Mituna ya Batángi
Lokola lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso bazalaki bango banso Bayuda, Nzambe azalaki na koponapona awa ye aponaki mibali bauti na mposo moko mpe na ekólo moko?
Te, azalaki na koponapona te. Baoyo Yesu abéngaki liboso mpo ete bázala bayekoli na ye, bazalaki bango nyonso Bayuda. Na nsima, na Pantekote ya mobu 33 T.B., Bayuda mpe bato oyo babongwani na losambo ya Bayuda oyo bakatamaki ngɛnga bazalaki bato ya liboso ya kopakolama na elimo mpe ya kokɔta na molɔngɔ́ ya baoyo basengelaki koyangela elongo na Yesu na likoló. Bobɛlɛ na nsima nde Basamalia mpe Bapakano bazangi kokatama ngɛnga bayaki kobakisama. Na yango, ezali mpasi te na kosimba ntina mpo na nini lisangani ya mikóló-bakambi na ntango wana esalemaki bobɛlɛ na Bayuda, baoyo bazalaki “bantoma mpe [bankulutu, NW] na Yelusaleme,” lokola elobelami kati na Misala 15:2. Bango bazalaki na boyebi mingi ya Makomami mpe baumelaki mingi kati na losambo ya solo, mpe bazwaki ntango mingi mpo na kokóma bankulutu baklisto oyo bakɔmɛli.—Kokanisá na Baloma 3:1, 2.
Na ntango likita ya lisangani ya mikóló-bakambi oyo liyebisami kati na Misala mokapo 15, liyanganisamaki, Bapakano mingi basilaki kokóma baklisto. Ezalaki na bato ya Afrika, ya Mpótó mpe ya bitúká bisusu. Nzokande, likambo moko te limonisi ete na ntango wana, Bapakano babakisamaki kati na lisangani ya mikóló-bakambi mpo na kosala ete boklisto esepelisa baoyo bazalaki Bayuda te. Bapakano wana oyo bakómaki baklisto sika bazalaki basangani lokola basangani nyonso mosusu kati na “Yisraele ya Nzambe,” nzokande, bazalaki komemya baklisto oyo bazalaki Bayuda mpo na kokɔmɛla na bango mpe komesana na makambo mingi, na ndakisa bantoma, baoyo bazalaki kati na lisangani ya mikóló-bakambi na ntango wana. (Bagalatia 6:16) Talá kati na Misala 1:21, 22 lolenge nini limemya mozindo epesamaki na komesana ya makambo motindo yango.—Baebele 2:3; 2 Petelo 1:18; 1 Yoane 1:1-3.
Na boumeli ya bikeke mingi, Nzambe ayokanaki bobɛlɛ na libota ya Yisraele, oyo kati na yango Yesu aponaki bantoma na ye. Ezalaki libúngá te, soko mpe bokesene te mpo ete ata ntoma moko te autaki na mikili oyo ebéngami lelo Amerika ya Súdi, Afrika, to Extrême-Orient. Na mikolo ya nsima, bato ya mikili wana bakozwa mabaku kitoko, oyo eleki libaku ya kozala ntoma awa na mabelé, to kozala moko kati na lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso, to soko mokumba nini kati na basaleli ya Nzambe lelo.—Bagalatia 3:27-29.
Ntoma moko apusamaki na koloba ete “Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyɛngɛbɛnɛ ayambami na ye.” (Misala 10:34, 35) Ya solo, bolamu ya lisiko ya Yesu ezali mpo na moto nyonso kozanga koponapona. Mpe bato ya bitúlúká nyonso, mpe minoko nyonso mpe mabota nyonso, mpe bikólo nyonso bakokɔta kati na Bokonzi ya likoló mpe kati na ebele monene oyo bakofanda libela na mabelé.
Bato mingi bazali kokóma na maoki makasi na ntina na bokabwani ya mposo, ya nkótá to ya mimeseno ya ekólo epai bautaki. Yango emonisami na likambo oyo tozali kotánga kati na Misala 6:1 etali koimaima oyo ebimaki kati na baklisto oyo bazalaki koloba lokótá ya Greke mpe baoyo bazalaki koloba lokótá ya Liebele. Ekoki kozala ete tokólaki na mayoki makasi na makambo matali mposo, nkótá, to ekólo na biso; to tozwi mayoki yango na nsima. Soki ezali bongo, ekozala malamu ete tósala milende makasi mpo na koyokanisa mayoki na biso mpe lolenge na biso ya kosala engebene makanisi ya Nzambe, oyo ete liboso na ye bato banso bakokani, ata soki lolenge oyo tozali komonana na libándá ezali motindo nini. Ntango Nzambe atindaki ete masɛngami mpo na bankulutu mpe basaleli ya misala makomama, alobelaki mposo te to ekólo epai bauti. Te, atalelaki mingi masɛngami ya elimo mpo na baoyo bakoki kosala misala wana. Yango ezali bongo lelo mpo na bankulutu kati na masangá, mpo na bakɛngɛli-batamboli, mpe mpo na basáli kati na ba filiales, motindo moko lokola ezalaki mpe mpo na lisangani ya mikóló-bakambi na ekeke ya liboso.