“Nasalami na motindo na kokamwa”
“NAUTAKI wapi?” Oyo ezali motuna bilenge mingi batunaka na bantango mosusu. Wana bana bazali kokóla, mbala mingi mituna na bango mikómaka mozindo mpenza: “Bomoi eutaki wapi?” Motuna wana elobelamaki esili koleka bankóto ya bambula, mpe bato mingi ya siansi bazali sikawa kotalela évolution ete ezali eyano oyo ebongi na motuna wana ya mindɔndɔ́ oyo etaleli ebandeli ya bomoi. Ya solo, ndimbola oyo évolution epesaka ezali ete bomoi ebimaki na pwasa.
Esili koleka soko mibu 3 000, Mokonzi Davidi akomaki ete: “Nasalami na motindo na kokamwa mingi.” (Njembo 139:14) Wana tozali koyekola makambo mingi na ntina na bomoi, tozali mpe komona mingi bosolo oyo ezali kati na maloba wana. Ya solo, Fred Hoyle, oyo azali physicien, akomaki ete: “Lokola bato na zébi ya bomoi bazali komona mbala na mbala makambo ya kokamwa na bomoi, ezali polele ete likoki ezali moke mpenza na kondima ete bomoi ebandaki yango moko, likanisi motindo wana esengeli mpenza kobwakama mosika. Bomoi ekokaki kobima yango moko te.”
Na yango ebandeli ya bomoi ezali nini? Masoló mibale ya ebandeli ya zulunalo oyo malobeli motuna oyo. Soki olingi koyeba makambo mingi mpo na yango, tindá nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, Zaïre, to na adresi ebongi na yo oyo ezali na lokasa 2.