Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/9 nk. 3-5
  • Liteya ya évolution ezali kosambisama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya ya évolution ezali kosambisama
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Litatoli lizangi boyokani
  • Liteya ya évolution ezali liponi ya bato ya mayele?
  • Likambo litali kondima
  • Evolisyo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?—Eteni 2: mpo na nini koboya kondima liteya ya evolisyo?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Evolisyo eyokani na mateya ya Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/9 nk. 3-5

Liteya ya évolution ezali kosambisama

Baoyo bandimaka makasi liteya ya évolution bazali sikawa kosɛnga ete lolenge bomoi ebandaki etalelama lisusu na mobimba na yango

KANISÁ naino ete ozali moto wa mibeko mpe osangani na likita mpo na kosambisa mosáli mabe moko. Mofúndami alobi ete ayebi likambo te, mpe batatoli bayei mpo na kokɔtela ye. Nzokande, wana ezali yo koyoka litatoli na bango, omoni ete motatoli moko na moko azali koloba makambo oyo mazali kokweisa maloba ya basusu. Na nsima, na ntango basɛngi na batatoli ete bázonga na bifandelo na bango, bandimbola na bango ebongwani. Soki ozalaki moto wa mibeko, olingaki kopesa motuya na litatoli na bango? Olingaki kopusama na kotika mofúndami? Na ntembe te, olingaki kosala bongo te, mpamba te soki kozanga boyokani ezali kati na litatoli oyo epesami mpo na kokɔtela mofúndami, ekolɛmbisaka likoki ya kondimela ye.

Ezali mpe bongo mpo na liteya ya évolution. Ebele ya batatoli bayaki mpo na kolobela bandimbola ndenge na ndenge na ntina etali lolenge bomoi ebandaki, mpo na kokɔtela liteya ya évolution. Kasi litatoli na bango ekoki kondimama kati na esambiselo ete ezali sembo? Baoyo bakɔtelaka liteya yango bazalaka na boyokani kati na maloba na bango?

Litatoli lizangi boyokani

Lolenge nini bomoi ebandaki? Mbala mosusu, ezali na motuna mosusu te oyo ebimisá naino makanisi mpe etombolá naino ntembe makasi lokola oyo. Nzokande, kowelana ezali te bobele kati na liteya ya évolution mpe bozalisi; kozanga boyokani monene ezali nde kati na bato oyo bandimaka liteya ya évolution. Ezali solo ete likambo moko na moko kati na évolution​—lolenge nini ebandaki, epai wapi ebandaki, nani abandisaki yango mpe nini ebandisaki yango, mpe bokóli na yango kino na nsuka ezwaki ntango boni​—ebimisaki matáta makasi.

Uta bambula mingi, bato oyo bandimaka liteya ya évolution balobaki ete bomoi ebandaki kati na mai ya mɔ́tɔ oyo ebéngami “soupe” organique. Sikawa basusu bazali kondima ete ekoki kozala ete fulufulu ya mai monene nde ebandisaki bomoi. Esika mosusu oyo bakanisaka ete bomoi ebandaki kuna ezali bongo maziba ya mai ya mɔ́tɔ oyo ezalaka na nsé ya mai monene. Basusu bakanisi ete bikelamu ya bomoi bibimaki na nzela ya bingɛngɛli (météores) oyo ekitaki na mabelé. To mbala mosusu, lokola basusu bazali koloba yango, minzoto mibukani (astéroïdes) mipanzani na bitenibiteni mingi kati na mabelé mpe mibongolaki mopepe, na kolendisáká bongo bokóli ya kosalema ya bomoi. Molukiluki moko alobaki ete: “Soki monzoto moko monene ya ebende ekwei na mabelé, makambo kitoko makoki komonana.”

Lolenge bomoi ebandaki ezongelami lisusu kotalelama. Zulunalo Time elobi ete: “Endimamaki liboso ete bomoi ebandaki te kati na kimya, kozanga yikiyiki, kasi na nsé ya mapata mabe, na etando oyo ebulunganisami na kotomboka ya bangómbá-mɔ́tɔ mpe eningisami na minzoto oyo babéngi ba comètes mpe minzoto mibukani.” Sikawa, bato mosusu ya zébi bazali koloba ete mpo ete bomoi ebanda bokóli na yango kati na mobulungano motindo oyo, esengelaki ete ebongiseli nyonso eumela ntango mokuse koleka na lolenge ekanisamaki liboso.

Bato ya siansi bazali mpe na makanisi makeseni mpo na koyeba soki Nzambe​—“soki mpenza azali”​—⁠akokisaki mokumba nini kati na oyo etali ebandeli ya bomoi. Basusu bazali koloba ete bomoi ebandaki kozanga ete Mozalisi moko atya lobɔkɔ na ye, nzokande basusu bazali koloba ete Nzambe abandisaki ebongiseli wana mpe atikaki ete évolution elandisa bokóli ya bomoi.

Nsima wana bomoi ebandaki, lolenge nini évolution esalemaki? Ata kati na likambo oyo, bandimbola mpe ezali na kozanga boyokani. Na 1958, mbula nkámá na nsima ya kobimisama ya búku L’Origine des espèces, Sir Julian Huxley alobaki ete: “Bokundoli monene oyo Darwin asalaki, mobeko ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba ebéngami la sélection naturelle (biloko oyo bibongi nde bizali kolanda kozala na bomoi), endimisami makasi, mpe mpo na libela, lokola likambo bobele moko oyo ezali na ntina mingi kati na mbongwana ya évolution.” Kasi, na nsima ya bambula ntuku mibale na minei, moto mosusu oyo andimaka liteya ya évolution, Michael Ruse akomaki ete: “Motuya oyo mozali sé kokóla ya bato ya zébi ya makambo matali bomoi . . . bazali koloba ete liteya nyonso ya évolution oyo ezwi moboko na yango likoló na endimeli ya Darwin​—mingimingi liteya oyo ete biloko oyo bibongi nde bizali kolanda kozala na bomoi, ete ezali likambo ya ntina mingi kati na mbongwana ya évolution⁠—​ezali ya kokoka soko moke te.”

Wana zulunalo Time ezali koloba ete ezali na “bilembeteli mingi ya makasi” oyo ezali kosimba liteya ya évolution, nzokande ezali kondima ete évolution ezali liteya moko etondi na mindɔ́ndɔ́, ezali na “mabungá mingi mpe etondi na mateya oyo ezangi boyokani mpo na oyo etali ndenge nini kokokisa bilembeteli oyo bizali kozanga.” Na esika ya koloba ete ekateli ya nsuka ya esambiselo ezwami, basusu kati na baoyo bandimaka makasi liteya ya évolution bazali sikawa kosɛnga ete lolenge bomoi ebandaki etalelama lisusu na mobimba na yango.

Na yango, makanisi ya kokɔtela liteya ya évolution​—mingimingi mpo na oyo etali ebandeli ya bomoi engebene liteya ya évolution⁠—​esimbami te likoló na litatoli oyo ezali na boyokani. T. H. Janabi, ye moto ya siansi alobi ete baoyo bakɔtelaka liteya ya évolution “bakólisá mpe basundolá mateya mingi oyo ezalaki na mabungá na boumeli ya bambula mpe bato ya siansi bazali nkutu na likoki te ya kondima ata liteya moko na yango.”

Likambo ya kokamwa ezali ete Charles Darwin amonaki na mosika kozanga boyokani oyo. Na maloba ya ebandeli ya búku L’Origine des espèces, akomaki ete: “Nayebi malamu ete ata eloko moke te etalelami kati na búku oyo, likoló na yango bilembeteli bikoki komonisama te, ezali komonana mingi lokola ete ezali komema na kozwa makanisi malamu oyo mazali mpenza na bokeseni na oyo ngai nazwaki.” Ya solo, litatoli motindo oyo lizangi boyokani ezali kobimisa mituna mpo na koyeba soki liteya ya évolution ebongi kondimama.

Liteya ya évolution ezali liponi ya bato ya mayele?

Búku Milestones of History (Eleko ya ntina mingi kati na lisoló ya bato) elobi ete uta na ebandeli na yango, liteya ya évolution “esepelisaki bato mingi mpamba te emonanaki lokola ete ezalaki mpenza na boyokani na siansi koleka liteya ya kozalisama ya bikelamu.”

Lisusu, maloba ya bato mosusu oyo bandimaka mateya ya évolution makoki kozala ya kobangisa bato. Na ndakisa, moto ya siansi H. S. Shelton alobi ete likanisi ya kozalisama ya bikelamu ezali “mpenza ya bozoba na boye ete esengeli kotalelama te.” Moto na zébi ya bomoi, Richard Dawkins alobi na maloba makasi ete: “Soki okutani na moto oyo alobi ete andimaka liteya ya évolution te, moto yango azali moínga, zoba to elemá.” Bobele bongo, molakisi René Dubos alobi ete: “Bato mingi ya mayele bazali sikawa kondima solo ete biloko nyonso ya mɔlɔ́ngɔ́​—kobanda na biloko ya likoló kino na bato⁠—​bikólaki to bizali kolanda kokóla na lisalisi ya évolution.”

Na makanisi oyo, ekoki komonana lokola ete moto nyonso oyo azali na mwa ndambo ya mayele akondima liteya ya évolution kozanga kokakatana. Mpamba te, kosala bongo ekolimbola ete ozali “moto ya mayele” kasi “elemá” te. Nzokande, ezali na mibali mpe basi oyo batángá mingi, kasi bakɔtelaka liteya ya évolution te. Kati na búku na ye The Neck of the Giraffe (Nkingo ya dikala), Francis Hitching akomi ete: “Namonaki bato ya siansi mingi oyo bazali na ntembe bango moko mpe moko ya motó makasi akokaki kino koloba ete liteya ya évolution ya Darwin emonani ete ezali na boyokani soko moke te na siansi.”

Chandra Wickramasinghe, moto ya siansi mpe mobotamá ya Grande Bretagne, oyo bakumisaka mingi, akamati etelemelo motindo moko. Alobi ete: “Elembeteli moko ezali te mpo na makonzí ya moboko oyo masimbi liteya ya évolution. Ezalaki nguya ya bato oyo elóngaki mokili na 1860, mpe nabanzi ete uta ntango wana, ezali na matomba mabe mpenza mpo na siansi.”

T. H. Janabi asalaki bolukiluki na ntina na makanisi oyo bato bandimaka liteya ya évolution babimisaki. Alobi ete: “Namonaki ete ezalela ya liteya yango ekeseni mpenza na oyo bandimisaki biso. Elembeteli ezali mpenza te mpe ekabwani mingi na boye ete ekoki te kotombola liteya oyo ya mindɔndɔ, lokola oyo etali ebandeli ya bomoi.”

Na yango, baoyo baboyaka liteya ya évolution basengeli te kotalelama bobele na lolenge mabe lokola “baíngá, bazoba to bilema.” Na kotalela makanisi oyo ezali kotɛmɛla liteya ya évolution, ata mondimi monene ya liteya ya évolution, George Gaylord Simpson, andimaki ete: “Ekozala libungá monene soki tobwaki makanisi oyo lokola ete mabongi na koyekolama te to kotyola yango.

Baoyo baboyaki liteya ya évolution bazalaki (mpe bazali) bayekoli oyo bazali na boyebi mingi mpe na mayele.”

Likambo litali kondima

Basusu bakanisaka ete kondimela liteya ya évolution ezwi moboko na yango likoló na makambo mpenza ya solo, nzokande kondimela bozalisi ezwi moboko na yango likoló ya kondima. Ezali solo ete moto moko te amoná Nzambe. (Yoane 1:18; kokanisá na 2 Bakolinti 5:7.) Nzokande, ata mpo na bongo, liteya ya évolution elóngi soko moko te, mpo ete yango mpe ezwi moboko na yango likoló na oyo moto moko amoná yango te to mpe esalemá bongo te.

Na ndakisa, bato ya zébi bamoná naino te mbongwana​—ata mbongwana ya malamu​—oyo ebimisaka lolenge ya bomoi ya sika; nzokande, bandimisami solo ete ezali na motindo wana nde lolenge mosusu ya biloko ekómaki na bomoi. Bamoná naino te lolenge nini bomoi ebimaka pwasa; nzokande bazali koloba na molende nyonso ete bomoi ebandaki na lolenge wana.

Kozanga wana ya bilembeteli etindi T. H. Janabi na kobénga liteya ya évolution ete ezali “‘kondima’ mpamba.” Physicien Fred Hoyle abéngi yango “Evanzile engebene Darwin.” Monganga Evan Shute alobeli yango lisusu na makasi, alobi ete: “Nabanzi ete baoyo bandimaka bozalisi-ndambo (créationisme) bazali na bandimbola malamu te ya kopesa oyo ebongi koleka bato oyo bamipesá na motema mobimba na liteya ya évolution.”

Bato mosusu ya mayele bandimi yango. Moyekoli na myoto, Robert Jastrow, andimi ete: “Na ntango nazali kotalela lolenge moto asalemá, kobima ya eloko ya bomoi, oyo ya kokamwa, longwa na biloko bisangisami kati na mai ya mɔ́tɔ ezali komonana lokola likamwisi, ezali mpe bobele bongo mpo na lisoló ya bozalisi oyo ezwami kati na Biblia.”

Na bongo, mpo na nini bato mingi bazali kino sikawa koboya likanisi oyo ete bomoi ezalisamaki?

[Elilingi na lokasa 3]

Maloba ya bato mosusu oyo mamonani lokola ete makoki kokweisama te, makoki kobangisa

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto