Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/5 lok. 3
  • Opesaka motuya na Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Opesaka motuya na Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Masolo mosusu
  • “Talá! Nazali moombo ya Yehova!”
    Mekolá kondima na bango
  • “Talá! Mwana mwasi moombo ya Yehova!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Malia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ayikaki mpiko na mawa makasi oyo ezalaki lokola mopanga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/5 lok. 3

Opesaka motuya na Biblia?

EKOKISI sikawa mibu koleka 200, uta Mary Jones abotamaki na Llanfihangel, mboka moko mosika na ekólo ebéngami Pays de Galles, penepene ya mai monene Atlantique. Baboti na ye bazalaki batóngi-bilamba oyo bazalaki babólá​—bazalaki mpenza babólá na boye ete bakokaki te kosomba Biblia mpo na bango. Kasi bakólisaki bolingo ya Nzambe epai na mwana na bango ya mwasi na kolobeláká ye masoló ya Biblia mpe na kozongeláká mikapo oyo bazalaki komikundola. Mbala mingi Mary azalaki kotánga Biblia oyo moninga moko ya pembeni adefisaki ye, yango ezalaki na lokótá Gallois mpe abandaki kobomba mwa mosolo oyo azalaki kozwa, mpo ete akokisa ekateli na ye ya kosomba Biblia na ye moko.

Na mobu 1800, ntango Mary azalaki na mibu 16, ayokaki ete bazalaki kotekisa Biblia na lokótá Gallois na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 40 na engumba moke ya Bala, kasi ezalaki mingi te. Kozanga kokakatana, azwaki ekateli makasi ya kokende kuna na makolo. Akendeki kuna na kotamboláká makolo ngúlu na nzela ya bankeka. Nzokande, ntango akómaki kuna Biblia nyonso esilaki kotekisama. Mary ayokaki lisusu ete mosolo oyo ye abombaki mozalaki moke mingi.

Pasteur ya mboka Bala akamwaki mingi na boyebi ya Mary mpe na bolingo na ye mpo na Biblia. Ntango amonaki kolela ya Mary mpo na mawa nsima ya milende nyonso oyo ye asalaki, na boboto nyonso Pasteur apesaki ye Biblia na ye moko, mpe alobaki ete: “Tángá yango na likebi nyonso, yekolá yango na molende, bombá maloba mosantu kati na makanisi na yo, mpe tambwisá bomoi na yo engebene mateya na yango.”

Lisoló oyo liyebisamaki na nsima kati na likita ya Bakambi ya Société oyo etalelaka makambo ya Mangomba na Londres. Kuna bakamataki ekateli ya kobimisa mabongoli ya Biblia bobele mpo na bato ya Pays de Galles te, kasi lisusu mpo na bato ya mokili mobimba. Uta ebandeli wana moke nde Société ya liboso kati na ba Sociétés mingi oyo ezalaki kobimisa Biblia na ekeke ya 19 ebandaki. Na nsima, Biblia ebandaki kobima nokinoki na nkótá ekeseni ya bapaya.

Lelo oyo, Watch Tower Bible and Tract Society, oyo esalemaki na 1884, ezali konyáta Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia na nkótá koleka 200. Na mokili mobimba, esili kokabola milió 72 ya Biblia Les Saintes Ecritures​—Traduction du monde nouveau (Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu) oyo ekomami na elobeli ya ntango na biso. Ebongolami uta Liebele mpe Greke ya ebandeli, Traduction du monde nouveau (Libongoli ya Mokili ya sika) ezali sikawa na mobimba na yango to na ndambo na yango na nkótá 18 mpe ezali sikawa kobongolama na minoko misusu 12.

Lokola sikawa penepene na moto nyonso azali na makoki ya kotánga Biblia, ozali kotalela yango lolenge nini? Ozali kopesa motuya na Biblia? Ozali na Biblia na yo moko oyo olingaka yango mingi lokola eloko ya motuya mpe otángaka yango?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Euti na búku The Story of Mary Jones and Her Bible

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto