Libateli ya solo: Ezali mpasi mpo na kozwa yango
ARNOLD azalaki mwana oyo alingaki mingi mwanapopi na ye ya nkoi. Esika nyonso azalaki kokenda, azalaki komema yango—na esika ya kosakana, na mesa ya bolei, na mbeto na ye. Mpo na ye, nkoi ezalaki kopesa kobɔndisama, libateli. Mokolo mosusu, likambo ya mpasi libimaki. Nkoi ezalaki komonana te!
Wana Arnold azalaki kolela, mama na ye, tata na ye, mpe bayaya na ye misato ya mibali bazalaki kolukaluka nkoi bipai binso kati na ndako na bango monene. Na nsima, moko na bango amonaki yango kati na alumwalo. Na ntembe te, Arnold atyaki yango kuna mpe abosanaki nokinoki epai yango ezalaki. Nkoi ezongisamaki, mpe Arnold atikaki kolela. Amiyokaki lisusu na esengo mpe na libateli.
Oyo nde esengo esengelaki kozala soki mikakatano nyonso mikokaki kosila nokinoki bongo—bobele lokola likambo ya komona mwanapopi ya nkoi kati na alumwalo! Nzokande, mpo na ebele na bato, makambo matali libateli mazali makambo minene mpe ya mindɔ́ndɔ́ koleka. Pene na bisika nyonso, bato bazali komituna, ‘Ngai nakokwea na mabɔkɔ ya bato mabe to na mabɔkɔ ya bato ya mobulu? Nazali na likámá ya kobungisa mosala na ngai? Tokoki kondimisama ete libota na biso likozala ntango nyonso na bilei bikoki na yango? Basusu bakoboya ngai te na ntina na lingomba na ngai to na ntina na ekólo na ngai?’
Motángo na bango oyo bazangi libateli mozali mpenza monene. Engebene Mabota Masangani, pene na bamiliare misato ya bato bazali te bobele kozanga nkísi ya bokɔnɔ oyo ekoki kobikisama nokinoki kasi lisusu bazangi bankísi oyo ezali na ntina mingi. Bato koleka miliare moko bazali kati na bobólá ya makasi mpenza. Pene na bato miliare moko, atako bakoki kosala mosala, bazali mpenza kosala te na lolenge oyo ekoki komemela bango litomba. Motángo ya bato bakimá mboka na bango mozali sé kobakisama. Na nsuka ya mobu 1994, moto 1 likoló na bato 115 awa na mabelé asengelaki kokima mboka na ye. Bomoi ya bamilió ya bato ezali kobebisama likoló na litomba ya mosolo badolare miliare 500 oyo mozwamaka na mombongo ya bilangwiseli, oyo ebimisaka ebele na misala mabe mpe mobulu. Bitumba bizali kolongola bomoi ya bamilió ya bato. Bobele na 1993, mboka 42 emikɔtisaki na matáta minene, wana mboka mosusu 37 ezalaki na matáta na makambo matali politiki.
Bitumba, bobólá, misala mabe, mpe makámá oyo izali kolongola libateli ikangisami moko na mosusu, mpe izali ntango nyonso kobakisama. Ezali na mwango moko te ya pɛtɛɛ mpo na kosilisa mikakatano motindo yango. Ya solo, bato bakoki soko moke te kosilisa yango nyonso.
Biblia, Liloba ya Nzambe ekebisi biso ete, “Ndimelá bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.” Bongo, esengeli kotyela nani motema? Mokapo yango molandi koloba ete: “Esengo na ye oyo Nzambe na Yakobo azali kosunga ye; oyo azali na [Yehova] Nzambe na ye; ye oyo asalaki lola mpe mokili, mai-na-monana mpe biloko nyonso izali kati na yango, ye azali solo lobiko na lobiko.”—Nzembo 146:3-6.
Mpo na nini tokoki kotyela Yehova motema ete akoyeisa libateli na mabelé oyo? Tokoki solo kozala na libateli, na bomoi ya esengo uta sikawa? Lolenge nini Nzambe akosilisa makambo oyo mazali bipekiseli mpo na libateli ya bato?