Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sg liteya 4 nk. 19-24
  • Ndenge nini okoki kotanga mpe kosimba makambo otangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini okoki kotanga mpe kosimba makambo otangi
  • Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Masolo mosusu
  • Omipesa na kotánga
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mpo na nini ezali na ntina ete bana bátángaka?—Eteni ya 1: Kotánga buku moko to kotala filme?
    Lisalisi mpo na libota
  • Kotánga Biblia epesaka matomba mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
sg liteya 4 nk. 19-24

Liteya 4

Ndenge nini okoki kotanga mpe kosimba makambo otangi

1, 2. Mpo na nini tosengeli kosimba makambo oyo tozali kotanga?

1 Mpo na baoyo bazali kotanga bobele mpo na kolekisa ntango, ntina na komikundola makambo batangi ezali te. Kasi mpo na ye oyo azali koyekola na mokano ya koluka mosala, esengeli ete asimba makambo azali kotanga kati na mikanda na ye. Kolonga na ekizame mpe na mosala na ye etali yango. Mpo na ministre moklisto, azali na bantina koleka mpo na komikundola makambo azali kotanga, ezala botangi ya likolólikoló to mpe ya mozindo. Mokano na ye ezali ete abelema koleka epai na Jéhovah mpe abongisa mosala na ye malamu koleka, mpo na kokumisa Nzambe.​—Deter. 17:19.

2 Moklisto atangaka mingimingi Biblia mpe mikanda oyo mizali kosalisa ye ete asimba ndimbola na makambo mazali kati na Biblia. Ayebi ete Biblia ezali na boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Kotanga yango, oyo ezali kosalisa ye na kozala ministre ya makoki mingi, yango nde tokotalela mingimingi awa na Eteyelo ya mosala ya Nzambe.

3, 4. Mpo na nini tosengeli kopona malamu mikanda oyo tozali kotanga?

3 Kotanga oyo ezali koleisa elimo na biso ekoki kokokisama na bilei oyo tozali kolya. Mpo na nyonso mibale tosengeli kopona. Mpo na nzala na mosuni, ekozala bozoba soko tokolya bilei oyo bikopesa biso mpasi na libumu, bilei bizangi vitamine to, mabe koleka, bilei bizali na pwazo na kati. Bilei malamu mpe na litomba mingi mpo na biso ezali oyo bikonikama malamu mpe ekosala biso mabe na nzoto te.

4 Ezali bobele bongo mpo na kotanga na biso. Ezala kotanga ya likolólikoló to kotanga ya mozindo, tosengeli kopona oyo ekobebisa elimo na biso te, kasi oyo ekosalela yango malamu mpo na mikolo mingi. Ekozala bozoba soki tokoleisa elimo na biso na makanisi ya libunga, ya mabe to ya mbindo, oyo ekoki kopesa biso maladi na elimo. (Bafil. 4:8) Mpo na nini tokobebisa ntango na biso na kotangaka mikanda oyo mikoki kolendisa biso te? Lokola tokoponaka bilei oyo tolyaka, bobele bongo ebongi tokeba na makambo oyo tozali kotanga.

5, 6. Mpo na nini tosengeli komiponela ntango mpo na kotanga, mpe bantango nini ebongi malamu mpo na yango?

5 Programme mpo na botangi. Nsima na kopona mikanda malamu mpo ya botangi, ebongi komisalela programme engebene ntango oyo ozali na yango. Ebongi opona mikolo, na moi to na mpokwa mpo na botangi; soki boye te, kotanga ya bongo na bongo ekobimisa matomba te.​—Misala 17:11.

6 Kotanga na mozindo esengaka ntango mpe esika ezangi makelele. Nzokande mpo na kotanga nyonso, okozela te bobele ngonga molai oyo omiponelaki mpo na boyekoli. Mokolo na mokolo, soki okokamata ata minite zomi to zomi na mitano mpo na kotanga, okokamwa mpo na matomba oyo okozwa. Bamoko basalaka yango na ntongontongo, bamosusu na mpokwa, liboso ya kolala. Bamosusu mpe bazali kotanga na ntango ya bopemi na midi kuna na mosala to na ntango bazali na train to na bus wana ezali bango kokende na mosala to na kelasi. Na mabota mosusu, bazali koyangana na boumeli ya minite mitano to zomi mpo na kotanga elongo nsima na kolya to liboso ya kolala. Kotanga mokolo na mokolo ekobimisela yo matomba malamu mingi.

7. Na mokano nini tosengeli kotanga Biblia?

7 Kati na programme na yo ya boyekoli osengeli kobongisa mpe ntango mpo na kotanga Biblia. Ekozala na yo litomba mingi na kotanga yango banda ebandeli kino nsuka. Okoki kolonga na yango soki okotanga motuya moko na mikapo soki mpe ya bapage mokolo na mokolo to poso na poso. Nzokande, okotanga te bobele mpo osilisa bapage oyo omikatelaki, kasi mpo na koyeba mpe kosimba makambo ozali kotanga. Kamata ntango mpo na kokanisa. Wana ezali yo kotanga Biblia, ezali bilei bileki bilei nyonso na elimo.

8, 9. Mikanda mosusu nini tosengeli kokotisa yango kati na programme na biso ya botangi?

8 Lisusu osengeli komiponela ntango mpo na kobongisa boyekoli ya Mosenzeli mpe makita mosusu ya lisangá. Ya solo, tomibongisaka mpo na koloba na makita, nzokande ntina ya liboso ya kotanga na biso ezali mpo na kozwa biyano na mituna te. Toluka nde kosimba ntina na makambo tozali kotanga mpe tokanisa malamumalamu na ndenge oyo tokoki kosalela makanisi yango kati na bomoi na biso.

9 Masolo mosusu ya Mosenzeli, atako toyekolaka yango na lisangá te, nzokande tokoki kotika yango pembeni te; bobele bongo mpo na masolo ya ntina mingi makomami kati na Lamuká! Boni mpo na mikanda oyo la Société asili kobimisa na monoko na bino, osili kotanga yango nyonso? Soki okamati ntango ya kotanga yango, okopambwama mpo na yango. Mpamba te, kokola na biso na elimo etali mingi lolenge ya mikanda oyo tozali kotanga mokolo na mokolo.

10-17. Myango nini tokoki kosalela mpo na kosimba malamu makambo touti kotanga?

10 Ndenge tokoki kosalela mpo tosimba malamu makambo tozali kotanga. Mpo tokoka kozwa litomba mpenza na botangi na biso, tosengeli kosimba makambo tozali kotanga. Bato mosusu balobaka ete ‘nazali kosimba eloko moko te mpo ete boongó na ngai ezali malamu te’. Na yango, emonani ete bazangi kopesa disipline na boongó na bango to komesenisa yango na kosimba makambo. Nzela ya mayele ezali boye ete toluka kozwa litomba mingi na botangi na biso. Nzokande, ndambo monene ya bolamu oyo tozwi ekobunga soki tozali kobosana noki makambo oyo totangi. Na yango, esengeli na biso toyekola kotanga na ndenge ete tokoka kosimba malamu makambo tozali kotanga. Bandeko oyo bameseni kotanga, bazali na mwa ndambo na mayele basalelaka, mpe yango ekoki kosalisa yo.

11 Na ntango ozali kotanga, sala makasi mpo ete miso na yo eyamba molongo mobimba to etuluku ya maloba, na esika ya kotanga liloba mokomoko. Yango ekosalisa yo ete otanga nokinoki mpe kosimba makanisi na esika ete otelemaka na liloba mokomoko. Na ntango ozali kotanga noki mpo na yo moko, pengola ezaleli ya kobimisa maloba to koningisa bibebu, mpe kozongaka nsima te, bobele soki ezali mpo na komikotela na likanisi moko ya ntina. Nzokande, mpo na makambo oyo mazali makasi mingi, okotanga yango mwa malembe mpo ete okoka kosimba yango malamu. Okoki mpe kooka mposa ya kotanga yango na mongongo makasi to na mongongo ya kokita. (Nz. 1:2, MN) Na ndakisa, Nzembo mpe Masese ezali mikanda oyo tokoki kotanga yango mbangumbangu te, mpo ezali kosenga mayoki mpe kokanisa mozindo.​—Nz. 77:11, 12.

12 Ezali mpe litomba na kosimba ekomeli mpo na kotya mikoloto na nse na maloba ya ntina mpe kokamata note mpo na makanisi ya ntina oyo olingi kozongela yango lisusu. Kasi kotya mikoloto bipai nyonso te, soki boye okomona lisusu te wapi makanisi ya ntina. Na ntango omoni ndimbola na likambo moko olukaka to likanisi moko ya litomba oyo okoki kosalela mpo na kosilisa ntembe moko okutanaka na yango mingi ndako na ndako, zwa note mpo na page wana mpe paragrafe na nsuka ya mokanda, mpo ete okoka lisusu komona makambo yango noki na ntango okozala na mposa na yango. Nzokande, soki mokanda ezali ya yo te, kotya bilembo na kati na yango te.

13 Mpo na kosimba makambo ya ntina na lisolo moko to na mokanda moko, ebongi totanga na ndenge ete tozwa ntango ya kokanisa mpe kotalela makanisi tomoni wana elongo na makambo tosili koyeba na motó ya likambo yango. Kamata ntango ya kososola makambo ozali kotanga, zwa note na makanisi mapesami mpo na kosimba liteya boye to liteya boye. Luka mingimingi mitinda oyo mikoki kotambwisa yo kati na bomoi na yo ya mokolo na mokolo. Zwa ntango ya kotalela ndenge okoki kosalela yango.

14 Liboso ya kotanga na likebi nyonso mokanda moko ya la Société, ebongi malamu ete otalela naino titre na yango mpe mitó ya makambo nyonso etandami na table des matières to na lokasa ya kolandana ya makambo. Otya likebi na kotalela likanisi ya mokanda epai euti mpe epai ezali kokende. Na motindo yango, okosimba likanisi na yango mobimba. Na ntango okamati lisolo moko to mokapo moko mpo na kotanga yango, tanga naino mitó ya makambo mike nyonso, yango ezali kolakisa kolandana ya makanisi matongami zongazonga na motó ya likambo monene. Tya likebi mingi na milongo ya maloba ya ntina mingi to fraze clés, yango ezalaka mingimingi na ebandeli ya paragrafe nyonso. Ekoyebisa yo na mokuse likanisi ya ntina oyo ezali na paragrafe mokomoko. Sala makasi ete osimba makambo maleki ntina kati na lisolo nyonso.

15 Likanisi mosusu topesi yo mpo na kosalisa yo ete osimba makambo ozali kotanga ezali ete omeka komikanisela lisolo yango. Na kati na makanisi na yo, mona lisolo yango mpe bato bazali wana, yoka makelele mpe mingongo, yoka nsolo, meka kolya bilei mpe sangana na esengo to na mawa ya likambo yango, nyonso wana bobele kati na makanisi na yo, lokola ete ozalaki wana. Salela biyokeli nyonso mpo na komikotisa kati na lisolo wana oyo elobelami na Biblia. Kosalaka bongo ekosalisa yo ete osimba masolo ndenge na ndenge malobelami kati na Biblia.

16 Ekomi yo na nsuka na mokapo moko, sala bozongeli mokuse kati na makanisi na yo, na nsima bwaka lisusu miso na mokanda mpo na komona soki makambo osimbi ezali solo oyo outi kotanga.

17 Soki likoki ezali, solola na ndeko mosusu makambo outi koyekola, naino ezali yango ya sika kati na boongó na yo. Kosalaka bongo, ekokomama na mozindo kati na elimo na yo, mpe ekoki kozala ete ndeko wana oyo yo osololi na ye akobakisela yo bandimbola mosusu oyo yo oyebaki yango te na ntina na likambo yango. Soki omoni makanisi mabongi mpo na mosala ya kosakola, salela yango noki uta ekozwa yo libaku. Wana lisusu ezali mwango mpo na kosimba malamu makambo oyo outi kotanga.

18-20. Mpo na nini ezali likambo ya ntina mingi ete toyeba kotanga malamu?

18 Litomba ya kotanga makambo malamu. Makambo tozali kotanga ezali kopusa bomoi na biso. Motindo na mosala na biso, makoki na biso, esengo na biso ya kozala na bomoi mpe kokola na biso na elimo, nyonso oyo etali mingimingi likoki na biso ya koyeba kotanga malamu. Ye oyo ayebi kotanga malamu te, azali kozanga boyebi mingi mpe eksperianse mingi. Baboti bakoki kosalisa bana na bango ete bayeba kotanga malamu, soki bakobongisa kati na libota programme malamu ya botangi mpe etosama. Na bantango mosusu, ekobonga kosenga na bana ete batanga na mongongo makasi, na ndakisa texte ya mokolo na mokolo mpe ndimbola oyo ebimisami kati na mwa mokanda moke Tótangaka Makomami mokolo na mokolo. Soki ozali motángi malamu te, ebongi na yo kosala ekzersise mokolo na mokolo ata minite zomi na mitano to ntuku misato. Nsima ya mwa basanza, okozwa matomba mingi oyo ekoyikisa yo mpiko.

19 Mpo na oyo etali kotanga, soki okamati mimeseno malamu, komibombelaka ntango mokolo na mokolo mpo na kotanga mpe koluka bandimbola mosusu na mikanda, mpe soki osaleli toli nyonso epesami na mokapo oyo, okozala ministre na makoki mingi. Okosimba malamu maloba na motuya mauti na Nzambe, oyo ekopesa yo nzela ete osalela yango kati na bomoi na yo mpe kati na mosala na yo ya kosakola. Ata bamikóló bakoki kobongisa makoki na bango soki balandi toli epesami na mokapo oyo. Moto moko te asengeli komitalela ete ye akomi mobange mpe toli oyo ezali na litomba mpo na ye te.

20 Nzambe akomisaki mikano na ye kitoko kati na mokanda moko mpo na koyebisa misala na ye ya kokamwa epai ya bana ya bato, mpe mpo ete bakanisaka yango ntango nyonso. (Nz. 78:5-7) Nzela malamu ya kotondo ye mpo na bokabi na ye oyo ezali boye ete totya molende mpenza mpo na kotanga mpe kosimba makambo tozali kotanga kati na Liloba na ye oyo ekoki kopesa biso bomoi.

[Bozongeli:]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto