Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/5 nk. 4-7
  • Libateli ya solo: Sikawa mpe mpo na libela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libateli ya solo: Sikawa mpe mpo na libela
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libateli mpo na basaleli ya Nzambe
  • Oyo Nzambe azali kosala mpo na libota na Ye
  • Libateli ya solo mpo na bato banso?
  • Nsukansuka—Libateli ya solo eyei mpo na seko!
  • Olingi kimya ya motindo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • “Kimya mpe libateli” oyo ekotyama na bato te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Nzambe akosala makambo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Kimya na mokili mobimba—ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/5 nk. 4-7

Libateli ya solo: Sikawa mpe mpo na libela

NTEMBE ezali soko moke te ete Yehova Nzambe akoki kopesa bato na ye libateli. Ye azali “Oyo-na-Nguya-Nyonso.” (Nzembo 68:14) Nkombo na ye, oyo ekeseni na nkombo mosusu nyonso, elimboli “Ye oyo asalaka ete ekóma.” Yango ezali komonisa ye lokola moto bobele Moko kati na molɔ́ngɔ́ mobimba oyo akoki kolónga bipekiseli nyonso mpo na kokokisa bilaka na ye mpe kosala mokano na ye. Nzambe ye moko alobi ete: “Boye na liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolónga na likambo litindaki ngai yango.”​—Yisaya 55:11.

Nzambe abatelaka baoyo batyaka motema epai na ye. Liloba na ye lizali kopesa ndanga na likambo yango. Salomo, Mokonzi ya mayele alobaki na kopemama na elimo ya Nzambe ete: “Nkombo na [Yehova] ezali ndako molai na nguya; moyengebene akokima kuna mpe akobika.” Abakisaki lisusu ete: “Oyo akotalela [Yehova] akotombolama.”​—Masese 18:10; 29:25.

Libateli mpo na basaleli ya Nzambe

Kobanda kala Yehova azali kopesa libateli epai na baoyo batyaka elikya epai na ye. Na ndakisa, mosakoli Yilimia abatelamaki na Nzambe. Ntango mampinga ya Babilone mazingaki Yelusaleme oyo esilaki kopɛngwa, bato basengelaki ‘kolya kwanga na ntina na bozito mpe na kobanga.’ (Ezekiele 4:16) Mpasi ekómaki makasi mingi na boye ete basi balambaki bana na bango mpenza mpe balyaki bango. (Bileli 2:20; 4:10) Atako na ntango yango Yilimia akangamaki na bolɔ́kɔ na ntina na mosala na ye ya kosakola kozanga kobanga, Yehova asɛnzɛlaki na boye ete “bapesaki ye mokate na mapa mokolo na mokolo uta na nzela na batumbi-na-mapa kino mapa nyonso na mboka esilaki.”​—Yilimia 37:21.

Ntango Yelusaleme ekweaki na mabɔkɔ ya bato ya Babilone, Yilimia abomamaki te mpe akendaki te lokola mokangami na Babilone. Nzokande, “. . . mokóló na bakɛngɛli [ya Babilone] apesaki ye ndambo na bilei mpe likabo, atikaki ye ete akenda.”​—Yilimia 40:5.

Bikeke mingi na nsima Yesu Klisto apesaki basaleli ya Nzambe endimiseli oyo ete: “Bómitungisa te mpo na koloba ete, Tokolya nini? Soko ete, Tokomela nini? Soko ete, Tokolata nini? Bapakano bakolukaka biloko yango nyonso. Zambi Tata na bino na Likoló ayebi ete bozali na bosɛnga na yango nyonso. Bólukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso ikobakisama na bino.”​—Matai 6:31-33.

Yango elingi koloba ete basaleli ya Yehova bakozwa libateli ya Nzambe na mikakatano nyonso ya ntango na biso? Te, ezali bongo te. Ata basembwi basikolami te liboso na makambo mabe. Baklisto ya solo babɛlaka, bakutanaka na minyoko, bakweaka na mabɔkɔ ya bato mabe, bakufaka na makámá, mpe bazwaka mpasi na lolenge moko to mosusu.

Atako Yehova abandi naino te kopesa libateli ya mobimba liboso na makámá, balapólo emonisi ete asalelaka solo nguya na ye mpo na kosunga basaleli na ye mpe mpo na kobatela bango. Baklisto babatelamaka mpe na mikakatano mingi mpamba te basalelaka mitindá ya Biblia kati na bomoi na bango. (Masese 22:3) Lisusu, bazali na libateli liuti na bandeko na bango mibali mpe basi baklisto oyo batondi na bolingo, oyo bazali kosalisana na ntango ya mpasi. (Yoane 13:34, 35; Baloma 8:28) Na ndakisa, mpo na koyanola na mposa ya bandeko na bango oyo bazali na Rwanda oyo esili kobebisama na etumba, Batatoli ya Yehova na Mpótó batindaki makabo nokinoki mpe batɔ́ni 65 ya bilamba mpe bankísi, bilei mpe biloko mosusu ya motuya ya badolare 1600000.​—Kokanisá na Misala 11:28, 29.

Atako Yehova atikaka nzela ete komekama ekwela baklisto ya solo, bandimisami ete akopesa bango nguya, lisungi mpe mayele mpo na koyika mpiko. Wana akomelaki baninga na ye bandimi, ntoma Paulo alobaki ete: “Emekeli moko ekomeli bino te oyo ezangi epai na bato nyonso. Nzambe azali sembo; ye oyo akotika bino te ete bómekama na koleka nguya na bino, kasi esika moko na emekeli, akobongisa ekimelo ete bókoka koyika mpiko.”​—1 Bakolinti 10:13.

Oyo Nzambe azali kosala mpo na libota na Ye

Lelo oyo, bamilió ya bato bazali kosepela kosala mokano ya Nzambe. Bapusami na makasi te mpo na kosalela Nzambe; bazali kosala bongo mpo ete bayebi ye mpe balingi ye. Yehova, na ngala na ye, mpo ete alingi basaleli na ye ya sembo, akani kobongola mabelé paladiso epai kuna bato ya botosi bakosepela na kimya, na kolɔngɔ́nɔ́ malamu mpe na libateli libela na libela.​—Luka 23:43.

Nzambe akosala bongo na nzela ya boyangeli moko ya likoló, oyo Yesu Klisto azali Mokonzi aponami mpo na yango. (Danyele 7:13, 14) Biblia ezali kobénga boyangeli yango ete “Bokonzi ya Nzambe” mpe “bokonzi na likoló.” (1 Bakolinti 15:50; Matai 13:44) Bokonzi ya Nzambe ekokitana biyangeli nyonso ya bato. Na esika ete mabelé mazala na biyangeli mingi, tokozala na boyangeli bobele moko. Yango ekoyangela mabelé mobimba na boyengebene.​—Nzembo 72:7, 8; Danyele 2:44.

Yehova azali kopesa bato banso libyangi ya kozala na bomoi na nsé ya Bokonzi. Moko na myango oyo azali kosalela mpo na yango ezali bongo mosala monene ya kokabela bato Biblia, búku oyo ezali kolimbola makambo Bokonzi ekosala mpo na bato. Biblia ezali búku oyo epalangani mingi koleka kati na mokili, mpe sikawa yango ekoki kozwama, na mobimba to na eteni moko na yango, na bankótá koleka 2000.

Na bolingo nyonso Yehova Nzambe azali kosunga bato ete básosola oyo Biblia ezali koteya na ntina na Bokonzi. Azali kosala bongo na kolakisáká mpe na kotindáká bato ete bálimbola Makomami epai na basusu. Sikawa Batatoli ya Yehova koleka milió mitano bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe kati na mboka koleka 230.

Libateli ya solo mpo na bato banso?

Moto nyonso akondima libyangi ya kokóma moyangelami ya Bokonzi na kotosáká mitindá na ye ya boyengebene? Te, mpamba te ebele ya bato basepelaka te kosala mokano ya Nzambe. Bazali kotala na bopɔtu milende oyo misalemi mpo na kosalisa bango ete bábongisa bomoi na bango. Na ntembe te, bazali bango moko komimonisa lokola baoyo Yesu alobaki na ntina na bango ete: “Mitema na bato oyo misili koya makasi, bayoki na matoi na bozito, mpe bazipi miso na bango, ete bámona na miso te, mpe báyoka na matoi te, mpe báyeba na mitema te, mpe bázonga te ete nabikisa bango.”​—Matai 13:15.

Lolenge nini libateli ya solo likoki kotyama na mabelé kati na bato oyo bazali koboya komitambwisa na boyokani na banzela ya sembo ya Nzambe? Ekoki kosalema te. Bato na kotuka Nzambe bazali kotya na likámá libateli ya baoyo balingi kosalela Yehova.

Nzambe apusaka bato na makasi te ete bábongwana, kasi akotika mpe nzela na mabe libela te. Atako Yehova azali kokóba na motema pɛtɛɛ nyonso kotinda Batatoli na ye mpo na koteya bato na ntina na banzela mpe mikano na ye, akokóba lisusu kosala bongo ntango molai te. Yesu Klisto asakolaki ete: “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

“Nsuka” ekolimbola nini mpo na baoyo bazali koboya mitindá ya Nzambe? Yango ekolimbola koboyama mpe kobomama. Biblia ezali koloba ete akopesa “etumbu [na] baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa Nsango Malamu na Nkolo na biso Yesu. Bakozwa lifuti na kobeba na seko mpe kobwakama libándá longwa na liboso na ye mpe longwa na nkembo na nguya na ye.”​—2 Batesaloniki 1:6-9.

Nsukansuka—Libateli ya solo eyei mpo na seko!

Nsima ya kobomama ya baoyo bazali koboya banzela ya kimya ya Yehova, Bokonzi ya Nzambe ekobandisa eleko ya nkembo ya libateli mpo na bolamu ya basembwi awa na mabelé. (Nzembo 37:10, 11) Mokili wana ya sika mokokesana mpenza na oyo tozali kofanda kati na yango sikawa!​—2 Petelo 3:13.

Nzala ekozala lisusu te. Moto nyonso akozala na bilei mingi. Biblia ezali koloba ete ‘mabota nyonso bakosepela na elambo na bilei na mafuta.’ (Yisaya 25:6) Kozanga bilei ekozala te, mpamba te “masango ikotondana na mokili ata kino likoló na nkeka.”​—Nzembo 72:16.

Bato bakofanda lisusu soko moke te kati na bandako mikemike mpe na bakartyé ya bobólá. Na nsé ya Bokonzi, bato banso bakozala na ndako malamu, mpe bakolya bilei ya bilanga na bango mpenza. Biblia elaki ete: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga na miwiti mpe bakolya mbuma na yango.”​—Yisaya 65:21.

Na esika ya mokakatano ya kozanga mosala oyo epalangani mingi, ekozala na mosala malamu, mpe bato bakozwa matomba malamu na yango. Liloba ya Nzambe lilobi ete: “Baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala na mabɔkɔ na bango. Bakosala mosala na mpamba te.”​—Yisaya 65:22, 23.

Na nsé ya Bokonzi, bato bakobɛ́la lisusu te mpe bakokufa lisusu te na ntina na bokɔnɔ. Liloba ya Nzambe lizali kondimisa biso ete: “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na malali.”​—Yisaya 33:24.

Kati na paladiso oyo etikali moke etyama awa na mabelé, konyokwama mpe mpasi, mawa mpe liwa, ekosila libela. Ee, ata liwa! Bato bakozala na bomoi seko kati na Paladiso! Biblia ezali koyebisa biso ete Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emoniseli 21:4.

Na nsé ya boyangeli ya Yesu Klisto, “Nkolo na Kimya,” bomoi awa na mabelé ekokóma mpenza na libateli. Ya solo, libateli ya mokili mobimba ekozala na nsé ya boyangeli moko ya boyengebene mpe ya bolingo​—Bokonzi ya Nzambe.​—Yisaya 9:6, 7; Emoniseli 7:9, 17.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

“Libateli ya bato elimboli kozala na elikya mpo na mikolo mizali koya, . . . [kotya motema kati na] ezalela ebongi na makambo ya politiki mpe ya nkita.”​—Mwasi moko mofandi ya Azia

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

“Likambo oyo lizali mpenza kobangisa mingi ezali mobulu mpe yauli—⁠mpe kobanga bapolisi.”​—Mobali moko na Amerika ya Súdi

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

“Nazalaki komiyoka na libateli te na boumeli ya . . . etumba. Soki mboka ezali na etumba, lolenge nini bato bakoki komiyoka na libateli?”​—Mwana moko ya eteyelo ya ebandeli na Moyen-Orient

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]

“Nakomiyoka na libateli ntango nakoyeba ete nakoki kotambola na butu kati na balabála kozanga ete bábebisa ngai.”​—Elenge mwasi moko moyekoli na Afrika

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto