Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/5 nk. 8-9
  • Biblia na lokótá Gothique​—Búku moko ya kokamwa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia na lokótá Gothique​—Búku moko ya kokamwa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ulfilas​—Misionere mpe Mobongoli ya Biblia
  • Lisoló ya ebandeli ya Biblia na lokótá Gothique
  • Bamaniskri oyo etikalaki
  • Kozongisama ya makomi ya Biblia na lokótá Gothique
  • Codex ya Vatican—Mpo na nini ezali na ntina mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ndenge bato ya Espagne bayebaki Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Alongaki kotánga makomi ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Codex ya Bezae—mokanda oyo ekokani na mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/5 nk. 8-9

Biblia na lokótá Gothique​—Búku moko ya kokamwa

BA GOTHS bazalaki lisangani ya bitúlúká ya Germanie, oyo mbala mosusu bautaki na Scandinavie. Na bikeke ya ebandeli ya ntango na biso, basalaki mibembo kino na súdi penepene ya Mer Noire mpe ebale Danube, kino na bandelo ya Bokonzi ya Loma.

Búku ya yambo oyo ebimisamaki na monoko Germanique ezalaki Biblia na lokótá Gothique. Na mikolo na biso libongoli wana lizali bobele na mwa biteni. Nzokande, yango ezali libongoli ya Makomami Mosantu oyo likeseni na mabongoli mosusu nyonso mpe litalelami na motuya mingi. Mpo na nini?

Ulfilas​—Misionere mpe Mobongoli ya Biblia

Mobongoli ya Biblia wana ezalaki Ulfilas, oyo ayebani lisusu na nkombo na ye ya lokótá Gothique ete Wulfila. Engebene mokomi na makambo ya kala Philostorgius, Ulfilas azalaki mokitani ya bato bakangamaki lokola baombo na ba Goths na Cappadoce, oyo ezali sikawa na ɛ́sti ya Turquie. Abotamaki soko na mobu 311 T.B., akómaki sángó na mabɔkɔ ya Eusèbe ya Nicomédie soko mibu 30 na nsima mpe abongisamaki mpo na kosala lokola misionere kati na ba Goths.

Mokomi na makambo ya kala Will Durant alobi ete: “Mpo na koteya mpe koyeisa mingi bandimi na ye, na motema petee nyonso abongolaki Biblia mobimba longwa na Greke kino na lokótá Gothique, longola bobele babúku mibale ya Mikonzi.” (The Age of Faith) Lelo oyo, longola eteni moko ya búku ya Nehemia, maniskri mosusu oyo ebatelamaki na Biblia na lokótá Gothique ezali bongo biteni ya Makomami ya Greke ya Boklisto.

Gothique ezalaki lokótá oyo ekomamaki na mikanda te. Na yango, Ulfilas amonisaki mayele mingi mpo na kolónga mokakatano na ntina na kosala libongoli yango. Bakomi ya makambo na mangomba na ntango ya kala bazali kondima ete ye nde abimisaki balɛtɛ́lɛ 27 oyo ezali na lokótá Gothique, oyo ezalaki mpenza na moboko likoló na balɛtɛ́lɛ ya Greke mpe ya Latin. Lisusu, búku monene The New Encyclopædia Britannica emonisi ete “akɔtisaki maloba mingi ya boklisto na lokótá Germanique, oyo mosusu ezali naino kosalelama.”

Lisoló ya ebandeli ya Biblia na lokótá Gothique

Ulfilas asukisaki libongoli na ye liboso ya mobu 381 T.B. mpe akufaki mibu mibale to misato na nsima. Koyebana ya búku na ye endimisami na búku The Encyclopedia Americana, oyo elobi ete “libongoli yango lisalelamaki mingi mpenza na ba Goths oyo bakendeki kofanda na Espagne mpe na Italie.” Ya solo, na kotalela ntalo ya biteni oyo bibatelami kino lelo, emonani ete basalaki bakopi mingi ya Biblia wana. Ekoki mpenza kozala ete bamaniskri mingi ekomamaki kati na ba scriptoria na engumba Ravenne mpe na engumba Vérone, na bisika oyo ba Goths batyaki bokonzi na bango. Ba scriptoria ezalaki biteni ya ndako kati na bandako ya basángó epai bazalaki kokoma mpe kosala bakopi ya bamaniskri.

Boyangeli ya ba Goths esukaki penepene na 555 T.B., nsima wana mokonzi ya Byzance Justinien I akamataki Italie. Tönnes Kleberg alobi ete nsima ya kokwea na bango, “lokótá Gothique mpe mimeseno ya ba Goths elimwaki na Italie, kotikáká bobele bilembo moke. Bamaniskri na lokótá Gothique ezalaki lisusu na ntina mpenza te. . . . Mbala mingi ezalaki kotyama pembeni mpe kokwalatama mpo na koboma makomi na yango. Mposo ya nyama ya motuya mingi ezalaki kosalelama lisusu mpo na kokoma makambo ya sika.”

Bamaniskri oyo etikalaki

Likoló ya bamaniskri mosusu, kokwalatama esalemaki malamu te, mpe etikaki makomi ya liboso oyo mazali mwa moke komonana. Mingi kati na ba palimpsestes wana, nkombo babéngaka yango, emonanaki mpe bamekaki kotánga yango. Na kokamwa, Codex Argenteus oyo eyebani mingi, oyo ezali na Baevanzile minei na kolandana motindo oyo Matai, Yoane, Luka, mpe Malako ebombamaki kozanga kobebisama.

Ekanisami ete Codex wana ya ntina esalemaki na scriptorium ya engumba Ravenne na ebandeli ya ekeke ya motoba T.B. Ebéngami Codex Argenteus, oyo elimboli “búku ya palata,” mpo ete ekomami na mai ya mokanda oyo esalemaki na palata. Nkasa na yango ya mposo ya nyama epakolamaki na langi motane moindo, komonisáká ete mbala mosusu esalemaki mpo na mokonzi moko. Balɛtɛ́lɛ ya wolo ezali kokembisa milɔngɔ́ misato ya ebandeli ya Evanzile moko na moko mpe ebandeli ya biteni nyonso. Nkombo ya bakomi ya Baevanzile ekomami na wolo likoló na biloko minei bikokani bibéngami “arches” oyo eyemami na nsé ya ngambo nyonso ya makomi. Yango ezali kopesa mikapo oyo mizali ndenge moko kati na Baevanzile.

Kozongisama ya makomi ya Biblia na lokótá Gothique

Nsima ya kopanzana ya ekólo ya ba Goths, Codex Argenteus oyo ezalaki ya motuya mingi elimwaki. Emonanaki lisusu te kino eyaki kobima lisusu na katikati ya ekeke ya 16 na ndako ya basángó na Werden, pene na engumba Cologne, na Allemagne.

Na mobu 1569, babimisaki libongoli ya Libondeli ya Nkolo na lokótá Gothique, mpe yango ebendaki bongo likebi ya bato likoló na Biblia epai yango ezwamaki. Nkombo Codex Argenteus ebimaki kati na babúku mpo na mbala ya liboso na 1597. Na nsima, maniskri wana elongwaki na Werden mpo na kokende kotyama na ebombelo ya biloko ya ntɔ́ki ya mokonzi na engumba Prague. Nzokande, na nsuka ya Etumba ya Mibu Ntuku Misato na 1648, ba Suédois oyo balóngaki etumba bamemaki yango esika moko na biloko mosusu ya motuya. Uta 1669, codex wana ebatelami na bibliotɛkɛ ya Eteyelo monene ya Uppsala, na Suède.

Na ebandeli na yango, Codex Argenteus ezalaki na nkasa 336, oyo kati na yango nkasa 187 ezali na Uppsala. Lokasa mosusu moko​—oyo ya nsuka na Evanzile ya Malako​—emonanaki na mobu 1970 na engumba Speyer, na mboka Allemagne.

Kobanda ntango oyo codex yango emonanaki lisusu, bato na mayele babandaki koyekola ekomeli na yango mpo na kososola ndimbola ya lokótá Gothique oyo esilaki kolimwa. Wana asalelaki bamaniskri nyonso oyo ekokaki komonana mpe milende oyo misalemaki liboso mpo na komeka kozongisa makomi yango, moto ya mayele Wilhelm Streitberg ya mboka Allemagne asangisaki mpe abimisaki na 1908 “Die gotische Bibel” (Biblia na lokótá Gothique) oyo ezalaki na makomi ya Greke epai moko mpe makomi ya lokótá Gothique epai mosusu.

Lelo oyo, Biblia na lokótá Gothique ezali na ntina mingimingi mpo na bato ya mayele. Nzokande, likambo oyo ete esalemaki mpe etalelamaki na motuya mingi uta bileko ya ebandeli ya kobongola Biblia ezali solo komonisa mposa mpe ekateli makasi oyo Ulfilas azalaki na yango ya kosala ete Liloba ya Nzambe libongolama na lokótá oyo bato bazalaki koloba na ntango wana. Ayebaki mpenza ete ezalaki bobele na nzela wana nde ba Goths bakokaki kososola solo ya boklisto.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

Na ndingisa ya bolingo malamu ya bibliotɛkɛ ya Eteyelo monene ya Uppsala, na Suède

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto