Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be lok. 21-lok. 26 par. 4
  • Omipesa na kotánga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omipesa na kotánga
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Salelá malamu libaku oyo ozwi
  • Zalá na mokano malamu ntango ozali kotánga
  • Talá soki okoki kotánga nokinoki
  • Yebá kotya makanisi na likambo moko
  • Kotánga liboso ya bato mingi
  • Zwaká ntango ya kotánga
  • Ndenge nini okoki kotanga mpe kosimba makambo otangi
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mpo na nini ezali na ntina ete bana bátángaka?—Eteni ya 1: Kotánga buku moko to kotala filme?
    Lisalisi mpo na libota
  • Kotánga Biblia epesaka matomba mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be lok. 21-lok. 26 par. 4

Omipesa na kotánga

NYAMA ekoki kosala te oyo yo ozali kosala sikoyo. Soki ozwi bato 6, moto moko kati na bango ayebi kosala yango te mpamba te akɔtaki kelasi te, mpe bato nyonso te oyo bayekoli kotánga nde batángaka mbala na mbala. Kasi lokola oyebi kotánga, yango ezali kosalisa yo, mpamba te na nzela ya mikanda, ezali lokola nde ozali kosala mibembo na mikili mosusu, ozali kokutana na bato oyo bakoki kolakisa yo makambo mingi, mpe okoki koyeba makambo mingi oyo ekosalisa yo na bomoi na yo.

Elilingi na lokasa 22

Makambo oyo ozali kotángela bana na yo ekoki kosalisa bango bábongisa bomoto na bango

Soki elenge ayebi kotánga, akoyekola makambo mingi na kelasi. Ntango azali koluka mosala, bakotalela makoki na ye ya kotánga liboso báyebisa ye mosala oyo akosala mpe bangonga oyo akolekisa na mosala yango oyo ekosalisa ye na bomoi na ye. Bamama oyo bayebi kotánga bayebaka mpe kolambela mabota na bango biloko oyo etongaka nzoto, babatelaka mabota na bango ete ezala pɛto mpe babatelaka yango na maladi mingi. Bamama oyo bazali na momeseno ya kotánga basalisaka mpe bana na bango mpo bákola na mayele.

Ya solo, koyeba kotánga ezali kopesa yo litomba moko monene: ezali kosalisa yo ‘ozwa boyebi ya Nzambe.’ (Mas. 2:5) Makambo mingi oyo tosalaka mpo na losambo na biso epai ya Nzambe esɛngaka koyeba kotánga. Na makita ya lisangá, totángaka Makomami mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. Mpo osala mosala ya kosakola malamu mpenza, osengeli koyeba kotánga. Esengeli mpe kotánga mpo na komibongisa mpo na makambo yango. Yango wana, mpo okola malamu na elimo, osengeli mingimingi kozala na momeseno ya kotánga.

Salelá malamu libaku oyo ozwi

Elilingi na lokasa 22

Salá makasi mpo otángaka malamu liboso ya bato mingi

Bato mosusu oyo bazali koyekola nzela ya Nzambe batángá kelasi mingi te. Mbala mosusu esengeli kolakisa bango kotánga malamu mpo bákola lisusu na elimo. To mbala mosusu, esengeli ete moto moko asalisa bango mpo báyeba kotánga malamu mpenza. Soki mposa ezali, masangá esalaka makasi mpo na kobongisa bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma, na mokanda Omipesa na kotánga mpe kokoma. Ebongiseli yango esalisi mpenza bato mingi. Lokola koyeba kotánga malamu ezali na ntina, masangá mosusu ebongisi ete bato oyo balingi koyeba kotánga malamu, basengeli kokɔta kelasi yango nzela moko na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Ata na bisika oyo kelasi wana ezali te, moto akoki ye moko koyekola kotánga malamu soki azali kozwa mwa ntango mokolo na mokolo mpo na kotánga na mongongo makasi mpe soki azali kozanga te na makita ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe azali kosala mikumba.

Kasi likambo ya mawa ezali ete mpo na televizyo, mikanda mosusu oyo ezali na masolo ya kosɛkisa mpe makambo mosusu, bato mingi bazali komipesa na kotánga te. Soki moto azali kolekisa ntango mingi na kotala televizyo mpe azali komipesa na kotánga te, akokoka mpenza te koyeba kotánga malamu, kokanisa malamu, kososola malamu mpe koloba malamu.

Ezali “moombo ya sembo mpe ya mayele” nde apesaka biso mikanda oyo esalisaka biso tókanga ntina ya Biblia. Mikanda yango ezali koyebisa biso ebele ya makambo ya elimo oyo ezali na ntina mingi. (Mat. 24:45; 1 Kol. 2:12, 13) Ezali lisusu koyebisa biso makambo ndenge na ndenge oyo ezali kobima na mokili mpe ntina na yango; ezali kosalisa biso tóyeba malamumalamu biloko oyo Nzambe akelá mpe ezali koteya biso ndenge oyo tokoki koyika mpiko na mikakatano na biso. Oyo eleki mpenza ntina na makambo oyo nyonso, ezali koyebisa biso ndenge oyo tokoki kosalela Nzambe na lolenge oyo ekosepelisa ye. Mikanda ya malamu mpenza wana ekosalisa yo okola mpo ozala moto ya elimo.

Ya solo, likambo eleki ntina ezali te koyeba kotánga malamu. Esengeli nde koyeba kosalela makambo oyo ozali kotánga na ndenge ya malamu. Lokola toponaka biloko oyo tosengeli kolya, tosengeli mpe kopona makambo oyo tokotánga. Okolya biloko oyo etongaka nzoto te to oyo ekoki koboma yo? Ndenge moko mpe, mpo na nini okotánga makambo oyo ekoki kobebisa makanisi na yo mpe motema na yo ata soki okanaki yango te? Tosengeli kotala soki makambo nyonso oyo tolingi kotánga eyokani na mitinda ya Biblia. Liboso ya kopona makambo oyo olingi kotánga, talelá mikapo lokola ya Mosakoli 12:12, 13; Baefese 4:22-24; 5:3, 4; Bafilipi 4:8; Bakolose 2:8; 1 Yoane 2:15-17; mpe 2 Yoane 10.

Zalá na mokano malamu ntango ozali kotánga

Soki totaleli masolo ya Baevanzile, tokomona polele ntina ya kozala na mokano malamu ntango tozali kotánga. Na ndakisa, na Evanzile ya Matai, tokomona ete Yesu azali kotuna bakonzi ya mangomba oyo bayebaki mibeko malamu mpenza, mituna lokola oyo: “Botángá te?” mpe “Botángá naino te?,” liboso ya kosalela Makomami mpo na koyanola na mituna na bango ya mayele mabe. (Mat. 12:3, 5; 19:4; 21:16, 42; 22:31) Liteya tozwi na likambo yango ezali ete soki tozali kotánga na mokano malamu te, yango ekotinda biso tókóma na makanisi ya mabe to tókanga te ntina mpenza ya makambo oyo tozali kotánga. Bafalisai bazalaki kotánga Makomami mpo bazalaki kokanisa ete yango ekopesa bango bomoi ya seko. Ndenge Yesu amonisaki yango, bato oyo balingi Nzambe te mpe baboyi kondima ebongiseli oyo Ye atii mpo na kobikisa bato, bakozwa mbano wana te. (Yoa. 5:39-43) Bafalisai bazalaki na mikano oyo etalelaki kaka kokokisa mposa na bango moko, yango wana makanisi na bango mingi ezalaki mabe.

Mokano oyo eleki malamu ezali kolinga Yehova, yango esengeli kotinda biso tótángaka Liloba na ye. Bolingo ya ndenge yango ekotinda biso tóyekola mokano ya Nzambe mpamba te bolingo ‘esepelaka nde na solo.’ (1 Kol. 13:6) Ata soki tozalaki kolinga kotánga te liboso, ntango tolingi Yehova na ‘elimo na biso mobimba,’ yango ekotinda biso tómipesa mpenza mpo na kozwa boyebi ya Nzambe. (Mat. 22:37) Bolingo ekolamusa mposa mpe mposa yango ekotinda biso tóyekola.

Talá soki okoki kotánga nokinoki

Mpo na kotánga, esengeli koyeba maloba. Ata ndenge ozali kotánga sikoyo, ozali komona maloba oyo oyebi mpe ozali koyeba ndimbola na yango. Okoki kokóma kotánga na lombango mpenza soki oluki koyeba maloba mingi lisusu. Na esika ya kotɛlɛma na liloba mokomoko, salá makasi ete otalela maloba mingi na mbala moko. Soki ozali kosala makasi mpo na kosala bongo, okomona ete okokóma kokanga malamu mpenza ntina ya makambo oyo ozali kotánga.

Elilingi na lokasa 24

Soki bato nyonso ya libota bazali kotánga esika moko, yango ekosalisa bango bázala na bomoko

Nzokande, ntango ozali kotánga makambo ya mozindo, osengeli kosalela mayele mosusu mpo na kozwa matomba mingi na milende oyo ozali kosala. Yehova alobaki boye ntango apesaki Yosua toli mpo na kotánga Makomami: “Buku ya mobeko oyo ekolongwa na monɔkɔ na yo te, kasi [okotánga yango na mongongo ya nse, NW].” (Yos. 1:8) Mbala mingi, moto alobaka na mongongo ya nse ntango azali komanyola. Yango wana, liloba ya Liebele oyo ebongolami ete “na mongongo ya nse” ebongolamaka mpe na “komanyola.” (Nz. 63:6, NW; 77:12, NW; 143:5, NW) Ntango moto azali komanyola, akanisaka malamumalamu, asalaka yango mbangumbangu te. Ntango tozali kotánga, soki tozali kokanisa makambo oyo tozali kotánga, yango ekosalisa biso ete Liloba ya Nzambe ekɔta mpenza na elimo mpe na motema na biso. Biblia ezali na bisakweli, toli, masese, maloba ya ntɔki, ezali kosakola bikateli ya Nzambe, ezali na makambo mikemike etali mokano ya Yehova mpe masolo ya bato ebele oyo bomoi na bango ezali ndakisa mpo na biso. Nyonso wana ezali na ntina mingi mpo na bato oyo balingi kotambola na nzela ya Yehova. Okozwa mpenza matomba mingi soki otángi Biblia na ndenge ete okɔtisa yango mpenza na elimo na yo mpe na motema na yo!

Yebá kotya makanisi na likambo moko

Elilingi na lokasa 22

Okoyeba kotánga malamu soki ozali na momeseno ya kotánga

Ntango ozali kotánga, salá lokola ozali na esika oyo bazali kolobela likambo oyo ozali kotánga. Na makanisi na yo, salá lokola ozali komona mpenza bato oyo lisolo elobeli mpe ozali koyoka ndenge bazali komiyoka ntango makambo yango ezali kosalema na bomoi na bango. Ezali mpasi te kosala yango, mingimingi ntango ozali kotánga masolo lokola oyo ya Davidi na Goliata, na 1 Samwele mokapo 17. Kasi, ata makambo mikemike oyo elobelami na Exode mpe na Levitike, lokola kotonga mongombo to kopona banganga, ekomonana ya solo mpenza soki na makanisi na yo, ozali komona bonene na yango, biloko oyo basalelaki mpo na kotonga yango to soki okanisi nsolo ya mpaka na malasi, nsolo ya bambeka ya bilei mpe ya nyama oyo batumbi. Kanisá naino, kosala mosala ya bonganga ezalaki mpenza likambo ya lisɛki te! (Luka 1:8-10) Soki ozali kosala lokola ozali komona mpe koyoka makambo oyo ozali kotánga, yango ekosalisa yo okanga ntina na yango mpe obosana yango te.

Kasi soki otii likebi te ntango ozali kotánga, makanisi na yo ekoki kotambolatambola. Miso na yo ekoki kotala lokasa, kasi makanisi na yo ekozala esika mosusu. Miziki ezali kobɛta? Ofungoli televizyo? Bato mosusu ya libota bazali kosolola? Soki likoki ezali, ekozala malamu otángaka na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Nzokande, makambo na yo moko mpe ekoki kolongola likebi na yo. Mbala mosusu ozalaki na makambo mingi ya kosala na mokolo yango. Ezali mpenza mawa na komona ete makambo oyo tosalaki na boumeli ya mokolo ezongelaka biso noki na makanisi! Ezali malamu kokanisa makambo oyo ekómelaki yo na boumeli ya mokolo, kasi kokanisa yango na ntango ozali kotánga te. Mbala mosusu ntango obandaka kotánga, otyaka likebi nyonso to mbala mosusu obondelaka liboso ya kotánga. Kasi na nsima, ntango ozali kotánga, makanisi na yo ekómi kokende epai mosusu. Meká lisusu. Omipesa disiplini mpo otya makanisi na yo nyonso na makambo oyo ozali kotánga. Mokemoke, okomona ete ozali kokende liboso.

Osalaka nini soki omoni liloba moko oyo ozali kokanga ntina na yango te? Mbala mosusu, lisolo yango moko ekoki kolimbola to kolobela maloba oyo oyebi te. To okoki koyeba ndimbola ya maloba yango ntango otángi makambo oyo balobeli liboso mpe nsima na yango. Soki oyebi kaka ndimbola ya liloba yango te, zwá ntango ya koluka yango na diksionɛrɛ soki ozali na yango, to tyá elembo pembeni ya liloba yango mpo na nsima, otuna moto mosusu ndimbola na yango. Yango ekosala ete oyeba maloba mingi mpe ekosalisa yo okanga malamu mpenza ntina ya makambo oyo ozali kotánga.

Kotánga liboso ya bato mingi

Elilingi na lokasa 22

Omipesa ntango nyonso na kotánga liboso ya bato mingi

Ntango ntoma Paulo akomelaki Timote ete amipesa ntango nyonso na kotánga, alingaki kolobela mingimingi kotánga oyo ekopesa basusu litomba. (1 Tim. 4:13) Kotánga malamu liboso ya bato mingi esuki kaka te na kobimisa na mongongo makasi maloba oyo ezali na mokanda. Motángi asengeli kokanga ntina ya maloba mpe koyeba makanisi oyo ezali na maloba yango. Motángi akobimisa makanisi na yango malamu mpenza kaka soki asali bongo mpe akomonisa mpenza mawa to esengo to nkanda oyo bazali kolobela wana. Na ntembe te, yango esɛngi komibongisa malamu mpenza mpe komeka yango mbala na mbala. Yango wana Paulo apesaki toli oyo: “Kobá komipesa na botángi liboso ya bato nyonso.” Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekobongisa yo malamu mpenza mpo na yango.

Zwaká ntango ya kotánga

“Makanisi ya bato na mosala makozwisa [litomba, NW], nde ye oyo akosalaka mbangumbangu akozanga bobele kozanga.” (Mas. 21:5) Maloba oyo etali mpe mposa na biso ya kotánga, mpe ezali mpenza solo! Mpo na kozwa “litomba” yango, tosengeli kosala milende ete tómibongisa mpo misala mosusu ebebisa te programɛ na biso ya kotánga.

Otángaka ntango nini? Otángaka malamu nde na ntɔngɔntɔngɔ? To okangaka makambo malamu mpenza soki ozali kotánga na mpokwa? Soki ozali kobomba ata miniti 15 to 20 mokolo na mokolo mpo na kotánga mwa moke, okokamwa ntango okomona makambo minene oyo okoki kosala. Sɛkɛlɛ ezali nde ete otángaka mokolo na mokolo.

Mpo na nini Yehova aponaki kokomisa mikano minene na ye na kati ya mokanda moko? Ezali mpo ete bato bátánga Liloba na ye oyo ekomami. Yango ekosalisa bango bákanisa misala ya kokamwa ya Yehova, báyebisa yango na bana na bango mpe bábomba misala ya Nzambe na makanisi na bango. (Nz. 78:5-7) Tokomonisa malamu mpenza botɔndi na biso mpo na motema malamu ya Yehova na likambo oyo na ndenge tozali komipesa na kotánga Liloba na ye oyo epesaka bomoi.

PROGRAMƐ NA YO YA KOTÁNGA EZALI NDENGE NINI?

  • Otángaka libosoliboso mpenza nde Biblia?

  • Otángaka nimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!

  • Ntango ozwi mikanda ya sika oyo elimbolaka Biblia, otángaka yango mbala moko?

  • Ntango ozwaka lokasa na yo ya Mosala na biso ya Bokonzi, otángaka makambo oyo ezali wana, oyo ekosalisa yo na mosala ya kosakola?

  • Mikanda boni ya kala, oyo Batatoli ya Yehova babimisá, osilá kotánga?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto