Sepelá na mosala na yo ya bulɛɛ
MPO na kokokisa mokano oyo ezali ya ntina mingi, tosengeli komilɛngɛla na komipimela makambo mosusu. Mpo na kokóma monganga esɛngaka bambula mingi ya koyekola mpe ekateli makasi, mpe mosolo mingi. Mosáli malamu ya ngalasisi alekisaki bolenge na ye na komekisa nzoto na ye mokemoke na ngalasisi ya makasi mokolo na mokolo kozanga kolɛmba kino akokóma mosáni malamu. Mobɛti malamu ya pianó alekisaka mpe bambula mingi na komipesa na koyekola kobɛta.
Nzokande, ezali na mokano moko oyo epesaka matomba kitoko koleka mosika makambo nyonso oyo tokoki komipimela? Ezali libaku malamu ya kozala mosaleli ya Oyo-Aleki likoló, Yehova Nzambe. Atako milende nini tokoki kosala mpo na oyo etali ntango, mbongo, to nguya, libaku ya kosalela Mozalisi na biso mosala ya bulɛɛ ezali kopesa mbano oyo eleki monene mpenza. Maloba ya ntoma Paulo mazali solo: “Bijaleli na moto na Njambe ikopɛsaka litomba na njela yɔnsɔ, awa ejali yango na elaka na bomɔi mpɔ na sasaipi oyo mpe mpɔ na ntango ekoya.” (1 Timɔtɛ 4:8) Tiká tótala lolenge nini yango ezali solo.
Wana tobandi koyekola makambo matali Nzambe
Mingi kati na baoyo bazali koyamba na motema moko nsango malamu mpe babandi koyekola Biblia bamizelaka te na mbongwana oyo eyaka kosalema nsima kati na bomoi na bango. Ya liboso, moyekoli ya sika ya Biblia akoki kobungisa baninga mosusu oyo bakoki te kososola mpo na nini azali kotambola lisusu te elongo na bango na makambo oyo ayebi ete ekosepelisa Nzambe te. (1 Petelo 4:4) Basusu bakoki kokutana na botɛmɛli kati na libota mpe bakoki kotungisama na komona ete baoyo bango bazali kolinga bazali koboya, ata mpe koyina, Yehova. (Matai 10:36) Yango ekoki kozala ntembe monene oyo esengeli kolóngama.
Na mosala to na eteyelo, ekozala mpe na ntembe oyo ekosengela ete olónga yango. Moyekoli ya sika ya Biblia akoki na nsima kotika kosangana na bafeti ya mokili mpe na milulu mosusu. Akolinga lisusu te koyoka masoló ya mbindo ya baninga na ye ya mosala to ya kelasi, soko mpe kosala elongo na bango masɛki ya mbindo. Nzokande, akomeka kosalela toli oyo ezwami na Baɛfɛsɛ 5:3, 4: “Tika tɛ ete boloba nkombo na bikobo mpe makambo yɔnsɔ na mbindo mpe bilulela; ebɔngi bongo na Babulami. Tika tɛ ete bosɔtɔ bojala to maloba na joba to maloba na mpamba, kasi eleki malamu kopɛsaka matɔndi.”
Mbongwana motindo wana ekoki kosala ete moyekoli ya Biblia atalelama lokola moto mosusu. Yango ekoki kozala mokakatano, mingimingi mpo na elenge oyo azali naino na kelasi. Na ntina ya milulu ya kokumisa badati, ezala mpe mateya oyo mazali kotɛmɛla Nzambe, lokola évolution, mpe bopusi ya ntango nyonso ya kolanda makambo oyo bato banso basalaka yango, bilenge baklisto basengeli ntango nyonso kobunda makasi mpo na kobatela kondima. Kolanda banzela ya Nzambe ekesenisaka bango mpenza na basusu mpe ekoki kosala ete bátyolama na baninga na bango ya kelasi mpe na balakisi. Yango ezalaka mpasi mpo na kondima yango mingimingi na boumeli ya bambula ya bolenge na ntango oyo mayoki mazalaka makasi, kasi ezali ntembe oyo esengeli kolóngama mpo na kosepelisa Nzambe.
Ezali mpenza komipimela makambo mosusu?
Makambo mosusu oyo na ebandeli mamonanaki ete tomipimelaki yango, eyaka komonana ete ezali nde mapamboli. Basusu basengeli kotika komela makaya. (2 Bakolinti 7:1) Yango ekoki kozala etumba, kasi oyo nde lipamboli okozwa soki olóngi momeseno mabe wana! Ekoki mpe kolobama sé bongo na ntina na kolónga kolongwa na boombo ya bilangwiseli to ya masanga makasi. Kozanga mimeseno wana mabe, bomoi ezali mpenza kitoko! Basusu babongisaka makambo matali libala na bango. Baoyo bazalaki kofanda elongo kozanga kobalana, basengeli kobalana to kotika kofanda elongo. (Baebele 13:4) Baoyo bazali kofanda na basi mingi basengeli kotika sé mwasi ya bolenge na bango. (Masese 5:18) Mbongwana motindo wana ezali kosɛnga komipimela makambo mosusu, kasi ememaka kimya kati na ndako.
Kanisá mbano okozwa
Ya solo, moto nyonso oyo atosaka mibeko ya Yehova azwaka mpenza matomba. Mpo na mbala ya liboso kati na bomoi na ye, moyekoli ya Biblia abandi kobénga Mozalisi na ye na nkombo na Ye, Yehova. (Nzembo 83:18) Moyekoli akómi kolinga Yehova mpo ete azali koyekola makambo ya kokamwa oyo Ye asili kosala mpe oyo akosala mpo na bato. Kati na mikili epai kuna bobangi ya bakufi ezali mingi, akolongola bobangi wana ya biyambayamba, mpamba te ayebi ete bakufi balali, bazali kozela lisekwa. (Mosakoli 9:5, 10) Mpe oyo nde kobɔndisama na koyeba ete Yehova azali te konyokola bato mpo na libela kati na lifelo! Ee, solo ezali mpenza kosikola ye.—Yoane 8:32.
Lokola moyekoli azali koyokanisa mingi bomoi na ye na mitindá ya Yehova, azali kozwa lisosoli moko ya pɛto mpe limemya ya ye moko. Koyekola kozala na bomoi lokola moklisto ya solo ezali kosalisa ye na komibanzabanza malamu mpo na libota na ye, yango epesaka bosepeli mpe esengo. Na nsima, esengeli mpe koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Oyo nde likambo kitoko! Awa okokuta bato oyo bazali mpenza komonisa bolingo ya mɔ́tɔ oyo Biblia elobi ete esengeli mpenza komonisa basaleli ya Yehova. (Nzembo 133:1; Yoane 13:35) Maloba na bango mazali ya pɛto mpe ya kolendisa mpo ete bazali koyebisa “makambo kitoko ya Nzambe.” (Misala 2:11, NW) Ee, kosangana elongo na “libota mobimba ya bandeko” ezali kopesa bolamu. (1 Petelo 2:17, NW) Boninga wana ya kitoko ekosalisa moyekoli ya Biblia na “kolata bomoto ya sika oyo ezalisami na boyokani na mokano ya Nzambe kati na boyengebene mpe na bosembo ya solo.”—Baefese 4:24, NW.
Litambe ya komipesa
Wana moto azali kokóla kati na boyebi, azali kopusama na bolingo oyo azali na yango mpo na Yehova na kopesa bomoi na ye epai na ye mpe komonisa komipesa yango na batisimo ya mai. (Matai 28:19, 20) Toli ya Yesu ezali ete liboso ya kosala litambe wana, bayekoli na ye basengeli kotánga motuya. (Luka 14:28) Omikundola ete, moklisto oyo amipesi atyaka liboso mokano ya Yehova mpe abwakaka misala ya nzoto. Azali kosala makasi mpo na kotika “misala ya nzoto” mpe kolóna “mbuma ya elimo.” (Bagalatia 5:19-24, NW) Toli oyo ezali na Baloma 12:2 sikawa ezali na ntina monene kati na bomoi na ye: “Bobilaka makambo na ntango oyo tɛ kasi bobongwana mpɔ na kojua makanisi na sika kino bokokoka kosɔsɔla mokano na Njambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebɔngi kwa.” Na yango, moklisto oyo amipesi azali kotambwisa bomoi na ye na boyokani na mokano ya sika oyo ye amityeli.
Atako bongo, tótalela oyo azwaka. Ya liboso, azali sikawa na boyokani elongo na Mozalisi ya mɔlɔ́ngɔ́. Atángami moyengebene mpo na kozala moninga ya Nzambe! (Yakobo 2:23) Na ndimbola mpenza ya mozindo, azali koloba na Nzambe ete azali “Tata na biso ya likoló.” (Matai 6:9) Lipamboli mosusu mpo na ye oyo auti komipesa sika ezali ya koyeba ete bomoi ezali mpenza na mokano, mpe ete azali koyokanisa bomoi na ye na mokano yango. (Mosakoli 12:13) Kolandáká litambwisi ya Yesu, akomonisa ete Zábolo azali mobuki ya lokuta na kotikaláká sembo. Oyo nde esengo yango epesaka na motema ya Yehova!—Masese 27:11.
Ya solo, lokola moklisto azali koyika mpiko kati na nzela ya boyengebene, ezali na makambo mingi oyo asengeli komipimela yango. Esɛngi ntango mpo na komipesa mpenza na boyekoli ya Liloba ya Nzambe biso moko mpe kati na lisangá. (Nzembo 1:1-3; Baebele 10:25) Ntango mpo na mosala ya kosakola esengeli kosombama katikati ya misala misusu. (Baefese 5:16) Ntango mpe milende esɛngami lisusu mpo na koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova mpe mpo na kokende na mayangani na bango mpe na bokutani na bango. Ekoki kosɛnga komipimela mpo na kosunga Bandako ya Bokonzi na mosolo mpe mosala ya kosakola kati na mokili mobimba. Nzokande, lokola bamilió ya baklisto bakoki kondima yango, kosangana na makambo wana na motema moko, epesaka esengo. Yesu alobaki ete: “Esɛngɔ na kopɛsa eleki esɛngɔ na kojua.”—Misala 20:35.
Mbano oyo ezali kozwama na kosunga mosala ya Yehova eleki mosika milende oyo emonisamaka mpo na yango. Wana ezali biso kokɔmela, mosala na biso ezali kobota mbuma mingi mpe ezali kopesa esengo. Ya solo, ezali na eloko moko te oyo ekoki kopesa bosepeli mingi koleka koteya moto moko solo ya Biblia mpe komona ye kosambela Yehova. Mpe soki mosambeli ya sika azali mosangani ya libota, mbala mosusu mwana oyo abɔkwami “kati na disipilini mpe na mateya ya Yehova,” yango epesaka esengo monene. (Baefese 6:4, NW) Tozali komona mapamboli mingi ya Nzambe likoló na milende na biso mpo ete tozali “basalani elɔngɔ” na ye.—1 Bakɔlinti 3:9.
Mbano mosusu mpo na mosala ya sembo
Ya solo, tokozala na mikakatano ntango nyonso ebongiseli oyo ya biloko ekoumela. Na ntembe te, mikakatano mikokóma makasi koleka mpo ete ntango oyo etikali na Zábolo eyei mokuse. Tokoki kokutana na minyoko to koyika mpiko na masɛnginya. Kasi koyeba ete Nzambe azali elongo na biso, ezali kolendisa biso mpe ezali kopesa biso makasi mpo na koyika mpiko. (1 Bakolinti 10:13; 2 Timoté 3:12) Baninga baklisto mosusu bayikaki mpiko bambula mingi na mikakatano makasi, kasi balendendelaki mpamba te bazalaki na bolingo mpo na Nzambe. Baoyo bazali kolónga koyika mpiko liboso ya mimekamo ndenge na ndenge bazali na mayoki motindo moko na oyo ezalaki na bantoma wana babɛtaki bango mfimbo mpe na nsima batikaki bango. Misala 5:41 eyebisi ete: “Na bongo babimi na [Sanedrina, NW] kosepelaka ete batangami babɔngi na kojua nsɔni mpɔ na nkombo na ye.”
Mbano oyo ezali kozwama mpo na koyika mpiko eleki mosika milende oyo tozali kosala ata sikawa. Kasi omikundola ete, ezaleli ya kobanga Nzambe “ezali na elaka” bobele te mpo na “bomoi ya sikawa” kasi lisusu mpo na “oyo ezali koya.” (1 Timoté 4:8) Oyo nde bilikya kitoko mpo na moto oyo azali koyika mpiko! Soki ozali sembo, okobikisama na bolózi monene oyo ekotya nsuka na ebongiseli oyo ya biloko. To soki okufi liboso ya eleko wana monene, okosekwisama na mokili ya sika oyo ekoya nsima. (Danyele 12:1; Yoane 11:23-25) Kanisá mayoki ya esengo okozala na yango wana okozala na likoki ya koloba ete: “Na lisalisi ya Yehova, natikalaki sembo mpe nazwi mbano!” Oyo nde esengo na kosangola mabelé yango, oyo “ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbɔngɛ ikojipaka mai-na-monana.”—Yisaya 11:9.
Ee, kosalela Nzambe esɛngaka milende. Kasi soki tokokanisi yango na mbano, milende yango mizali mpenza moke. (Bafilipi 3:7, 8) Na kotalela nyonso oyo Nzambe azali kosala mpo na basaleli na ye sikawa mpe oyo akosala na mikolo mizali koya, maloba oyo ya mokomi na Nzembo mazali kokóma mpenza ya biso: “Nakojongisa nini epai na [Yehova] na ntina na mapamboli na ye epai na ngai?”—Njembo 116:12.