Nazalaki ngai moko kasi natikamaki te
LISOLÓ YA ADA LEWIS
Nazalaka ntango nyonso na momeseno ya kofanda ngai moko. Lisusu, nazongaka nsima te na bikateli na ngai—na bantango mosusu bato balobaka ete nazalaka na makambo makasi—kati na nyonso oyo nasalaka. Ezalaka na ngai mpe mpasi te mpo na koloba kozanga komipekisa, mpe ezaleli yango ememeli ngai mikakatano mingi na boumeli ya bambula.
NZOKANDE, nazali na botɔ́ndi mpo ete Yehova Nzambe abwakaki ngai te mpo na bolɛmbu ya bomoto na ngai. Na lisalisi ya boyekoli ya Liloba na ye, nakokaki kobongola bomoto na ngai mpe na yango, nasaleli matomba ya Bokonzi na ye na boumeli ya mibu 60. Uta bomwana, nazalaki kolinga bampunda mingi, mpe lisungi ya Nzambe mpo na oyo etali komipekisa na ezaleli na ngai ya motó makasi ezalaki mbala mingi kokundola ngai lolenge ebende oyo batyaka na monɔkɔ na mpunda ekoki kosalelama mpo na kotambolisa mpunda.
Nabotamaki na 1908, pene na etimá moko ya bulé na Mont Gambier na Australie ya Súdi. Baboti na ngai bazalaki na ebokwelo ya bibwele ya kobimisa miliki, mpe nazalaki mwana ya liboso ya mwasi kati na bana mwambe. Tata na biso akufaki wana tozalaki naino bilenge mpenza. Yango esalaki ete natikala na mikumba mingi ya kotambwisa misala ya ebokwelo, mpamba te bayaya na ngai mibale ya mibali basengelaki kokende kosala mosika na ndako na biso mpo na kozwa mosolo mpo na libota. Bomoi kati na ebokwelo ezalaki mpasi, mosala makasi.
Bokutani ya liboso na solo ya Biblia
Libota na biso lizalaki kokende na Lingomba ya Présbyterien, mpe tozalaki basangani ya molende. Nakómaki molakisi na Eteyelo ya lomingo mpe namipesaki mingi na mokumba wana ya koteya bana na bokɛngi nyonso makambo oyo nakanisaki ete ezalaki sembo na elimo mpe na kotalela bizaleli malamu.
Na 1931, nkɔ́kɔ na ngai ya mobali akufaki, mpe kati na biloko na ye azalaki na babúku mingi oyo ekomamaki na prezidá ya la Société Watch Tower, J. F. Rutherford. Nabandaki kotánga babúku La Harpe de Dieu mpe Création, wana nazalaki kotánga mingi, kokamwa na ngai mpe ezalaki sé kokóla na koyebáká ete makambo mingi oyo nazalaki kondima mpe oyo nazalaki koteya epai ya bana mike ezwaki moboko na yango na Biblia te.
Nabulunganisamaki na koyekola ete molimo ya moto ekufaka, ete bato mingi bakokende na likoló te na ntango bakokufa, mpe ete minyoko ya seko mpo na bato mabe na lifelo ezali te. Natungisamaki mpe na koyeba ete kotosa sabata ya lomingo pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ezali lisɛngami ya boklisto te. Na yango, nasengelaki kokamata ekateli moko ya ntina mingi: kokangama na mateya ya kala ya boklisto ya nkombo mpamba to kobanda koteya solo ya Biblia. Naumelaki te mpo ete nakoka kozwa ekateli ya kotika bosangani nyonso elongo na Lingomba ya Présbyterien.
Nakómi mpenza ngai moko
Libota na ngai, baninga na ngai mpe baoyo nazalaki na bango kala na lingomba wana basepelaki te na ntango nayebisaki mposa na ngai ya kotika lingomba mpe ya kotika koteya na Eteyelo ya lomingo. Mpe na ntango bayaki koyeba ete nazalaki kosangana na bato ya ye oyo abéngamaki Juge Rutherford, yango ebakisaki lisusu bilobaloba. Solo mpenza, babénganaki ngai te, kasi mingi kati na libota na ngai mpe baninga na ngai ya kala bazalaki na esengo te mpo na ngai, mpo na koloba mingi te.
Wana nazalaki koyekola mingi mpe koluka mikapo mityami kati na babúku oyo nazalaki kotánga, mposa mpe ya kosakola liboso na bato banso ezalaki sé kokóla. Nayekolaki ete, lokola moko kati na misala na bango ezali bongo kosakola liboso na bato banso, Batatoli ya Yehova bazalaki kokende ndako na ndako. Kasi na eleko wana ezalaki ata na Motatoli moko te na etúká na biso. Na yango, moto moko te alendisaki ngai to alakisaki ngai lolenge ya koteya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Namiyokaki mpenza ete nazalaki ngai moko.
Nzokande, etindá ya Biblia ya koteya basusu ezalaki ntango nyonso na makanisi na ngai, mpe nazwaki ekateli ete nasengeli kobanda kosakola na lolenge moko to mosusu. Nsima ya kobondela mingi, nazwaki ekateli ya kokende na bandako ya baninga ya zingazinga bobele mpo na koyebisa bango makambo oyo nayekolaki kati na boyekoli na ngai ya Biblia mpe komeka kolakisa bango makambo yango kati na Biblia na bango moko. Ndako na ngai ya liboso oyo nakendeki ezalaki oyo ya mokambi na ngai ya kala na Eteyelo ya lomingo. Kozanga bosepeli na ye mpe maloba mabe oyo abimisaki mpo na kolongwa na ngai na lingomba elɛmbisaki ngai. Kasi nayokaki esengo monene wana natikaki ndako na ye mpe nakóbaki kotala bato na bandako mosusu.
Botɛmɛli ezalaki mpenza makasi te, kasi nakamwaki na komona kozanga bosepeli epai na baninga ya kala ya lingomba wana nazalaki kokende kotala bango. Na kokamwa mpe na mawa nyonso, nazwaki botɛmɛli boleki makasi uta na yaya na ngai ya mobali, yango ekundwelaki ngai maloba ya Yesu: “Bokokabama na baboti, na bandeko, na biboto, na baninga, . . . Bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.”—Luka 21:16, 17.
Lokola nazalaki kotambwisa mpunda malamu na ntango nazalaki naino elenge mpenza, na yango nazwaki ekateli ete lolenge ya kokóma nokinoki na bandako ya bato ezalaki bongo kokende na mpunda. Yango epesaki ngai nzela ya kokende bisika ya mosika koleka, pembeni na bamboka mikemike oyo ezalaki zingazinga na etúká na biso. Nzokande, mokolo moko na nsima ya nzánga mpunda na ngai ebetaki libaku mpe ekweaki na nzela mpo ya moselu, mpe nazwaki mpasi mpo na kobukana ya mikúwa ya motó. Na boumeli ya ntango moko, nazalaki kobanga ete nakokaki kobika te. Na nsima ya kokwea wana, soki nzela ezali na mai to moselu, nazalaki kosala mobembo na mpunda mpe ekangisami na sulky na esika ya kotambola bobele na mpunda ya mpamba.a
Bokutani na lisangá
Mwa moke nsima ya akisidá na ngai, etuluku moko ya basakoli ya ntango nyonso, oyo babéngami lelo oyo babongisi-nzela, bayaki kotala etúká ya Mont Gambier. Na yango, mpo na mbala ya liboso nakokaki kosolola mpenza elongo na baninga na ngai bandimi. Liboso ya kozonga, balendisaki ngai ete nátinda nkomá na biro ya filiale ya la Société Watch Tower mpo na kosɛnga ete bayebisa ngai lolenge ya kosangana kati na mosala ya kosakola na lolenge oyo ebongisami malamu koleka.
Nsima ya kotinda nkomá na la Société, nazwaki babúku, mwa babúku, mpe kálati ya litatoli mpo na kosalela yango mpo na kobanda masoló na bandako ya bato. Namiyokaki mwa pene na bandeko na ngai ya elimo mibali mpe basi mpamba te nazalaki kozwa nkomá oyo ezalaki kouta na biro ya filiale. Kasi ntango babongisi-nzela balongwaki mpe bakendeki na engumba mosusu, namiyokaki lisusu ngai moko mpenza koleka liboso.
Mpo na kosakola na ngai na zingazinga mokolo na mokolo—mingimingi na mpunda mpe sulky—nayebanaki mingi kati na etúká. Bobele na ntango yango, nakokaki kosala misala na ngai na ebokwelo. Na eleko wana libota na ngai basilaki kotika momeseno wana mpe basalaki molende te mpo na kopekisa yango. Na boumeli ya mibu minei nasalaki na lolenge yango lokola mosakoli ya nsango malamu oyo azali ye moko mpe azwi naino batisimo te.
Liyangani mpe, na nsuka, batisimo
Na Apríli ya mobu 1938, ndeko Rutherford ayaki na Australie. Botɛmɛli makasi ya bakonzi ya mangomba esalaki ete kontrá na biso mpo na kosalela ndako monene ya engumba esalema te. Nzokande, na nsuka mpenza, tozwaki ndingisa ya kosalela libandá ya masano. Ya solo, kopusama ya kobongola bibongiseli ezalaki na matomba, mpamba te bankóto mingi ya bato bakokaki koyanganisama na esika monene ya libandá ya masano. Bato soko 12 000 bayaki, emonanaki ete likebi ya bato mingi elamwisamaki mpo na botɛmɛli oyo bakonzi ya mangomba babimisaki mpo na likita na biso.
Na boyokani na boyei ya ndeko Rutherford, liyangani moko ya mikolo mingi esalemaki na kartyé moko pene na engumba Sydney. Ezalaki kuna nde, na nsuka, namonisaki elembo ya komipesa na ngai epai na Yehova na nzela ya batisimo ya mai. Okoki kokanisa esengo oyo nazalaki na yango na nsuka mpo na kosangana elongo na ebele ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bautaki bipai binso na mokili monene ya Australie mobimba?
Bozongi na Mont Gambier
Na nsima ya bozongi epai na ngai nayokaki mpasi makasi mpo na kozala ngai moko, nzokande nazwaki lisusu ekateli makasi koleka liboso mpo na kosala oyo nakokaki kosala kati na mosala ya Bokonzi. Nokinoki, nayaki koyebana na libota ya Agnew—Hugh, mwasi na ye, mpe bana na bango minei. Bazalaki kofanda na engumba Millicent, bakilomɛtɛlɛ 50 kolongwa na Mont Gambier, mpe nazalaki kosala mobembo ya bakilomɛtɛlɛ 50 na kokende mpe kozonga na mpunda mpe sulky mpo na kosala boyekoli ya Biblia mbala na mbala elongo na bango. Na ntango bayambaki solo, namiyokaki lisusu ngai moko te.
Nokinoki, tosalaki etuluku moko mpo na mosala ya kosakola oyo ebongisami malamu. Na nsima, na esengo nyonso, mama na ngai abandaki komonisa bosepeli mpe asanganaki elongo na ngai na mobembo ya bakilomɛtɛlɛ 100 mpo na koyekola elongo na etuluku oyo eutaki kosalema sika. Kobanda na ntango wana, mama azalaki ntango nyonso kolendisa mpe kosunga, atako ezalaki bobele mwa bambula na nsima nde azwaki batisimo. Sikawa nazalaki lisusu ngai moko te!
Etuluku na biso ya moke ebimisaki babongisi-nzela minei, bana basi misato ya Agnew—Crystal, Estelle, mpe Betty—mpe ngai. Na nsima, na ebandeli ya mibu 1950, bilenge nyonso misato wana ya basi bakɔtaki na Galadi, eteyelo ya Biblia ya la Société Watch Tower. Batindamaki bamisionɛrɛ na Inde mpe na Sri Lanka, epai kuna bazali kosala na bosembo nyonso kino lelo oyo.
Na Yanuáli 1941, mosala ya Batatoli ya Yehova mopekisamaki na Australie, na yango tozwaki meko nokinoki. Biloko nyonso oyo tozalaki kosalela kati na mosala ya kosakola—mikanda, fɔnɔ́ ya komema na mabɔkɔ, badisike ya masukúlu, mpe bongo na bongo—totyaki yango kati na sanduku moko ya manzanza. Na nsima, totyaki sanduku yango kati na ndako moko ya moke mpe tokɔtisaki ebele ya matiti makauki mpo na kokunda yango.
Atako epekiseli, tokóbaki mosala na biso ya kosakola ndako na ndako, kasi na bokɛngi nyonso, kosaleláká bobele Biblia wana tozalaki kosolola na balobani na biso. Nazalaki kobomba bazulunalo mpe mwa babúku na nsé ya efandelo ya mpunda na ngai mpe nazalaki kobimisa yango bobele soki moto amonisi mpenza bosepeli ya solosolo kati na nsango ya Bokonzi. Na nsuka, na Yúni 1943, epekiseli elongolamaki, mpe tokokaki lisusu kokabola babúku kozanga kokakatana.
Mikumba ya sika
Na 1943, nakómaki kati na mosala ya mobongisi-nzela, mpe na mbula oyo elandaki nalongwaki na Mont Gambier mpo na kokende na teritware mosusu. Ya liboso, nabyangisamaki ete nakende kosala mpo na mwa ntango moke na biro ya filiale ya la Société na Strathfield. Na nsima na yango, nazwaki lisusu mikumba na bingumba mike na Súdi ya Nouvelle-Galles du sud mpe ya Victoria ya wɛ́sti. Nzokande, moko na mikumba na ngai ya elimo oyo epesaki ngai matomba mingi koleka ezalaki bongo kati na lisangá moko monene na engumba Melbourne. Lokola nautaki na engumba moko moke, nayekolaki makambo mingi na kosaláká kuna.
Na teritware na ngai kati na etúká ya Gippsland na Victoria, ngai mpe moninga na ngai ya mosala, Helen Crawford, totambwisaki boyekoli mingi na Biblia mpe, nokinoki, lisangá moko lisalemaki. Etúká yango ezalaki na etando ya mabelé monene, mpe mpo na botamboli tozalaki na motuka moko ya kala, ya kimbambala. Na bantango mosusu tozalaki kokumba yango, kasi mbala mingi tozalaki kotindika yango. Nazalaki na mposa makasi ya mpunda! Na bantango mosusu, nazalaki koloba solo ete: “Nakopesa eloko nyonso (longola bobele Bokonzi) oyo nakoki kopesa mpo na kozwa mpunda moko!” Na bingumba mingi ya etúká yango lelo oyo ezali na masangá ya makasi mpe bandako ya Bokonzi ya kitoko.
Na 1969, natindamaki na Canberra, mboka mokonzi ya Australie. Yango ezalaki esika ya mpasi mpe ya makambo ndenge na ndenge oyo kati na yango tosengelaki kosakola, mpamba te tozalaki mbala mingi kokutana na basáli na babiro ya ba ambassades ya mikili mosusu. Kino sikawa nazali kosala awa, kasi na bambula oyo napesaki ntango mingi ya mosala na ngai ya kosakola na esika bakompanyi minene ya engumba ezali.
Na 1973, nazwaki libaku malamu ya koyangana na mayangani minene na Etats-Unis. Likambo mosusu ya kosepelisa kati na bomoi na ngai ezali oyo ete nazalaki motindami na liyangani esalemaki na 1979 mpe natambolaki na Israël mpe Jordanie. Kotala bisika mpenza oyo elobelamaki kati na Biblia mpe komanyola likoló na makambo oyo masalemaki kuna ezalaki mpenza likambo ya kosepelisa. Nazalaki na likoki ya komona ndenge nini kotepa likoló na Mer Morte ezalaka, na mai na yango oyo etondi na mungwa, mpe na boumeli ya mobembo na biso na Petra na Jordanie, nazwaki lisusu likoki ya kotambwisa mpunda. Yango ekundwelaki ngai bambula ya ebandeli na ntango bampunda esalisaki ngai mpo na kokóma na bisika bitangolami mpe na bamboka mikemike mpo na komema nsango ya Bokonzi.
Nakóbi mosala ya ntango nyonso
Mposa na ngai ya kokóba kati na mosala ya ntango nyonso ezali naino makasi mpo na bibongiseli ya ntina mingi lokola Eteyelo ya babongisi-nzela mpe likita ya babongisi-nzela oyo esalemaka na boyokani na mayangani ya zongazonga, mpe malendisi ya ntango nyonso oyo nazwaka epai na bakɛngɛli-batamboli. Nakoki solo koloba ete, na boboto nyonso, Yehova asalaki na boye ete ntango ya kozala ngai moko ekóma likambo ya kala.
Nazali sikawa na mibu 87, nsima ya bambula 60 ya kosalela Yehova, nazali na liloba ya kolendisa mpo na basusu oyo bakoki mpe kozala bato ya kozanga komipekisa na maloba mpe bazwaka bikateli bango moko ete: Botosaka ntango nyonso litambwisi ya Yehova. Tiká ete Yehova asalisa biso ete tomipekisaka na maloba na biso, mpe tiká ete akundwelaka biso ntango nyonso ete atako tokoki mbala mingi komioka ete tozali biso moko, akotika biso te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Sulky ezali pusupúsu ya pɛ́pɛ́lɛ́ oyo ezalaka na bapinɛ́ mibale.