Biblia—Búku oyo esengeli kotángama
EZALI mpasi te kosalela ebele ya maloba ya minene ya kokumisa wana tozali kolobela Biblia. Ezali mpenza búku oyo ekabolami mingi koleka kati na lisoló ya bato. Biblia ezali búku oyo eumeli mingi koleka, oyo ebongolami na nkótá mingi koleka, oyo eleki kotángama mingi, oyo ezali na bopusi koleka, mpe oyo eleki kopesamela limemya. Ntango mosusu ezali mpe oyo bato batyelaka ntembe mingi. Mpe na solo, ezali búku oyo esili kolónga na bipekiseli, na kozikisama mpe na botɛmɛli oyo eleki makasi. Nzokande, na mawa nyonso, ezali na liloba monene moko ya bokumisi oyo lizali lisusu te kosalelama mpo na Biblia. Emonani lokola ete yango ezali lisusu te búku oyo eleki kotángama na mokili mobimba.
Ata soki bato bazali na Biblia kati na ndako na bango, mingi bamimonaka ete bazali na mosala mingi na boye ete bakoki mpenza te kolekisa ntango na bango na kotángáká yango. Na kala, kotánga ezalaki likambo oyo bato mingi bazalaki kosepela na yango. Nzokande, lelo oyo ebele na bato balingaka kolekisa ntango na bango na kotala televizyó to na kosala makambo mosusu. Baoyo bazali naino na momeseno ya kotánga balingaka mikanda oyo misɛngaka milende te mpe oyo mizali pɛtɛɛ. Kotánga Biblia esɛngaka likebi mingi, mpe ntalo monene ya bato batyaka lisusu likebi mozindo te na makambo oyo batángaka.
Nzokande, Biblia elóngaki te bobele mpo ete efandaka kati na bibliotɛkɛ na biso. Tozali na bantina minene mpo na yango tosengeli kotánga Biblia. Tótalela mwa makambo na ntina na yango.
Likambo ya kokamwa ezali te soki yango eumeli
Liloba “Biblia” liuti na liloba ya Greke bi·bliʹa, oyo elimboli “babúku mike.” Yango ezali kokundwela biso ete Biblia esangisi babúku mingi—oyo mosusu na yango ezali mpenza mike te! Ekomamaki na boumeli ya eleko ya mibu koleka 1 600. Atako bakomi na yango bazalaki bato, bapemamaki na Eutelo moko oyo eleki likoló. Mokomi moko ya Biblia alobaki ete: “Esakweli mɔkɔ tɛ ebimaki na mokano na moto, kasi bato bauti na Njambe balobi wana ejalaki bango kopusama na [elimo santu, NW].” (2 Pɛtɛlɔ 1:21) Oyo ezali solo mpo na bisakweli ezali mpe solo mpo na biteni mosusu ya Biblia. “Babúku mike” oyo epemamaki na Nzambe etondi na makanisi matombwami ya Yehova Nzambe. (Yisaya 55:9) Na ntembe te, Biblia esili koumela ntango molai!
Mpo na basaleli ya Nzambe, Biblia ezalaka ntango nyonso búku oyo eleki ntina. Bazali kondima makanisi ya ntoma Paulo, oyo azalaki moko ya bakomi na Biblia. Alobaki ete: “Makomi yɔnsɔ mapemami na [elimo, NW] na Njambe, makoki kopɛsa litomba na mateyo.” (2 Timɔtɛ 3:16) Na yango, Biblia ezali moboko ya kondima ya Batatoli ya Yehova na mikolo na biso. Ezali komonisa mateya na bango mpe ezali kokamba etamboli na bango. Bazali kosɛnga na motema na bango mobimba ete moto nyonso atánga biteni mosusu ya Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe amanyola na botɔ́ndi nyonso likoló na makambo oyo mazali kati na yango.—Nzembo 1:1-3.
Momeseno ya kotánga Biblia
Momeseno ya kotánga Makomami mozalaki kopesa matomba na ntango ya kala. Bakonzi ya Yisraele bazwaki etindá ya kokoma kopi na bango moko ya Mibeko—oyo ezali lelo eteni moko ya ntina ya Biblia—mpe kotánga yango mokolo na mokolo lokola bokundoli ya mokano na Nzambe mpo na bango. (Deteronome 17:18-20) Kozanga kosala yango ememaki kokwea ya bakonzi mingi.
Ntina ya kotánga Makomami emonisami na ndakisa ya mosakoli Danyele, oyo asilaki konuna. Mpo ete azalaki kosala botángi na ye moko ya biteni ya Biblia oyo bizalaki na mikolo na ye, Danyele, wana azalaki na boombo na Babilone, akokaki ‘kososola kati na babúku’ ete esakweli moko ya ntina mingi oyo ekomamaki na Yilimia elingaki kokokisama.—Danyele 9:2.
Na eleko ya kobotama ya Yesu, Simeona “moto na sembo mpe na kokumisa Nzambe” azalaki na elikya nyonso kozela komona ye oyo asengelaki kokóma Klisto, to Masiya. Simeona azwaki elaka ete akokufa te liboso ete amona Klisto. Maloba ya Yisaya oyo ye atángaki wana amemaki mwana Yesu na mabɔkɔ na ye mamonisi ete Simeona azalaki kotánga na likebi nyonso babúku ya Biblia oyo esilaki kokomama na mikolo na ye.—Luka 2:25-32; Yisaya 42:6.
Ntango Yoane Mobatisi azalaki kosakola, “bato bazalaki na mitema likoló” na ntina na Masiya. Yango ezali komonisa nini? Ezali kopesa likanisi ete mingi kati na Bayuda bayebaki malamu bisakweli bitali Masiya oyo bizwami na Makomami. (Luka 3:15) Yango ezali mpenza kobenda likebi, mpamba te na ntango wana babúku ezalaki komonana mpenza mingi te. Bakopi ya babúku ya Biblia esengelaki kokomama na mabɔkɔ mpe ezalaki kosɛnga likebi mpe milende mingi, mpe yango wana ezalaki na ntalo makasi mpe mpasi mpo na kozwa. Lolenge nini bato bazalaki koyeba malamu makambo mazalaki kati na babúku wana ya Biblia?
Mbala mingi, na nzela ya botángi oyo bozalaki kosalema liboso na bato banso. Na ndakisa, Mose apesaki etindá ete na bileko mosusu oyo bisilaki koponama, Mibeko nyonso oyo Nzambe apesaki misengelaki kotángama wana Bayisraele bayanganisamaki. (Deteronome 31:10-13) Na ekeke ya liboso T.B., botángi ya babúku ya Biblia liboso na bato banso ezalaki kosalema bipai binso. Moyekoli Yakobo amonisaki yango ete: “Longwa na ntango na kalakala Mose ajali na bango bakosakolaka ye na mboka na mboka, mpe na sabata na sabata bakotangaka makambo na ye kati na biyanganelo.”—Misala 15:21.
Lelo oyo, ezali mpasi te kozala na Biblia na yo moko. Bamoko na “babúku mike” wana ekoki kozwama na minoko milobamaka na 98% ya bafandi ya mokili. Na yango ezali mawa ete mingi bazali kosepela te na koyekola makambo oyo Biblia ezali koyebisa bango. Atako oyo ezali ntango ya siansi, Liloba ya Nzambe, Biblia, lizali ntango nyonso “na litomba mpo na mateya.” Ezali kopesa batoli ya mayele na ntina na bizaleli malamu, boyokani kati na bato, mpe makambo mosusu mingi. Lisusu, Biblia ezali kopesa elikya bobele moko mpo na kozala na kimya na mikolo mizali koya.
Tángá yango ntango nyonso
Na bongo Batatoli ya Yehova bazali kosala makasi mingimingi na kolendisa bato ete bátánga Biblia ntango nyonso. Makomi minene oyo mazali likoló na ndako ya enyáteli na bango ya mikanda, na biro monene na Brooklyn, na etúká ya New York, ezali elendiseli oyo ezali komonana: “TÁNGÁ LILOBA YA NZAMBE BIBLIA MOSANTU MOKOLO NA MOKOLO.” Bamilió ya baleki-nzela bamonaka maloba wana, mpe tokanisi ete mingi kati na bango balandaka elendiseli yango.
Kati na masangá koleka 73 000 ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, makita ya Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi mazali kosalema poso na poso. Botángi liboso na bato banso ya eteni moko ya Biblia oyo esili koponama ezali moko na ebongiseli ya mateya yango. Bayangani nyonso bapesameli lisusu mokumba ya kotánga mwa mikapo ya Biblia poso na poso na bandako na bango. Baoyo bazali kolanda malamu ebongiseli wana bazali kosuka na kotánga Biblia mobimba.
Ebongiseli wana eyokani na makambo mayebisami kati na moko na babúku esalelami na eteyelo yango. Búku Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe elobi ete: “Kati na ebongiseli na yo ya boyekoli osengeli kosomba ntango mpo na kotánga Biblia. Ekozala na yo litomba mingi na kotánga yango uta na ebandeli kino na nsuka . . . Nzokande, okotánga te bobele mpo osilisa biteni oyo omikatelaki, kasi mpo na kozala na likanisi na yango mobimba mpo na komikundola yango. Kamatá ntango mpo na kokanisa.”
Mikanda misusu oyo mibimisami na Batatoli ya Yehova mizali mpe kolendisa botángi ya Biblia. Na ndakisa, kati na zulunalo Lamuká!, moninga ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, elendiseli oyo elandi etyamaki mpo na bilenge: “Osilá kotánga . . . Biblia na mobimba na yango? Ya solo, Biblia ezali búku monene, kasi mpo na nini te kokabola botángi na yo na biteni mikemike? . . . Bato na Bɛloya oyo ‘bazalaki na makanisi malamu’ ‘batangaki makomi mokɔlɔ na mokɔlɔ.’ (Misala 17:11) Soki olandi ebongiseli ya botángi ya mokolo na mokolo bobele mpo na miniti 15 na mokolo . . . , okokoka kosilisa kotánga Biblia mobimba na boumeli ya mbula moko.” Ee, Batatoli ya Yehova bakanisi ete baklisto ya mikolo na biso basengeli koyeba Makomami malamu, lokola ezalaki mpo na basaleli ya Nzambe na ntango ya kala.
Mpo na yango, Batatoli ya Yehova bazali kolendisa botángi ya Biblia mpo na bato banso na myango misalelami na ekeke oyo ya 20. Na nkótá mingi, bazali kosala bakasete oyo ezali na botángi ya Biblia na mobimba. Mpo na bato mingi, yango ezalaki lisalisi moko kitoko mpo na kolónga mikakatano ya kotánga Biblia. Basusu bayokaka bakasete yango wana bazali kosala misala na ndako, bazali kokumba motuka, to ntango bazali kosala makambo mosusu mingi. Kofanda nyee mpo na koyoka eteni moko ya botángi mpe kolanda yango kati na Biblia na yo moko ezali mpenza likambo ya kosepelisa mingi.
Soki otángaka Biblia mokolo na mokolo te, mpo na nini okoki te kokómisa yango momeseno na yo na kosala bongo? Ezali kosɛnga te ete ozwa ntango molai mokolo na mokolo, kasi ekopesa matomba minene, mpamba te kosalela Makomami ekopesa yo nzela na kosala na bwanya mpe kozala na bomoi moko kitoko na elimo. Okomitambwisa mpe na boyokani na etindá oyo epesamaki kala na Yosua, mokambi Moyisraele ete: “Buku na mobeko oyo ekolongwa na monɔkɔ na yɔ tɛ, kasi okokanisa yango butu na moi, ete okeba kotosa makambo yɔnsɔ makomami na yango. Mpɔ ete bongo okojalisa njela na yɔ malamu mpe bongo [okosala na bwanya, NW].”—Yosua 1:8.
Biblia ezali komonisa mokano motondi na bolingo ya Yehova mpo na bato na botosi. Boyebi ya sikisiki ya Liloba na ye lipemami ekopesa bolamu ya solo mpe elikya ya bomoi ya seko kati na Paladiso na mokili moko kitoko ya sika mpe ya mapamboli mazangi nsuka. (Luka 23:43; 2 Petelo 3:13) Tiká ete osimba libaku ya kotánga mpe koyekola Biblia mpo na kozala na bomoi wana ya kitoko.