyoko. Kati na mikili mosusu, ba Témoins de Jéhovah bayikaki mpiko na epekiseli ya mosala na bango, botomboki ya ebele oyo bazalaki na nkanda, kobomama kozanga kosambisama, kobetama, bikateli ya boloko bizangi sembo, konyokola, mpe ata kobomama Nzokande, bamimonisaki makasi kati na kondima na bango. “Baombo na ngai bakosepela”
Biblia elobelaki eleko oyo bato bakozala “na lolenge na kosambela,” kasi ‘bazali koangana nguya na yango.’ (2 Timote 3:1, 5) Zulunalo moko eyebisaki ete “ba protestants, ba katolike, mpe bayuda bazali komitungisa na bokiti” oyo bazali komona na kati na bisika na bango ya losambo. Na kokesana, ba Témoins de Jéhovah bazali koyekola mpenza Biblia. Na motuya oyo mozali bobele kobakisama, bilenge mpe mikolo, mibali mpe basi, banso bazali koyangana na makita mingi ya poso na poso. Zulunalo moko ezwaki mokanda moko kolimbolaka ete mpo na bango “lingomba na bango lizali eloko oyo eleki ntina kati na bomoi na bango, mpe lobanzo na bango bobele moko ezali ya koyebisa yango na moto mosusu.”
Na nzela na ezaleli ya elimo ya motindo wana, lisangá ya Jéhovah lizali na kongɛnga motindo moko na libanga na diamant ya ntalo. Nkembo nyonso ezali kozonga na Ye oyo azali kolendisa mpe azali kotambwisa bato ya kozanga kokoka na nzela na elimo santu na Ye.
Mosakoli Yisaya asakolaki: “Bongo tala oyo elobi Nkolo Moyangeli Jéhovah: ‘Tala baombo na ngai bakolya . . . Tala ete baombo na ngai bakomela . . . Tala ete baombo na ngai bakosepela . . . Tala ete baombo na ngai bakoyemba mpo na esengo na motema.’”—Yisaya 65:13, 14.
Lelo tozali komona bokokani ya esakweli oyo. Nzambe azali kobatela libota na ye na lolenge ya kokamwa. Soko nde tokosangana na libota oyo, topesa nzela te na likanisi moko ya kotónga elongola biso esengo na biso. Totala lisangá na mobimba na yango mpe tomikundwela likambo oyo: lisangá mosusu te awa na mabelé lizali na libateli mpe na lisungi mpenzampenza uta epai na Nzambe. Tosepela ntango nyonso na libaku malamu oyo tozali na yango ya kozala basangani na lisangá yango.