Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/10 nk. 8-13
  • Nzambe azali na esika ya liboso kati na libota na bino?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali na esika ya liboso kati na libota na bino?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Botɛmɛli ya libota ezali motambo
  • Lolenge ya kolónga botɛmɛli
  • Litomba monene oyo tokoki kozwa
  • Tózwa liteya kati na ndakisa ya Yesu
  • Mibali, basi​—Bómekola Klisto!
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mibali​—Bómekola bokonzi ya Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Batoli ya bwanya mpo na babalani
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Basi​—Bópesa mibali na bino limemya makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/10 nk. 8-13

Nzambe azali na esika ya liboso kati na libota na bino?

“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba.”​—MALAKO 12:29, 30, NW.

1. Mpo na nini ezali na ntina ete tólinga Yehova?

“MOBEKO nini ezali liboso ya mibeko nyonso?” ezali motuna oyo nde mokomeli moko atunaki Yesu. Na esika ete abimisa likanisi na ye moko, Yesu ayanolaki na motuna na ye na kotángáká eteni oyo ezwami kati na Liloba ya Nzambe na Deteronome 6:4, 5. Ayanolaki ete: “Ya liboso yango oyo, ‘Yoká, E Yisalaele, Yehova Nzambe na biso azali Yehova moko, mpe osengeli kolinga Yehova na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na elimo na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba.’”​—Malako 12:28-30, NW.

2. (a) Botɛmɛli nini Yesu akutanaki na yango? (b) Nini ekoki kosala ete na bantango mosusu kotosa Yehova ekóma likambo ya mpasi?

2 Mpo na kotosa oyo Yesu abéngaki ete mobeko ya liboso​—oyo ya ntina mingi koleka nyonso​—ezali kosɛnga ete tósalaka ntango nyonso oyo ezali kosepelisa Yehova. Yesu asalaki bongo, atako na libaku moko ntoma Petelo atɛlɛmɛlaki mokano ya Yesu, mpe na libaku mosusu bandeko na ye ya mosuni mpe batɛlɛmɛlaki mokano na ye. (Matai 16:21-23; Malako 3:21; Yoane 8:29) Okosala nini soki okómi kati na ezalela motindo wana? Na ndakisa, basangani ya libota na yo balingi ete otika boyekoli na yo ya Biblia mpe otika koyangana elongo na Batatoli ya Yehova. Okotya Nzambe na esika ya liboso na kosaláká oyo ezali kosepelisa ye? Okotya Nzambe na esika ya liboso, ata ntango basangani ya libota bakoki kotɛmɛla milende na yo ya kosalela ye?

Botɛmɛli ya libota ezali motambo

3. (a) Mateya ya Yesu makoki kobimisa mbuma nini kati na mabota? (b) Lolenge nini basangani ya libota bakoki komonisa soki epai na nani bazali na bolingo monene koleka?

3 Yesu atalelaki te lokola likambo moke monyoko oyo mokoki kobima na ntango basangani mosusu ya libota bazali kotɛmɛla mosangani oyo andimi mateya na ye. Yesu alobaki ete: “Bayini na moto bakozala bato na ndako na ye moko.” Nzokande, atako likambo oyo ya mawa ekoki kobima, Yesu amonisaki nani oyo asengeli kozala na esika ya liboso, kolobáká ete: “Ye oyo alingi tata to mama koleka ngai abongi na ngai te; mpe ye oyo alingi mwana mobali to mwana mwasi koleka ngai abongi na ngai te.” (Matai 10:34-37) Totyaka Yehova na esika ya liboso na kolandáká mateya ya Mwana na ye, Yesu Klisto, ye oyo azali “elilingi na motindo na [Nzambe].”​—Baebele 1:3; Yoane 14:9.

4. (a) Yesu alobaki ete ezali kosɛnga nini mpo na kozala moyekoli na ye? (b) Na ndimbola nini baklisto basengeli koyina basangani ya libota na bango?

4 Na libaku mosusu, wana Yesu azalaki kosolola na ntina na likambo oyo moto asengeli mpenza kosala mpo na kozala moyekoli na ye ya solo, alobaki ete: “Soko moto moko ayei epai na ngai mpe ayini tata na ye te, na mama na ye te, na mwasi na ye te, na bana na ye te, na bandeko na ye babali te, na bandeko na ye basi te, mpe bomoi na ye mpenza te, akoki kozala moyekoli na ngai te.” (Luka 14:26) Ya solo, Yesu alingaki koloba te ete bayekoli na ye basengelaki mpenzampenza koyina basangani ya mabota na bango, mpamba te apesaki bato mobeko ete bálinga ata banguna na bango. (Matai 5:44) Nzokande, awa Yesu alingaki koloba ete bayekoli na ye basengelaki kolinga basangani ya mabota na bango mingi te koleka bolingo oyo basengeli kozala na yango mpo na Nzambe. (Kokanisá na Matai 6:24.) Na boyokani na likanisi yango, Biblia elobi ete Yakobo “[ayinaki, NW]” Lea mpe alingaki Rachel, yango elimboli ete azalaki na bolingo motindo moko te epai na Lea lokola azalaki na yango epai na ndeko na ye ya mwasi, Rachel. (Genese 29:30-32) Ata mpo na “molimo,” to mpo na bomoi na biso moko, Yesu alobaki ete, tosengeli komiyina, elingi koloba komilinga mingi te, koleka lolenge oyo tolingaka Yehova!

5. Lolenge nini Satana asalelaka ebongiseli ya libota na mayele mabe nyonso?

5 Lokola azali Mozalisi mpe Mopesi-Bomoi, ebongi ete basaleli ya Yehova nyonso bámipesa mobimba epai na ye. (Emoniseli 4:11) Ntoma Paulo akomaki ete: “Nazali kongumba mabɔngɔ na ngai liboso na Tata, oyo mabota nyonso na Likoló mpe na nsé mazwi nkombo uta na ye.” (Baefese 3:14, 15) Yehova asalaki ebongiseli ya libota na lolenge kitoko mpenza, na boye ete basangani na yango bálingana “[na bolingo ya motema, NW]” moko na mosusu. (1 Mikonzi 3:25, 26; 1 Batesaloniki 2:7) Nzokande, Satana Zábolo asalelaka bolingo wana ya motema, oyo esangisi mpe mposa ya kosepelisa balingami na biso na lolenge ya mabe. Angalisaka botɛmɛli kati na libota, mpe mingi bamonaka ete ezalaka mpasi mpo na kotɛlɛma ngwi kati na solo ya Biblia wana botɛmɛli ebimi.​—Emoniseli 12:9, 12.

Lolenge ya kolónga botɛmɛli

6, 7. (a) Lolenge nini basangani ya libota bakoki kozwa lisungi mpo na komona mpenza ntina ya koyekola Biblia mpe koyangana elongo na baklisto? (b) Lolenge nini tokoki komonisa ete tolingaka mpenza basangani ya libota na biso?

6 Okosala nini soki bapusi yo na makasi ete opona soki okosepelisa Nzambe to okosepelisa mosangani moko ya libota? Okoluka komilóngisa na kokanisáká ete Nzambe alingi te ete tóyekola Liloba na ye mpe alingi te ete tósalela malako na yango, na ntango boyekoli yango ezali kobimisa bokabwani kati na libota? Kanisá malamu na ntina na yango. Soki ondimi likanisi oyo mpe otiki koyekola Biblia to otiki koyangana elongo na Batatoli ya Yehova, lolenge nini balingami na yo bakososola mokolo mosusu ete boyebi ya sikisiki ya Biblia ezali likambo ya ntina mingi oyo etali kobika to kokufa?​—Yoane 17:3; 2 Batesaloniki 1:6-8.

7 Tokoki kosalela elakiseli oyo: Ekoki kozala ete mosangani moko ya libota azali moombo ya masanga. Kozanga kotya likebi likoló na momeseno na ye wana ya mabe to kopesa yango nzela ekozala mpenza na litomba mpo na ye? Ekozala malamu kobatela kimya elongo na ye na kotikáká nzela na momeseno na ye mpe na kozangáká kosala eloko mpo na yango? Soko moke te; na ntembe te, ondimi ete ekozala malamu komeka kosunga ye ete alónga momeseno wana ya mabe, ata soki yango ekopesa ye nkanda to mpe soki akokanela yo. (Masese 29:25) Bobele bongo, soki ozali solo na bolingo mpo na basangani ya libota na yo, milende oyo bakosala mpo na kopekisa yo ete otika koyekola Biblia ekolɛmbisa yo te. (Misala 5:29) Ezali bobele na kotɛlɛmáká ngwi nde okoki kosalisa bango básosola ete kolanda mateya ya Yesu elimboli mpenza bomoi mpo na biso.

8. Lolenge nini tozali kozwa litomba kati na likambo oyo ete Yesu akokisaki mokano ya Nzambe na bosembo nyonso?

8 Na bantango mosusu, kotya Nzambe na esika ya liboso ezalaka likambo ya mpasi. Kasi omikundola ete, Satana mpe atyaki Yesu kati na komekama mpo ete akoka te kosala mokano ya Nzambe. Nzokande, Yesu atikaki te; andimaki ata konyokwama na mpasi na liwa likoló na nzeté ya mpasi mpo na biso. Biblia elobi ete: “Yesu Klisto, [azali] Mobikisi na biso.” “Akufaki mpo na biso.” (Tito 3:6; 1 Batesaloniki 5:10, NW) Tozali na botɔ́ndi mpamba te Yesu alɛmbaki te kati na botɛmɛli, boye te? Mpo ete akufaki lokola mbeka, tozali na elikya ya kozala na bomoi ya seko kati na mokili ya sika ya boyengebene mpe etondi na kimya, na komonisáká kondima kati na makila oyo asopaki.​—Yoane 3:16, 36; Emoniseli 21:3, 4.

Litomba monene oyo tokoki kozwa

9. (a) Lolenge nini baklisto bakoki kosangana kati na mosala ya kobikisa basusu? (b) Ezalela ya libota ya Timoté ezalaki lolenge nini?

9 Osili kososola ete yo mpe okoki kosangana na mosala ya kobikisa basusu, kati na bango bandeko na yo ya mosuni oyo olingaka mingi? Ntoma Paulo ayebisaki Timoté ete: “Oumela na yango [makambo oyo bateyaki yo], zambi ekosalaka yo boye okomibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo.” (1 Timoté 4:16) Timoté azalaki kati na libota likabwani na makambo ya losambo, mpamba te tata na ye Mogreke azalaki mondimi te. (Misala 16:1; 2 Timoté 1:5; 3:14) Atako toyebi te soki tata ya Timoté akómaki mondimi, kasi likoki na ye ya kokóma mondimi liyeisamaki monene mpenza mpo na etamboli ya sembo ya mwasi na ye, Yunike mpe ya Timoté.

10. Baklisto bakoki kosala nini mpo na babalani na bango oyo bazali bandimi te?

10 Makomami mazali komonisa ete mibali mpe basi oyo bazali kosimba ngwi solo ya Biblia bakoki kosala ete mibali na bango oyo bazali bandimi te bábika, na kosalisáká bango ete bákóma bandimi. Ntoma Paulo akomaki ete: “Soko ndeko moko azali na mwasi oyo azangi kondima mpe ye asepeli kofanda na ye, ekoki na mobali kolongola ye te. Mpe soko mwasi azali na mobali oyo azangi kondima mpe ye asepeli kofanda na ye, ekoki na mwasi kolongwa na ye te. Zambi yo mwasi, oyebi soko okobikisa mobali na yo? Yo mobali mpe oyebi, soko okobikisa mwasi na yo?” (1 Bakolinti 7:12, 13, 16) Ntoma Petelo amonisaki lolenge nini basi bakoki kobikisa bomoi ya mibali na bango, kolobáká ete: “Bótosa babali na bino ete, ata bamosusu na bango bandimi liloba te, bázwama na kimya mpe na bizaleli malamu na basi na bango.”​—1 Petelo 3:1.

11, 12. (a) Mbano nini bankóto ya baklisto bazwaki, mpe basalaki nini mpo na kozwa yango? (b) Yebisá lisoló ya mosangani ya libota moko oyo azwaki mbano mpo na kondima mpe ezaleli na ye ya kolendendela.

11 Na bambula oyo euti koleka, bankóto mingi ya bato basili kokóma Batatoli ya Yehova nsima ya basanza, ata mpe nsima ya bambula mingi ya kotɛmɛla mosala ya boklisto ya bandeko na bango ya mosuni oyo bazali Batatoli. Oyo nde mbano mpo na baklisto oyo batikalaki ngwi, mpe lipamboli mpo na baoyo bazalaki liboso batɛmɛli! Wana azalaki koloba na mayoki nyonso, nkulutu moklisto moko ya mibu 74 ayebisaki ete: “Natɔ́ndaka mwasi na ngai mpe bana na ngai mbala mingi mpo ete batɛlɛmaki ngwi kati na solo na boumeli ya bambula oyo nazalaki kotɛmɛla bango.” Alobaki ete na boumeli ya bambula misato, aboyaki na nkó nyonso kopesa mwasi na ye nzela ya kosolola na ye na ntina na Biblia. Alobaki ete: “Kasi asalelaki mayele malamu epai na ngai mpe abandaki kopesa ngai litatoli wana azalaki kokwanza ngai na makolo. Nazali mpenza na botɔ́ndi mpo ete alɛmbaki te mpo na botɛmɛli na ngai!”

12 Mobali mosusu oyo atɛmɛlaki libota na ye akomaki ete: ‘Nazalaki monguna monene mpenza ya mwasi na ngai mpamba te wana ayambaki solo, nanyokolaki ye, mpe tozalaki koswana mikolo nyonso; ngai nde nazalaki ntango nyonso kobandisa koswana. Kasi nyonso wana ezalaki bobele mpamba; mwasi na ngai akangamaki na Biblia. Nalekisaki bongo bambula zomi na mibale ya kobundisa solo mpe ya kotɛmɛla mwasi na ngai mpe mwana na ngai. Bango mibale bazalaki komona ngai lokola mpenza Zábolo alati nzoto ya bomoto.’ Na nsuka, mobali yango abandaki kotalela bomoi na ye na bozindo. Ayebisaki ete: ‘Nayaki komona ete nazalaki mpenza monyokoli. Natángaki Biblia, mpe mpo na mateya na yango, nasili sikawa kokóma Motatoli oyo asilá kozwa batisimo.’ Kanisá naino mbano oyo mwasi wana azwaki, ee, asungaki ‘mobali na ye ete abikisama’ na koyikáká mpiko na bosembo nyonso liboso ya botɛmɛli na ye oyo eumelaki mibu 12!

Tózwa liteya kati na ndakisa ya Yesu

13. (a) Wapi liteya monene oyo mibali mpe basi basengeli koyekola kati na bomoi ya Yesu? (b) Lolenge nini bato oyo bazalaka na mokakatano ya kotosa Nzambe bakoki kozwa litomba kati na ndakisa ya Yesu?

13 Liteya monene oyo mibali mpe basi basengeli kozwa kati na bomoi ya Yesu ezali bongo botosi epai na Nzambe. Yesu alobaki ete: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo masepelisaka ye. Nalukaka mokano na ngai moko te, kasi mokano ya oyo atindaki ngai.” (Yoane 5:30; 8:29, NW) Ata mokolo mosusu na ntango Yesu amonaki likambo moko kati na mokano ya Nzambe ete lizalaki mpasi, atosaki yango. Abondelaki ete: “Soki okani boye, longolá kɔ́pɔ oyo na ngai.” Abakisaki nokinoki ete: “Kasi mokano na ngai esalema te, kasi bobele mokano na yo.” (Luka 22:42) Yesu asɛngaki na Nzambe te ete abongola mokano na Ye; amonisaki ete alingaki mpenza Nzambe na kotosáká makambo nyonso oyo mokano ya Nzambe mozalaki kosɛnga ete akokisa yango. (1 Yoane 5:3) Kotya ntango nyonso mokano ya Nzambe na esika ya liboso, lokola Yesu asalaki yango, ezali mpenza na ntina mingi mpo na kolónga, bobele te soki ozali monzemba, kasi ata mpe kati na libala mpe kati na libota. Otalela malamu soki mpo na nini esengeli kozala bongo.

14. Mpo na nini tokoki koloba ete baklisto mosusu bakanisaka na lolenge mabe?

14 Na ndakisa, lokola tomonaki yango liboso, na ntango bandimi bazali kotya Nzambe na esika ya liboso, balukaka kotikala na babalani na bango oyo bazali bandimi te mpe bazalaka mbala mingi na likoki ya kosunga bango ete bákoma bato oyo babongi na kobika. Ata soki babalani mibale bazali bandimi, libala na bango likoki kozala ya kokoka te. Mpo na bopusi ya bomoto ya masumu, mibali mpe basi bazalaka ntango nyonso te na makanisi ya bolingo moko na mosusu. (Baloma 7:19, 20; 1 Bakolinti 7:28) Basusu balukaka kino kozwa mobalani mosusu, atako Makomami mapesi bango ndingisa te ya kosala bongo. (Matai 19:9; Baebele 13:4) Bakoki komilobela mpo na bango moko ete, yango ezali likambo lileki malamu, kokanisáká ete mokano ya Nzambe oyo elobi ete mibali mpe basi bákabwana te ezali likambo ya mpasi mingi. (Malaki 2:16; Matai 19:5, 6) Na ntembe te, lolenge mosusu kati na yango bato bazali komonisa makanisi ya bomoto na esika ya komonisa makanisi ya Nzambe.

15. Mpo na nini kotya Nzambe na esika ya liboso ezali libateli?

15 Kotya Nzambe na esika ya liboso ezali mpenza libateli! Babalani oyo basalaka bongo bamekaka kokangama ntango nyonso elongo mpe basilisaka mikakatano na bango na kosaleláká batoli oyo ezwami na Liloba ya Nzambe. Na yango, bapɛngolaka lolenge nyonso ya mpasi na motema oyo eyaka mpo na kozanga kotalela mokano na ye. (Nzembo 19:7-11) Yango emonisamaki na likambo oyo babalani moko oyo bautaki kobalana sika bakutanaki na yango, na ntango bakómaki pene ya koboma libala na bango, bazwaki ekateli ya kolanda batoli ya Biblia. Mwa bambula na nsima na ntango mwasi akanisaki na ntina na esengo asilaki kozwa kati na libala na ye, alobaki ete: “Nafandaka mpe nalelaka na ntango natalelaka likoki oyo nalingaki kotika soki nakabwanaki na mobali na ngai na boumeli ya bambula oyo nyonso. Na nsima, nabondelaka epai na Yehova mpe natɔ́ndaka ye mpo na batoli mpe litambwisi oyo esangisaki biso esika moko kati na boyokani wana ya esengo.”

Mibali, basi​—Bómekola Klisto!

16. Ndakisa nini Yesu atikaki mpo na mibali mpe mpo na basi?

16 Yesu, ye oyo atyaka ntango nyonso Nzambe na esika ya liboso, atikaki ndakisa kitoko mpo na mibali mpe basi, mpe basengeli kotya likebi mpenza likoló na yango. Mibali balendisami ete bámekola lolenge oyo Yesu asalelaki bokonzi na boboto nyonso likoló na basangani ya lisangá ya boklisto. (Baefese 5:23) Mpe, basi baklisto bakoki kozwa liteya kati na ndakisa ya kokoka ya Yesu mpo na oyo etali kotosa Nzambe.​—1 Bakolinti 11:3.

17, 18. Ndenge nini Yesu amonisaki ndakisa malamu mpo na mibali?

17 Biblia epesi mobeko oyo ete: “Bino babali, bolingaka basi na bino pelamoko Klisto alingaki Lingomba mpe amipesaki ye moko mpo na bango.” (Baefese 5:25) Lolenge ya ntina mingi oyo Yesu amonisaki bolingo na ye mpo na lisangá ya bayekoli na ye ezalaki bongo na kozaláká moninga na bango ya penepene. Yesu alobaki ete: “Nasili kobyanga bino baninga, zambi nayebisi bino makambo nyonso mayoki ngai epai na Tata na ngai.” (Yoane 15:15) Kanisá ntango nyonso oyo Yesu alekisaki na kosolola elongo na bayekoli na ye​—masoló mingi, mingi oyo asololaki elongo na bango​—mpe lolenge azalaki kotyela bango motema! Yango ezali ndakisa malamu mpo na mibali, boye te?

18 Yesu azalaki mpenza kotyela bayekoli na ye likebi mpe amonisaki bolingo ya solosolo mpo na bango. (Yoane 13:1) Na ntango bazalaki kokutana na mikakatano mpo na kososola mateya na ye, na motema pɛtɛɛ nyonso, azalaki kozwa ntango ya kosolola na bango na nkúku mpo na kolakisa bango makambo polele. (Matai 13:36-43) Mibali, bolamu ya elimo ya basi na bino ezali na ntina na miso na bino? Olekisaka ntango elongo na ye, kondimisamáká mpenza ete solo ya Biblia ezali polele kati na elimo mpe mitema na bino mibale? Yesu azalaki kosala elongo na bayekoli na ye kati na mosala ya kosakola, ekoki kozala ete azalaki kolakisa moko moko na bango na ngala na ye. Obimaka elongo na mwasi na yo kati na mosala ya kosakola, kosanganáká kati na mosala ya ndako na ndako mpe na kotambwisáká boyekoli ya Biblia?

19. Mpo na nini tokoki koloba ete lolenge oyo Yesu asalaki mpo na bolɛmbu ya bayekoli na ye oyo ezalaki kozongelama mbala na mbala ezalaki ndakisa mpo na mibali?

19 Mingimingi, mpo na oyo etali lolenge Yesu azalaki kosala mpo na kozanga kokoka ya bayekoli na ye, Yesu atikaki ndakisa monene mpo na mibali. Na boumeli ya limpati ya nsuka oyo alyaki elongo na bantoma na ye, amonaki elimo ya kowelana oyo ezalaki kozonga mbala na mbala kati na bango. Awelaki kotyola bango? Soko moke te, kasi na komikitisa nyonso asukolaki makolo ya moko moko na bango. (Malako 9:33-37; 10:35-45; Yoane 13:2-17) Omonisaka ezaleli motindo wana ya motema pɛtɛɛ epai na mwasi na yo? Na esika ya komilelalela na ntina na bolɛmbu oyo ezali kozonga mbala na mbala, omekaka na motema pɛtɛɛ nyonso kosunga ye mpe kosimba motema na ye na kopesáká ndakisa? Basi bakoki mpenza komonisa botɔ́ndi mpo na bolingo mpe mpo na ezaleli wana ya motema mawa, lokola bantoma basalaki yango na nsima.

20. Eloko nini basi baklisto basengeli kobosana yango te, mpe nani atyami lokola ndakisa mpo na bango?

20 Basi mpe basengeli kotalela Yesu, oyo abosanaki te ete “Motó na Klisto azali Nzambe.” Atosaki tata na ye ya likoló ntango nyonso. Bobele bongo, basi basengeli kobosana te ete “Motó na mwasi azali mobali,” ee, ete mibali na bango bazali mikonzi na bango. (1 Bakolinti 11:3; Baefese 5:23) Ntoma Petelo alendisaki basi baklisto ete bábatela ndakisa ya “basi na bulɛɛ” ya ntango ya kala, mingimingi oyo ya Sara, ye oyo “atosaki Abalayama, wana ezalaki ye kobénga ye Nkolo.”​—1 Petelo 3:5, 6.

21. Mpo na nini libala ya Abalayama mpe Sara elóngaki kasi oyo ya Lota mpe mwasi na ye elóngaki te?

21 Na ntembe te, Sara atikaki ndako kitoko kati na engumba moko ya bozwi mingi mpo na kokende kofanda na hema na mboka mopaya. Mpo na nini? Ezali mpo ete asepelaki na lolenge wana ya bomoi? Soko moke te. Ezalaki mpo ete mobali na ye asɛngaki ye ete bákende kuna? Na ntembe te, yango mpe ezalaki moko na bantina wana, mpamba te Sara azalaki kolinga mpe kotosa Abalayama mpo na bizaleli na ye ya moto na Nzambe. (Genese 18:12) Kasi ntina monene mpenza mpo na yango akendaki elongo na mobali na ye ezalaki bongo bolingo na ye mpo na Yehova mpe mposa na ye mozindo ya kolanda litambwisi ya Nzambe. (Genese 12:1) Azwaki esengo monene kati na ezaleli ya kotosa Nzambe. Nzokande, mwasi ya Lota, akakatanaki mpo na kosala mokano ya Nzambe mpe na yango ayokaki mawa mpo na biloko oyo atikaki na nsima na engumba Sodome. (Genese 19:15, 25, 26; Luka 17:32) Oyo nde mawa mpo na libala wana​—bobele mpo na kozanga kotosa Nzambe!

22. (a) Lolenge nini basangani ya libota basengeli komibatela na mayele nyonso? (b) Tokolobela nini na lisoló na biso lilandi?

22 Na yango, ozala mobali to mwasi, ezali mpenza na ntina ete omituna mituna oyo: ‘Nzambe azalaka na esika ya liboso kati na bomoi ya libota na ngai? Nasalaka mpenza makasi mpo na kokokisa mokumba ya libota oyo Nzambe apesi ngai? Nasalaka mpenza makasi ya solosolo mpo na kolinga mobalani na ngai mpe kosunga ye ete azala na boyokani malamu elongo na Yehova mpe abatela boyokani yango?’ Mabota mingi mpe mazali na bana. Na lisoló lilandi tokotalela mokumba ya baboti mpe ntina oyo bango mpe bana na bango basengeli kotya Nzambe na esika ya liboso.

Ozali komikundola?

◻ Mateya ya Yesu makoki kobimisa mbuma nini kati na mabota mingi?

◻ Ebele na baklisto oyo batikalaki ngwi bazwaki mbano nini?

◻ Nini ekosalisa babalani ete bápɛngola ezaleli ya mbindo mpe koboma libala?

◻ Liteya nini mibali bakoki kozwa kati na ndakisa ya Yesu?

◻ Lolenge nini basi bakoki kosunga mpo ete libala na bango lizala ya esengo?

[Elilingi na lokasa 10]

Lolenge nini Sara asalaki ete libala na ye elónga?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto