Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/7 lok. 32
  • “Eleki bandelo ya makanisi malamu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Eleki bandelo ya makanisi malamu”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/7 lok. 32

“Eleki bandelo ya makanisi malamu”

“LOKOLA etumba ebandaka kati na makanisi ya bato, ezali kati na makanisi ya bato nde tosengeli kotonga bitutú ya kimya.” (Esakola ya Lisangá ya O.N.U. mpo na koteya, siansi mpe ntɔ́ki) Wana ezalaki bango kokanisa maloba oyo, na 1993 banganga-mayele koleka 500 oyo bayanganaki na likita monene ya O.N.U. na ntina etali kotya ndelo ya bibundeli batalelaki mokumba ya lingomba mpo na oyo etali kotonga bitutú motindo yango.

Jonathan Granoff, oyo azalaki momonisi ya Lawyers’ Alliance for World Security, akambaki likita yango. Ye alobaki ete: “Bonene ya matáta oyo mazali sikawa kati na bato ya mangomba mpe ya bikólo bikeseni eleki bandelo ya etamboli ya bato oyo bazali sivilizé, mbala mosusu eleki ata bandelo ya makanisi malamu.” Maloba ya John Kenneth Galbraith matángamaki na motindo mobongi mpenza na boumeli ya likita monene yango ete: “Motuya ya bato oyo babomamaki na nkombo ya lingomba eleki motuya ya bato nyonso oyo babomamaki na bitumba mpe na makámá ya biloko bizalisami.”

Dr. Seshagiri Rao alobaki ete: “Mokumba ya minganga mozali ya kobikisa kasi te ya kopalanganisa makɔnɔ. Mikumba ya mangomba mizali te ya kopalanganisa koyinana mpe matáta mpo na kowelana moko na mosusu. Mangomba masengeli kozala nguya ya kozongisa boyokani. Nzokande, na lolenge yango esalemaka mangomba masili kosala mpe mazali naino kosala lokola nguya ya kotya bokabwani.”

Esili koleka mwa bambula, zulunalo Catholic Herald ya Londres epesaki likanisi ete kimya ekokaki kotyama “soki mangomba nyonso ya mikolo na biso makokaki kokweisa etumba.” Nzokande, zulunalo yango ebakisaki ete: “Toyebi ete yango ekosalema soko moke te.” Mokolo mosusu mamɛlɔ moko mokatolike alobaki ete: “Mokili molingaki kozala mpenza lolenge mosusu soki na ntɔ́ngɔ́ moko boye biso banso tolamuki na ekateli makasi ya kosimba lisusu mandoki te, . . . lokola ekosalaka Batatoli ya Yehova!”

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Tom Haley/Sipa Press

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto