Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/11 nk. 22-25
  • “Nabwakamaki, kasi nabebisamaki te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nabwakamaki, kasi nabebisamaki te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kokwea monene
  • Libota ya esengo
  • Nalóngi botau monene na elimo
  • Nayikaki mpiko mpo na kokwea mosusu
  • Nazali kosala oyo nakoki kosala
  • Jéhovah apesaki ngai makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • ‘Nakopumbwa lokola mboloko’
    Lamuká!—2007
  • Nazwaka makasi na bolɛmbu na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/11 nk. 22-25

“Nabwakamaki, kasi nabebisamaki te”

LISOLÓ YA ULF HELGESSON

Na Yulí 1983, minganga oyo bangunzamaki mpo na kotala ngai bangangaki na kokamwa nyonso ete: “Alamuki!” Bautaki kolongola ngai kanser ya bolai ya basantimɛtɛlɛ 12 kati na mokúwa na ngai ya mokɔngɔ na boumeli ya lipasó moko ya mpasi oyo ezwaki ngonga 15. Yango ekómisaki ngai motau mpenza.

MWA mikolo moke na nsima, batindaki ngai na lopitalo moko oyo ezalaki pene na bakilomɛtɛlɛ 60 kolongwa na engumba Hälsingborg epai nazalaki kofanda, na súdi ya Suède. Kuna, babandaki kosalela ngai mwango ya kozongisa nzoto makasi. Monganga ayebisaki ngai ete esengelaki kosɛnga makambo mingi mpenza, kasi nazalaki na mposa makasi ete mwango yango ebanda. Nazalaki na mposa ya kozongela kotambola. Na komimekisáká kati na mwango yango na boumeli ya ngonga mitano mokolo na mokolo, makasi na ngai ezalaki kozonga nokinoki.

Sanza moko na nsima, na ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayaki na lisangá na biso, ye mpe bankulutu baklisto mosusu basalaki mobembo molai mpo na kosala likita ya bankulutu kati na ndako na ngai ya lopitalo. Motema na ngai etondaki na esengo mpo na komona elembeteli wana ya bolingo ya boklisto! Balifulumé oyo bazalaki kosɛnzɛla ngai bapesaki etuluku wana mobimba tíi mpe mwa mikate nsima ya likita.

Ya liboso minganga bakamwaki komona mbongwana ya kolɔngɔ́nɔ́ na ngai. Nsima ya sanza misato nakokaki kofanda na kiti na ngai ya bibɔsɔnɔ, ata mpe kotɛlɛma mpo na mwa ntango moke. Nazalaki na esengo mpe nazwaki ekateli makasi ya kozongela lisusu kotambola. Libota na ngai mpe baninga na ngai baklisto bazalaki kolendisa ngai mingi na ntango bazalaki koya kotala ngai. Nazalaki nkutu na likoki ya kozongáká na ndako mpo na mikolo moke.

Kokwea monene

Nzokande, na nsima na yango kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ebongwanaki lisusu te. Nokinoki, minganga bayebisaki ngai likambo moko ya mawa: “Kolɔngɔ́nɔ́ na yo ekobonga lisusu te koleka lolenge ezali sikawa!” Mokano ezalaki sikawa ya kolendisa ngai ete natambolaka ngai moko na lisalisi ya kiti ya bibɔsɔnɔ. Namitunaki ete likambo nini elingaki kokómela ngai. Mwasi na ngai akosala nini? Ye moko mpe basilaki kosala ye lipasó moko monene mpe azalaki na mposa ya lisungi na ngai. Nasengelaki kosɛnga lisungi ya ntango nyonso ya Leta?

Nanyokwamaki mingi na makanisi. Makasi, mpiko, mpe nguya na ngai esilaki. Mikolo milekaki, mpe natikalaki bobele esika moko. Nakómaki motau bobele na nzoto te, kasi nazangaki mpe nguya na mayoki mpe na elimo. “Nabwakamaki.” Nazalaki komitalela ntango nyonso ete nazalaki makasi na elimo. Napikaki kondima na ngai makasi likoló na Bokonzi ya Nzambe. (Danyele 2:44; Matai 6:10) Sikawa nandimisamaki makasi na ntina na elaka ya Biblia oyo ete maladi nyonso mpe botau nyonso ya nzoto ekolongolama kati na mokili ya sika mpe ya boyengebene ya Nzambe mpe ete kuna, bato nyonso bakozongisama na bomoi ya kokoka. (Yisaya 25:8; 33:24; 2 Petelo 3:13) Nzokande, sikawa nazalaki koyoka ete nazalaki bobele motau na nzoto te kasi na elimo mpe lokola. Namiyokaki ete “nabebisamaki.”​—2 Bakolinti 4:9.

Liboso ete nayebisa bino makambo mosusu, tiká nayebisa bino naino moke makambo matali bomwana na ngai.

Libota ya esengo

Nabotamaki na 1934, mpe kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ezalaki ntango nyonso malamu. Na ebandeli ya mibu 1950, nakutanaki na Ingrid, mpe tobalanaki na 1958 mpe tokómaki kofanda na engumba ya Östersund na ntéi ya Suède. Mbongwana monene esalemaki kati na bomoi na biso na 1963 ntango tobandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Na ntango wana tozalaki na bana misato ya mike​—Ewa, Björn, mpe Lena. Nokinoki libota na biso mobimba ebandaki koyekola mpe kokóla malamu kati na boyebi ya solo ya Biblia.

Mwa moke nsima wana tobandaki koyekola, tokendeki kofanda na Hälsingborg. Kuna, ngai mpe mwasi na ngai tomipesaki mpo na kosalela Yehova mpe tozwaki batisimo na 1964. Esengo na biso ekólaki lisusu na ntango mwana na biso ya mwasi ya liboso azwaki batisimo na 1968. Bambula nsambo na nsima, na 1975, Björn na Lena mpe bazwaki batisimo, mpe na mobu molandaki nakómaki nkulutu kati na lisangá ya boklisto.

Mosala na ngai ya mosuni mozalaki kopesa ngai nzela ya kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ngai. Mpe esengo na biso ekólaki na ntango Björn mpe Lena babandaki mosala ya ntango nyonso. Nokinoki, Björn abyangamaki ete akenda kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na engumba Arboga. Bomoi ezalaki malamu mpo na biso. Na nsima, na 1980, nabandaki koyoka mpasi ya kanser oyo na nsima balongolaki ngai yango na ntango ya lipasó wana monene na 1983.

Nalóngi botau monene na elimo

Na ntango bayebisaki ngai ete nakokaki kotambola lisusu te, bomoi emonanaki lokola ete ezalaki lisusu na ntina te mpo na ngai. Lolenge nini nazongelaki lisusu makasi na elimo? Ezalaki mpenza pɛtɛɛ koleka lolenge nakanisaki yango. Nakamataki bobele Biblia na ngai mpe nabandaki kotánga yango. Wana nazalaki kotánga mingi, nazwaki lisusu makasi mingi na elimo. Oyo nasepelaki na yango mingi koleka ezalaki bongo Lisoló ya Yesu likoló na Ngomba. Nazalaki kotánga yango mbala na mbala mpe nazalaki komanyola likoló na yango.

Nazongelaki makanisi na ngai ya malamu na ntina na bomoi. Na nzela ya botángi mpe bomanyoli, nakómaki komona mabaku malamu ya kopesa litatoli na esika ya komona bipekiseli. Mposa na ngai ya koyebisa solo ya Biblia epai na basusu ezongaki lisusu, mpe nakokisaki mposa yango na kopesáká litatoli epai na basáli ya lopitalo mpe epai na bato mosusu oyo nazalaki kokutana na bango. Libota na ngai esungaki ngai na makambo nyonso mpe bayekolaki lolenge ya kobatela ngai. Na nsima, nabimaki na lopitalo.

Na nsuka nazongaki na ndako. Ezalaki mokolo ya esengo mpo na biso banso! Libota na ngai esalaki ebongiseli oyo etalelaki mpe kobatelama na ngai. Mwana na ngai ya mobali, Björn, azwaki ekateli ya kotika mosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova, mpe ayaki mpo na kosunga ngai. Lolenge libota na ngai bamonisaki bolingo mpe mawa mpo na ngai ezalaki mpenza likambo ya kobɔndisa.

Nayikaki mpiko mpo na kokwea mosusu

Nzokande, wana ntango ezalaki koleka, kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ezalaki sé kobeba, ezalaki mpo na ngai mpasi ete nakoka koningana. Na nsuka, atako milende nyonso oyo libota na ngai esalaki, bakokaki lisusu te kobatela ngai kati na ndako. Na yango, nakanisaki ete ekokaki kozala malamu mpo na ngai ete nakóma kofanda kati na ndako oyo bakɛngɛlaka mibangé mpe bato ya bokɔnɔ. Lisusu, yango esɛngaki ete nasala mbongwana mpe nabanda lolenge ya bomoi ya sika. Kasi natikelaki yango nzela te ete ezala bongo kokwea na elimo.

Natikaki te botángi na ngai ya Biblia mpe kosala bolukiluki. Nakóbaki ntango nyonso kokanisa makambo nini nakoki kosala, nazalaki kokanisa te na makambo oyo nakoki te kosala. Nazalaki komanyola na ntina na mapamboli ya elimo oyo Batatoli nyonso ya Yehova bazali na yango. Natikalaki ntango nyonso pene na Yehova na nzela ya libondeli mpe nasalelaki mabaku nyonso mpo na koteya basusu.

Sikawa nazali awa kati na ndako oyo bakɛngɛlaka mibangé mpe bato ya makɔnɔ na butu mpe na bantango mosusu ya moi. Na nsima ya nzánga mpe na mpokwa nalekisaka ntango yango na ndako na ngai to na makita na biso ya boklisto. Ebongiseli moko oyo ekotalelaka bolamu ya bato esalaka ete nakumbamaka mikolo nyonso mpo na kokende na makita mpe kozonga mpe mpo na kokende na ndako na ngai mpe kozonga. Libota na ngai oyo bamipesi mpenza, bandeko kati na lisangá, mpe basáli kati na ndako ya kokɛngɛla mibangé mpe bato ya bokɔnɔ bazali kobatela ngai na lolenge ya kokamwa mpenza.

Nazali kosala oyo nakoki kosala

Namitalelaka te ete nazali ebɔsɔnɔ, mpe libota na ngai, mpe bandeko na ngai baklisto batalelaka ngai lolenge wana te. Bazali kobatela ngai na bolingo nyonso, yango ezali kopesa ngai nzela ete nalanda mpenza kosala malamu lokola nkulutu. Pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, natambwisaka Boyekoli ya mokanda na lisangá mpe natambwisaka boyekoli ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli kati na Ndako ya Bokonzi. Ezalaka mpasi mpo na ngai mpo na kofungola nkasa ya Biblia, na yango ndeko moko azali na mokumba ya kosunga ngai mpo na kosala yango na ntango ya makita. Natambwisaka makita mpe nasalaka masukúlu uta na kiti na ngai ya bibɔsɔnɔ.

Na yango, nakoki kino lelo kosala makambo mingi oyo nazalaki kosepela kosala yango liboso, kati na yango mpe mosala ya kotala bampate. (1 Petelo 5:2) Nasalaka yango na ntango bandeko mibali mpe bandeko basi bayaka epai na ngai mpo na koluka lisalisi to toli. Nasalelaka mpe telefone, kobandáká kobénga basusu na telefone. Biso banso tozwaka bilendisi mpo na yango. (Baloma 1:11, 12) Na mikolo oyo miuti koleka kala mingi te, moninga moko alobaki ete: “Bobele na ntango oyo nazali koyoka ete nalɛmbi na makanisi, obéngi ngai mpe olendisi ngai.” Kasi ngai mpe nalendisami, koyebáká ete Yehova azali kopambola milende na ngai.

Liboso mpe nsima ya makita, nazalaka na boninga malamu elongo na bana mike kati na lisangá. Uta ntango nabandaki kofanda na kiti na ngai ya bibɔsɔnɔ, nasololaka na bango kozanga kongunzama. Nazalaka na botɔ́ndi mingi mpo na elobeli na bango ya sembo mpe ya sikisiki. Mokolo mosusu mwana moko ya mobali ya moke ayebisaki ngai ete: “Ozali ebɔsɔnɔ moko ya bonzenga mpenza!”

Na kotɛlɛmisáká makanisi na ngai mingi mpenza likoló na oyo nakoki kosala na esika ya komilela na oyo nakoki kosala te, nazali kosepela kosalela Yehova. Nazwi liteya mingi kati na likambo oyo esili kokómela ngai. Nasosoli ete tobongisamaka mpe toyeisamaka makasi na nzela ya komekama oyo toyikelaka yango mpiko.​—1 Petelo 5:10.

Nasili komona ete, bato mingi oyo bazali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ bayebaka te ete tosengeli ntango nyonso kotalela losambo ya Tata na biso ya likoló na motuya mpenza. Soki totaleli yango na motuya te, ebongiseli na biso ya boyekoli, ya makita mpe ya mosala ya kosakola ekoki kokóma bobele momeseno ya mpamba. Natalelaka bibongiseli wana ete ezali na ntina mingi mpo na kobika na nsuka ya mokili oyo mpe kokɔta na Paladiso na mabelé oyo Nzambe alakaki.​—Nzembo 37:9-11, 29; 1 Yoane 2:17.

Tosengeli ntango nyonso kobatela kati na mitema na biso elikya ya bomoi kati na mokili ya sika ya Nzambe oyo ezali koya. (1 Batesaloniki 5:8) Nayekoli mpe ezaleli ya kolɛmba te mpo na kobundisa bolɛmbu ata ya lolenge nini. Nayekoli kotalela Yehova lokola Tata na ngai mpe lisangá na ye lokola Mama na ngai. Nasosoli ete soki tosali makasi, Yehova akoki kosalela ata moto nani kati na biso mpo azala mosaleli na ye ya molende.

Atako na bantango mosusu nazalaki koyoka ete, na elobeli ya elilingi, “nabwakamaki,” kasi ‘nabebisamaki te.’ Yehova asundolaki ngai soko moke te, mpe lisangá na ye, mpe libota na ngai, mpe bandeko na ngai baklisto mpe basundolaki ngai te. Mpo ete nasimbaki Biblia mpe nabandaki kotánga yango, nazongelaki makasi na ngai ya elimo. Nazali na botɔ́ndi epai na Yehova Nzambe, ye oyo apesaka “nguya mingi mpenza” wana tozali kotyela ye motema.​—2 Bakolinti 4:7.

Na kotyaka elikya mpe motema na ngai mobimba epai na Yehova, nazali kozela mikolo mizali koya na motema likoló mpenza. Nandimisami ete mosika te Yehova akokokisa bilaka na ye na ntina etali paladiso oyo ezongisami na mabelé elongo na mapamboli nyonso ya kitoko oyo yango ekomema.​—Emoniseli 21:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto