‘Lokasa moko mpamba lokoki kotɔbɔla molili lokola monzoto’
LELO oyo, mabongoli ya Makomami Mosantu makoki mpenza kozwama pene na bisika nyonso na mokili mobimba. Nzokande, milende mpo na kolóngisa Biblia ezalaki mbala mingi likambo ya bomoi to ya kufa.
Kati na búku Fifteenth Century Bibles (Biblia ya ekeke ya zomi na mitano), Wendell Prime akomaki ete: “Mibu ntuku misato nsima ya kobimisama ya enyáteli ya mikanda, Inquisition (Esambiselo ya kala ya Lingomba Katolike) esilaki mpenza kolónga kokokisa mosala na yango na Espagne. Kati na bato 342 000 oyo bapesamelaki etumbu na yango, bobele na mboka wana, bato 32 000 bazikisamaki na mɔ́tɔ wana bazalaki naino na bomoi. Ezalaki Biblia nde ememelaki bango mɔ́tɔ na kobomama lokola bamartíru. Esaleli wana ya koboma esalaki mpe motindo moko na Italie, ezala na nɔ́rdi to na súdi. Baepískɔpɔ, oyo basungamaki na Inquisition, bazalaki mɔ́tɔ na kozikisa ezala mpo na Biblia to mpo na batángi na yango. Néron asalaki ete baklisto mosusu bangɛnga lokola miinda na mokili na kotumbáká bango na mɔ́tɔ, wana akangisaki bango kati na basaki, apakolaki bango gudró, kosaleláká bango lokola miinda mpo na kongɛngisa masano ya bilambo na ye ya lokoso. Nzokande, balabála ya bingumba na Mpótó bizalaki kongɛngisama na bisika oyo bazalaki kotumba Biblia. Biblia ezalaki te lokola batángi na yango oyo bakokaki kokóma babólá, kopunzama, konyokwama, kokatama mabɔkɔ to makolo mpe kobwakama libándá. Ata lokasa moko mpamba oyo etikalaki ekokaki kotɔbɔla bonene ya molili wana lokola monzoto.” (Biso nde totɛ́ngisi yango.)
Likambo oyo mokomi Prime azali kolobela esalemaki solo na lokasa ya Biblia oyo emonisami awa. Ezali oyo ebéngami colophon to lokasa ya nsuka ya búku moko elongo na makomi oyo mamonisi nkombo ya mobongoli na yango. Biteni mibale bikokani oyo bizali na likoló ya lokasa bimonisi milɔngɔ́ ya Apocalypse, to Emoniseli.
Na ntina na Biblia yango, búku The Cambridge History of the Bible elobi ete: “Libongoli ya Bonifacio Ferrer ya Biblia na lokótá Catalan enyátamaki na Valence na 1478; Biblia yango nyonso ebebisamaki na Inquisition liboso ya mobu 1500, kasi lokasa moko mpamba etikalaki na bibliotɛkɛ ya kompanyi ya Espagne na Amerika.” (Biso nde totɛ́ngisi yango.)
Wendell Prime amonisaki lisusu ete: “Mpo na bakonzi ya mangomba oyo bazalaki na nsɔ́mɔ, Biblia nyonso esengelaki bobele kozikisama. Mɔ́tɔ mosantu wana elingaki kozala ntango nyonso mpe na kongɛnga makasi, soki nkóni ezalaki mingi. Na bisika mosusu Biblia ezikisamaki te mpamba te bakonzi bazalaki kosɛnzɛla ete bátumba Biblia moko te.” Atako milende makasi motindo wana misalemaki mpo na kolimwisa Biblia oyo esalemaki mpo na bato banso, ntalo monene ya Biblia ebatelamaki. Prime abakisaki ete: “Biblia ebatelamaki wana ekumbamaki mosika na bato oyo bazalaki kokima, to na kobombáká yango lokola mabangá mpe bibende ya ntalo mingi na ntango ya mpasi mpe ya makámá.”
Yisaya, mosakoli ya Nzambe akomaki ete: “Yɔnsɔ na njoto bajali matiti . . . Matiti majali kokaoka, felele ijali kolɛmba, nde liloba na Njambe na biso ekotɛlɛma libela.” (Yisaya 40:6, 8) Na boumeli ya bikeke mingi, ebele na bato oyo balingaka Biblia mpe babongoli mingi ya mpiko bazalaki na likámá mpe banyokwamaki mingi mpo na kolóngisa Liloba ya Nzambe. Nzokande, milende na bato yango moko mikokaki soko moke te kobatela yango. Mpo na kobatelama yango, tozali kotɔ́nda Yehova, Mobandisi ya Biblia.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]
Na ndingisa ya bolingo malamu ya Hispanic Society of America, New York